Mokanda ya Biblia nimero 11—1 Mikonzi
Mokomi: Yilimia
Esika ya bokomi: Yelusaleme mpe Yuda
Nsuka ya bokomi: 580 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: soko 1040–911 L.T.B.
1. (a) Lolenge nini bolamu monene oyo Yisalaele ezalaki na yango ekómaki libebi? (b) Nzokande, mpo na nini tokoki koloba ete Mikonzi ya Liboso “epemami mpe ezali na litomba”?
BOLÓNGI oyo Davidi azwaki na bitumba oyo abundaki eyeisaki etando ya Yisalaele monene kino na ndelo oyo Nzambe asilaki kokana mpo na yango, uta na ebale Pelata na nɔ́rdi kino na ebale ya Ezipito na súdi. (2 Sam. 8:3; 1 Mik. 4:21) Wana Davidi asilaki kokufa mpe mwana na ye Salomo akómaki koyangela na esika na ye, “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zɛlɔ pembeni na mai na monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo.” (1 Mik. 4:20) Salomo ayangelaki na mayele mingi mpenza, mayele oyo malekaki mosika mayele ya Bagreke ya ntango ya kala. Atongaki tempelo moko enzenga mpo na Yehova. Nzokande, ata Salomo mpe akweaki na losambo ya banzambe ya lokuta. Na nsima ya liwa na ye, bokonzi ekabwanaki na biteni mibale, mpe bakonzi mabe bakitanaki na bikonzi ya Yisalaele mpe Yuda, oyo bizalaki banguna moko na mosusu, bamitambwisaki na lolenge mabe mpe bayeisaki mpasi likoló na bato, lokola Samwele asakolaki yango. (1 Sam. 8:10-18) Kati na bakonzi 14 oyo bayangelaki Yuda mpe Yisalaele nsima ya liwa ya Salomo, mpe lokola balobelami kati na mokanda ya Mikonzi ya Liboso, bobele 2 nde balóngaki kosala na bosembo na miso ya Yehova. Na bongo, mokanda oyo ‘mopemami mpe mozali na litomba’? Ntembe ezali soko moke te, lokola tokomona yango na makebisi oyo mazwami kati na mokanda yango, bisakweli mpe bililingi oyo bizwami kati na yango, mpe boyokani na yango na Bokonzi, motó na likambo monene ya “Makomami nyonso.”
2. Lolenge nini mokanda ya Mikonzi ya Liboso mpe ya Mibale eyaki kokabolama na rulo mibale, mpe lolenge nini makambo oyo malobelami kati na yango mayanganisamaki?
2 Na ebandeli, mokanda ya Mikonzi ezalaki bobele na rulo, to na volimi moko, mpe ebéngamaki Mela·khimʹ (Mikonzi) na Liebele. Babongoli ya Septante babéngaki yango Ba·si·leiʹon, “Bikonzi,” mpe bazalaki bato ya liboso oyo bakabolaki yango na rulo mibale mpo na koyeisa yango pɛpɛlɛ ete esalelama kozanga nkaká. Na nsima ebéngamaki Mikonzi ya Misato mpe ya Minei, ebéngeli oyo ezali kino lelo kati na mabongoli ya Babiblia mosusu ya Katolike. Nzokande, bato mingi bayebi yango lelo na nkombo ya Mikonzi ya Liboso mpe ya Mibale. Ekeseni na Samwele ya Liboso mpe ya Mibale mpo ete moyanganisi na yango atángi mikanda ya kala epai kuna azwaki makambo oyo akomaki. Kati na mikanda yango mibale, moyanganisi atángi mbala 15 “mokanda na ntango na mikonzi na Yuda,” mbala 18 “mokanda na ntango na mikonzi na Yisalaele,” atángi mpe “mikanda na misala na Salomo.” (1 Mik. 15:7; 14:19; 11:41) Atako mikanda mosusu wana ya kala misilá kobunga nyonso, nzokande mokanda mopemami oyo eyanganisaki mikanda wana ezali kino lelo—lisoló ya Mikonzi ya Liboso mpe ya Mibale, oyo ezali na litomba mpenza.
3. (a) Na ntembe te, nani akomaki mikanda ya Mikonzi, mpe mpo na nini toyanoli bongo? (b) Kokomama na yango esukaki ntango nini, mpe lisoló ya Mikonzi ya Liboso eumelaki ntango boni?
3 Nani akomaki mikanda ya Mikonzi? Lokola mikanda yango milobeli mingi mosala ya basakoli, mingi mpenza Eliya mpe Elisa, emonisi ete mosakoli moko ya Yehova nde akomaki yango. Kokokana ya lokótá, ya lolenge ya kokoma lisoló, mpe ya elobeli oyo ezwami kati na mikanda yango, emonisi ete ezali bobele moto oyo akomaki mokanda ya Yilimia nde akomaki mpe yango. Maloba mpe mitindo mingi ya elobeli ya Liebele emonani bobele kati na Mikonzi mpe kati na Yilimia, kasi na mokanda mosusu te. Nzokande, soki mpenza ezali Yilimia nde akomaki mokanda ya Mikonzi, mpo na nini alobelami te kati na yango? Ntina ya kolobela ye ezali te, mpo ete mosala na ye mosilaki kolobelama na mokanda oyo ezali na nkombo na ye. Lisusu, mokanda ya Mikonzi mokomamaki mpo na kopesa nkembo na Yehova mpe na losambo na Ye, kasi te mpo na kotombola lokumu ya Yilimia. Ya solo, mpo na eteni monene na yango, mokambo oyo mazangi kati na Mikonzi, malobelami kati na Yilimia mpe oyo mazangi kati na Yilimia malobelami kati na Mikonzi. Lisusu, ezali na masoló makokani, na ndakisa, 2 Mikonzi 24:18–25:30 mpe Yilimia 39:1-10; 40:7–41:10; 52:1-34. Bonkɔ́kɔ ya Bayuda endimisi ete Yilimia nde akomaki mikanda ya Mikonzi ya Liboso mpe ya Mibale. Na ntembe te, abandaki koyanganisa makambo oyo akomaki kati na mikanda yango mibale na Yelusaleme, mpe emonani ete mokanda ya mibale esilaki kokomama na Ezipito soko na mobu 580 L.T.B., mpamba te na nsuka ya lisoló na ye alobeli makambo oyo masalemaki na mobu yango. (2 Mik. 25:27) Mokanda ya Mikonzi ya Liboso ebandi kolobela lisoló ya Yisalaele kobanda na nsuka ya Samwele ya Mibale mpe ekóbi kino mobu 911 L.T.B., ntango Yosafata akufaki.—1 Mik. 22:50.
4. Lolenge nini mikanda ya masoló ya makambo ya kala ya bato ya mokili mpe arkeoloji endimisi Mikonzi ya Liboso?
4 Mokanda ya Mikonzi ya Liboso ebongi mpenza kotángama kati na kanɔ́ ya Makomami mosantu, mpe banganga-mayele nyonso bandimi yango. Lisusu, masoló ya makambo ya kala matali Ezipito mpe Asulia, oyo malobelami na mikanda ya bato ya mokili, mandimisi mpe makambo oyo mazwami kati na Mikonzi ya Liboso. Arkeoloji mpe endimisi maloba mingi oyo mazwami kati na mokanda yango. Na ndakisa, na 1 Mikonzi 7:45, 46 tozali kotánga ete ezalaki bongo “na mokili na Yaladene . . . katikati na Sukote mpe Salatana” nde Hilama anyangwisaki bisaleli ya motako mpo na tempelo ya Salomo. Bato ya arkeoloji oyo basalaki bolukiluki na esika Sukote ezalaki kala bakundolaki bilembeteli oyo bimonisaki ete mosala ya konyangwisa bibendé ezalaki kosalema kuna.a Lisusu, bikeko oyo biyemami na efelo ya Karnak (Thèbes ya ntango ya kala) bizali kolobela na lolendo nyonso lolenge Sheshonk (Sisaka) abebisaki Yuda, yango elobelami kati na 1 Mikonzi 14:25, 26.b
5. Elembeteli nini epemami endimisi bosolo ya Mikonzi ya Liboso?
5 Lolenge bakomi mosusu ya Biblia batángi biteni na yango mpe kokokisama ya bisakweli endimisi bosolo ya mokanda ya Mikonzi ya Liboso. Yesu alobelaki makambo oyo makómelaki Eliya mpe mwasi mokufeli mobali ya mboka Salepata lokola makambo oyo masalemaki mpenza na ntango ya kala. (Luka 4:24-26) Awa ezalaki ye koloba na ntina na Yoane Mobatisi, Yesu ayebisaki ete: “Azali Eliya, ye oyo azalaki koya.” (Mat. 11:13, 14) Awa Yesu azalaki koloba na ntina na esakweli ya Malaki, ye oyo alobaki na ntina na mokolo moko mosengelaki koya: “Talá, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na [Yehova].” (Mki. 4:5) Yesu andimisaki mpe bosolo ya mokanda ya Mikonzi ya Liboso na kolobeláká makambo oyo makomami na mokanda yango na ntina na Salomo mpe mokonzi mwasi ya súdi.—Mat. 6:29; 12:42; kokanisá na 1 Mikonzi 10:1-9.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MIKONZI YA LIBOSO
6. Lolenge nini Salomo akómi mokonzi, mpe lolenge nini apikami malamu na bokonzi yango?
6 Salomo akómi mokonzi (1:1–2:46). Lisoló ya Mikonzi ya Liboso ebandi na esika oyo Davidi akómi pene na liwa na ye wana bokonzi na ye ekómi pene na nsuka na yango nsima ya koyangela na boumeli ya mibu 40. Mwana na ye Adoniya, na lisalisi ya Yoaba mokonzi ya basodá mpe nganga Abiatala, bayangi mwango mpo na kobɔtɔla bokonzi. Mosakoli Natana ayebisi Davidi likambo yango mpe asaleli mayele mpo na kokundwela ye ete asilaki kopona Salomo ete akozala mokonzi na nsima ya liwa na ye. Na bongo, Davidi atindi nganga Sadoko ete apakola Salomo lokola mokonzi, ezali mpenza na ntango yango nde bayangi-mwango bazali kosepela ete Adoniya akómi mokonzi. Sikawa Davidi alendisi Salomo ete azala na mpiko mpe amonisa ete azali mobali mpe atambola na nzela ya Yehova Nzambe na ye; na nsima na yango Davidi akufi mpe akundami na “mboka na Davidi.” (2:10) Na nsima Salomo abengani Abiatala mpe abomi Adoniya mpe Moaba, bato na mobulu. Na nsima, Simi abomami mpamba te aboyi komonisa limemya mpo na ebongiseli ya motema mawa oyo ekamatamaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Sikawa bokonzi etyami malamu mpenza na mabɔkɔ ya Salomo.
7. Yehova ayanoli na libondeli nini ya Salomo, mpe yango ebimisaki likambo nini mpo na Yisalaele?
7 Salomo ayangeli na mayele nyonso (3:1–4:34). Salomo asali kondimana ya libala elongo na Ezipito na kobaláká mwana mwasi ya Falo. Asɛngi Yehova ete apesa ye motema ya botosi mpo ete akoka kosambisa libota ya Yehova na bososoli nyonso. Lokola asɛngi te bomoi molai to bozwi, Yehova alaki ete akopesa ye motema ya mayele mpe ya bososoli mpe abakiseli ye bozwi mpe nkembo. Na ebandeli ya boyangeli na ye, Salomo amonisi mayele na ye na ntango basi mibale bayei epai na ye na mwana moko ya moke, moko na moko azali kowela ete mwana yango azali ya ye. Salomo apesi etindá epai na bato na ye ete ‘Bákata mwana na bomoi na ndambo mibale’ mpe bápesa ndambo epai na mwasi moko mpe ndambo epai na mwasi mosusu. (3:25) Na koyokáká bongo, ye oyo azali solo mpenza mama ya mwana yango abondeli ete báboma mwana te, mpe alobi ete mwasi wana mosusu akamata ye. Na bongo, Salomo ayebi sikawa mama ya solo mpenza ya mwana yango, mpe azongiseli ye mwana na ye. Mpo na mayele oyo Salomo azwaki uta na Nzambe, Yisalaele mobimba ezali na bolamu mpe na esengo mpe na libateli. Bato ya mikili mingi bazali koya mpo na koyoka maloba na ye ya mayele.
8. (a) Lolenge nini Salomo atongaki tempelo? Lobelá mwa makambo oyo matali yango. (b) Mosala nini mosusu ya kotonga asali yango?
8 Tempelo ya Salomo (5:1–10:29). Salomo amikundoli maloba oyo Yehova ayebisaki epai na tata na ye Davidi: “Mwana na yo, ye oyo nakotya na kiti na yo na esika na yo, ye akotonga ndako mpo na nkombo na ngai.” (5:5) Na bongo, Salomo asali bibongiseli mpo na yango. Hilama mokonzi ya Tulo apesi lisungi na kotindáká mabaya ya ɛlɛzɛ mpe ya losimi kolongwa na Lebanona mpe na kotindáká basáli oyo bazali na makoki mingi. Basáli yango, elongo na basáli mosusu oyo Salomo akamataki, babandi kotonga ndako ya Yehova na mbula ya minei ya boyangeli ya Salomo, na mbula ya 480 nsima ya kobima ya Bayisalaele na Ezipito. (6:1) Ata malató, to epasola, to esaleli mosusu nyonso ya ebendé esalelami te na esika ya botongi, mpamba te mabanga nyonso mabongisami mpe malɛngɛlami uta na esika ya botimoli mabanga, liboso ete ememama kino na esika ya botongi tempelo mpo ete eyanganisama. Na kati ya tempelo mobimba bifelo bizipami na mabaya ya ɛlɛzɛ, mpe mabaya matyami na nsé, mpe na nsima ekembisami na wolo. Bakeluba mibale basalemi na mabaya ya nzeté ya mafuta, mokomoko azalaki na bosánda ya mapeko zomi (mɛtɛlɛ 4,5) mpe mapeko zomi kobanda na nsɔngɛ́ ya lipapu moko kino na nsɔngɛ́ ya lipapu mosusu mpe batyami na eteni ya kati mpenza. Bakeluba mosusu, bakisá mpe bililingi ya nzeté ya mbila mpe fololo, ekakisami na bifelo ya tempelo. Na nsuka, nsima ya mibu koleka nsambo ya mosala, tempelo kitoko esili kotongama. Salomo akóbi mosala na ye ya botongi: ndako mpo na ye moko, Ndako na Zámba ya Lebanona, Lingɔ́ngɔ́ ya Makonzí, Lingɔ́ngɔ́ ya kiti na bokonzi, mpe ndako na mwana mwasi na Falo. Asalaki mpe makonzí mibale ya motako mpo na lingɔ́ngɔ́ na ekɔtelo ya ndako ya Yehova, saani monene ya ebendé mpo na lopango, bikumbelo ya motako, mpe basaani ya motako mpe bisaleli ya wolo.c
9. Elembo nini Yehova amonisaki mpe libondeli nini Salomo asali na ntango ya kokɔtisama ya sanduku ya kondimana?
9 Sikawa ntango ekoki mpo ete banganga bámema sanduku ya kondimana ya Yehova mpe bátya yango na eteni ya kati mpenza ya tempelo, Esika eleki bosantu, na nsé ya mapapu ya bakeluba. Wana banganga babimi, ‘nkembo na [Yehova] etondisi ndako na [Yehova],’ na boye ete bakoki lisusu kotɛlɛma te mpo na kosala mosala na bango. (8:11) Salomo apamboli lisangá ya Yisalaele, mpe apamboli mpe asanzoli Yehova. Afukami mpe asemboli mabɔkɔ na ye na likoló, kati na libondeli na ye andimi ete likoló ya makoló ekoki te mpo na Yehova, na bongo ndako etongami awa na mabelé ekoki mpe mpo na ye te. Abondeli ete Yehova akoyoka baoyo nyonso babangaka Ye wana bakobondela kati na ndako na ye, ɛɛ, ezala mpe bapaya bauti na mboka mosika, “ete mabota nyonso na mokili báyeba nkombo na yo mpe bátosa yo lokola libota na yo Yisalaele.”—8:43.
10. Yehova ayanoli na libondeli ya Salomo na kopesáká elaka nini mpe esakweli nini ya kokebisa?
10 Na boumeli ya elambo ya mikolo 14 oyo elandani, Salomo apesi ngɔmbɛ 22 000 mpe mpate 120 000 lokola mbeka. Yehova ayebisi Salomo ete ayoki libondeli na ye mpe abulisi tempelo na kotyáká ‘nkombo na Ye wana libela.’ Sikawa, soki Salomo akotambola semba liboso na Yehova, kiti ya bokonzi na ye ekoumela. Nzokande, soki Salomo mpe bana na ye ya mibali na nsima na ye batiki losambo ya Yehova mpe basambeli banzambe mosusu, na bongo, Yehova alobi ete: “Boye nakolongola Yisalaele na mokili mopesi ngai bango mpe ndako oyo ngai nabulisi mpo na nkombo na ngai, nakobwaka yango mosika na miso na ngai. Yisalaele mpe ekokóma lokola lisese mpe liloba-na-kosɛka kati na mabota nyonso. Mpe ndako oyo ekobongwana libondo na mabanga mpamba.”—9:3, 7, 8.
11. Bozwi nini mpe mayele ya lolenge nini Salomo akómi na yango?
11 Esengelaki na Salomo mibu 20 mpo na kosilisa botongi ya ndako wana mibale, ndako ya Yehova mpe ndako ya mokonzi. Mpe sikawa akóbi kotonga bingumba mingi na etando mobimba ya boyangeli na ye, atongi mpe masuwa mingi mpo ete ekoka kosalelama mpo na mombongo na mikili ya mosika. Na boye, mokonzi-mwasi na Seba ayoki nsango ya mayele mingi oyo Yehova apesaki Salomo, mpe ayei komeka ye na mituna makasi. Nsima ya koyoka ye mpe komona bolamu mpe esengo oyo ezali epai na bato na ye, angangi ete: “Talá nayebisameli ata ndambo te.” (10:7) Wana Yehova azali kokóba komonisa bolingo epai na Yisalaele, Salomo ayei ‘koleka mikonzi nyonso na mokili na mosolo mingi mpe na boyebi.’—10:23.
12. (a) Salomo azangi kosala nini, mpe mbóto nini ya botomboki ebandi kobima? (b) Ahiya asakoli likambo nini?
12 Kozanga sembo ya Salomo mpe liwa na ye (11:1-43). Na bokeseni na etindá ya Yehova, Salomo akamati basi mingi uta na mabota mosusu—basi 700 mpe makango 300. (Det. 17:17) Motema na ye mobendami na kosalela banzambe mosusu. Yehova ayebisi ye ete bokonzi ekolongolama epai na ye, na eleko na ye te, kasi na eleko ya mwana na ye. Atako bongo, kolongola libota ya Yuda, eteni mosusu ya boyangeli ekoyangelama na bana na Salomo. Nzambe abandi kobimisa batomboki mpo na Salomo kati na mabota ya zingazinga, mpe Yelobama moto na libota ya Efelaima atɛlɛmi mpe mpo na kotɛmɛla mokonzi. Mosakoli Ahiya ayebisi Yelobama ete akokóma mokonzi likoló na mabota zomi ya Yisalaele, mpe Yelobama akimi na Ezipito mpo na kobikisa bomoi na ye. Salomo akufi na nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 40, mpe mwana na ye Lehobama akómi mokonzi na mobu 997 L.T.B.
13. Lolenge nini bokabwani esalemi kati na bokonzi wana Lehobama abandi koyangela, mpe lolenge nini Yelobama azali koluka kobatela bokonzi na ye?
13 Bokonzi bokabwani (12:1–14:20). Yelobama azongi uta na Ezipito mpe akei epai na Lehobama elongo na bato ya mboka mpo na kosɛnga Lehobama ete akitisela bango bozito monene oyo Salomo atyaki likoló na bango. Koyokáká bilenge na esika ya koyoka toli ya mayele ya mikóló na Yisalaele, Lehobama abakisi mpasi mingi lisusu. Yisalaele babimisi botomboki mpe batye Yelobama mokonzi likoló na mabota zomi ya nɔ́rdi. Lehobama, atikali bobele na Yuda mpe na Benyamina, ayanganisi basodá mpo na kobundisa batomboki, kasi ayoki etindá ya Yehova mpe atiki etumba. Yelobama atongi Sekɛmɛ lokola mboka-mokonzi ya boyangeli na ye, kasi atako bongo azali komiyoka ete azali na libateli te. Azali kobanga noki bato bakozonga na Yelusaleme mpo na kosambela Yehova mpe ete bakozonga lisusu epai na Lehobama. Mpo na kopekisa likambo motindo yango, atɛlɛmisi bikeko na bana na ngɔmbɛ na wolo, moko na Dani mpe mosusu na Betele, mpe mpo na kokamba losambo yango, aponi banganga, uta na libota ya Levi te kasi bobele kati na bato nyonso.d
14. Likebisi nini ya esakweli ebimi mpo na ndako ya Yelobama, mpe mpasi nini eyei?
14 Wana Yelobama azali kopesa mbeka na etumbelo na Betele, Yehova atindi mosakoli moko mpo na koyebisa ye ete akobimisa mokonzi moko uta na libota ya Davidi, nkombo na ye Yosiya, oyo akokweisa bikateli makasi likoló na etumbelo wana ya losambo ya lokuta. Lokola elembo, etumbelo ekabwani na biteni mibale. Na nsima, ye moko mosakoli yango mpe ayei kobomama na nkɔ́si mpo ete atosi te malako oyo Yehova apesaki ye ete alya te mpe amela te wana azali kokokisa mokumba na ye. Mpasi ebandi kokɔta sikawa kati na ndako ya Yelobama. Mwana na ye akufi, engebene ekateli ya Yehova, mpe Ahiya mosakoli ya Nzambe asakoli ete ndako ya Yelobama ekolongolama mpo na lisumu monene oyo asali na kotɛlɛmisáká banzambe ya lokuta kati na Yisalaele. Nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 22, Yelobama akufi mpe mwana na ye Nadaba akitani ye na bokonzi.
15. Makambo nini mabimi na boumeli ya bakonzi misato kati na Yuda?
15 Na Yuda: Lehobama, Abiyama, mpe Asa (14:21–15:24). Bobele na ntango yango, na nsé ya boyangeli ya Lehobama, Yuda ezali mpe kosala mabe na miso ya Yehova, na kosambeláká bikeko. Mokonzi ya Ezipito abundisi Yelusaleme mpe akamati biloko mingi ya motuya oyo ezalaki kati na tempelo. Nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 17, Lehobama akufi, mpe mwana na ye Abiyama akómi mokonzi. Ye mpe akóbi kosalela Yehova lisumu, mpe akufi na nsima ya boyangeli ya mbula misato. Sikawa, Asa mwana na ye abandi koyangela, na bokeseni na tata na ye, asaleli Yehova na motema mobimba mpe alongoli bikeko ya mbindo kati na mboka. Bitumba bizali kosila te kati na Yisalaele mpe Yuda. Asa azwi lisungi na Sulia, mpe Yisalaele etiki etumba. Asa ayangeli na boumeli ya mbula 41 mpe mwana na ye Yosafata akitani ye.
16. Makambo nini ya kobulunganisa mabimi sikawa na Yisalaele, mpe mpo na nini?
16 Na Yisalaele: Nadaba, Basa, Ela, Zimili, Tibini, Omili, mpe Ahaba (15:25–16:34). Oyo nde etuluku ya bakonzi mabe! Basa abomi Nadaba nsima wana ayangelaki na boumeli ya mbula mibale mpamba mpe abebisi ndako mobimba ya Yelobama. Akóbi na losambo ya lokuta mpe na kobundisáká Yuda. Yehova asakoli ete akosukola mpenza ndako ya Basa, lokola asalaki yango epai na Yelobama. Nsima wana Basa ayangelaki na boumeli ya mbula 24, mwana na ye Ela akitani ye; nsima wana Ela ayangelaki na boumeli ya mbula mibale, Zimili mosaleli na ye abomi ye. Bobele na ntango azwi bokonzi, Zimili abomi ndako mobimba ya Basa. Wana bato bayoki yango, bakamati Omili ye oyo azali kapita ya limpinga, mpe batye ye mokonzi, mpe abundisi Tilisa, mboka-mokonzi ya Zimili. Na ntango amoni ete abungisi nyonso, Zimili azikisi ndako ya mokonzi, na komitumbáká kati na yango mpe bongo akufi. Sikawa Tibini azali koluka koyangela lokola mokonzi motɛmɛli, kasi mwa moke na nsima bato ya Omili bakweisi ye mpe babomi ye.
17. (a) Likambo nini esalemaki na boumeli ya boyangeli ya Omili oyo tokoki kobosana yango te? (b) Mpo na nini losambo ya solo ekitisami mpenza makasi na boumeli ya boyangeli ya Ahaba?
17 Omili asombi ngomba ya Samalia mpe na esika yango atongi engumba ya Samalia. Alandi bobele lokolo ya Yelobama, kotukáká Yehova mpo na losambo ya bikeko. Kútu, azali mabe koleka baoyo nyonso bayangelaki liboso na ye. Akufi nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 12, mpe mwana na ye Ahaba akomi mokonzi. Ahaba abali Yezabele, mwana mwasi ya mokonzi ya Sidona, mpe na nsima atɛlɛmisi etumbelo ya Baala na Samalia. Asali mabe mingi koleka baoyo nyonso bayangelaki liboso na ye. Ezali na ntango oyo nde Hiyele moto na Betele atongi lisusu engumba Yeliko, mpo na yango bana na ye ya mibali, ya liboso mpe ya nsuka, bakufi. Losambo ya solo ekitisami mpenza makasi.
18. Eliya asakolaki nini na ebandeli ya mosala na ye lokola mosakoli kati na Yisalaele, mpe lolenge nini alobeli ntina mpenza oyo Yisalaele ezali kozwa mikakatano?
18 Mosala ya Eliya lokola mosakoli na Yisalaele (17:1–22:40). Na pwasa, momemi-nsango moko auti na Yehova alobelami. Ezali bongo Eliya Motisibi.e Maloba ya ebandeli oyo mayebisami mpo na mokonzi Ahaba mazali mpenza ya kobangisa: “Lokola [Yehova] Nzambe na Yisalaele azali na bomoi, oyo nazali kotɛlɛma liboso na ye, mamwe mpe mbula ikozala na bilanga oyo te bobele na liloba na ngai.” (17:1) Na pwasa, kolandáká litambwisi ya Yehova, Eliya akei komibomba na lobwaku moko ya ɛ́sti ya Yordani. Mai makauki na Yisalaele, kasi ndɛkɛ ibéngami yanganga izali komemela Eliya bilei. Wana molúká ya lobwaku mokauki, Yehova atindi mosakoli na ye ete akende kofanda na Salepata oyo ezali na Sidona. Mpo na boboto oyo mwasi moko mokufeli-mobali amonisi epai na Eliya, na lolenge ya likamwisi, Yehova abateli mwa falini mpe mafuta ya mwasi yango mpo ete ye mpe mwana na ye ya mobali bákufa na nzala te. Na nsima, mwana yango ya mobali azwi maladi mpe akufi, kasi Eliya abondeli Yehova ete azongisa mwana yango na bomoi. Bongo, na mbula ya misato ya eleko wana ya kokauka ya mai, Yehova atindi lisusu Eliya epai na Ahaba. Ahaba afundi Eliya ete azali kokɔtisa koyina kati na Yisalaele, kasi Eliya ayebisi Ahaba na mpiko nyonso ete: ‘Yo mpe libota ya tata na yo nde bosali bongo’ mpamba te bolandi Baala.—18:18.
19. Lolenge nini ntembe ebimi na ntina na bonzambe, lolenge nini bonene ya Yehova emonisami?
19 Eliya asɛngi na Ahaba ete ayanganisa basakoli nyonso ya Baala na Ngomba Kalemele. Ezali lisusu te ntango ya kokakatana liboso na makanisi mibale. Ntembe ebimisami, kati na Yehova mpe Baala mpo na koyeba nani abongi mpenza kopesamela losambo? Liboso na bato nyonso, basakoli 450 ya Baala balɛngɛli ngɔmbɛ mobali, batye yango likoló na nkoni na etumbelo, mpe basambeli ete mɔ́tɔ eya kozikisa mbeka yango. Kobanda na ntɔ́ngɔ́ kino na midi, bazali kobénga Baala kasi eloko moko esalemi te, mpe Eliya azali kotyola bango. Bazali konganga mpe komikatakata, kasi eyano ezali te! Na nsima, mosakoli oyo azalaki bobele ye moko, Eliya, atongi etumbelo na nkombo ya Yehova mpe abongisi nkoni mpe ngɔmbɛ mobali mpo na mbeka. Asɛngi na bato ete básopa mai likoló na mbeka mpe likoló na nkoni mbala misato, mpe na nsima abondeli Yehova: “Zongiselá ngai, ɛ [Yehova], zongiselá ngai, ete bato oyo báyeba ete ɛ [Yehova] yo ozali Nzambe [“ya solo,” NW].” Na yango, mɔ́tɔ ekiti uta na likoló, ezikisi mbeka, nkoni, etumbelo esalemi na mabanga, mpe mputulu, mpe mai makauki. Wana bato nyonso bamoni yango, mbala moko batye bilongi na bango na nsé mpe balobi ete: “[Yehova] azali Nzambe [“ya solo,” NW].” (18:37, 39) Basakoli ya Baala basengeli kobomama! Eliya ye moko asɛnzɛli likoló na mosala wana ya koboma, mpo ete moto moko te akoka kokima. Na yango Yehova anokisi mbula, kosukisáká bongo kokauka ya mai na Yisalaele.
20. (a) Lolenge nini Yehova abimeli Eliya na Holebe, litambwisi mpe libondisi nini apesi ye? (b) Lisumu nini mpe mabe nini Ahaba asali?
20 Wana nsango ya kosambwisama ya Baala ekómi na matoi ya Yezabele, aluki kobomisa Eliya. Mpo na kobanga, akimi elongo na mosungi na ye kino na mokili mokauki, mpe Yehova akambi ye kino na Holebe. Epai kuna Yehova abimeli ye—na lolenge ya kokamwisa te kati na mopɛpɛ to na koningana ya mabelé to na mɔ́tɔ te, kasi “na mongongo ya nsé, na malɛmbɛ.” (19:11, 12, NW) Yehova ayebisi ye ete apakola Hazaele lokola mokonzi ya Sulia, Yehu lokola mokonzi ya Yisalaele, mpe Elisa mosakoli na esika na ye. Abɔndisi Eliya na koyebisáká ye ete bato 7 000 kati na Yisalaele bakumbamelaki Baala te. Eliya akei mbala moko kopakola Elisa na kotikeláká ye elamba na ye ya mosala. Sikawa Ahaba alóngi na bitumba mbala mibale liboso na Basulia kasi Yehova apameli ye mpo ete asali boyokani elongo na mokonzi na bango, na esika ete aboma ye. Sikawa ekómi likambo ya Nabota, oyo Ahaba alulaki elanga na ye ya vinyo. Yezabele afundi Nabota na kosaleláká batatoli ya lokuta mpe abomisi ye mpo ete Ahaba akoka kokamata elanga yango ya vinyo. Oyo nde likambo mabe oyo ekoki kolimbisama te!
21. (a) Likámá nini Eliya asakoli yango likoló na Ahaba, mpe likoló na ndako na ye, mpe likoló na Yezabele? (b) Esakweli nini ekokisami na liwa ya Ahaba?
21 Eliya amonani lisusu. Ayebisi Ahaba ete bobele na esika oyo Nabota akufaki, mbwa ekolɔ́mbɔla makila na ye, mpe ete ndako na ye ekosilisama nyɛɛ lokola oyo ya Yelobama mpe ya Basa. Mbwa ekolya Yezabele kati na eteni ya mabelé ya Yizelele. “Ezalaki na mosusu te oyo amitekisaki ete asala mabe na miso na [Yehova] lokola Ahaba, oyo Yezabele mwasi na ye apesaki ye simbisi.” (21:25) Nzokande, lokola Ahaba amisɔkisi na koyokáká maloba ya Eliya, Yehova alobi ete mawa ekoya na eleko na ye te kasi na eleko ya mwana na ye. Sikawa Ahaba ayokani na Yosafata, mokonzi ya Yuda, ete bábundisa Sulia, mpe na kozanga kolanda toli ya Mika mosakoli ya Yehova, bakei na etumba. Ahaba akufi mpo na mpota oyo azoki kati na etumba. Wana likalo na ye ezali kosukolama na etima ya Samalia, mbwa elɔ́mbɔli makila na ye, bobele lokola Eliya asakolaki yango. Mwana na ye Ahazia akitani ye na bokonzi likoló na Yisalaele.
22. Makambo nini mamonani kati na boyangeli ya Yosafata na Yuda mpe oyo ya Ahazia na Yisalaele?
22 Yosafata ayangeli Yuda (22:41-53). Yosafata, ye oyo akendaki elongo na Ahaba na etumba mpo na kobundisa Sulia azali sembo epai na Yehova lokola Asa tata na ye, kasi apɛtoli na mobimba te bisika na likoló ya losambo ya lokuta. Nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 25, akufi mpe Yolama mwana na ye ya mobali akómi mokonzi. Na nɔ́rdi, na Yisalaele, Ahazia alandi lokolo ya tata na ye, na kotukáká Yehova na nzela ya losambo na ye ya Baala.
LITOMBA NA YANGO
23. Elikya mpe elendiseli nini Mikonzi ya Liboso ezali kopesa biso na ntina na libondeli?
23 Tokoki kozwa matomba mingi kati na mateya mauti na Nzambe mazwami na mokanda ya Mikonzi ya Liboso. Ya liboso, tólobela likambo litali libondeli, oyo elobelami mingi kati na mokanda oyo. Ntango Salomo akómaki mokonzi na Yisalaele, abondelaki Yehova na komikitisa nyonso lokola mwana moke. Asɛngaki bobele bososoli mpe motema ya botosi, kasi azwaki bobele mayele te, Yehova apesaki ye lisusu bozwi mpe nkembo. (3:7-9, 12-14) Tiká tóndimisama ete mabondeli na biso ya komikitisa mpo na kosɛnga Yehova ete apesa biso mayele mpe litambwisi kati na mosala na ye makokokisama! (Yak. 1:5) Tiká ete tóbondelaka ntango nyonso na etingya, na botɔ́ndi mozindo mpo na makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asili kosala mpo na biso, lokola Salomo asalaki yango na ntango ya kobulisama ya tempelo. (1 Mik. 8:22-53) Tiká ete tóbondelaka Yehova na elikya nyonso, na ndakisa ya Eliya oyo abondelaki na motindo wana na ntango akutanaki na mikakatano mpe wana azalaki liboso na libota oyo lizalaki kosambela bademó! Yehova akokisaka mpenza bamposa ya baoyo balukaka ye kati na libondeli.—1 Mik. 17:20-22; 18:36-40; 1 Yoa. 5:14.
24. Ndakisa nini ya kokebisa emonisami kati na Mikonzi ya Liboso, mpe mpo na nini, mingi mpenza, bakɛngɛli basengeli kosimba yango malamu?
24 Lisusu, tosengeli kozwa makebisi kati na etamboli ya baoyo bamikitisaki te liboso na Yehova. Ya solo, ‘Nzambe akotɛmɛlaka mpenza bato na lolendo’! (1 Pet. 5:5) Ezalaki bongo mpo na Adoniya, ye oyo akanisaki ete akokaki kokweisa moto oyo Yehova aponaki lokola mokonzi engebene Teokrasi (1 Mik. 1:5; 2:24, 25); Simi, oyo akanisaki ete akokaki koboya kotosa bipekiseli ya Yehova kozanga kozwa etumbu (2:37, 41-46); Salomo, wana akómaki pene na nsuka ya boyangeli na ye, Yehova abimiselaki ye “batomboki” mpo ete azangaki botosi (11:9-14, 23-26); mpe bakonzi ya Yisalaele, oyo losambo na bango ya lokuta ememelaki bango libebi (13:33, 34; 14:7-11; 16:1-4). Lisusu, ezalaki na mwasi mabe oyo atondaki na bilulela, Yezabele, ye oyo azalaki na bopusi mabe epai na mokonzi Ahaba, ndakisa na ye ya mabe esalelamaki mbula mingi na nsima mpo na kokebisa lisangá oyo ezalaki na Twatila: “Kasi nazali na yo likambo oyo ete opesi nzela na mwasi yango Yezabele, oyo akolobaka ete ye mosakoli, mpe azali kolakisa mpe azali kozimbisa baombo na ngai ete básala pite mpe bália mbeka na bikeko.” (Emon. 2:20) Bakɛngɛli basengeli kobatela lisangá ete ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ete bopusi ekokani na oyo ya Yezabele ezala kati na yango te!—Kokanisá na Misala 20:28-30.
25. Bisakweli nini bizwami kati na Mikonzi ya Liboso bisili kokokisama na lolenge ya kokamwa, mpe lolenge nini komikundola yango ekoki kosalisa biso lelo oyo?
25 Nguya ya Yehova ya kosakola makambo liboso ete másalema emonisami polele kati na kokokisama ya bisakweli mingi oyo bizwami kati na Mikonzi ya Liboso. Na ndakisa, ezali na esakweli moko ya kobenda likebi, oyo ebimaki koleka mbula 300 liboso ya kokokisama na yango, ete Yosiya asengelaki kozala moto oyo alingaki kobukabuka etumbelo ya Yelobama na Betele. Yosiya asalaki bobele bongo! (1 Mik. 13:1-3; 2 Mik. 23:15) Nzokande, bisakweli bileki monene bizali oyo bitaleli ndako ya Yehova oyo Salomo atongaki. Yehova ayebisaki Salomo ete soko akokwea na losambo ya banzambe ya lokuta, akosilisa Yisalaele nyɛɛ mpe akosundola ndako oyo abulisaki mpo na nkombo na ye. (1 Mik. 9:7, 8) Kati na 2 Ntango 36:17-21 tozali kotánga lolenge nini esakweli wana ekokisamaki solo mpenza. Lisusu, Yesu amonisaki ete tempelo oyo Elode Monene atongaki na nsima, bobele na esika moko na oyo ya kala, esengelaki kozwa etumbu motindo wana mpe mpo na likambo bobele moko wana. (Luka 21:6) Likambo oyo mpe ekokisamaki mpenza! Tosengeli komikundola makámá wana mpe ntina oyo yango ebimaki, mpe esengeli ntango nyonso kokundwela biso ete tótambolaka kati na nzela ya Nzambe ya solo.
26. Emonaneli nini ya kolendisa, oyo etaleli mikolo mizali koya na ntina na tempelo mpe Bokonzi ya Yehova na elimo, ezwami kati na Mikonzi ya liboso?
26 Mokonzi-mwasi ya Seba autaki na mboka na ye mosika mpo na kokende koyoka mayele ya Salomo, komona bolamu ya bato na ye, mpe nkembo ya bokonzi na ye, sangisá mpe ndako ya nkembo ya Yehova. Nzokande, ata Salomo mpe alobaki na Yehova ete: “Lola mpe likoló na lola ikoki kozingela ye te, na koleka ndako oyo ngai natongeli yo yango ekoki te.” (1 Mik. 8:27; 10:4-9) Kasi bikeke mingi na nsima Klisto Yesu ayaki kokokisa mosala ya botongi na elimo, oyo etalelaki mingi mpenza kozongisama lisusu ya losambo ya solo kati na tempelo monene ya Yehova na elimo. (Ebe. 8:1-5; 9:2-10, 23) Mpo na tempelo yango, oyo ezali monene koleka oyo ya Salomo, elaka ya Yehova ezali solo: “Bongo nakokokisa kiti na bokonzi na yo likoló na Yisalaele libela.” (1 Mik. 9:5; Mat. 1:1, 6, 7, 16; 12:42; Luka 1:32) Mokanda ya Mikonzi ya Liboso ezali komonisa elilingi kitoko etaleli mikolo mizali koya na ntina na nkembo ya tempelo ya Yehova na elimo mpe bolamu na yango, bosepeli na yango, mpe esengo monene ya baoyo bakofanda na nsé ya boyangeli ya mayele ya Bokonzi ya Yehova na litambwisi ya Klisto Yesu. Tiká ete botɔ́ndi na biso mpo na losambo ya solo mpe ntina ya bibongiseli kitoko ya Bokonzi na ye na nzela ya Mombóto ekóba kokóla.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku The International Standard Bible Encyclopedia, Vol. 4, 1988, ebimisami na G. W. Bromiley, lokasa 648.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 149, 952.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 750-751.
d Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 947-948.
e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 949-950.