Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 382-lok. 387
  • Mitindo ya mposo ya bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mitindo ya mposo ya bato
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Ntango bato na mposo ndenge nyonso bakofanda esika moko kati na kimya
    Lamuká!—1993
  • Adama ná Eva
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nani azalaki mwasi ya Kaina?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 382-lok. 387

Mitindo ya mposo ya bato

Ndimbola: Mitindo ya mposo oyo tozali kolobela awa etali etuluku ya bato oyo nzoto na bango ezali na lolenge moko boye oyo babotamaka na yango mpe oyo ekesenisaka bango na bato mosusu; na ndakisa ndenge oyo mindɛlɛ bakeseni na baindo to ndenge batwa bakeseni na babantu. Nzokande, lokola mibali ná basi oyo mitindo ya mposo na bango ekeseni bakoki kobalana mpe kobota bana, yango emonisi ete bango nyonso bazali kaka bato ya “motindo” moko, mpe bango nyonso bazali kaka na libota ya bato. Na yango, mitindo yango ndenge na ndenge ya mposo ya bato ezali kaka mwa bokeseni oyo ezalaka kati na bato.

Mitindo ya mposo ndenge na ndenge eutá wapi?

Eba. 5:1, 2; 1:28: “Na mokolo oyo Nzambe asalaki Adama, asalaki ye azala lokola Nzambe. Azalisaki bango mobali ná mwasi. Nsima na yango apambolaki bango mpe na mokolo oyo bazalisamaki, apesaki bango nkombo Moto [to, Bato].” “Nzambe apambolaki bango mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele.’” (Na yango, bato nyonso bauti na bato mibale wana ya liboso, Adama ná Eva.)

Mis. 17:26: “Na moto moko [Nzambe] asalaki bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele.” (Na yango, ezala bato bazali na mposo ya ndenge nini, bango nyonso bauti kaka na Adama.)

Eba. 9:18, 19: “Mpe bana ya Noa oyo babimaki na masuwa ezalaki Seme mpe Kame mpe Yafete. . . . Bango misato bazalaki bana ya Noa, mpe uta na bango nde bato nyonso ya mabele bapalanganaki epai na epai.” (Nsima ya Mpela ya ntango ya Noa, ntango Nzambe abomaki mokili, elingi koloba bato oyo bazalaki kotyola ye, bato nyonso oyo babotamaki na mokili, elingi koloba bato ya mposo ndenge na ndenge oyo bazali lelo, babotami na bana misato ya Noa ná basi na bango.)

Adama ná Eva bazalaki bato ya solo to bazalaki bato ya lisapo?

Biblia endimi te ete bazalaki bato ya lisapo; talá motó ya likambo “Adama ná Eva.”

Lokola libota ezalaki kaka moko, Kaina azwaki mwasi na ye wapi?

Eba. 3:20: “Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva, mpamba te asengelaki kokóma mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.” (Na yango, bato nyonso basengelaki kozala bana ya Adama ná Eva.)

Eba. 5:3, 4: “Adama akómaki na mbula nkama moko na ntuku misato (130). Bongo abotaki mwana mobali oyo akokani na ye, na elilingi na ye, mpe apesaki ye nkombo Sete. Mpe mikolo ya Adama nsima ya kobota Sete ezalaki mbula nkama mwambe (800). Na ntango yango abotaki bana mibali mpe bana basi.” (Kaina azalaki moko ya bana mibali ya Adama, mpe emonani ete Kaina abalaki moko ya bandeko na ye ya basi, mwana mosusu ya Adama. Na ntango wana, bato bazalaki na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi mingi mpenza, yango wana bazalaki mpe koumela mingi na bomoi, mpe ata soki moto abali ndeko na ye, ezalaki mpasi bana bábotama na mbeba. Kasi, mbula 2 500 na nsima, ntango nzoto ya moto ekómaki na mbeba ebele, Yehova apesaki Yisraele mibeko oyo epekisaki ete bato ya libota moko bábalana.)

Eba. 4:16, 17: “Kaina alongwaki liboso ya elongi ya Yehova mpe akendaki kofanda na ‘mokili ya moto oyo akimá’ [to, Node], na ɛsti ya Edene. Na nsima, Kaina asangisaki nzoto na mwasi na ye mpe azwaki zemi mpe abotaki Enoka.” (Simbá ete Biblia elobi te ete Kaina akutanaki na mwasi na ye na mokili epai akimaki, lokola nde mwasi yango autaki na libota mosusu. Kasi Biblia elobi ete na mboka yango, Kaina asangisaki nzoto na mwasi na ye mpe abotaki mwana mobali.)

Bokeseni oyo ezalaka na kati ya bato ya mposo ndenge na ndenge eutá wapi?

“Bato nyonso oyo bazali na bomoi lelo bazali kaka bato ya motindo moko, Homo sapiens, mpe bauti kaka na esika moko. . . . Bokeseni oyo ezalaka na kati ya bato eutaka nde na makambo oyo bato babotamaka na yango, oyo bazwá na baboti na bango, mpe na mbongwana oyo eyaka na kolanda esika moto afandi. Mbala mingi, mbongwana yango eutaka nde na makambo yango mibale. . . . Mbala mosusu, bokeseni oyo ezalaka na kati ya bato ya mposo moko ezalaka monene koleka bokeseni oyo ezalaka na kati ya bato oyo bakeseni mposo.”​—Lisangá ya bato ya siansi oyo UNESCO ayanganisaki mpe oyo bautaki na mboka ndenge na ndenge; maloba yango ekomami na mokanda Statement on Race (New York, 1972, ebimeli ya 3.), Ashley Montagu, nk. 149, 150.

“Na ebandeli ntango bato bapalanganaki na bituluku ndenge na ndenge, biloko oyo ezalaka na kati ya baselile (ba-gènes) oyo etuluku moko esangolaki ekesanaki na biloko ya etuluku mosusu oyo ezalaka na kati ya baselile, yango wana etuluku na etuluku ezalaki kobimisa bato ya lolenge na yango. Na mokuse, tokoki koloba ete na ndenge yango nde mokomoko na bakontina mitano ya mabele ekómaki na bato ya mposo ya ndenge mosusu. . . . Ya solo, biloko oyo ezalaka na kati ya baselile ya moto ebongwanaki na ntango yango ya bokabwani, mpe soki totali bato ya kala ya mposo ya lolenge moko boye oyo batikalá na kontina mokomoko, tokoki koyekola mpe koyeba ndenge mbongwana yango esalemaki. Emonanaka mbala mingi ete soki etuluku moko ya bato emikaboli na bato mosusu, bato ya etuluku yango bakesanaka makasi na bato mosusu. . . . Ntango bato oyo bakeseni mposo bakómaki komonana na bakontina, elingi koloba ntango oyo na mokili mobimba bato babandaki kofanda na bituluku ya bato na kolanda biloko oyo ezalaka na baselile (ba-gènes) na bango, bokeseni oyo tomonaka lelo na kati ya bato ya bikólo ndenge na ndenge ebandaki komonana. . . . Likambo ya kokamwa ezali ete atako emonanaka ete etuluku moko ya bato ekeseni na bituluku mosusu ya bato, kasi bato nyonso bazali kaka ndenge moko.” (Heredity and Human Life, New York, 1963, H. L. Carson, nk. 151, 154, 162, 163) (Na yango, na ebandeli ntango etuluku moko ya bato ekei kofanda yango moko mpe bakómi kobalana bango na bango, bizaleli mosusu ya bana na bango ekómaki kokesana na bizaleli ya bato ya etuluku mosusu.)

Biblia eteyaka ete baindo balakelamá mabe?

Likanisi wana euti nde na kozanga kokanga ntina ya maloba ya Ebandeli 9:25, esika Biblia elobi ete Noa alobaki boye: “Kanana alakelama mabe. Akóma mpenza nsuka ya baombo ya bandeko na ye.” Tángá vɛrsɛ yango malamu; elobeli mposo ya nzoto te. Emonani polele ete Kanana, mwana ya Kame, asalaki likambo moko ya nsɔni mingi, yango wana alakelamaki mabe. Kasi bana ya Kanana, ezalaki banani? Ezalaki baindo te; kasi ezalaki nde bato oyo mposo ya nzoto na bango ezalaki mwa mpɛmbɛ [to mwa motane]; bazalaki kofanda na ɛsti ya Mbu Mediterane. Lokola bato yango bamipesaki na misala ya nsɔni, na milulu ya kokumisa bademo, na losambo ya bikeko mpe bazalaki kopesa bana na bango mbeka, Nzambe apesaki bango etumbu mpe apesaki Yisraele mabele oyo Bakanana bafandaki. (Eba. 10:15-19) Kasi Bayisraele babomaki Bakanana nyonso te; basalisaki basusu misala ya makasi; na ndenge wana nde elakeli mabe ekokisamaki.​—Yos. 17:13.

Baindo bautaki na bakitani nini ya Noa? “Bana ya Kushi [mwana mobali mosusu ya Kame] ezalaki Seba, Havila, Sabeta, Raama ná Sabeteka.” (Eba. 10:6, 7) Na nsima, ntango Biblia ezali kotánga Kushi, mbala mingi ezali nde Etiopi. Na nsima, batángi mpe nkombo ya Seba mpo na kolobela bato ya mposo mosusu ya Afrika ya ɛsti oyo, na ntembe te, ezalaki pene na Etiopi.​—Yis. 43:3, Rbi8-F.

Bato nyonso bazali bana ya Nzambe?

Ntango moto abotami, lokola azali moto ya kokoka te azali na lotomo ya kobengama mwana ya Nzambe te. Kasi, biso nyonso touti na Adama oyo, na ntango akelamaki, azalaki moto ya kokoka mpe “mwana ya Nzambe.”​—Luka 3:38.

Mis. 10:34, 35: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”

Yoa. 3:16: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Moto nyonso asengeli kondimela Yesu soki alingi kozala na boyokani malamu na Nzambe, boyokani oyo Adama abungisaki. Libaku wana epesami na bato ya mposo ndenge na ndenge.)

1 Yoa. 3:10: “Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo asalaka makambo ya boyengebene te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali kolinga ndeko na ye te.” (Na yango, Nzambe amonaka bato nyonso te ete bazali bana na ye. Bato oyo basalaka na nko makambo oyo Nzambe aboyi, tata na bango nde Zabolo. Talá Yoane 8:44. Kasi bakristo ya solo bazalaka na bizaleli lokola oyo ya Nzambe. Na bakristo yango, Nzambe aponá mwa ndambo moke mpo bákende kozala bakonzi elongo na Yesu na likoló. Nzambe abengi bango “bana” na ye. Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá motó ya likambo “Kobotama lisusu.”)

Rom. 8:19-21: “Biloko oyo ezalisamá ezali kozela na mposa makasi komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe . . . Biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Mpasi ya bato ekosila ntango “bana ya Nzambe” ‘bakomonana,’ ntango bakozala na likoló, mpamba te na ntango yango Kristo akokamba bango mpo básala misala ya malamu mpenza mpo na bolamu ya bato. Ntango basembwi awa na mabele [na vɛrsɛ oyo, babengi bango “biloko oyo ezalisamá”] bakokóma bato ya kokoka mpe bakomonisa bosembo na bango epai ya Yehova Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, bango mpe bakokóma bana ya Nzambe mpe bakozala na boyokani ya malamu na ye. Bato ya bikólo ndenge na ndenge bakozwa libaku ya kokóma bana ya Nzambe.)

Mokolo mosusu bato ya mposo nyonso bakokóma mpenza bandeko oyo bazali na bomoko?

Yesu ayebisaki baoyo balingaki kokóma bayekoli na ye ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Mat. 23:8) Na nsima, abakisaki boye: “Na ndenge yango, bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoa. 13:35.

Atako bakristo ya liboso bazalaki bato ya kokoka te, bazalaki mpenza na bomoko ya ndenge wana. Ntoma Paulo akomaki boye: “Moyuda azali te, Mogrɛki mpe te, moombo azali te, moto ya bonsomi mpe te, mobali azali te, mwasi mpe te; mpo bozali bino nyonso moto kaka moko na bomoko na Kristo Yesu.”​—Gal. 3:28.

Bondeko wana ya bokristo, oyo etalaka mposo ya nzoto ya moto te, emonanaka epai ya Batatoli ya Yehova lelo. William Whalen, mokomi moko na zulunalo U.S. Catholic, alobaki: “Nandimi ete moko ya bizaleli ya [lisangá ya Batatoli ya Yehova] oyo esepelisaka mingi koleka ezali nde lolenge oyo, banda kala, bamonaka ete bato ya mposo nyonso bazali kaka ndenge moko.” Nsima ya koyekola Batatoli ya Yehova ya Afrika malamumalamu, Bryan Wilson, moto ya mayele na Iniversite ya Oxford, alobaki boye: “Mbala mosusu, Batatoli ya Yehova nde lingomba oyo elongi noki kolongola bokabwani ya mposo na kati ya bandimi na bango.” Ntango zulunalo moko (The New York Times Magazine) epesaki nsango ya liyangani ya bikólo mingi oyo Batatoli ya Yehova basalaki mpe oyo esangisaki bato ya mikili 123, elobaki boye: “Batatoli bakamwisaki bato ya New York kaka mpo na ndenge bazali ebele te, kasi mpe mpo bazali bato ya ndenge na ndenge (okokuta epai na bango bato oyo basalaka misala ya ndenge nyonso); bakamwisaki mpe na ndenge bakipaka mposo ya moto te (Batatoli mingi bazali baindo), bazalaka na kimya bango na bango mpe basalaka makambo na molɔngɔ.”

Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo mabe nyonso ya ntango oyo, bakisa mpe bato nyonso oyo balingaka mpenza Yehova Nzambe te mpe bato mosusu te. (Dan. 2:44; Luka 10:25-28) Liloba ya Nzambe epesi elaka ete bato oyo bakobika bakouta “na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Em. 7:9) Bakozala mpenza libota ya bato oyo bazali na bomoko, mpo ete losambo ya Nzambe moko ya solo, kondimela Yesu Kristo mpe bolingo esangisi bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto