Drɔgɛ
Ndimbola: Liloba “drɔgɛ” ezali na bandimbola ebele. Na lisolo oyo tokolobela drɔgɛ oyo ezali bilei te, kasi bilangwiseli nyonso oyo esalaka ete moto amiyoka ndenge mosusu mpe oyo monganga apesi ye te to akomeli ye te, oyo soki moto asaleli yango, akoki kobosana mikakatano ya bomoi, koyoka mwa loyenge to kolongola susi.
Biblia epekisi mpenza kosalela drɔgɛ mpo na komisepelisa?
Biblia etángi te nkombo ya drɔgɛ lokola héroïne, cocaïne, LSD, PCP (tumbako ya zolo), bangi (marijuana), to likaya. Kasi epesi biso malako oyo tosengeli na yango mpo na koyeba nini tosengeli kosala mpe nini tosengeli kosala te mpo na kosepelisa Nzambe. Ndenge moko mpe, Biblia epekisi koboma moto, kasi elobi te ete ezali mabe koboma moto na mondoki.
Luka 10:25-27: “‘Nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?’ . . . ‘“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso,” mpe, “mozalani na yo lokola yo moko.”’” (Tokoloba mpenza ete moto alingi Nzambe na molimo na ye mobimba, na makanisi na ye nyonso soki azali kosalela biloko oyo ezali koyeisa bomoi na ye mokuse mpamba mpe ezali kobebisa makanisi na ye? Alingi mpenza mozalani na ye soki azali koyiba mpo na kosomba drɔgɛ?)
2 Ko. 7:1: “Lokola tozali na bilaka wana [ete Yehova akozala Nzambe na biso mpe Tata na biso], bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (Kasi Nzambe akondima mpenza biso soki tozali kobebisa nzoto na biso na nko?)
Tito 2:11, 12: “Boboto monene ya Nzambe oyo ezali kobikisa bato ya ndenge nyonso emonani polele, elakisi biso tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu [“na bokebi,” LNz; ‘tómibatela,’ LL] mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo.” (Moto oyo azali kosalela drɔgɛ oyo ezali kobebisa makanisi na ye mpe ezali kosala ete azanga komipekisa, azali mpenza kotosa toli yango?)
Gal. 5:19-21: “Nzokande misala ya nzoto ezali komonana polele, mpe ezali . . . misala ya bilimo mabe, . . . bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana. . . . Baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Liloba ya Grɛki pharmakia, oyo ebongolami awa na “misala ya bilimo mabe,” elimboli “kosalela drɔgɛ.” Buku [An Expository Dictionary of New Testament Words] ya W. E. Vine, oyo elobeli liloba yango ya Grɛki emonisi ete: “Na makambo ya bonganga-nkisi, kosalela drɔgɛ, ezala ya pɛtɛɛ to ya makasi, etambolaka mingimingi nzela moko na kobelela bilimo mabe, kobenga nguya ya bilimo mabe na bikelakela, kosalela bankisi ndenge na ndenge mpe bongo na bongo, oyo bakanisaka ete ebatelaka moto ya maladi mpo bademo básala ye mabe te kasi kosala bongo ezali mpenzampenza nde mpo na kondimisa ete nganga-nkisi azali na nguya oyo euti na bilimo.” [Londres, 1940, Vol. IV, nk. 51, 52] Ndenge moko mpe lelo oyo, ebele ya bato oyo basalelaka drɔgɛ bakɔtaka na misala ya bilimo mabe to basukaka na kosangana na bato ya misala yango mpo moto oyo abebisi makanisi na ye to akómi komona bimonamona azwamaka noki na bilimo mabe. Talá Luka 11:24-26.)
Tito 3:1: “Bámikitisa mpe bátosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli.” (Na bamboka mingi, kozala na drɔgɛ mosusu to kosalela yango ezali kobuka mibeko.)
Lokola drɔgɛ mosusu ekoki kosalisa moto amiyoka malamu, yango ekoki mpenza kosala mabe?
2 Tim. 3:1-5: ‘Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato . . . bakolinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe . . . Kimá bato wana.’ (Biblia ezali kokebisa biso polele ete kolinga bisengo koleka ekoki kopekisa biso tósalela mitinda ya Liloba ya Nzambe mpe yango ekoki kosala ete Nzambe aboya biso.)
Bankisi mosusu oyo epesaka mpɔngi (NARCOTIQUES) ekoki kosilisa mpasi mpe koyokisa mwa esengo, kasi ekómisaka moto moombo mpe ekoki koboma soki moto alekisi ndelo. Drɔgɛ mosusu oyo bato babendaka na zolo [SOLVANTS] ekoki kopesa mwa loyenge, kasi ekómisaka moto bilobaloba, ebebisaka miso, esilisaka moto makasi, ekoki mpe kobebisa bɔɔngɔ ya moto, mabale mpe bangei na ye. Bankisi oyo esalaka ete moto amona bimonamona (HALLUCINOGÈNES) epesaka moto loyenge “makasi” mpe emonanaka ete elongolaka kolɛmba, kasi esalaka mpe ete moto amona lisusu malamu te, etyaka mobulu na makanisi, ekoki kobebisa mpenza bizaleli ya moto mpe kotinda moto amiboma to aboma moto.
Bongo bangi—ekoki mpe kosala mabe? Minganga mosusu balobaka ete ekoki kosala eloko te
Monganga David Powelson, oyo azalaká kokamba minganga oyo basalisaka maladi ya motó na lopitalo ya Cowell, na Iniversite ya Californie, na Berkeley, na États-Unis, asɛngaki na ntango moko boye ete Leta atika bato bámɛlaka bangi. Kasi na nsima, ntango azwaki bilembeteli mingi, akomaki ete: “Sikoyo nandimi ete bangi ezali drɔgɛ ya mabe mpenza oyo tosengeli kobundisa. 1. Na ebandeli, ekosaka. Moto oyo azali komɛla yango akomiyoka malamu; kasi akoyeba te ete azali nde kobebisa nzoto mpe makanisi na ye. 2. Soki moto azali kokoba na yango, ekotya mobulu na makanisi na ye. Soki amɛli yango mbula moko, mibale to misato, mokemoke makanisi ya mabe nde ekobanda kotambwisa bomoi na ye.”—Executive Health Report, Ɔkɔtɔbɛ 1977, lok. 8.
Robert L. DuPont, monganga oyo azalaká mokonzi ya lopitalo moko (National Institute on Drug Abuse) na États-Unis, oyo kala amonaki ete bangi ezali mpenza na likama te, auti koloba ete: “Likambo yango [komɛla bangi oyo ezali komonana mingi epai ya bilenge] ezali kobebisa nzoto mpe ezali kobimisa makama ya ndenge mibale. Ya liboso, makama oyo eutaka na molangwa, oyo etindaka moto atambwisa motuka na mobulu mpe abanga lisusu eloko moko te. Ya mibale, ebimiselaka moto bamaladi ndenge na ndenge. Bamɛli-bangi mingi babɛlaka maladi ya mpema oyo eumelaka mingi; komɛla bangi ekoki kobebisa baɔrmɔne mpe yango ekoki kosala ete nzoto ekoka lisusu te kobundisa bamaladi, mpe moto akoki ata kobɛla kanser.”—Gazette ya Montréal, 22 Marsi 1979, lok. 9.
Zulunalo moko (Science Digest) elobi boye: “Soki moto azali komɛla bangi mingi, nsukansuka ekokabola misisa ya bɔɔngɔ oyo esalaka ete moto abosana makambo te, ayoka nkanda to esengo, to azala na ezaleli moko boye. Mpo misisa ya bɔɔngɔ esala mosala na yango malamu, esengeli kokutana.” Mpo na bolukiluki oyo basalaki nsima ya komɛlisa nyama bangi, zulunalo yango ebakisi: “Misisa ya bɔɔngɔ oyo ebimisaka esengo to mawa; esika oyo mayele efandi na bɔɔngɔ; mpe esika oyo, na bɔɔngɔ, esalaka ete ‘moto’ azala na ezaleli moko boye nde ebebaki makasi.”—Marsi 1981, lok. 104.
Komɛla bangi ezali mabe koleka komɛla masanga?
Masanga ezali bilei mpe nzoto ebongolaka yango makasi oyo nzoto esalelaka; nzoto ebimisaka mpe bosɔtɔ oyo euti na masanga. Kasi, monganga moko oyo atalelaka bankisi oyo esalisaka maladi ya motó alobaki ete: “Bangi ezali drɔgɛ ya makasi mpenza, mpe libunga monene oyo tosalaka ezali ya kokokanisa yango na masanga.” “THC [eloko oyo ezalaka na bangi, oyo elangwisaka] elangwisaka mbala 10 000 koleka masanga . . . Yango ebimaka na nzoto malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe ezwaka basanza ebele liboso ete molangwa na yango esila.” (Executive Health Report, Ɔkɔtɔbɛ 1977, lok. 3) Mozalisi ayebi ndenge nzoto na biso esalemá, mpe Liloba na ye epekisi te komɛla masanga na bokatikati. (Nz. 104:15; 1 Tim. 5:23) Kasi apekisi makasi ezaleli ya kolekisa ndelo na komɛla masanga, kaka ndenge apekisi ezaleli ya kolya na lokoso.—Mas. 23:20, 21; 1 Ko. 6:9, 10.
Mpo na nini Batatoli ya Yehova bamonaka ete komɛla likaya ezali mabe mpenza?
Yango emonisaka ete moto azali komemya likabo ya bomoi te
Mis. 17:24, 25: “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.”
“Bilembeteli oyo emonisi ete likaya eyeisaka bomoi mokuse ezali ebele mpenza; minganga mingi mpe bandimaka ete komɛla likaya epesaka bamaladi.”—Science 80, Sɛtɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ, lok. 42.
Lapolo ya OMS elobi ete: “Mbula na mbula bato milio 4 bakufaka na maladi oyo euti na komɛla likaya, nsima ya segɔnde 8 nyonso, moto moko akufaka.” Lapolo yango ebakisi ete: “Banda 1950 tii 2000, likaya ekoboma bato koleka milio 60 kaka na mikili ya bozwi, motángo yango eleki motángo ya bato oyo bakufaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.”—World Health Organization, Fact Sheet No. 221, Aprili 1999.
Joseph Califano, ministre ya kala (Secrétaire américain à la Santé, à l’Education et à la Qualité de la vie) alobaki: “Lelo oyo, ntembe ezali te ete moto oyo amɛlaka likaya azali komiboma mokemoke.”—Scholastic Science World, 20 Marsi 1980, lok. 13.
Yango eyokani te na makambo oyo Nzambe asɛngi bakristo
Rom. 12:1: “Bandeko, nabondeli bino na mawa ya Nzambe ete bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima: mosala mosantu oyo bozali kosala na makoki na bino ya kokanisa.”
Everett Koop, monganga oyo akambaka minganga oyo basalaka lipaso na États-Unis alobaki: “Emonani polele ete komɛla likaya nde ezali koboma bato mingi lelo oyo, kasi bato bakoki kokima likama yango oyo ekoki kopɛngolama.” (The New York Times, 23 Febwali 1982, lok. A1) “Baankɛtɛ ya minganga emonisi ete . . . moto oyo amɛlaka likaya akufaka mbula misato to minei liboso ya moto oyo amɛlaka yango te. Moto oyo amɛlaka likaya mingi—oyo amɛlaka pakɛ mibale to koleka na mokolo—akoki kokufa mbula mwambe liboso ya moto oyo amɛlaka likaya te.” (The World Book Encyclopedia, 1984, Vol. 17, lok. 430) Ezali malamu moto akabela Nzambe bomoi na ye mpo na kosalela ye mpe na nsima abebisa yango mokemoke?
“Komɛla likaya ebebisaka mingimingi motema ná mimpululu; yango wana, bankisi mosusu oyo ebatelaka moto mpo azwa maladi te esalaka te soki moto amɛlaka likaya.” (University of Southern California News Service, 18 Febwali 1982) “Na ntembe te, komɛla likaya nde ezali kopesa bato mingi maladi, kasi bato bakoki kopɛngola yango.” (Dr. H. Mahler, directeur-général ya OMS, na World Health, Febwali/Marsi 1980, lok. 3) Ezali mpenza malamu ete moto amipesa na Nzambe mpo na kosalela ye mosala mosantu mpe na nsima abebisa nzoto na ye na nko?
Komɛla likaya ezali kobuka mobeko ya Nzambe oyo esɛngi tólingaka bazalani na biso
Yak. 2:8: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”—Talá Matai 7:12.
“Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema . . . emonisaki ete basi oyo mibali na bango bamɛlaka likaya bakufaka mbula minei liboso ya basi oyo mibali na bango bamɛlaka likaya te.” (The New York Times, 22 Novɛmbɛ 1978, lok. C5) “Soki mwasi ya zemi azali komɛla likaya, mwana akoki kozwa mbeba ya makasi mpenza oyo ekoki koboma ye na libumu to mwa moke nsima ya kobotama.” (Family Health, Mai 1979, lok. 8) Moto oyo azali kosalela bato ya libota na ye makambo ya ndenge wana, azangi bolingo mpe azali komonisa ete azali mokristo te.—Talá 1 Timote 5:8.
“Baankɛtɛ mosusu emonisi ete moto oyo amɛlaka likaya mingi te abendaka milinga na yango, apemaka mwa moke, abendaka lisusu, mpe bongo na bongo; na yango moto oyo amɛlaka likaya te kasi afandi pene na ye azali komɛla nicotine mpe pwazɔ mosusu oyo eutaka na likaya ndenge moko na moto yango oyo azali komɛla likaya.” (Today’s Health, Aprili 1972, lok. 39) Moto ya ndenge wana, oyo alingi mozalani na ye te, azali komonisa ete alingaka mpe Nzambe te.—Talá 1 Yoane 4:20.
Soki ezali mabe kosalela drɔgɛ, bongo mpo na nini Nzambe asalá banzete oyo ebimisaka yango?
Mbala mingi, biloko oyo bato basalelaka na ndenge ya mabe ezalaka mpe na ntina na yango. Bato basalelaka na ndenge ya mabe binama ya nzoto. Ezali mpe bongo mpo na vinyo. Bangi ezali nkasa ya kokauka ya milona oyo ebimisaka bansinga oyo basalaka na yango bilamba. Nkasa ya tumbako, oyo bamɛli-likaya basalelaka mabe, ekoki mpe kobimisa bankisi oyo ebomaka mikrobe mpe nyama-nkɛkɛ. Ezali na biloko mingi awa na mabele oyo tosengeli naino koyekola mpo na koyeba ndenge ya kosalela yango malamu. Ata matiti mabe ekoki kopekisa ete mai emema mabele mpe kosala ete mabele ebota malamu.
Moto akoki kosala nini soki ameki kotika komɛla likaya to kosalela drɔgɛ kasi azali kolonga te?
Ya liboso, koyekola Biblia mpe komanyola yango ekoki kosalisa moto akóma na mposa makasi ya kosepelisa Nzambe mpe ya kozala na kati ya mokili na ye ya sika mpe ya sembo. Soki opusani penepene na Nzambe, ye mpe akopusana penepene na yo mpe akosalisa yo.—Yak. 4:8.
Esengeli kondima mpenza ete komɛla likaya to kosalela drɔgɛ ezali mpenza mabe mpe esengeli koyina yango. (Nz. 97:10) Moto akoki kosala bongo soki azali kozongela makambo oyo ezali na lisolo oyo mpe soki azali kokanisa te esengo ya ntango mokuse oyo moto ayokaka na biloko yango; kasi asengeli nde kokanisa makambo oyo esepelisaka Nzambe mpe mabe oyo komɛla likaya ebimisaka.
Soki oyoki mpenza mposa ya komɛla likaya to ya kosalela drɔgɛ, bondelá Nzambe makasi mpo asalisa yo. (Luka 11:9, 13; talá Bafilipi 4:13.) Bondelá ye mbala moko ntango mposa yango eyeli yo; zwá mpe Biblia na yo mpe tángá yango na mongongo makasi, to sololá na ndeko oyo akɔmɛli na elimo, yebisá ye ndenge ozali komiyoka mpe sɛngá ye lisalisi.