Trinité elimbolami ndenge nini?
LINGOMBA ya katolike elobi ete: “Trinité ezali liloba oyo lisalelami mpo na komonisa liteya ya moboko na mangomba ya boklisto . . . Na yango, engebene elembo ya Athanase, ‘Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo-Santu azali Nzambe; nzokande Banzambe bazali misato te, kasi bobele moko. Kati na Trinité wana . . . ba persona nyonso bazali seko mpe bakokani na nyonso: bazalisami te mpe bazali bazwi-na-nguya-nyonso.”—L’Encyclopédie catholique (angl.).
Pene na Mangomba nyonso na boklisto ya lokuta, endimi likambo oyo. Na yango, lingomba ya Orthodoxe ya greke ezali kotalela Trinité lokola “liteya ya moboko na boklisto ya solo”; kino koloba boye ete: “Baoyo bazali kondima ete, Klisto azali Nzambe, bango nde bazali solo baklisto.” Kati na mokanda Notre foi chrétienne orthodoxe (angl.), bobele Lingomba yango elobi ete: “Nzambe azali bosato. . . . Tata azali mpenza Nzambe mobimba, Mwana azali mpenza Nzambe mobimba. Elimo-Santu mpe azali Nzambe mobimba.”
Engebene bakóteli ya Trinité, ezali bongo na “ba persona misato kati na Nzambe bobele moko.” Mpo na bango, ba persona yango bazwi ebandeli te: nyonso bazali seko. Moko aleki mosusu te: bango nyonso misato bazali bazwi-na-nguya nyonso.
Soki likanisi oyo limonani na yo mpasi mpo na kolanda, yebaka ete, ezali na bandimi mingi oyo na motema sembo, baoyo bazali komona ete liteya yango likobungisaka nzela mpe likeseni na makanisi malamu mpe na oyo nyonso ekspérianse ezali koteya biso. Bato yango bamitunaka ete: ndenge nini ekoki kosalema ete, Tata azali Nzambe, Yesu azali Nzambe mpe Elimo azali lisusu Nzambe, nzokande bango nyonso misato basali bobele Nzambe moko?
Likanisi oyo “moto akoki kososola yango te”
LITEYA ya Trinité lizali kobulunganisa makanisi na bato mingi. Engebene L’Encyclopédie américaine, Trinité etalelami lokola “likanisi oyo moto akoki kososola yango te.”
Epai mosusu, ezali lolenge wana nde mingi na baoyo bakondimaka Trinité bazali kotalela yango. Eugene Clark, mokonzi moko ya lingomba alobaki ete: “Nzambe azali moko mpe Nzambe azali bosato. Lokola eloko moko te ya motindo boye esili komonana kati na biloko bizalisami, biso mpe tokoki kososola [likanisi] yango te; tokoki bobele kondima yango.” Cardinal John O’Connor alobi boye: “ Toyebi ete, wana ezali nde libómbami moko ya bozindo mpenza, oyo eleki bososoli na biso mosika.” Pape Jean Paul II alobi ete, “Nzambe moko kati na Trinité mosantu ezali nde libómbami oyo likoki kolimbolama te.”
Tala oyo mokanda Un Dictionnaire de la connaissance religieuse (angl.) elobi na ntina na likambo yango: “Boyokani bozali te kati na bateyi ya Trinité na ntina etali bosikisiki ya liteya wana to mpe na ntina etali lolenge oyo basengeli kolimbola yango.”
Tokokamwa te na kotanga boye kati na mokanda la Nouvelle Encyclopédie catholique: “Na ba séminaires ya katolike, bobele balakisi moke ya Trinité nde batungisami naino te na motuna oyo ete: ‘Lolenge nini koteya Trinité?’ Mpe soko likambo yango lizali komonana polele te epai na bayekoli; ezali bobele bongo epai na baoyo bazali koteya bango.”
Mpo na koyeba bosolo na oyo elobami, okoki bobele kokende na biblioteke moko mpe otala mikanda oyo mizali kokótèla Trinité. Okokuta mikanda mingi mikomami mpo na komeka kolimbola liteya yango. Kasi, ata soko motangi akosilisa kotanga mikanda wana ya mobulungano mizangi ndimbola ya polele, mposa na ye ekokokisama te.
Na ntina yango, sángó jésuite moko, Joseph Bracken amonisi boye kati na mokanda na ye Que dit-on de la Trinité? (angl.): “Basangó oyo basalaki milende mpenza mpo na kozwa boyebi ya liteya wana na boumeli ya bambula oyo balekisaki na séminaire . . . bazali kokakatana mpo na kolobela yango ata na mokolo na eyenga ya Trinité. . . . Mpo na nini kotungisa bato na liteya oyo bakokoka kososola bobele ndambo?” Abakisi lisusu ete: “Trinité ezali liteya liuti na mimeseno. Ezali bobele na bopusi moke to mpe te likoló na bomoi ya mokolo na mokolo, mpe likoló na losambo ya moklisto.” Nzokande, ezali wana “liteya ya moboko” na Mangomba.
Kati na mokanda Le christianisme et les religions du monde, Hans Küng, téolojié ya katolike, amoni ete soko mangomba mazwi bobele bokóli moke kati na mikili mizali ya baklisto te, ezali mingi mpenza mpo na Trinité. Engebene ye, “bamusulmans oyo bayebi liteya yango bazali kokanga ntina te—kino lelo, Bayuda mpe bazali kokanga ntina soko moke te—ndenge nini okoki kondima ete ezali na ba persona misato kati na Nzambe moko. . . . Likeseni kati na moko mpe misato, oyo Trinité ya boklisto ezali kosalela, ekoki mpenza kosepelisa musulman moko te—makanisi wana mauti na Siri, na Greke, mpe na Rome makopengwisa ye mosika, na esika ete emonisa ye pole. Ezali bongolábongola ya maloba mpe ya makanisi. . . . Mpo na nini kobakisa makambo mosusu likoló na likanisi oyo ete [Nzambe] azali moko mpe azali bobele ye mei, likambo oyo likoki kolembisa to mpe kokweisa likanisi oyo?”
“Azali Nzambe na mobulu te”
EPAI wapi liteya oyo ya kobulunganisa lizwi ebandeli na yango? Engebene Encyclopédie catholique (angl.), “endimeli oyo emonani lokola libombami, ekopesaka liboso likanisi ete, euti na Nzambe.” Lisusu, balobeli mibale ya katolike, Karl Rahner mpe Herbert Vorgrimler, bakomaki kati na Dictionnaire théologique (angl.) ete: “Trinité . . . na ndimbola ya sikisiki . . . ezali libómbami oyo moto akoki koyeba yango te bobele soko azwi engengiseli, mpe, ata nkutu nsima na kongengisama, moto wana akoki mpenza kokanga ntina ya mobimba na yango te.”
Balobi ete, lokola Trinité ezali libómbami likoki kolimbolama te, yango emonisi ete liteya wana liuti bobele na Nzambe. Likanisi oyo libimisi nkaká monene mpamba te, emonisi Nzambe te na lolenge oyo ye azali: “Nzambe azali Nzambe na mobulu te.” —1 Bakolinti 14:33.
Na bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kopesa liteya oyo esali lokola ete ezali koteya bato na ntina na ye, nzokande ezali mpenza kobulunganisa; liteya oyo bato bayekoli monoko hébreu, greke mpe latin na mokili mobimba, bayebi mpenza kolimbola yango te?
Epai mosusu, esengeli bobele kozala moto oyo ayekoli téoloji nde ‘oyebi Nzambe moko ya solo, mpe motindami na ye, Yesu Klisto’? (Yoane 17:3) Soko ezali bongo, ndenge nini bobele bakonzi moke ya mangomba na Bayuda, baye batangaki mingi nde bandimaki Yesu lokola Masiya; nzokande mingi na bayekoli na ye ya sembo bazalaki bobele bato na bilanga, balóbi na mbisi, bakongoli na mpako, basi na pite, bato mpamba? Bato wana bamesanaki na mikanda te, bandimisamaki mpenza na oyo Yesu azalaki koteya likoló na Nzambe, bango mpe bateyaki bato mosusu; bandimaki kokufa mpo na oyo etali bindimeli na bango.—Matai 15:1-9; 21:23-32, 43; 23:13-36; Yoane 7:45-49; Misala 4:13.
[Elilingi na lokasa 4]
Ezali basokemi, bato mpamba nde bakómaki bayekoli na Yesu, kasi bakonzi ya mangomba te