Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 203-lok. 207
  • Guvɛrnema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Guvɛrnema
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Etikali moke Bokonzi ya Nzambe esikola biso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mokili
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 203-lok. 207

Guvɛrnema

Ndimbola: Ebongiseli ya kosala mibeko mpe kotosisa yango. Mbala mingi, bakesenisaka baguvɛrnema na kotalela bato oyo basali yango mpe bonene ya bokonzi na yango. Yehova Nzambe azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, apesaka basusu bokonzi ndenge alingi mpe na kolanda mokano na ye. Nzokande, Satana Zabolo, moto ya liboso oyo atombokelaki boyangeli ya Yehova, azali “mokonzi ya mokili”​—Nzambe atiki ye bongo mpo na mwa ntango. Biblia ekokanisi ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba na nyama mabe mpe elobi ete “dragɔ [Satana Zabolo] epesaki nyama yango nguya na yango mpe kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.”​—Yoa. 14:30; Em. 13:2; 1 Yoa. 5:19.

Bato bakoki mpenza kosala guvɛrnema moko oyo ekomemela bango bolamu ya libela?

Makambo oyo bato basalá emonisi nini?

Mos. 8:9: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Yango ezali solo atako baguvɛrnema mpe bakonzi mosusu babandaka koyangela na makanisi malamu.)

“Bibongiseli nyonso oyo bato basalá esukaki kaka na kokwea. Istware etondi na makambo oyo emonisi ete milende ya bato elongi te, bilikya na bango ekokisami te. . . . Yango wana, moto nyonso oyo ayekolaka makambo ya kala ayebaka ete nsukansuka likama ekoya kaka.”​—Henry Kissinger, profesɛrɛ ya siansi ya politiki mpe ya guvɛrnema, ndenge ekomami na zulunalo The New York Times, 13 Ɔkɔtɔbɛ 1974, lok. 30B.

Eloko nini esalaka ete milende ya baguvɛrnema elonga te?

Yir. 10:23: “Ee Yehova, nayebi malamu ete nzela ya moto ya mabele ezali ya ye te. Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Nzambe apesaki bato nzela te ya komitambwisa bango moko kozanga kotalela ye.)

Eba. 8:21: “Mposa ya motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye.” (Ezala bakonzi to bato oyo bango bazali koyangela, bango nyonso babotamá na lisumu, na makanisi ya mabe.)

2 Tim. 3:1-4: “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . balingaka kosala boyokani te, . . . bavimbi na lolendo.” (Ezali na ekólo moko te oyo ekoki kosilisa mpo na libela mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango; mpo yango esalema, bikólo ya mokili mobimba esengeli koyokana makasi mpenza. Kasi lokola balukaka matomba ya bango moko, yango ezali kopekisa boyokani ya ndenge wana mpe ezali kosala ete boyokani ya ndenge wana ezala te na kati ya bibongiseli ndenge na ndenge ya ekólo moko.)

Biblia emonisi mpe ete nguya moko boye, oyo eleki oyo ya bato, ezali kotambwisa makambo awa na mabele. “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) “Tozali kobunda etumba ná makila mpe mosuni te, kasi ná . . . bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” (Ef. 6:12) “Maloba oyo euti na bademo . . . ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”​—Em. 16:14.

Ndenge nini bato bakoki kolongwa libela na boyangeli ya bakonzi mabe oyo bazali konyokola bato?

Kotya bakonzi mosusu nde ekobongisa makambo?

Ezali solo ete epai maponami esalemaka malamu, mbala mingi bakonzi babungisaka bokonzi na bango kaka nsima ya mwa bambula mpo baponaka bango lisusu te, boye te? Mpo na nini? Mpo basilisaka mikakatano ya bato te.

Nz. 146:3, 4: “Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te. Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Na yango, bibongiseli nyonso oyo bakonzi bazwaka mpo na kobongisa makambo ekweaka noki na mabɔkɔ ya bakonzi mosusu, mpe mbala mingi basundolaka yango.)

Ezala mokonzi yango azali nani, azali kaka na mokili oyo ezali kolala na nguya ya Satana.​—1 Yoa. 5:19.

Kotomboka nde ekobongisa makambo?

Ata soki balongoli bakonzi mabe ná mibeko na bango, guvɛrnema ya sika ekozala kaka na bakonzi ya kozanga kokoka, bango mpe bakozala kaka bato ya ebongiseli ya politiki oyo Biblia emonisi polele ete etambwisami na Satana.

Mat. 26:52: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” (Yesu alobaki yango na moko ya bantoma na ye ntango bakonzi basalelaki bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpo na kokanga Mwana ya Nzambe. Ezali nde na likambo ya ntina koleka oyo wana, oyo bato bakoki kobundela?)

Mas. 24:21, 22: “Mwana na ngai, bangá Yehova mpe mokonzi. Komikɔtisa te kati na bato oyo bazali kolinga mbongwana. Mpo likama na bango ekobima pwasa na ndenge oyo ete nani mpenza ayebi ndenge bato oyo bazali kolinga mbongwana bakosila?”

Bongo, nini ekosilisa mabe ná minyoko?

Dan. 2:44: “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko [guvɛrnema moko] oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

Nz. 72:12-14: “[Yesu Kristo, mokonzi oyo Yehova aponi] akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu, mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.” (Ntango Yesu azalaki na mabele azalaki komibanzabanza mpo na bato ya ndenge wana, abikisaki bango, aleisaki ebele ya bato, kutu andimaki kokufela bango. Nyonso wana emonisaki ete azali mpenza mokonzi oyo esakweli yango elobelaki.)

Talá nkasa 117-122, na motó ya likambo “Bokonzi.”

Mpo na nini tosengeli mpenza kotalela oyo Biblia elobi mpo na oyo ekokómela baguvɛrnema?

Baguvɛrnema ezali kosalela bato makambo oyo basengeli mpenza na yango te

Talá makambo oyo bato basengeli na yango na mokili mobimba, oyo baguvɛrnema ezali kosalela bango te, kasi oyo Nzambe alaki: (1) Bitumba ekozala te.​—Yis. 2:4; Nz. 46:9, 10. (2) Moto nyonso akozala na biloko ya kolya mingi.​—Nz. 72:16. (3) Moto nyonso akozala na ndako ya malamu.​—Yis. 65:21. (4) Moto nyonso akozala na mosala ya malamu oyo asengeli na yango, mpo akokisa bamposa na ye mpe ya libota na ye.​—Yis. 65:22. (5) Maladi nyonso ekosila.​—Em. 21:3, 4. (6) Bosembo; bato bakoyinana lisusu te mpo na makambo ya lingomba, ya mposo, ya nkita, mpe ya bikólo.​—Yis. 9:7; 11:3-5. (7) Kimya ekozala, bato ya mobulu bakotya bomoi mpe biloko na biso na likama te.​—Mika 4:4; Mas. 2:22. (8) Mokili ekozala kaka na bato oyo bazali na bolingo, na boboto, oyo bakipaka baninga, mpe balobaka kaka solo.​—Nz. 85:10, 11; Gal. 5:22, 23.

Banda kala mpenza, bakonzi ya politiki balakaka bato na bango ete bakobongisa bomoi na bango. Kasi tosuki wapi? Atako na bikólo mingi bato bazali na bozwi, kasi bazali na esengo te, mpe bazali kokutana na mikakatano mingi koleka liboso.

Esengeli mpenza kotyela bisakweli ya Biblia motema

Mbula 100 liboso, Liloba ya Nzambe esakolaki ete Babilone ekokóma bokonzi oyo eleki nguya na mokili mobimba, mpe ndenge bokonzi yango ekosuka, mpe ntango bokonzi yango ekobebisama, bato bakofanda lisusu na mboka-mokonzi na yango ata moke te. (Yis. 13:17-22) Pene na mbula 200 liboso kutu Siruse abotama, Biblia esakolaki nkombo na ye mpe makambo oyo akosala na mokili. (Yis. 44:28; 45:1, 2) Liboso Bamede ná Baperse bákóma bokonzi oyo eleki nguya na mokili mobimba, Biblia esakolaki yango; esakolaki ndenge bokonzi yango ekobima, ndenge bakosangana, mpe ndenge bakosuka. Mbula koleka 200 liboso Grɛsi ekóma boyangeli oyo eleki nguya na mokili mobimba, Biblia eyebisaki mokonzi ya liboso oyo akotambwisa yango, mpe ndenge, na nsuka, bokonzi yango ekokabwana na biteni minei.​—Dan. 8:1-8, 20-22.

Biblia esakolaki makambo nyonso oyo ezali kosalema na mikolo na biso, mpe eyebisi biso ete Nzambe akoboma baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe ete akopesa Mwana na ye Yesu Kristo Bokonzi mpo ayangela mokili mobimba.​—Dan. 2:44; 7:13, 14.

Moto oyo azali koyokela Biblia, mokanda oyo ekosaka te, akomonisa ete azali na bwanya, boye te?

Kaka guvɛrnema ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato

Mpo moto asilisa mikakatano ya bato, asengeli kozala na nguya, na makoki, mpe na bizaleli oyo moto ata moko te azali na yango. Nzambe nde moto azali na nguya ya kolongola bato na mabɔkɔ ya Satana ná bademo na ye, mpe alaki ete akosala bongo, kasi moto akoki kosala yango te. Nzambe azwi bibongiseli ya kosala makambo oyo minganga bakoki kosala te, elingi koloba, kolongola lisumu; yango ekosilisa maladi ná liwa, mpe ekosala ete bato bázala ndenge balingi mpenza kozala. Mozalisi ayebi malamu mabele mpe makambo nyonso ya bomoi oyo esengeli mpo na kosilisa mikakatano ya kozanga bilei, kobebisa mokili, kasi milende ya moto mpo na kosilisa mikakatano yango, ebotaka nde mikakatano mosusu. Liloba ya Nzambe ezali kobongola bomoi ya bato oyo bazali kondima etambwisa bango; bato yango bazali kokóma bato ya boboto, ya bolingo oyo bazali na bizaleli malamu mpenza, baoyo baboyaka kosimba mandoki mpo na koboma bato mosusu, bazali kofanda na kimya mpe na bondeko, atako bauti na bikólo ndenge na ndenge, bakeseni mposo mpe balobaka monɔkɔ moko te.

Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekolongola mokili oyo mabe? Talá mitó ya makambo “Badati” mpe “Mikolo ya nsuka.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto