Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 207-lok. 211
  • Kobotama lisusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobotama lisusu
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto alobi​—
  • Kobotama lisusu elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Likoló
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Kobotama lisusu—Yango nde nzela ya lobiko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nani akoki kobotama lisusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 207-lok. 211

Kobotama lisusu

Ndimbola: Kobotama lisusu elimboli kobatisama na mai (‘kobotama na mai’) mpe kobotama na elimo ya Nzambe, na ndenge yango moto akómi mpenza mwana ya Nzambe mpe azwi elikya ya koyangela na Bokonzi ya Nzambe. (Yoa. 3:3-5) Yesu abotamaki lisusu, ndenge moko mpe bato 144 000 oyo bazali bazwi-ya-libula ya Bokonzi ya likoló.

Mpo na nini bakristo mosusu basengeli ‘kobotama lisusu’?

Nzambe akanaki ete mwa ndambo ya bato ya sembo báyangela elongo na Yesu Kristo na Bokonzi ya likoló

Luka 12:32: “Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.”

Em. 14:1-3: “Namonaki, mpe talá! Mwana-Mpate [Yesu Kristo] atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona, mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000) . . . oyo basombamaki na mabele.” (Talá nkasa 274, 275, na motó ya likambo “Likoló.”)

Bato bakoki kokende na likoló na nzoto ya mosuni mpe makila te

1 Ko. 15:50: “Bandeko, nazali koloba likambo oyo, ete mosuni ná makila ekoki kozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te, kopɔla mpe ekoki te kozwa libula ya kozanga kopɔla.”

Yoa. 3:6: “Oyo ebotami na mosuni ezali mosuni, mpe oyo ebotami na elimo ezali elimo.”

Kaka bato oyo ‘babotamá lisusu,’ elingi koloba baoyo bakómi bana ya Nzambe, nde bakoki koyangela na Bokonzi ya likoló

Yoa. 1:12, 13: “Baoyo nyonso bayambaki ye [Yesu Kristo], apesaki bango lotomo ya kokóma bana ya Nzambe, mpo bazalaki kondimela nkombo na ye; mpe babotamaki, na makila te to na mokano ya bato ya mosuni te to na mokano ya mobali moko boye mpe te, kasi na Nzambe.” (Maloba “baoyo nyonso bayambaki ye” elimboli te bato nyonso oyo bandimelaki Kristo. Ndenge vɛrsɛ 11 emonisi yango, ezali kolobela nde [“bato na ye moko,” Bayuda]. Bato mosusu, oyo bazali Bayuda te, bazwi mpe libaku ya kozala bana ya Nzambe, kasi bato yango bazali kaka “etonga moke.”)

Rom. 8:16, 17: “Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. Bongo soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula: ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula elongo na Kristo, soki tomoni mpasi elongo na ye mpo tózwa mpe nkembo elongo na ye.”

1 Pe. 1:3, 4: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama, mpo na motema mawa na ye monene abotaki biso lisusu mpo na elikya ya bomoi na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo uta na bakufi, mpo na libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te. Ebombami mpo na bino na likoló.”

Bakosala nini kuna na likoló?

Em. 20:6: “Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000) yango.”

1 Ko. 6:2: “Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili?”

Moto oyo “abotami lisusu” te akoki kobika?

Em. 7:9, 10, 17: “Nsima ya makambo wana [makambo ntoma Yoane ayokaki liboso, elingi koloba, motángo ya baoyo basengelaki ‘kobotama lisusu,’ baoyo bakozala Yisraele ya elimo mpe bakozala elongo na Kristo na likoló; talá mpe Baroma 2:28, 29 mpe Bagalatia 3:26-29] namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ; mpe basimbi mandalala na mabɔkɔ. Mpe bazali kokoba koganga na mongongo makasi ete: ‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.’ . . . ‘Mwana-Mpate [Yesu Kristo], oyo azali na katikati ya kiti ya bokonzi, akokamba bango, mpe akomema bango na maziba ya mai ya bomoi.’”

Nsima ya kolobela bato ya kondima oyo bazalaki na bomoi liboso ya Yesu, Baebre 11:39, 40 elobi: “Bango nyonso, atako litatoli epesamaki mpo na bango mpo na kondima na bango, bazwaki te eloko oyo elakamaki, mpo Nzambe azalaki komonela biso na mosika eloko moko ya malamu koleka, mpo bango bákóma bato ya kokoka te soki biso te.” (Liloba “biso” ezali kotalela banani? Baebre 3:1 emonisi ete ezali ‘baoyo babengami mpo na kokende na likoló.’ Na yango, bato ya kondima oyo bazalaki na bomoi liboso Kristo aya awa na mabele bazalaki na elikya ya kozala na bomoi ya kokoka awa na mabele kasi na likoló te.)

Nz. 37:29: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”

Em. 21:3, 4: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

Moto akoki kozwa elimo ya Nzambe, nzokande “abotami lisusu” te?

Mpo na Yoane Mobatisi, anzelu ya Yehova alobaki boye: “Akotonda na elimo santu banda na libumu ya mama na ye.” (Luka 1:15) Mpe na nsima Yesu alobaki ete: “Na bato nyonso oyo basi babotá, moko oyo aleki Yoane Mobatisi abimá te; kasi moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló aleki ye [Mpo na nini? Mpo ete Yoane asengelaki kokende na likoló te mpe na yango ezalaki na ntina te ete ‘abotama lisusu’]. Kasi banda na mikolo ya Yoane Mobatisi tii sikoyo [ntango Yesu alobaki likambo yango] bokonzi ya likoló ezali eloko oyo bato mingi bazali kolanda na molende, mpe baoyo bazali kolanda yango na molende bazali kozwa yango.”​—Mat. 11:11, 12.

Elimo ya Yehova ezalaki “kosala” kati na Davidi mpe ‘koloba’ na nzela na ye (1 Sa. 16:13; 2 Sa. 23:2), kasi esika moko te Biblia elobi ete Davidi ‘abotamaki lisusu.’ Ezalaki na ntina te ete ‘abotama lisusu,’ mpo Biblia elobi na Misala 2:34 ete: “Davidi amataki na likoló te.”

Lelo oyo, ndenge nini bayebaka bato oyo bazali na elimo ya Nzambe?

Talá nkasa 179, 180, na motó ya likambo “Elimo.”

Soki moto alobi​—

‘Ngai nasilá kobotama lisusu’

Okoki koloba: ‘Elingi koloba ete ozali na elikya ete mokolo mosusu okozala na Kristo na likoló? . . . Osilá komituna nini baoyo bakokende likoló bakosala kuna?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe, bakoyangela elongo na Kristo. (Em. 20:6; 5:9, 10) Yesu alobaki ete bato yango bakozala kaka “etonga moke.” (Luka 12:32)’ (2) ‘Lokola bakozala bakonzi, basengeli kozala na bato oyo bakoyangela. Bato yango banani? . . . Talá mwa makanisi oyo esepelisaki ngai mingi ntango balakisaki ngai yango. (Nz. 37:11, 29; Mas. 2:21, 22)’

‘Osilá kobotama lisusu?’

Okoki koyanola: ‘Namoni ete makanisi ya bato ezalaka ndenge moko te na likambo ya “kobotama lisusu.” Okoki koyebisa ngai soki kobotama lisusu elimboli nini mpo na yo?’

To okoki koloba: ‘Olingi koyeba soki nandimá ete Yesu azali Mobikisi na ngai mpe soki nazwá elimo santu? Nalingi oyeba ete ezali mpenza bongo; soki bongo te, nakokaki te kosolola na yo na ntina etali Yesu.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Kasi ntango nakanisaka likambo ya kozwa elimo santu, nayokaka mawa komona ete bato mingi oyo batutaka ntolo ete bazali bakristo bazali ata na elembo moko te oyo emonisaka ete bazali na elimo santu. (Gal. 5:22, 23)’ (2) ‘Okosepela kozala na bomoi awa na mabele ntango moto nyonso akomonisa na bomoi na ye bizaleli wana ya Nzambe? (Nz. 37:10, 11)’

Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Soki mpo na yo kobotama lisusu elimboli “kondima ete Kristo azali Mobikisi na ngai,” nandimi yango. Batatoli ya Yehova nyonso bandimaka bongo. Kasi mpo na biso, kobotama lisusu esuki kaka wana te.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Ntango Yesu alobelaki kobotama lisusu, alobaki ete yango ezali na ntina mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, elingi koloba koyangela na Bokonzi ya Nzambe, to na guvɛrnema na ye ya likoló. (Yoa. 3:5)’ (2) ‘Biblia emonisi mpe ete bato mingi oyo basalaka mokano ya Nzambe bakofanda awa na mabele mpe bakozala bato ya esengo oyo Bokonzi yango ekoyangela. (Mat. 6:10; Nz. 37:29)’

Makanisi mosusu: Moto oyo azali na elikya ya kokende na likoló akoki koyanola ete: ‘Ɛɛ, nabotamá lisusu. Kasi Biblia ekebisi biso nyonso ete tómityela motema koleka ndelo te mpo na elikya na biso. Tosengeli ntango nyonso komitalela mpo na komindimisa ete tozali mpenza kosala oyo Nzambe mpe Kristo bazali kosɛnga biso. (1 Ko. 10:12)’ Okoki kobakisa: ‘Mokumba nini Yesu apesaki bayekoli na ye ya solo? (Mat. 28:19, 20; 1 Ko. 9:16)’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto