Mokanda ya Biblia nimero 7—Basambisi
Mokomi: Samwele
Esika ya bokomi: Yisalaele
Nsuka ya bokomi: soko 1100 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: soko 1450-soko 1120 L.T.B.
1. Na makambo nini eleko ya basambisi ezali kobenda likebi?
EZALI na eteni moko ya lisoló ya Yisalaele oyo etondi na makambo; libota lizali koyengayenga kati na makambo mibale: na bantango mosusu, bazali komikɔtisa na mangomba ya bademó oyo mazali komemela bango makámá mpe na mabaku mosusu, ntango libota yango libongoli motema, Yehova azali kosikola bango na nzela ya basambisi baponami na Ye. Misala ya nguya oyo misalamaki na mosambisi Oteniele, mosambisi Ehude, mosambisi Samagale, mpe basambisi mosusu oyo bayaki nsima, mizali mpenza kolendisa kondima. Lokola mokomi ya Baebele alobaki yango: “Ntango ezangeli ngai kosolola makambo na Gideona, na Balaka, na Samasona, na Yefeta, . . . baoyo bakitisi makonzi mpo na kondima, basalaki na boyengebene, . . . bakembisami kati na bolɛmbu, bazwi makasi kati na etumba, bakimisi bibele na bapaya.” (Ebe. 11:32-34) Mpo na kokokisa malamu motuya ya basambisi 12 ya sembo na eleko yango, tobakisi lisusu Tola, Yaili, Ibesana, Eloni mpe Abedone. (Mbala mingi, Samwele atángamaka mpenza te kati na baoyo bazalaki basambisi.) Yehova azalaki kobundela basambisi, mpe elimo na ye ezipaki bango ntango bazalaki kosala misala ya nguya. Bapesaki lokumu mpe nkembo nyonso epai na Nzambe na bango.
2. Na lolenge nini nkombo ya mokanda ya Basambisi na Liebele ebongi mpenza?
2 Kati na libongoli ya Septante, mokanda yango mobéngami Kri·taiʹ, mpe kati na Biblia ya Liebele, yango ebéngami Sho·phetimʹ, oyo ebongolami “Basambisi.” Sho·phetimʹ euti na likelelo sha·phatʹ, oyo elimboli “kosambisa, kolóngisa, kopesa etumbu, koyangela,” mpe ndimbola yango emonisi malamumalamu mosala ya baponami wana ya Teokrasi ya “Nzambe ye Mosambisi na nyonso.” (Ebe. 12:23) Bazali bato oyo Yehova azalaki kobimisa na mabaku ya sikisiki mpo na kosikola libota na ye longwa na minyoko ya bapaya.
3. Mokanda ya Basambisi ekomamaki ntango nini?
3 Mokanda ya Basambisi ekomamaki ntango nini? Milɔngɔ́ mibale ya maloba ya mokanda yango mizali kosalisa biso na kozwa eyano. Molɔngɔ́ ya liboso yango oyo: “Bayebusi bafandi . . . na Yelusaleme kino lelo oyo.” (Bas. 1:21) Lokola Mokonzi Davidi abɔtɔlaki “esika makasi na Siona” epai na Bayebusi na mbula ya mwambe ya boyangeli na ye, to na mobu 1070 L.T.B., boye esengeli kozala ete mokanda ya Basambisi ekomamaki liboso ya dati wana. (2 Sam. 5:4-7) Molɔngɔ́ ya mibale ya maloba yango ezongelami mbala minei: “Na mikolo yango mokonzi azalaki na Yisalaele te.” (Bas. 17:6; 18:1; 19:1; 21:25) Na bongo, lisoló yango likomamaki kino ntango oyo ‘mokonzi atyamaki na Yisalaele,’ elingi koloba, nsima wana Saulo akómaki mokonzi ya liboso na mobu 1117 L.T.B. Boye, dati ya bokomami na yango esengeli kozwama kati na eleko ekaboli mobu 1117 mpe mobu 1070 L.T.B.
4. Mokomi na yango ezalaki nani?
4 Mokomi na yango ezalaki nani? Ntembe ezali te ete mokomi ya mokanda yango azalaki mosaleli amipesi ya Yehova. Ezali bobele Samwele nde amonani polele lokola mokɔteli monene ya losambo ya Yehova na eleko oyo ekabolaki nsuka ya basambisi mpe ebandeli ya bakonzi, mpe azali lisusu moto ya liboso na molɔngɔ́ ya basakoli ya sembo. Na motindo na ye wana, Samwele azalaki moto abongi na kokoma lisoló ya basambisi.
5. Lolenge nini tokoki kosala mitángo mpo na koyeba eleko oyo makambo makomami na mokanda ya Basambisi makomamaki?
5 Lisoló ya Basambisi lisalemaki na boumeli ya ntango boni? Tokoki kosala mitángo na yango uta na 1 Mikonzi 6:1, oyo emonisi ete Salomo abandaki kotonga ndako ya Yehova na mbula ya minei ya boyangeli na ye, oyo ezalaki mpe “elanga [“mbula,” NW] na nkámá minei na ntuku mwambe nsima na kobima na bana na Yisalaele na mokili na Ezipito.” (Lokola ‘mbula ya nkámá minei na ntuku mwambe’ ezali motángo ya bomonisi molɔngɔ́ (nombre ordinal), yango ekokani na mibu 479 ya mibimba.) Bileko oyo biyebani, oyo bilekaki na boumeli ya mibu yango 479 ezali bongo: eleko ya mbula 40 oyo elekaki na nsé na litambwisi ya Mose kati na mokili mokauki (Det. 8:2), eleko ya mbula 40 ya boyangeli ya Saulo (Mis. 13:21), eleko ya mbula 40 ya boyangeli ya Davidi (2 Sam. 5:4, 5), mpe mbula 3 ya mibimba oyo Salomo alekisaki na ebandeli ya boyangeli na ye. Soki tolongoli motuya nyonso wana ya mbula 123 kati na mbula 479 ya 1 Mikonzi 6:1, etikali mbula 356 mpo na eleko oyo ekabolaki kokɔta ya Yisalaele na mokili ya Kanana mpe ebandeli ya boyangeli ya Saulo.a Makambo oyo makomami na mokanda ya Basambisi, oyo matandami bandá na liwa ya Yosua kino eleko ya Samwele, masalemaki na boumeli ya mbula soko 330 na eleko yango ya mbula 356.
6. Nini ezali kondimisa bosolo ya mokanda ya Basambisi?
6 Bosolo ya mokanda ya Basambisi etyelami ntembe ata moke te. Bayuda bazalaki ntango nyonso kondima ete yango ezali mokanda ya kanɔ́ ya Biblia. Ezala bakomi ya Makomami ya Liebele to ya Makomami ya Greke ya boklisto balobelaki makambo ya lisoló na yango, lokola na Nzembo 83:9-18; Yisaya 9:4; 10:26; mpe Baebele 11:32-34. Na maloba ya polele, mokanda yango mozali kotɔndɔla mabungá ya Yisalaele mpe lolenge bazalaki kozongela kosala masumu, mpe ezali kokumisa boboto monene oyo Yehova azali na yango. Ezali Yehova nde apesameli nkembo lokola Mosikoli kati na Yisalaele, kasi ezali te mosambisi moko oyo azali sé moto.
7. (a) Lolenge nini arkeoloji endimisi lisoló oyo lizwami kati na Basambisi? (b) Mpo na nini Yehova atindaki na elónga mpenza ete báboma basambeli nyonso ya Baala?
7 Lisusu, biloko bizwami na lisalisi ya arkeoloji bizali kondimisa bosolo ya mokanda ya Basambisi. Oyo eleki kobenda likebi ezali biloko oyo bimonisi lolenge ya losambo ya Baala ya Bakanana. Longola makambo oyo mayebisami kati na Biblia, bato bayebaki bobele makambo moke na ntina na losambo ya Baala, kino engumba ya kala ya Bakanana oyo ebéngami Ugarit (oyo eyebani lelo na nkombo Ras Shamra mpe ezwami na bokúla ya Sulia oyo etalani na mbata ya bɔ́rdi-ɛ́sti ya esanga Kupulu) etimolamaki, kobanda na 1929. Na esika yango, losambo ya Baala emonisamaki ete ezalaki kolendisa ezaleli ya koluka kozala na biloko mingi ya mosuni, bolingi ekólo na lolenge loleki ndelo, mpe losambo ya bosangisi nzoto. Emonani ete mboka mokomoko ya Kanana ezalaki mpenza na esika mosantu na yango mpo na Baala mpe na bisambelelo oyo bibéngamaki ete bisika na likoló. Kati na bisambelelo yango, okokuta mbala mosusu bikeko ya Baala, mpe na libándá, pembeni na bitumbelo, okokuta makonzi ya mabanga—ekoki kozala bililingi ya enama-mobali etɛlɛmi ya Baala. Bisambelelo yango bibebisamaki na makila ya bato oyo bazalaki kopesama lokola mbeka, likambo ya mbindo mpenza. Bobele bongo, ntango Yisalaele bamibebisaki na losambo ya Baala, bakabaki bana na bango mibali mpe bana na bango basi lokola mbeka. (Yil. 32:35) Ezalaki mpe na likonzi na bulɛɛ oyo lizalaki komonisa Asela, mama na Baala. Asatolete, mwasi ya Baala mpe nzambe-mwasi ya makambo matali kobota, azalaki kokumisama na milulu ya bosangisi nzoto ya mbindo, oyo mizalaki kosalema na mibali mpe basi oyo “babulisamaki” mpo na kosala pite na tempelo. Likambo ya kokamwa ezali te soki Yehova atindaki ete losambo ya Baala ebebisama nyɛɛ elongo na basambeli na yango ya makambo lokola banyama. “Okoyokela bango mawa te. Okosalela banzambe na bango mpe te.”—Det. 7:16.b
MAKAMBO MAZALI KATI NA BASAMBISI
8. Na biteni nini mokanda ya Basambisi ekabwani na lolenge lobongi mpenza?
8 Mokanda yango mokabwani na lolenge lobongi mpenza na biteni misato. Mikapo mibale ya liboso mizali kolobela makambo oyo mazalaki na Yisalaele na eleko wana. Eteni ebandi na mokapo 3 kino mokapo 16 ezali kolobela kosikwama ya libota yango na nzela ya basambisi 12. Na nsima, eteni oyo ebandi na mokapo 17 kino mokapo 21 elobeli mwa makambo oyo mamonisi bitumba kati na Bayisalaele bango moko.
9. Maloba ya mikapo mibale ya ebandeli ya mokanda ya Basambisi epesi moboko nini?
9 Makambo oyo mazalaki na Yisalaele na eleko ya basambisi (1:1–2:23). Mabota ya Yisalaele malobelami na ntango bazali kopalangana mpo na kofanda na bateritware oyo epesamelaki bango. Nzokande, na esika ya kolongola Bakanana nyonso na mokili yango, Bayisalaele bakómisi mingi kati na bango basáli na misala makasi, mpe likambo yango epesi nzela ete Bakanana báfanda katikati na Yisalaele. Na yango, anzelu ya Yehova asakoli ete, “Bakozala bayini na bino, mpe banzambe na bango bakozala motambo na bino.” (2:3) Yango wana, na ntango libota ya sika ebimi, oyo liyebi Yehova te to mpe misala na ye, nokinoki bato nyonso basundoli Yehova mpo na kosalela Baala mpe banzambe mosusu. Lokola lobɔkɔ ya Yehova etɛmɛli bango na koyeisáká bolózi, bazwi “mpasi mingi.” Na ntina na motó makasi na bango mpe mpo na ezaleli na bango ya koboya koyoka ata basambisi, Yehova abengani ata libota moko te kati na mabota oyo atikaki mpo na kotya Yisalaele na komekama. Nyonso wana ezali moboko oyo ekosalisa biso na kososola makambo makoya nsima.—2:15.
10. Oteniele azali kosambisa na nguya nini, mpe yango ebimisi makambo nini?
10 Mosambisi Oteniele (3:1-11). Na ntina na mpasi ya boombo na bango epai na Bakanana, bana ya Yisalaele babandi kobelela Yehova ete asunga bango. Ye abimisi liboso Oteniele lokola mosambisi. Oteniele azali nde kosambisa na nguya mpe na mayele ya bomoto? Te, mpo ete totángi boye: “Elimo ya Yehova eyaki likoló na ye” mpo na kolónga banguna ya Yisalaele. “Bongo mokili ezwaki kimya mbula ntuku minei.”—3:10, 11, NW.
11. Lolenge nini Yehova asalelaki Ehude mpo na kosikola Yisalaele?
11 Mosambisi Ehude (3:12-30). Ntango bana ya Yisalaele batyami na nsé ya boyangeli ya Egelone, mokonzi ya Moaba, na boumeli ya mbula 18, Yehova ayoki lisusu bileli na bango mpo na kozwa lisungi, mpe abimisi mosakoli Ehude. Kozwáká libaku ya kosolola na nkuku elongo na mokonzi ya Moaba, Ehude, oyo azalaki moto akosalaka misala na lobɔkɔ ya mwasi, asimbi mopanga uta na nsé na elamba na ye, mopanga oyo ye moko asalaki, mpe abomi Egelone na kotubáká mopanga yango na kati mpenza ya libumu monene ya Egelone. Yisalaele emitye nokinoki na ngámbo ya Ehude mpo na kobundisa Moaba, mpe na boumeli ya mbula 80, mokili mozwi lisusu bopemi oyo Nzambe apesaka.
12. Nini emonisi ete bolóngi ya Samagale euti na nguya ya Nzambe?
12 Mosambisi Samagale (3:31). Samagale abikisi Yisalaele na kobomáká Bafilisitia 600. Likambo oyo ete elónga yango euti na nguya ya Yehova limonisami na ebundeli oyo asaleli—mwa lingenda mpamba ya kotambwisa bangombe.
13. Makambo nini ya nsɔ́mɔ masuki na loyembo ya bolóngi oyo Balaka mpe Debola bayembaki?
13 Mosambisi Balaka (4:1–5:31). Na nsima, Yisalaele etyami na nsé na boyangeli ya Yabini, mokonzi Mokanana, mpe Sisela, motambwisi ya mampinga na ye, oyo azali komikumisa mpo na makalo na ye 900 oyo mazali na bibendé ya mino liboso na yango. Wana Yisalaele ebandi lisusu kobelela Yehova, Ye abimisi mosambisi Balaka, oyo mosakoli-mwasi Debola azalaki kosunga ye malamumalamu. Mpo ete Balaka mpe limpinga na ye bámikumisa ata na likambo moko te, Debola ayebisi ete etumba ekosalema na litambwisi ya Yehova, mpe apesi esakweli ete: “[Yehova] akopesa Sisela na lobɔkɔ na mwasi.” (4:9) Balaka ayanganisi mibali ya libota ya Nafatali mpe ya Zebuluna na Ngomba Tabolo. Na nsima, limpinga na ye ya basodá 10 000 likei na etumba. Mokolo yango, kondima makasi ezwi bolóngi. ‘Yehova akɔtisi Sisela, makalo na ye nyonso ya etumba mpe molako na ye nyonso kati na mobulungano,’ koyeiseláká bango mpela ya pwasa kati na lobwaku ya Kisoni. “Moto moko atikalaki te.” (4:15, 16) Yaele, mwasi ya Ebɛlɛ, Mokeni, oyo Sisela akimi kino na hema na ye, asukisi libomi yango na kopikáká motó ya Sisela na mabelé, na lisalisi ya piké ya hema. “[Boye] Nzambe abukaki Yabini.” (4:23) Debola mpe Balaka basepeli na koyembáká loyembo, bakumisi nguya ekoki kolóngama te ya Yehova, oyo amemaki ata minzoto ete ebundisa Sisela uta na bilekelo na yango. Ya solo, ezali ntango ya ‘kosanzola Yehova’! (5:2) Na nsima, bafandi na kimya mbula ntuku minei.
14, 15. Bilembeteli nini Gideona azwi oyo bimonisi ete Yehova azali kosunga ye, mpe lolenge nini lisungi yango limonisami polele kati na kokweisama ya Bamidiani na nsuka?
14 Mosambisi Gideona (6:1–9:57). Bana ya Yisalaele basali lisusu mabe, mpe mokili ebebisami na bokɔti mabe ya Bamidiani. Na nzela ya anzelu na ye, Yehova azalisi Gideona mosambisi, mpe Yehova ye moko abakisi endimiseli na likambo yango na maloba oyo ete, “Ngai nakozala na yo elongo.” (6:16) Likambo ya liboso oyo Gideona asali na mpiko nyonso ezali ya kobuka etumbelo ya Baala kati na mboka na ye. Mampinga ya banguna, oyo masangani, makatisi sikawa kati na Yizelele, mpe ‘elimo ya Yehova ezipi Gideona’ wana azali koyanganisa Yisalaele mpo na etumba. (6:34) Na nzela ya komekama ya mikungé oyo Gideona atandi epai na mamwe likoló na etando ya kotuta, Nzambe apesi ye bilembeteli mibale ete azali na ye elongo.
15 Yehova ayebisi Gideona ete limpinga na ye ya bato 32 000 lileki monene mpe ete motuya monene wana ekoki komema bato na komikumisa mpo na bolóngi. Libosoliboso, baoyo bazali kobangabanga bazongisami na ndako, mpe baoyo batikali bazali bobele 10 000. (Bas. 7:3; Det. 20:8) Na nsima, na komekama ya bomɛli mai, bato banso balongolami na molɔngɔ́, kotikaláká bobele bato 300 baoyo bazalaki na bokɛngi, baoyo balalisaki miso te. Gideona akei konɔnga molako ya Bamidiani na butu mpe azwi lisusu endimiseli ntango ayoki mobali moko koyebisa ndɔ́tɔ oyo ndimbola na yango elobi ete ‘wana eloko mosusu te, bobele mopanga na Gideona . . . Nzambe ya solo asili kopesa Midiani mpe molako na yango mobimba na lobɔkɔ na ye.’ (Bas. 7:14) Gideona asambeli Nzambe mpe na nsima akaboli bato na ye na bituluku misato zingazinga ya molako ya Midiani. Kimya ya butu ekatani mbala moko na koyulama ya kelelo, na kopasolama ya mbeki minene ya mai, na kongɛnga ya miinda, mpe na konganga ya mibali 300 ya Gideona ete, “Mopanga mpo na [Yehova] mpe mpo na Gideona!” (7:20) Molako ya banguna mokɔti na mobulungano monene. Bato bakómi kobunda kati na bango mpe bakómi kokima. Yisalaele balandi bango, mpe babomi bango elongo na bakonzi na bango. Sikawa, libota ya Yisalaele esɛngi Gideona ete azala mokonzi likoló na bango, kasi ye aboyi, mpe alobi ete, “[Yehova] akozala mokonzi na bino.” (8:23) Nzokande, Gideona asali efode na lisalisi ya biloko bizwamaki na etumba, mpe na nsima yango ekómi kopesamela losambo mpe eyei kokóma motambo mpo na Gideona mpe mpo na bato na ndako na ye. Ntango Gideona azalaki mosambisi, mokili ya Yisalaele efandaki na kimya mbula 40.
16. Elakeli mabe nini ekweli Abimeleke oyo abɔtɔli bokonzi na makasi?
16 Abimeleke, moko na bana oyo Gideona abotaki na makango na ye, abɔtɔli bokonzi nsima na liwa ya Gideona, mpe abomi bandeko na ye 70 oyo babotamaki na ye tata moko. Bobele Yotama, mwana-nsuka ya Gideona, nde abikaki, mpe alakeli Abimeleke mabe uta na likoló ya Ngomba Gelizimi. Kati na lisese ya nzeté, akokanisi “bokonzi” ya Abimeleke na bokonzi ya nkamba na nzubɛ. Mwa moke na nsima, Abimeleke azwami na etumba ya banamboka na Sikeme mpe abomami na ndenge ya nsɔ́ni, mpamba te ezali mwasi nde abomi ye ntango abambi ye libanga na kotutela uta na ndako molai ya Tebese, mpe apanzi motó na ye.—Bas. 9:53; 2 Sam. 11:21.
17. Lisoló ya mokanda ya Basambisi liyebisi biso nini na ntina na Mosambisi Tola mpe Mosambisi Yaili?
17 Basambisi Tola mpe Yaili (10:1-5). Ezali bango nde bayaki lisusu kosikola Yisalaele na lisalisi ya nguya ya Yehova; Tola asali mbula 23 lokola mosambisi mpe Yaili mbula 22.
18. (a) Kosikolama nini ezwami na nzela na Yefeta? (b) Ndai nini Yefeta asali epai na Yehova mpe akokisi yango na bosembo nyonso? Ndenge nini?
18 Mosambisi Yefeta (10:6–12:7). Wana Bayisalaele balandi ntango nyonso kosambela bikeko, nkanda ya Yehova epeleli lisusu libota yango. Sikawa, bato ya libota yango bazali konyokwama na Baamona mpe Bafilisitia. Yefeta abyangami longwa na mboka mopaya mpo na kotambwisa Yisalaele na etumba. Kasi nani azali mosambisi ya solo mpenza kati na ntembe yango? Maloba ya Yefeta ye moko mazali kopesa eyano na motuna yango: “Tiká [Yehova], Mosambisi, akata lelo na kati na bato na Yisalaele mpe bato na Amona.” (11:27) Lokola elimo ya Yehova ekiti likoló na ye sikawa, alapi ndai ete soki azongi na kimya nyonso longwa na Amona, akokabela Yehova moto ya liboso oyo akobima na ndako na ye mpo na koyamba ye. Yefeta alóngi Baamona na libomi monene. Ezali ye kozonga na ndako na ye na Misipa, talá mwana na ye bobele moko ya mwasi ayei moto ya liboso na mbangu mpo na koyamba ye na esengo mpo na bolóngi ya Yehova. Yefeta akokisi ndai na ye—ezali te na kobomáká mwana na ye lokola mbeka, ndenge ezalaki kosalema engebene milulu ya Baala, kasi na kopesáká mwana na ye bobele moko ya mwasi ete akende kosala seko na ndako ya Yehova mpo na kosanzola Ye.
19. Makambo nini mamemi kino komekama na liloba “Shibolete”?
19 Bato na Efelaima basiliki sikawa mpo ete babyangamaki te mpo na kobunda na Amona, mpe bazali koluka kosala Yefeta mabe; yango epusi ye na kobundisa bango mpe kobengana bango. Soki tosangisi bango nyonso, bato 42 000 ya Efelaima babomami, mingi kati na bango bakufi na bisika ya kokatisa Yordani na makolo, epai kuna bazali koyeba bango na nzela ya ebéngeli mabe na bango ya liloba “Shibolete.” Yefeta akóbi kosambisa Yisalaele na boumeli ya mbula motoba.—12:6.
20. Basambisi nini misato balobelami na nsima?
20 Basambisi Ibesana, Eloni mpe Abedone (12:8-15). Atako ezali na makambo mingi te oyo makomami na ntina na bato yango, nzokande bileko ya mosala na bango ya basambisi eyebisami boye: mbula nsambo mpo na Ibesana, mbula zomi mpo na Eloni mpe mbula mwambe mpo na Abedone.
21, 22. (a) Misala nini ya kokamwisa Samasona asali, mpe na nguya nini? (b) Lolenge nini Bafilisitia balóngi Samasona? (c) Makambo nini masuki na ekela ya Samasona oyo eleki monene, mpe nani akanisi ye na ngonga yango?
21 Mosambisi Samasona (13:1–16:31). Mbala oyo lisusu, Yisalaele ekómi moombo epai na Bafilisitia. Na eleko oyo, ezali Samasona nde Yehova abimisi lokola mosambisi. Bandá kobotama, baboti na ye bakabaki ye mpo na kozala Monasili, mpe yango esɛngi ete zilɛti to lotɛbu eleka na motó na ye te mpo na kolongola ye nsuki. Wana azali kokóla, Yehova apamboli ye, mpe ‘na nsima, elimo ya Yehova ebandi kotindika ye.’ (13:25) Sɛkɛlɛ́ ya makasi na ye ezwami kati na misisa ya bomoto te, kasi kati na nguya oyo Yehova apesi ye. Ezali na ntango oyo ‘elimo ya Yehova ekómi kosala mosala likoló na ye’ nde azwi nguya ya koboma nkosi na mabɔkɔ na ye mpamba mpe na nsima azwi nguya ya kosala bobekoli epai na Bafilisitia na kobomáká bato na bango 30. (14:6, 19) Lokola Bafilisitia bakóbi komonisa motó makasi nyonso mpo na libala ya Samasona na mwana mwasi moko ya Filisitia, Samasona akamati mbulu (renards) 300 mpe, kokangáká mikila na bango mibalemibale, atye nkoni ya mɔ́tɔ katikati na mikila na bango mpe atiki bango ete bázikisa bilanga ya biloko bikokani na nganu, bilanga ya vinyo, mpe bilanga ya olive oyo Bafilisitia balónaki. Na nsima, abomi ebele ya Bafilisitia, ‘kobɛtáká bango loketo mpe ebɛlɔ.’ (15:8) Bafilisitia bapusi bandeko na ye ya Yisalaele, mibali ya Yuda, ete bákanga Samasona bansinga mpe bápesa ye na mabɔkɔ na bango, kasi na mbala oyo lisusu, ‘elimo ya Yehova ezipi ye,’ mpe bansinga na ye ekatani longwa na mabɔkɔ na ye. Samasona abomi Bafilisitia soko nkóto—‘mopiko moko, mipiko mibale!’ (15:14-16) Ebundeli oyo azali koboma na yango ezali nini? Mbángá ya mpunda oyo ezali naino mobesu. Yehova akembisi mosaleli na ye, na ntango alɛmbi, na kobimisáká mai na lolenge ya likamwisi na esika oyo etumba ezali kosalema.
22 Na nsima, Samasona alali na butu na ndako ya mwasi moko ya ndumba na mboka Gaza, epai kuna Bafilisitia bazingeli ye kozanga makɛlɛlɛ. Atako bongo, emonani lisusu ete elimo ya Yehova ezali elongo na ye wana alamuki na katikati ya butu, apikoli bikuke ya mboka esika moko na bizipeli na yango mibale, mpe amemi yango kino na nsɔngɛ́ ya ngomba oyo etalani na Hebeloni. Nsima na yango, Samasona aluli Delila, mwasi ya kozanga kolongobana. Lokola azali esaleli malamu ya Bafilisitia, Delila alelileli liboso na ye kino Samasona ayebisi ye ete komipesa na ye ya Monasili epai na Yehova, oyo emonisami na nsuki na ye, ezali eutelo ya solosolo ya makasi na ye. Wana azali kolala, mwasi yango akati nsuki na ye. Mbala oyo, alamuki mpo na kobunda kasi ntina ezali te, mpo ete ‘ezalaki Yehova nde atikaki ye.’ (16:20) Bafilisitia bakangi ye, batɔbɔli miso na ye, mpe bapesi ye mosala ya kotuta mbuma lokola moombo kati na ndako na bango ya bolɔ́kɔ. Wana ntango ekoki mpo na kosala elambo monene na ntina na kokumisa nzambe na bango Dagona, Bafilisitia babimisi Samasona libándá na ntina ete básakana na ye. Lokola babosani ete nsuki na ye esili kokóla mingi lisusu, bapesi ye nzela na kotɛlɛma katikati na makonzi mibale ya makasi na ndako oyo esalelami mpo na losambo ya Dagona. Samasona abeleli Yehova: “Ɛ Nkolo [Yehova], nabondeli yo, kanisá ngai mpe lendisá ngai bobele mbala oyo.” Yehova akanisi ye mpenza. Samasona asimbi makonzi mpe ‘amingumbi nzoto na nguya’—nguya ya Yehova—‘mpe ndako ekwei, na boye ete bato oyo abomi na ntango ya liwa na ye baleki baoyo abomaki na boumeli ya bomoi na ye.’—16:28-30.
23. Makambo nini mayebisami kati na eteni ebandi na mokapo 17 kino mokapo 21, mpe yango esalemaki ntango nini?
23 Tokómi sikawa na eteni oyo ebandi na mokapo 17 kino mokapo 21, oyo ezali kolobela ndambo ya bitumba bisalemi kati na Bayisalaele bango moko, oyo, na mawa nyonso, etye Yisalaele kati na bolózi na eleko yango. Makambo yango mazali kosalema na ebandeli mpenza ya eleko ya basambisi, lokola yango emonisami na kolobelama ya Yonatana mpe Finease, bana ya bana ya Mose mpe Alona, ete bazali naino na bomoi.
24. Lolenge nini Badani basalaki lingomba na bango moko?
24 Mika mpe Badani (17:1–18:31). Mika, moto na Efelaima, asali ebongiseli ya lingomba na ye moko, ‘ndako ya banzambe’ ya bikeko, epai kuna ezali na ekeko na kokatama mpe nganga moko Molevi. (17:5) Bato ya libota ya Dani bayei pembeni na ndako yango na ntango bazali kokende koluka libula na bango na nɔ́rdi. Babɔtɔli Mika biloko na ye ya losambo mpe nganga na ye, mpe bakei mosika epai na nɔ́rdi mpo na koboma mboka Laisi, oyo ezalaki na kimya. Na esika oyo mboka yango ezalaki, batongi mboka na bango ya Dani mpe batɛlɛmisi ekeko na kokatama oyo babɔtɔlaki epai na Mika. Na bongo, mikolo nyonso oyo ndako ya Yehova eumeli na Silo, bango balandi lingomba oyo bamiponeli bango moko.
25. Lolenge nini bitumba ya Bayisalaele kati na bango moko bisukaki na Gibea?
25 Lisumu ya Benyamina na Gibea (19:1–21:25). Likambo oyo liyebisami na nsima libimisi maloba oyo mayaki kolobama na Hosea ete: “Ɛ Yisalaele, osali masumu longwa na mikolo na Gibea.” (Hos. 10:9) Wana ezali ye kozonga na mboka elongo na makango na ye, Molevi moko ya Efelaima alekisi butu epai na mobange mobali moko na Gibea ya Benyamina. Bato mpamba ya mboka bazingi ndako yango, basɛngi ete básangisa nzoto na Molevi wana. Nzokande, bandimi kosangana na makango na ye mpe babebisi ye butu mobimba. Bakuti mwasi yango na ntɔ́ngɔ́ ete asili kokufa liboso ya ekuke ya ndako. Molevi amemi nzoto ya mowei na mboka, akati yango na biteni 12 mpe atindi biteni yango na Yisalaele mobimba. Na lolenge yango, mabota 12 matyami na komekama. Bakopesa nde Gibea etumbu mpo na kolongola ezalela ya mbindo kati na Yisalaele? Libota ya Benyamina esepeli na likambo mabe wana. Mabota mosusu masangani liboso na Yehova na Misipa, epai kuna bazwi ekateli ya kokende, na bituluku, mpo na kobundisa Benyamina na Gibea. Nsima na kolóngama mbala mibale na kosopama monene ya makila, mabota mosusu bazwi bolóngi na kosaleláká mwango ya bobombi basodá zingazinga na mboka mpe basilisi libota mobimba ya Benyamina, bobele bato 600 nde bakimi kino libanga ya Limone. Na nsima, Yisalaele eyoki mawa ete libota mobimba lisilisami nyɛɛ. Libaku lizwami mpo na kopesa, na babiki ya Benyamina, basi oyo bazwami uta na bana basi ya Yabese-gilada mpe ya Silo. Likambo yango lisukisi lisoló ya bitumba mpe ya myango mabe kati na Yisalaele. Lokola yango ezongelami na maloba ya nsuka ya mokanda ya Basambisi, “Na mikolo yango mokonzi azalaki na Yisalaele te. Moto na moto asalaki yango ezalaki sembo na miso na ye.”—Bas. 21:25.
LITOMBA NA YANGO
26. Makebisi nini ya nguya kati na mokanda ya Basambisi mazali kosalelama lisusu na eleko na biso?
26 Na esika ya kozala lisapo mpamba ya bitumba mpe ya kosopama ya makila, mokanda ya Basambisi mokumisi Yehova lokola Mosikoli monene ya libota na ye. Yango emonisi lolenge motema mawa na ye monene mpe motema molai na ye emonisami epai na libota oyo lizali komema nkombo na ye, na ntango bazongi epai na ye na kobongola motema. Mokanda ya Basambisi mozali kopesa litomba monene kati na lolenge na yango ya kozanga kokakatana mpo na kokɔtela losambo ya Yehova mpe na makebisi na yango ya nguya na likambo litali bozoba ya losambo ya bademó, bozoba ya kosangisa mangomba, mpe bolema ya kozala na boyokani ya mbindo. Kokweisama makasi ya losambo ya Baala na Yehova esengeli kopusa biso na koboya makambo oyo makokani na yango na mikolo na biso: ezaleli ya koluka kozala na biloko mingi ya mosuni, bolingi ekólo, mpe pite.—2:11-18.
27. Lolenge nini tokoki lelo kozwa litomba na ndakisa malamu ya basambisi?
27 Kotalela na likebi mpenza kondima ya basambisi, oyo bazalaki kobanga te kasi bazalaki na mpiko, esengeli kokólisa kondima motindo moko kati na mitema na biso. Likambo ya kokamwa ezali te soki balobelami na maloba ya mɔ́tɔ mpenza kati na Baebele 11:32-34! Babundaki mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova, kasi na makasi na bango moko te. Bayebaki ete elimo ya Yehova ezali eutelo ya nguya na bango mpe bandimaki yango na komikitisa nyonso. Bobele bongo lelo, biso mpe tokoki kokamata ‘mopanga ya elimo,’ oyo ezali bongo Liloba ya Nzambe, kozaláká na elikya ete Nzambe akokembisa biso na nguya lokola asalaki yango epai na Balaka, Gideona, Yefeta, Samasona mpe basambisi mosusu. Ɛɛ, na oyo etali kolónga mikakatano minene, na lisalisi ya elimo ya Yehova, tokoki kozala makasi na elimo lolenge Samasona azalaki makasi na mosuni, soki tobondeli Yehova mpe tomipesi epai na ye.—Ef. 6:17, 18; Bas. 16:28.
28. Lolenge nini mokanda ya Basambisi ezali kobenda likebi likoló na kosantisama ya nkombo ya Yehova na nzela ya Mombóto ya Bokonzi?
28 Mosakoli Yisaya alobeli mokanda ya Basambisi na bisika mibale mpo na komonisa lolenge Yehova akokata mpenza ekangeli oyo banguna na Ye batye likoló na libota na ye, bobele lokola asalaki yango na mikolo ya Midiani. (Yis. 9:4; 10:26) Yango ekundweli biso lisusu loyembo ya Debola mpe Balaka, oyo esuki na libondeli ya nguya ete: “Bayini na yo nyonso bakokufa boye, ɛ [Yehova]! Baninga na yo nde bazali lokola moi ezali ye kobima na nguya na ye.” (Bas. 5:31) Kasi baninga yango bazali banani? Komonisáká ete bazali basangoli na libula ya Bokonzi, Yesu Klisto ye moko asalelaki maloba motindo moko na Matai 13:43 ete: “Bayengebene bakongɛnga lokola moi kati na Bokonzi na Tata na bango.” Na bongo, mokanda ya Basambisi ezali komonisa ntango oyo Yesu, Mosambisi ya sembo mpe Mombóto ya Bokonzi, akosalela nguya na ye. Na nzela na ye, Yehova akoyeisa nkembo mpe kosantisama likoló na nkombo na Ye, na boyokani na libondeli oyo mokomi na Nzembo asalaki na ntina na banguna ya Nzambe ete: “Salá na bango pelamoko osalaki na Midiani, pelamoko osalaki na Sisela mpe Yabini kuna na mai na Kisoni . . . [bato] báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.”—Nz. 83:9, 18; Bas. 5:20, 21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mabongoli ya Biblia oyo mabimisami sika na mikolo na biso mandimisi ete “soko mbula nkámá minei na ntuku mitano” oyo elobelami na Misala 13:20 ekokani na eleko ya basambisi te, kasi ezalaki nde liboso na eleko yango; bambula wana emonani ete ebandaki na kobotama ya Yisaka na mobu 1918 L.T.B. kino na kokabolama ya Mokili ya Ndaka na mobu 1467 L.T.B. (Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 462) Molɔngɔ́ ya kotángama ya [nkombo ya] basambisi kati na Baebele 11:32 ekeseni na oyo ezali na mokanda ya Basambisi, kasi likambo yango limonisi mpenza te ete makambo oyo makomami kati na Basambisi mazali te kolanda ntango oyo likambo mokomoko esalemaki; ya solo, eyebani malamu ete Samwele ayaki soko moke te nsima na Davidi.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 228-229, 948.