Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • re mok. 34 nk. 246-251
  • Libombami na nsomo elimbolami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libombami na nsomo elimbolami
  • Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Abimi na libulu mozindo
  • Kimya mpe libateli —Elikya na lokuta
  • Nyama mabe ya langi ya motane makasi oyo Emoniseli 17 elobeli ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Babilone Monene abomami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Kimya ezali te mpo na Bamemi-nsango ya lokuta!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ekateli ezwami likoló na mwasi na pite mpe na mbindo makasi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
Makambo mosusu
Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
re mok. 34 nk. 246-251

Mokapo 34

Libombami na nsomo elimbolami

1. (a) Ezalela na Yoane ezalaki nini ntango amonaki ndumba monene mpe nyama na nsomo oyo ye abuti likoló na yango? (b) Ezalela na kelasi na Yoane ezali nini lelo wana ezali bango komona makambo oyo mazali kokokisa emonaneli ya esakweli?

EZALELA na Yoane ezalaki nini ntango amonaki ndumba monene mpe nyama na nsomo oyo ye abuti likoló na yango? Ye moko alobi boye: “Wana emoni ngai ye, nakamwi na kokamwa monene.” (Emoniseli 17:6b) Moto moko te akoki kozwa likanisi uta na ye moko ete abimisa ekeko motindo wana; nzokande, kati na esobe, tala mpenzampenza mwasi na pite, abuti likoló na nyama na yauli ya nsomo na langi motane! (Emoniseli 17:3) Kelasi na Yoane, ezali mpe kokamwa makasi mpo na kosalama ya makambo oyo mazali kokokisa emonaneli ya esakweli. Soki bato ya mokili bakokaki komona emonaneli yango, bango nyonso mbele bakoloba ete: ‘Tondimi te!,’ mpe mikonzi bango moko bakonganga lisusu makasi: ‘Ekoki kosalema te!’ Nzokande, yango ezali likambo ya solo lelo oyo. Libota na Nzambe esilaki kosangana na lolenge ya polele na kokokisama ya emonaneli, likambo oyo epesi bango elikya ete esakweli ekolanda kokokisama kino nsuka na yango ya kokamwa.

2. (a) Na ntina na kokamwa ya Yoane, anzelu alobi na ye nini? (b) Makambo nini mayebisamaki na kelasi na Yoane? Motindo nini?

2 Anzelu amoni kokamwa na Yoane. Yoane abakisi: “Anzelu nde alobi na ngai ete: ‘Okamwi mpo na nini? Ngai nakoyebisa yo libombami na mwasi yango mpe na nyama na yauli na mitó nsambo mpe na maseke zomi oyo azali kokumba ye.’” (Emoniseli 17:7) Ah! Sikawa anzelu akoyebisa libombami! Epai na Yoane oyo azali kozipola miso na ye makasi, alimboli mitindo mikeseni ya emonaneli mpe makambo ya kokamwa oyo mazali pene mpo na kokokisama. Ezali motindo moko mpe lelo; lokola bazali kotambwisama na baanzelu, kelasi na Yoane, oyo ezali na bokengi mingi, ezwaki libaku ya kozwa ndimbola ya esakweli. “Kolimbola ntina ezali mpo na Nzambe te?” Lokola mosembwi Yozefe, tosili kondimisama mpo na yango. (Genese 40:8; tala Danyele 2:29, 30.) Basaleli na Nzambe bazali na centre ya makambo yango, nzokande Jéhovah azali koyebisa bango ndimbola ya emonaneli mpe bopusi na yango likoló ya bomoi na bango. (Nzembo 25:14) Na ntango oyo ye moko alingaki, afungolaki bango makanisi mpo bakanga ntina ya libombami ya mwasi mpe ya nyama na yauli.—Nzembo 32:8.

3, 4. (a) Diskur piblike nini Nathan Knorr apesaki na 1942, mpe amonisaki ete nyama na yauli na langi motane ezali nani? (b) Maloba nini ya anzelu Nathan Knorr alobelaki mingi?

3 Kobanda le 18 kino le 20 Septembre 1942, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki naino kongala, ba Témoins de Jéhovah ya Etats-Unis babongisaki Assemblée teokratike na bango ya mokili na sika. Cleveland (na Etats-Unis), engumba epai kuna likita elekaki monene, ekanganaki na nzela na telefone na bingumba mosusu koleka 50 epai kuna assemblée ezalaki kosalema, mpe bato 129 699 banso oyo bayanganaki. Makita oyo ezalaki na programme motindo moko ebongisamaki kati na mokili mobimba, epai kuna likoki ezwamaki. Na ntango wana, mingi na basaleli na Jéhovah bazalaki kokanisa ete bitumba ekongala mpo na kokoma na Armagedon, etumba na Nzambe; yango wana diskur piblike, “Kimya ya lobi ekozala ya ntango molai?,” ebimisaki mposa makasi ya koluka koyeba makambo. Ndenge nini Nathan Knorr, président ya sika ya la Société Watch Tower, akokaki koloba na ntina na kimya nzokande ezalaki nde bitumba ezalaki kozela mikili?a Yango emonisi ete kelasi na Yoane ‘bazalaki kotya likebi na etingya’ na liloba na esakweli na Nzambe.—Baebele 2:1; 2 Petelo 1:19.

4 Engengiseli nini diskur “Kimya ya lobi ekozala ya ntango molai?” ememaki likoló na esakweli? Komonisaka polele ete nyama na yauli ya langi motane ya Emoniseli 17:3 ezalaki Société des Nations, Nathan Knorr alobaki na nsima mpo na mosala na yikiyiki ya nyama yango na kosalelaka maloba oyo anzelu ayebisi nsima epai na Yoane: “Nyama na yauli oyo omonaki azalaki nde azali te, mpe abelemi kobima na libulu bozindo mpe kokende kino libebi.”—Emoniseli 17:8a.

5. (a) Na ndimbola nini tokoki koloba ete “nyama na yauli . . . azalaki” mpe “azali te”? (b) Ndenge nini Nathan Knorr ayanolaki na motuna: “La Société des Nations ekotikala kati na libulu?”

5 “Nyama na yauli . . . azalaki.” Ya solo, azalaki, kobanda le 10 Janvier 1920, na motindo ya Société des Nations, mpe mikili 63 misanganaki kati na yango. Nzokande, moko nsima na mosusu, Japon, Allemagne mpe Italie balongwaki, mpe bamboka oyo ezalaki kala Union soviétique ebimisamaki. Na nsima, na Septembre 1939, dictateur Hitler atumolaki Etumba na Mibale ya mokili mobimba.b Lokola elongaki te mpo na kotya kimya kati na mokili, Société des Nations ekweaki bongo kati na ezalela ya kozanga mosala, kati na libulu mozindo. Na 1942, lisangá yango elimwaki. Ezali mpenzampenza na eleko wana ya ntina mingi—liboso te na nsima mpe te—nde Jéhovah alimbolaki na mozindo epai na libota na ye ndimbola ya emonaneli. Na assemblée teokratike ya mokili na sika, Nathan Knorr akokaki koloba, na boyokani na esakweli, ete “nyama na yauli . . . azali te.” Na nsima, atunaki boye: “Société des Nations ekotikala kati na libulu?” Kotangaka Emoniseli 17:8, ayanolaki: “Lisangani ya mabota na mokili ekobima lisusu.” Ezali yango mpenza nde esalamaki, mpo na kolongisama ya liloba na esakweli na Jéhovah.

Abimi na libulu mozindo

6. (a) Ntango nini nyama na yauli ya langi motane ebimaki na libulu mozindo, mpe nkombo na yango ya sika ezalaki nini? (b) Mpo na nini Nations unies (O.N.U.) ezali mpenza kobotama ya sika ya nyama na yauli ya langi motane?

6 Nyama na yauli na langi motane ebimaki mpenza na libulu mozindo. Le 26 Juin 1945, na San Francisco, na makelele ya miziki makasi, mikili 50 bandimaki mokanda ya Organisation des Nations unies (Lisangá na Mabota masangani), lisangá oyo ezwaki mokano ya “kobatela kimya na mokili mobimba.” Bokokani mingi bomonanaki kati na Société des Nations mpe O.N.U. Encyclopédie moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Na makambo mosusu, O.N.U. ekokani na Société des Nations, oyo ebongisamaki nsima na Etumba na Liboso ya mokili mobimba. . . . Ntalo monene na mikili oyo basali O.N.U. basalaki mpe S.D.N. Bobele lokola S.D.N., O.N.U. esalamaki mpo na kobatela kimya kati na bikólo. Biteni minene ya O.N.U. bikokani mpenzampenza na oyo ya S.D.N.” Na bongo mpo na koloba solo O.N.U. ezali mpenza kobotama ya mibale ya nyama na yauli ya langi motane. Ezali na basangani mingi (mikili soko 190) koleka S.D.N. oyo azalaki na yango bobele 63; emipesi mpe mikumba minene koleka S.D.N.

7. (a) Motindo nini bafandi na mokili bakamwaki na bosepeli na ntango ya kobotama lisusu ya nyama na yauli ya langi motane? (b) Mokano nini O.N.U. alongi te na kokokisa, mpe secrétaire général na yango alobaki nini mpo na yango?

7 Na ebandeli, bato batyaki motema mingi na O.N.U., likambo yango ekokisaki maloba oyo na anzelu: “Bafandi na mokili, baoyo nkombo na bango ezangi kokomama na buku na bomoi longwa na kozalisama na mokili, bakokamwa wana ekotala bango nyama oyo azalaki, mpe azali te, mpe akoya.” (Emoniseli 17:8b) Bafandi na mokili bakamwaki mingi na lisangá monene wana ya sika oyo ezali kosala uta na ndako monene na yango, penepene na ebale East River, na New York. Nzokande kimya mpe libateli ya mokili mobimba ezali mosika na O.N.U. Na boumeli ya bambula mingi na ekeke ya ntuku mibale, kimya kati na mokili ezalaki kobatelama se mpo na “kobangana kati na mabota na ntina na bibundeli bazali na yango”—oyo elembo na yango ezali MAD, elimboli “ligboma” na Anglais—mabota mazali se kowelana makasi koleka mpo na kosala bibundeli. Nsima na mwa mibu 40 ya milende misalemi na O.N.U., na 1985 secrétaire général na ntango wana, Javier Pérez de Cuéllar, amilelaki ete: “Tozali kobika na eleko moko ya sika oyo bato bamipesi mingi na kolinga bikólo na bango, mpe toyebi te ndenge nini tokolonga likambo yango.”

8, 9. (a) Mpo na nini O.N.U. ayebi eloko akosala te mpo na kosilisa mikakatano na mokili, mpe engebene ekateli na Nzambe, likambo nini ekokomela yango mosika te? (b) Mpo na nini nkombo ya babandisi mpe ya bato oyo bazali kosepela na O.N.U. ekomami te na “buku na bomoi” na Nzambe? (c) Bokonzi na Jéhovah ekokokisa likambo nini?

8 O.N.U. ayebi te likambo nini akoki kosala. Mpamba te O.N.U. ezalisamaki te na Ye Oyo akopesaka bomoi epai na bato banso. Ekoumela se ntango mokuse, mpamba te, engebene ekateli na Nzambe, esengeli “kokende kino libebi.” Bankombo ya bato oyo babandisaki mpe bakumisaki O.N.U. ekomami te kati na mokanda na bomoi na Nzambe. Ndenge nini bato na masumu mpe bakokufaka, baoyo mingi kati na bango bazali kotuka nkombo na Nzambe, bakoki kokokisa na nzela na O.N.U. makambo oyo etikali moke Jéhovah akokokisa yango engebene maloba na ye, na nzela ya bato te, kasi na nzela ya Bokonzi na Klisto?—Danyele 7:27; Emoniseli 11:15.

9 O.N.U. ezali mpenza bokonzi na lokuta mpo na kotuka Bokonzi na masiya na Nzambe epesami na Mokonzi na kimya, Yesu Klisto, oyo boyangeli na ye ekozala na nsuka te. (Yisaya 9:6, 7) Ata soki O.N.U. alongi mpo na kotya kimya ya moke, bitumba bikoumela te na kozonga lisusu. Bitumba bizali kati na makanisi ya bato na masumu. “Nkombo na bango ekomami te kati na buku ya bomoi longwa na kozalisama na mokili.” Ezali te ete Bokonzi na Nzambe mpe na Klisto ekotya bobele kimya ya seko na mabelé, kasi lisusu, na nzela na mbeka na lisiko na Yesu, ekosekwisa bakufi, bato na sembo mpe bato bazangi sembo, baoyo bazali kati na makanisi na Nzambe. (Yoane 5: 28, 29; Misala 24:15) Kati na bato yango ezali na baoyo nyonso bayikaki mpiko liboso na makaneli ya Satana mpe ya libota na ye, mpe misusu oyo bakozala na mokumba ya komonisa botosi na bango. Nzokande, nkombo na bato oyo balingi kobima na Babilone Monene te mpe na baoyo batingami na kosambela nyama na yauli, ekokomama te kati na buku na bomoi na Nzambe.—Exode 32:33; Nzembo 86:8-10; Yoane 17:3; Emoniseli 16:2; 17:5.

Kimya mpe libateli —Elikya na lokuta

10, 11. (a) O.N.U. asakolaki nini na 1986, mpe litomba nini yango ebimisaki? (b) “Mitindo boni ya mangomba” mayanganaki na mboka Assise, na Italie, mpo na kosambela na ntina na kimya? Nzambe andimaki mabondeli yango? Limbola.

10 Mpo na koluka kolendisa bilikya na bato, O.N.U. esakolaki 1986 “Mobu ya kimya na mokili mobimba,” teme na yango ezalaki ‘Kobatelama ya kimya mpe ya avenire ya bato.’ Mikili oyo mizalaki kobunda mibiangamaki ete batika kobunda, na mwa boumeli ata ya mbula moko. Basalaki ndenge nini? Engebene rapport ya Lisangá moko mpo na boluki kimya ya mokili mobimba, bato ebele mpenza, bato soko milió 5 babomamaki mpo na bitumba na boumeli ya mobu bobele moko wana ya 1986. Ata soki mosolo ya sipesiale ya bibende esalamaki to ba timbres enyatamaki mpo na kokundola likambo yango, mikili mingi basalaki likambo moko te ya monene mpo na kokokisa mokano wana ya kimya na 1986. Nzokande, mangomba na mokili, oyo bazali komibanzabanza mpo na kozala na boyokani malamu elongo na O.N.U., balobaki mingi na ntina na mobu wana. Na ndakisa, le 1er Janvier 1986, pape Jean Paul II akumisaki mosala ya O.N.U. mpe alobaki ete mobu ya sika ezali mobu ya kimya. Na nsima, le 27 Octobre, ayanganisaki na mboka Assise, na Italie, mikonzi ya mangomba minene, mpo na kosambela na ntina na kimya.

11 Nzambe ayokaka mabondeli ya motindo wana mpo na kimya? Mpe, na Nzambe nini bakonzi wana na mangomba batindaki mabondeli na bango? Soki otunaki motuna oyo na bato na mangomba makeseni oyo bazalaki wana, mbele balingaki kopesa yo biyano bikeseni. Ezali na tempelo moko ya ebele na bamilió na banzambe oyo bazali koyoka mpe kondima mabondeli oyo malobami na mitindo mikeseni? Ntalo monene na bayangani na likita yango basambelaki La Trinité ya boklisto na lokuta.c Babudiste, Bahindou mpe bamosusu batindaki mabondeli epai na banzambe ebele. Nyonso ezalaki, “mitindo na mangomba” 12 oyo mayanganaki wana mpe mamonisamaki na bakonzi lokola archevêque anglican de Cantorbéry, dalaï-lama budiste, métropolite ya ortodoxe russe, président ya lisangá na esika ya bosantu ya shintoïste ya Tokyo, bato na Afrika oyo basambelaka bankoko mpe ba indiens mibale ya Amérike baoyo balataki bikoti bitongami na nsálá na ndeke. Ezalaki etuluku moko ya balangi ekeseni oyo esepelisaki mpenza bato na télévizió mpo na kokanga bango bafoto. Moko na bituluku yango basambelaki ngonga zomi na mibale kozanga kolemba. (Tala Luka 20:45-47.) Kasi moko na mabondeli yango etombwamaki likoló koleka mapata matondi na mbula oyo mazalaki kolekaleka likoló na mitó na bato bayanganaki na likita yango? Te, mpe tala mpo na nini:

12. Mpo na bantina nini Nzambe andimaki te mabondeli mpo na kimya, oyo malobamaki na bakonzi ya mangomba na mokili?

12 Na kokesana na bato oyo bazali ‘kotambola na nkombo na Jéhovah,’ moko te kati na bakonzi yango ya mangomba asambelaki Jéhovah, Nzambe na bomoi, oyo nkombo na ye emonani penepene na mbala 7 000 kati na makomi ya liboso ya Biblia. (Mika 4:5; Yisaya 42:8, 12)d Bango nyonso, babelamaki te epai na Nzambe na nkombo na Yesu mpamba te mingi kati na bango bandimaka ata Yesu Klisto te. (Yoane 14:13; 15:16) Moko te kati na bango azali kosala mokano na Nzambe mpo na ntango na biso: kosakola ete Bokonzi ya molongo mobimba ya Nzambe, oyo koya na yango esili kobelama, nde ezali elikya ya solo mpo na bato kasi O.N.U. te. (Matai 7:21-23; 24:14; Malako 13:10) Mangomba mingi oyo bango bazali mikonzi emikotisaki na bitumba oyo bitangisaki makila mingi kati na Lisolo ya bato, bakisa bitumba mibale ya mokili mobimba. Epai na bato yango, Nzambe alobi: “Ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te; maboko na bino matondi na makila.”—Yisaya 1:15; 59:1-3.

13. (a) Mpo na nini ezali likambo ebongi na kotya likebi na komona ete bakonzi na mangomba ya mokili bazali kosangana na O.N.U. mpo na kosenga kimya? (b) Engebene makambo oyo Nzambe asakolaki, masengi mpo na kimya ekomema kino wapi?

13 Epai mosusu ezali likambo ebongi na kotya likebi, na komonaka ete bakonzi na mangomba ya mokili bazali kosangana na O.N.U. mpo na kosenga kimya na ntango na biso. Na yango, balingi komema bopusi likoló na O.N.U. mpo na bolamu na bango moko, mingimingi lelo oyo ebele na basambeli na bango bazali kotika mangomba na bango. Lokola bakonzi mabe ya Yisraele na kala, bazali konganga na mongongo makasi: “Kimya! kimya! nde kimya ezali te.” (Yilimia 6:14) Ntembe ezali te ete bakolanda kosenga kimya na mongongo makasi, kolongisaka maloba ya nsuka oyo ntoma Paulo ayebisaki lokola esakweli na maloba oyo: “Mokolo na Jéhovah ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato ete: ‘Kimya ezali, makambo mazali te!,’ wana libebi ekokwela bango pwasa pelamoko mpasi ekoyela mwasi na zemi mpe nzela na kokima ekozala te.”—1 Batesaloniki 5:2, 3.

14. Liloba oyo: “Kimya ezali, makambo mazali te!,” ekolobama ntango mosusu na lolenge nini mpe esengeli kosala nini mpo ete tokosama te na liloba yango?

14 Na bambula oyo euti koleka, bato ya politike basaleli maloba “kimya ezali, makambo mazali te” mpo na kolobela myango ndenge na ndenge oyo bato basali. Milende yango oyo bato minene ya mokili basali yango nde ebandeli ya kokokisama ya 1 Batesaloniki 5:3? To ntoma Paulo azalaki nde kolobela likambo moko ya monene oyo ekobenda likebi ya mokili mobimba? Lokola bisakweli ya Biblia eyebanaka malamumalamu se nsima ya kokokisama na yango to na ntango ezali kokokisama, tozela mpo na koyeba. Nzokande, baklisto bayebi ete, ata soki bikolo ezwi kimya ya ndenge nini, kasi makambo ekobongwana mpenza te. Moimi, koyinana, kobomana, kobeba ya mabala, pite mpe ekobo, maladi, mawa, mpe liwa ekozala kaka. Yango wana, ntango bakoganga “kimya ezali, makambo mazali te,” yo okokosama te soki ozali ntango nyonso koyeba ndimbola ya makambo oyo ezali koleka na mokili mpe soki ozali kotya likebi na makebisi oyo ezali na bisakweli ya Liloba ya Nzambe.—Malako 13:32-37; Luka 21:34-36.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Joseph Rutherford akufaki le 8 Janvier 1942, nsima na yango Nathan Knorr akomaki président ya la Société Watch Tower.

b Le 20 Novembre 1940, Alemanye, Italia, Japon mpe Hongrie batyaki maboko na boyokani mpo na kosala “Lisangá ya sika ya Mabota.” Mikolo minei na nsima, Vatican elekisaki misa moko na radio mpe libondeli mpo na kimya ya mangomba mpe mpo na ebongiseli moko ya sika. “Lisangá ya sika” yango esalamaki te.

c Liteya ya Trinité euti na Babilone na kala epai bazalaki kosambela trinité oyo ezalaki na banzambe misato: Shamash, moi, Sin, sanza, mpe Ishtar, mokonzi na myoto. Ezipito elandaki ndakisa yango, na kopesaka losambo epai na Osiris, Isis mpe Horus. Assur, nzambe aleki monene ya ba Assyriens, amonisami na mitó misato. Ndenge moko, emonanaka kati na bandako-nzambe misusu ya katolike bilakiseli ya Nzambe na mitó misato.

d Diksionere moko ya Lingelesi (Webster’s Third New International Dictionary, 1993) elimboli ete Jéhovah Nzambe azali “Nzambe aleki likoló oyo ayebani, Nzambe bobele moko oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kosambela.”

[Etanda na lokasa 250]

“Kimya” ezali te

Atako 1986 esakolamaki Mbula ya kimya kati na mokili mobimba na O.N.U., kowelana ezali se kokola mpo na kosala minduki ya makasi. Rapport Budgets militaires et sociaux pour 1986 (Angl.) elobeli makambo oyo makoki kotinda na kokanisa:

Na 1986, mosolo mobimisamaki mpo na bibundeli ya mokili mobimba ekomaki na 900 miliare ya badolare.

Mosolo oyo mokili ezalaki kobimisa na ngonga moko mpo na bibundeli mpe mpo na basoda ekokaki mpenza mpo na kokata mangwele na bato 3,5 milió oyo bazalaki kokufa mbula nyonso na maladi oyo ekoki kopengolama.

Kati na mokili, moto moko kati na bato mitano azalaki na bobola makasi. Bato yango oyo bazalaki kokufa na nzala bakokaki koleisama mbula mobimba bango nyonso na mosolo oyo mikili bazalaki kobimisa na mikolo mibale mpo na kosomba to kosala bibundeli.

Nguya ya bibundeli nyonso ya nikleere kati na mokili ezalaki mbala 160 000 000 koleka nguya oyo ebimisamaki na aksida ya Tchernobyl.

Bombe moko ya nikleere ekokaki kobimisa nguya oyo ekobebisa mbala 500 koleka nguya ya bombe oyo ebwakamaki na Hiroshima na 1945.

Bibundeli na nikleere bibombami ezalaki koleka mbala milió moko bombe oyo ya Hiroshima. Ezalaki na nguya mbala 2 700 koleka oyo nyonso ebwakamaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, oyo ebomaki bato 38 000 000.

Bitumba ekomaki kosalama mbala na mbala mpe ekomaki koboma bato mingi. Na ekeke na 18, ebomaki bato 4,4 millions; na ekeke na 19 ebomaki bato 8,3 millions. Mpe na boumeli ya bambula 86 ya ebandeli na ekeke 20, ebomaki bato 98,8 millions. Uta ekeke na 18, motuya ya bato babomami na etumba ebakamaki nokinoki mbala motoba koleka motuya ya bato bazali kati na mokili. Na ekeke ya 20, bato bakufaki na etumba mokomoko bazalaki mbala zomi koleka baoyo bakufaki na bitumba ya ekeke na 19.

[Bililingi na lokasa 247]

Lokola esakweli esilaki koloba yango na ntina na nyama na yauli na langi motane, Lisangá na Mabota ekotaki na libulu mozindo na boumeli ya Etumba na Mibale ya mokili mobimba, kasi ebimaki lisusu na mokili na nkombo ya Organisation des Nations unies (O.N.U.)

[Bililingi na lokasa 249]

Mpo na kosimba “Mbula ya kimya” oyo esakolamaki na O.N.U., bamonisi ya mangomba ya mokili basalaki mabondeli mingi makeseni na mboka Assise, na Italie; kasi moko te kati na bango abondelaki Nzambe na bomoi, Jéhovah

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto