Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 51-lok. 57
  • Bakitani ya bantoma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakitani ya bantoma
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Bikeko
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Pápa azali nde “mokitani ya Santu Petro”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Petro azalaki nde pápa ya liboso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Maria (Mama ya Yesu)
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 51-lok. 57

Bakitani ya bantoma

Ndimbola: Liteya oyo elobaka ete bantoma 12 bazali na bakitani oyo Nzambe aponaki mpe apesaki bango bokonzi. Na Lingomba ya Katolike, balobaka ete baepiskɔpɔ nyonso bazali bakitani ya bantoma, mpe pápa azali mokitani ya Petro. Balobaka ete bapápa ya Roma bazali mpenza bakitani ya Petro, bafandi na ebonga na ye mpe bazali kokokisa mikumba na ye; balobaka ete Kristo apesaki Petro bokonzi ya Eklezia mobimba. Biblia eteyaka bongo te.

Petro azalaki nde “libanga” oyo likoló na yango eklezia etongamaki?

Mat. 16:18, JB: “Sikoyo nalobi na yo: Yo ozali Petro mpe likoló ya libanga oyo nakotonga Eklezia ya ngai. Mpe bizipeli ya mokili ya nse ekoki kozala na bokonzi likoló na yango ata moke te.” (Simbá ete bavɛrsɛ mosusu [v. 13, 20] ezali komonisa ete lisolo yango ezali kolobela nde Yesu.)

Ntoma Petro ná ntoma Paulo balobaki ete “libanga,” “libanga ya litumu” ezali nani?

Bik. [Mis.] 4:8-11, LNz: “Petro, oyo atondi na Elimo Santu alobi na bango: ‘Bakonzi ba ekólo mpe bakóló . . . mpo ya nkombo ya Yezu Kristu wa Nazarete, oyo bino bobakaki o kuruse; kasi Nzambe asekwisi ye o bawa. Ye azali libanga bino batongi bobwakaki, likómi libanga-mama likokumba ndako mobimba [“libanga ya litumu,” NAB].’”

1 Pe. 2:4-8, LNz: “Bóbeleme na Mokonzi Yezu [Kristu] . . . Bino mpe bozali mabanga ma bomoi bondimi ’te bátonga bino Tempelo ya Elimo. . . . Mpo ekomami o Mikanda Misantu ’te: Nakotia o Sion libanga liye naponi, lizali libanga lya motuya likokumba ndako mobimba; moto akotia motema na libanga liye, akosuka mabe te. Ye nde lokumu la bino bayambi, kasi mpo ya baye bayambi te ekomami ’te: Libanga likokumba ndako mobimba, liye batongi-ndako babwakaki, likómi libaku, libanga likokweisa bato. Baye bayambi Liloba lya Nzambe te, bakotuta libaku na lyango, ut’o esengelaki kosalema se bongo.”

Ef. 2:20, LNz: “Bozali lokola ndako etongami o mabanga; mabanga mana nde bapostolo na baprofeta; Kristu Yezu yemei azali libanga lya litumu lya ndako mobimba.”

Ndenge nini Augustin (moto oyo Eklezia Katolike etalelaka ye lokola mosantu) azalaki kotalela likambo yango?

“Kaka na ntango oyo nazalaki nganga-nzambe, nakomaki mpe buku moko mpo na kotɛmɛla mokanda ya Donat . . . Na esika moko na buku yango, nalobaki mpo na Ntoma Petro ete: ‘Ye nde libanga oyo likoló na yango Eklezia etongamaki.’ . . . Kasi nayebi ete na nsima nalimbolaki mbala mingi maloba wana, oyo Nkolo alobaki: ‘Yo ozali Petro, mpe likoló ya libanga oyo nakotonga Eklezia na ngai,’ elingi koloba ete eklezia yango etongami likoló ya Moto oyo Petro alobaki ete: ‘Yo ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi,’ mpe na ndenge yango, Petro, oyo bapesaki ye nkombo ya libanga oyo, azali momonisi ya moto oyo Eklezia etongami likoló na ye, mpe azwaki ‘bafungola ya bokonzi ya likoló.’ Mpo Yesu ayebisaki ye, ‘Yo ozali Petro’ kasi te ete ‘Yo ozali libanga.’ Nzokande nsima ya koloba polele ete ‘libanga ezali Kristo,’ ndenge Eklezia mobimba elobaka, Simo abengamaki Petro.”​—The Fathers of the Church​—Saint Augustine, the Retractations (Washington, D.C.; 1968), ebongolami na Mary I. Bogan, Buku I, lok. 90.

Bantoma mosusu bazalaki komona ete Petro aleki bango?

Luka 22:24-26, LL: “[Bayekoli] babandi kotiana tembe po na koyeba nani aleki baninga na kati na bango. Yezu alobi: ‘Bakonzi ya bikolo balakisaka bokonzi na bango, mpe baoyo batambwisaka bamboka balingaka ’tè bato bábenga bango “Bato malamu.” Kasi bino bósala bongo te.’” (Soki Petro azalaka “libanga,” bayekoli bakokaki ‘kotyana ntembe mpo na koyeba nani aleki baninga’?)

Lokola Yesu Kristo, mokonzi ya lisangá, azali na bomoi, azali na mposa ya kozala na bakitani?

Ebr. 7:23-25, LL: “Pe lisusu, banganga-Nzambe wana bazalaki ebele [na Yisraele], po bazalaki kokufa, bakokaki koumela te. Kasi Yezu [Kristo] akoumela libela; kinganga-Nzambe na ye ezali po na seko. Yango wana akoki kobikisa libela baoyo balingi kopusana penepene na Nzambe na lisalisi na ye, mpamba te akoumela seko po alobela bango epai ya Nzambe.”

Rom. 6:9, LNz: “Toyebi ’te Kristu oyo asili asekwi, akokufa lisusu te.”

Ef. 5:23, LNz: “Kristu azali motó mwa Eklezya.”

Bapesaki Petro “bafungola” nini?

Mat. 16:19, LNz: “Nakopesa yo mafungola ma Bokonzi bwa Likoló: manso okokanga o nse, bakokanga mango o likoló, mpe manso okokangola o nse, bakokangola mango o likoló.”

Na Emoniseli, Yesu alobeli fungola moko ya elilingi oyo akosalela mpo na kofungolela bato nzela ya kozwa mapamboli mpe mabaku ya kosalela Nzambe

Boy. [Em.] 3:7, 8, LNz: “Yoká maloba ma Mosantu, ye Moto wa bosolo, oyo azali na lifungola lya Davidi. Soko afungoli, moto moko akokanga te, soko akangi, moto moko akofungola te: . . . Nafungoleli yo ezibeli, eye moto moko akoki kokanga te.”

Petro asalelaki “bafungola” oyo bapesaki ye mpo na kofungolela bato (Bayuda, Basamaria, mpe bato oyo bazali Bayuda te) nzela ya kozwa elimo ya Nzambe mpo na kokɔta na Bokonzi ya likoló

Bik. [Mis.] 2:14-39, LNz: “Petro atelemi, ye na bazomi na moko mpe alobi na bango na mongongo makasi: ‘Bato ba Yudea mpe bino banso bofandi o Yeruzalem . . . Yezu oyo bino bobomaki o kuruse, Nzambe akomisi ye Mokonzi mpe Kristu.’ Maloba mana mayokisi bango mpasi o mitema mpe balobi na Petro mpe na bapostolo basusu: ‘Bandeko, tósala nini?’ Petro ayanoli bango: ‘Bóbongola mitema, mpe moto na moto akula batisimo o nkombo ya Yezu Kristu mpo ’te azwa bolimbisi masumu, bongo bokozwa likabo lya Elimo Santu. Zambi Nzambe alakelaki bino ná bana ba bino bongo, ná mpe baye banso bapanzani mosika, baye Mokonzi Nzambe wa biso akobenga.’”

Bik. [Mis.] 8:14-17, LNz: “Eyoki bapostolo, baye bazalaki o Yeruzalem, ’te bato ba Samaria bayambi maloba ma Nzambe, batindeli bango Petro na Yoane. Bongo bakei epai ya ba-Samaria mpe basambeleli bango mpo ’te bakula Elimo Santu, zambi Elimo [ekitelaki] naino ata moko wa bango te; bakulaki bobele batisimo o nkombo ya Mokonzi Yezu. Bongo Petro na Yoane batieli bango maboko, mpe bakuli Elimo Santu.” (Vɛrsɛ 20 emonisi ete Petro nde akambaki makambo na libaku yango.)

Bik. [Mis.] 10:24-48, LNz: “Nsima ya mokolo moko bakómi o Sezarea. Kornelio [azalaki Moyuda te mpe akatamaki ngenga te] azalaki kozila bango . . . Petro abandi koloba . . . Ezalaki Petro naino koloba, Elimo Santu [ekiteli] baye banso bazalaki koyoka maloba ma ye.”

Likoló ezalaki nde kozela Petro azwa bikateli mpe na nsima elandaka bikateli yango?

Bik. [Mis.] 2:4, 14, LNz: “Banso batondi na Elimo Santu mpe babandi koloba nkota isusu, se lokola Elimo [ezalaki] kolobisa bango. . . . Na nsima [Kristo, motó ya lisangá, apesaki bango makasi ya koloba na nzela ya elimo santu] Petro atelemi, ye na bazomi na moko, mpe alobi na bango.” (Talá vɛrsɛ 33.)

Bik. [Mis.] 10:19, 20, LNz: “Elimo [elobi] na ye [Petro]: ‘Talá bato babale bazali koluka yo. Kitá noki, kende elongo na bango [na ndako ya Kornelio oyo azali Moyuda te], otia ntembe te, ngai moto natindi bango.’”

Talá Matai 18:18, 19.

Petro nde zuzi oyo akataka soki nani abongi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe?

2 Tim. 4:1, LNz: “Kristu Yezu . . . akokata makambo ma bato bazali na bomoi mpe baye bawa.”

2 Tim. 4:8, LNz: “Sikawa basili babongiseli ngai enkoti ya bosembo; Mokonzi, [Yezu Kristu] ye Zuzi nta bosembo, akolatisa ngai yango o Mokolo akoya; akolatisa yango bobele ngai te, kasi bato banso bazali kozila boyei bwa ye na motema bolingi.”

Petro akendaki na Roma?

Biblia elobeli Roma na vɛrsɛ libwa; kasi ata vɛrsɛ moko te emonisi ete Petro akendaki na Roma. Na 1 Petro 5:13, Biblia emonisi ete Petro akendaki na engumba ya kala ya Babilone. Babilone yango ezalaki nde Roma? Petro akendaki na Babilone mpo azalaki na mokumba ya kosakwela Bayuda (ndenge Bagalatia 2:9 emonisi yango), mpo Bayuda mingi bazalaki kofanda na Babilone mpe na bamboka oyo ezalaki zingazinga na yango. Ntango buku moko (Encyclopaedia Judaica, Yerusaleme, 1971, Vol. 15, kol. 755) ezali kolobela kobimisama ya Talmud ya Babilone, elobi ete na eleko na bokristo, “bainiversite ya minene” ya Bayuda ezalaki “na Babilone.”

Ezali solo ete bapápa balandanaki kobanda na Petro tii bapápa ya lelo?

John McKenzie, sango moko (Jésuite) akomaki boye ntango azalaki profɛsɛrɛ ya teoloji na Notre Dame: “Ezali na elembeteli moko te oyo emonisi ete bakonzi ya eklezia balandanaki kobanda na Petro.”​—The Roman Catholic Church (New York, 1969), lok. 4.

Buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. I, lok. 696) elobi ete: “ . . . Lokola mikanda ezali mpenza te, ezali mpasi tóyeba ndenge mosala ya baepiskɔpɔ ebandaki . . . ”

Ata soki moto atuti ntolo ete aponami na Nzambe, yango ezali na ntina moko te soki atosaka Nzambe mpe Kristo te

Mat. 7:21-23, LNz: “Bato bakoloba na ngai ‘Mokonzi! Mokonzi!,’ bakoyingela bango banso o Bokonzi bwa Likoló te. Ekoyingela wana bobele baye bakosalaka mpo ilingi Tata wa ngai azali o likoló. Mokolo mona bato baike bakoloba na ngai: ‘Mokonzi, Mokonzi, tosakolaki o nkombo ya yo te? Tobenganaki bazabolo o nkombo ya yo te? Tosalaki makamwisi o nkombo ya yo te?’ Kasi ngai nakoloba na bango polele: ‘Nayebi bino soki te. Bólongwa mosika na ngai, makambo ma bino mazangi bosembo.’”

Talá mpe Yirimia 7:9-15.

Baoyo batutaka ntolo ete bazali bakitani ya bantoma, balandaka mpenza mateya ya Yesu Kristo ná bantoma na ye mpe makambo oyo basalaki?

Buku moko (A Catholic Dictionary, Londres, 1957, W. E. Addis ná T. Arnold, lok. 176) elobi boye: “Eklezia Katolike eutá na bapostolo, mpo mateya na yango euti na makambo oyo bamonisaki bapostolo kala, eklezia ebatelaka makambo yango mpe elimbolaka kaka yango, ebakisaka eloko te mpe elongolaka eloko te.” Kasi, misala na bango eyokani na makambo oyo balobi?

Ndenge oyo Nzambe azali

“Bosato (Trinité) ezali liteya oyo esimbi mpenza lingomba ya bokristo.”​—The Catholic Encyclopedia (1912), Vol. XV, lok. 47.

“Ezala liloba Bosato, to ndimbola na yango, ezali komonana te na kati ya Kondimana ya Sika . . . Liteya yango ekolaki mokemoke na boumeli ya basiɛklɛ mingi, mpe ebimisaki bantembe mingi.”​—The New Encyclopædia Britannica (1976), Micropædia, Vol. X, lok. 126.

“Bato mingi ya mayele oyo bayekolaka makomi, bato ya teoloji, mpe Bakatolike mingi bandimaka ete moto akoki te kolobela liteya ya Bosato na kati ya Kondimana ya Sika soki atángaki teoloji te. Bato ya istware oyo bayekolaka mateya ya lingomba mpe bato ya teoloji oyo batingamaka na mateya yango bandimaka ete soki moto alingi kolobela liteya ya Bosato mpenza, akobanda na ebandeli ya bokristo te, akobanda nde na eteni ya nsuka ya siɛklɛ ya 4.”​—New Catholic Encyclopedia (1967), Vol. XIV, lok. 295.

Bonzemba ya basango

Na mokanda oyo Pápa Paul VI akomelaki baepiskɔpɔ nyonso (Sacerdotalis Caelibatus [Bonzemba ya basango], 1967), andimaki ete basango basengeli kotikala minzemba, kasi alobaki mpe ete, “Boyokani ya Sika epai mateya ya Kristo mpe ya bapostolo ezali, esɛngi mpenza te ete basaleli ya Nzambe bátikala minzemba . . . Ntango Yezu aponaki bazomi na mibale, asɛngaki te ete bázala liboso minzemba, bapostolo mpe basɛngaki likambo yango te na baoyo baponamaki mpo na kokamba baeklezia ya liboso ya bokristo.”​—The Papal Encyclicals 1958-1981 (Falls Church, Va.; 1981), lok. 204.

1 Ko. 9:5, NAB: “Tozali nde na lotomo te ya kobala mwasi moko mondimi ndenge bantoma mosusu mpe bandeko ya Nkolo mpe Kefa basalá?” (“Kefa” ezali nkombo ya Aramɛyɛ oyo bapesaki Petro; talá Yoane 1:42. Talá mpe Marko 1:29-31, elobeli bokilo ya Simo, to Petro.)

1 Tim. 3:2, Dy: “Bongo, esengeli episkɔpɔ . . . azala mobali wa mwasi moko [“abala mbala moko,” NAB].”

Liboso ya eleko ya bokristo, Babuda bazalaki kosɛngisa banganga-nzambe to basango na bango ete bátikala minzemba. (History of Sacerdotal Celibacy in the Christian Church, Londres, 1932, ebimeli ya minei, ezongelami, Henry C. Lea, lok. 6) A. Hislop, amonisi na buku na ye (Les Deux Babylones, Paris, 1972, lok. 332) ete, banda kala mpenza, basɛngaki banganga-nzambe minene ya Babilone bátikala minzemba.

1 Tim. 4:1-3, LNz: “Elimo [elobi] polele ’te o mikolo mya nsuka bato basusu bakotika koyamba mpe bakolanda bilimo bya lokuta mpe mateya ma bazabolo. . . . Bakopekisaka kobala.”

Kokabwana na mokili

Ntango Pápa Paul VI asalaki diskur na ye na ONU, na 1965, alobaki boye: “Bato ya mokili mobimba batye elikya na bango nyonso na ONU mpo yango ezali nde elikya ya nsuka mpo na boyokani mpe kimya; tomemeli bino na esika oyo, lokumu oyo bapesaka bino mpe elikya oyo batyelaka bino, oyo biso mpe tozali na yango.”​—The Pope’s Visit (New York, 1965), Time-Life Special Report, lok. 26.

Yoa. 15:19, LL: “[Yezu Kristu alobi:] Soki bozalaki bato ya mokili, mbele bato ya mokili balingaki bino. Kasi ngai naponi bino mpe nalongoli bino na kati na bango. Bozali bato ya mokili te, yango wana bakómi koyina bino.”

Yak. 4:4, JB: “Boyebi te ’te kokóma moninga ya mokili ekómisaka moto monguna ya Nzambe?”

Kosalela mandoki ya bitumba

E. I. Watkin, moto oyo ayekolaka makambo ya Lingomba ya Katolike akomaki boye: “Atako ezali mpasi kondima yango, tokoki kowangana te to kobosana te ete baepiskɔpɔ bapesaka mabɔkɔ na bitumba nyonso oyo baguvɛrnema ya bikólo na bango ebundaka. Nayoká ata mbala moko te ete baepiskɔpɔ ya ekólo bakweisá etumba to balobá ete ezali mabe . . . Ezala Baepiskɔpɔ yango balobi nini, na ntango ya etumba, ezalaka nde ete ‘mboka na ngai ezali na foti te.’”​—Morals and Missiles (Londres, 1959), ebimisami na Charles S. Thompson, nk. 57, 58.

Mat. 26:52, LNz: “Kasi Yezu alobi na ye: ‘Zongisá mompanga, mpo bato bakobimisa mompanga, bakokufa na mompanga.’”

1 Yoa. 3:10-12, LNz: “Talá boniboni bokoyeba soko bato bazali bana ba Nzambe to bana ba zabolo: bato banso . . . bakolingaka bandeko ba bango te, bauti na Nzambe te. . . . Tosengeli kolingana. Tózala lokola Kain te: Ye moto wa Monguna, abomaki ndeko wa ye.”

Na kotalela makambo nyonso oyo, baoyo bazali kotuta ntolo ete bazali bakitani ya bantoma, bazali mpenza koteya mpe kolanda ndakisa ya Kristo mpe ya bantoma na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto