Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 223-226
  • Mokanda ya Biblia nimero 50—Bafilipi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 50—Bafilipi
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA BAFILIPI
  • LITOMBA NA YANGO
  • Bafilipi 4:13—“Nakokí na mâná mánso mpô ya Krístu óyo akoléndisaka ngáí”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • “Leká na masedonia”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • “Kimya ya Nzambe . . . eleki makanisi nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Apesaki litatoli malamumalamu.”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 223-226

Mokanda ya Biblia nimero 50—Bafilipi

Mokomi: Paulo

Esika ya bokomi: Loma

Nsuka ya bokomi: soko 60–61 T.B.

1. (a) Lolenge nini nsango malamu ekómaki epai na Bafilipi? (b) Wapi makambo ya kala ya engumba Filipi oyo mazali kobenda likebi?

NTANGO ntoma Paulo abyangamaki na nzela ya emonaneli ete akende na Makedonia mpo na kosakola nsango malamu, ye mpe baninga na ye ya mobembo, elingi koloba Luka, Sila mpe elenge Timoté, batosaki na lombangu mpenza. Uta Toloa na Asie Mineure, basalaki mobembo na masuwa kino Neapoli mpe bakendaki mbala moko na Filipi, oyo ezalaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 15, kolekáká na nzela oyo ezwami katikati na bifelo ya ngomba. Luka alobeli engumba yango ete ezalaki “mboka na liboso na mokili yango na Makedonia.” (Mis. 16:12) Nkombo Filipi euti na nkombo ya mokonzi ya Makedonia, Filipi II (tata na Alesandala Monene), oyo abɔtɔlaki engumba yango na mobu 356 L.T.B. Na nsima, Baloma bayaki kozwa yango. Ezalaki esika ya bitumba ya nsɔ́mɔ na mobu 42 L.T.B. oyo biyeisaki makasi etɛlɛmɛlo ya Octave, oyo na nsima akómaki Kaisala Augusite. Mpo na ekaniseli ya bolóngi wana, atyaki Filipi na nsé na boyangeli ya Loma.

2. Mosala ya kosakola ya Paulo kati na Filipi mosalaki bokóli nini, mpe makambo nini mabimaki elongo na kobotama ya lisangá na engumba yango?

2 Paulo azalaki na momeseno ya koteya liboso Bayuda ntango akómi na engumba moko ya sika. Nzokande, ntango akómaki mpo na mbala ya liboso na Filipi, soko na mobu 50 T.B., akutaki bobele Bayuda moke kuna mpe emonani ete bazalaki na eyanganelo te, mpamba te bazalaki kokutana pembeni ya ebale na libándá ya engumba mpo na kobondela. Mosala ya kosakola ya Paulo moumelaki te kobota mbuma; moko na baoyo bakómaki bandimi ya liboso ezalaki Ludia, mwasi moko ya mombongo mpe prozelite na losambo ya Bayuda, oyo akakatanaki te mpo na koyamba solo na ntina na Klisto mpe asɛngaki na makasi mpenza ete basáli wana ya mobembo báfanda na ndako na ye. Luka akomi ete, “Andimisi biso [na] makasi.” Nzokande, botɛmɛli eumelaki te kobima mpe Paulo na Sila babɛtamaki fimbo mpe na nsima babwakamaki na bolɔ́kɔ. Wana bazalaki kati na bolɔ́kɔ, koningana na mabelé esalamaki mpe mokɛngɛli na bolɔ́kɔ, elongo na libota na ye, bakómaki bandimi, nsima na koyoka mateya ya Paulo mpe Sila. Mokolo oyo molandaki, Paulo mpe Sila babimisamaki na bolɔ́kɔ, bakendeki kotala bandeko na ndako ya Ludia mpe balendisaki bango liboso ete bábima na engumba yango. Paulo abosanaki ata moke te bolózi mingi oyo bazwaki liboso ya kobotama ya lisangá ya sika na Filipi.​—Mis. 16:9-40.

3. Na ndenge nini, na nsima, Paulo amonanaki mpe asololaki na lisangá ya Filipi?

3 Mwa bambula na nsima, na boumeli ya mobembo na ye ya misato ya misionere, Paulo alekaki lisusu na lisangá ya Filipi. Bongo, soko mbula zomi na nsima ya kotyama ya lisangá wana, bolingo mozindo oyo bandeko na Filipi bamonisaki epusaki Paulo na kotindela bango mokanda oyo mobatelamaki kati na Makomami Mosantu mpe mobéngami na nkombo ya lisangá wana ya bolingo.

4. Wapi elembeteli oyo emonisi mokomi ya mokanda ya Bafilipi, mpe nini emonisi bosolo ya mokanda yango?

4 Na bantina ebongi mpenza, balimboli ya Biblia bandimaka, lokola yango emonisami na vɛrsɛ́ ya liboso ya mokanda yango, ete mokomi ya mokanda wana ezalaki mpenza Paulo. Kati na nkomá na ye moko epai na Bafilipi, Polycarpe (69?-155? T.B.) ayebisi ete Paulo atindelaki bango mokanda. Balimboli ya kala ya Biblia, oyo bankombo na bango elandi, batángaki mokanda yango ete moutaki na Paulo, ezali bongo Ignace, Irénée, Tertullien, mpe Clément moto na Alesandalia. Yango etángami mpe kati na mokanda mobéngami Fragment muratorien (Eteni ya mokanda ya Muratori) ya ekeke ya mibale T.B. mpe kati na bakanɔ́ mingi mosusu, mpe ezali kokutama penepene na mikanda mosusu mwambe ya Paulo kati na papirise Chester Beatty No. 2 (P46), oyo endimami ete ekomamaki soko na mobu 200 T.B.

5. Nini emonisi ete Loma ezali esika oyo mokanda ya Bafilipi mokomamaki?

5 Esika mpe dati ya bokomami na yango ekoki koyebisama na bosikisiki oyo ebongi mpenza. Na ntango ya bokomami, Paulo azalaki mokangami oyo akɛngɛlamaki na etuluku ya basodá-bakɛngɛli ya mokonzi ya Loma, mpe mosala monene ya boklisto mozalaki kokóba kosalema zingazinga na ye. Asukisaki mokanda na ye na bambote oyo eutaki na basembwi oyo bazalaki bato ya ndako ya Kaisala. Makambo nyonso wana mazali komonisa ete Loma ezali esika oyo mokanda yango moutaki.​—Filp. 1:7, 13, 14; 4:22; Mis. 28:30, 31.

6. Bilembeteli nini bimonisi ntango ya bokomami ya mokanda ya Bafilipi?

6 Kasi ntango nini mokanda yango mokomamaki? Na kotalela lolenge nsango mpe ntina ya kokangama ya Paulo lokola moklisto epalanganaki kino na etuluku mobimba ya basodá-bakɛngɛli ya mokonzi, mpe epai na bato mingi mosusu, emonani mpenza ete Paulo aumelaki mingi kati na Loma. Mpe lisusu, koya ya Epafalodito uta na Filipi (oyo ezalaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 1 000) mpo na komema likabo epai na Paulo ezwaki ntango mingi, kokóma ya nsango ya bokɔnɔ ya Epafalodito uta na Loma kino na Filipi ezwaki ntango, mpe koya ya nsango ya mawa oyo bandeko na Filipi bayokaki mpo na bokɔnɔ ya Epafalodito ezwaki ntango mingi mpo na kolongwa na Filipi kino Loma. (Filp. 2:25-30; 4:18) Lokola kokangama ya Paulo na bolɔ́kɔ mpo na mbala ya liboso na Loma esalamaki soko na mobu 59-61 T.B., emonani mpenza ete akomaki mokanda yango soko na mobu 60 to 61 T.B., mbula moko, to koleka, nsima ya kokóma na ye mpo na mbala ya liboso na Loma.

7. (a) Ekanganeli nini ezalaki kati na Paulo mpe Bafilipi, mpe nini epusaki ye na kotindela bango mokanda? (b) Bafilipi ezali mokanda ya lolenge nini?

7 Mpasi oyo azwaki mpo na kobota bana oyo bazalaki na Filipi na nzela ya liloba ya solo, bolingo mpe bokabi ya Bafilipi oyo emonisami na makabo ya biloko ya ntina oyo bazalaki kotindela Paulo kati na mibembo na ye mpe kati na makambo mingi ya mpasi oyo akutanaki na yango, mpe ebele ya mapamboli ya Yehova likoló na misala makasi na ye ya ebandeli lokola misionere kati na Makedonia; nyonso wana ebimisaki ekanganeli ya bolingo makasi kati na Paulo mpe bandeko oyo bazalaki na Filipi. Na bongo, makabo na bango ya bolingo, mpe komibanzabanza na bango na ntina na Epafalodito mpe bokóli ya nsango malamu kati na Loma, epusaki Paulo na kotindela bango mokanda moko ya mɔ́tɔ mpe ya bolingo mozindo oyo motondi na bilendiseli ya kotonga mpenza.

MAKAMBO MAZALI KATI NA BAFILIPI

8. (a) Lolenge nini Paulo amonisi ete azali na bolingo mozindo mpo na bandeko ya Filipi mpe ete azali kotyela bango motema? (b) Paulo alobi nini mpo na minyɔlɔlɔ na ye na bolɔ́kɔ, mpe toli nini apesi?

8 Kokɔtela mpe kotambolisa nsango malamu (1:1-30). Paulo mpe Timoté batindi bambote, mpe Paulo atɔ́ndi Nzambe mpo na makabo oyo Bafilipi bazali kopesa mpo na nsango malamu “longwa na mokolo na liboso kino sasaipi.” Andimisami ete bakokóba mosala na bango ya malamu kino kokokisama na yango, mpamba te bazali basangani elongo na ye kati na ngɔlu, mpe kati na “mosala na kolobela [“kokɔtela,” NW] mpe kotambolisa Nsango Malamu.” Azali na mposa makasi mpo na bango banso kati na bolingo mpe alobi ete: “Libondeli na ngai ezali ete bolingo na bino bóyikana koleka mingi mingi . . . ete [bókoka komindimisa makambo oyo maleki ntina, NW].” (1:5, 7, 9, 10) Paulo alingi báyeba ete “makambo mayeli ye masungi mpo na kotambolisa nsango malamu,” na boye ete minyɔlɔlɔ na ye ya bolɔ́kɔ misili koyebana epai na bato banso mpe bandeko bazwi elendiseli mpo na kolobela liloba ya Nzambe kozanga kobanga. Atako ezali na mbano mpo na Paulo soki akufi sikawa, nzokande ayebi ete, mpo na bokóli mpe esengo na bango, ezali na ntina mingi atikala naino na bomoi. Apesi bango toli ete bámitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu, mpo ete ata soki akoya epai na bango to akoya te, ayoka ete bazali kokóba kobunda kati na bomoko mpe bazali ‘kobanga ata moke te na ntina na batɛmɛli na bango.’—1:12, 28.

9. Lolenge nini Bafilipi bakoki kobatela makanisi ya Klisto?

9 Kobatela makanisi motindo moko na Klisto (2:1-30). Paulo alendisi Bafilipi ete bázala na elimo ya komikitisa, ‘kotaleláká bobele matomba na bango moko te, kasi matomba ya basusu lokola.’ Basengeli kozala na makanisi motindo moko na Klisto Yesu oyo, atako azalaki na motindo ya Nzambe, amikómisaki mpamba mpo na kokóma moto mpe amikitisaki kati na botosi kino kufa, na boye ete Nzambe atombolaki ye mpe apesi ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso. Paulo alendisi bango ete: “Bóluka sasaipi nzela na kobika na bino na nsɔ́mɔ mpe na kolɛnga.” “Bósala makambo nyonso na kozanga koimaima mpe kotyana ntembe,” mpe bólanda ‘kosimba liloba ya bomoi.’ (2:4, 12, 14, 16) Azali kolikya kotindela bango Timoté mpe andimisami ete, nsima na mwa ntango moke, ye moko mpe akokende kuna. Kasi sikawa, mpo ete bákoka kosepela lisusu, azali kotindela bango Epafalodito, oyo bokɔnɔ na ye bouti kosila.

10. Lolenge nini Paulo abilaki libonza, mpe apesi toli nini epai na basusu?

10 “Kobiláká libonza kino nsuka, NW” (3:1–4:23). Paulo alobi ete, ‘biso bato tokatami ngenga na solo, tosengeli kokeba mpo na bambwa, mpo na baoyo bazali kokatakata nzoto mpamba.’ Soki moto moko azali na bantina ya kotyela nzoto motema, Paulo aleki mpenza, mpe kobotama na ye lokola Moyuda mpe Mofalisai oyo akatami ngenga ezali komonisa likambo yango. Kasi azali kotalela nyonso wana ete ezali biloko bisilá kobunga ‘mpo na likambo lileki malamu, yango koyeba Klisto Yesu Nkolo na ye.’ Na nzela ya boyengebene oyo euti na kondima, azali kolikya “kokóma na lisekwa ya liboso longwa na bakufi.” (3:2, 3, 8, 11, NW) Na yango, Paulo alobi ete, “awa ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe kopusáká mpo na yango ezali liboso, nazali kobila kino nsuka mpo na libonza oyo ezali ebyangeli na Nzambe kuna na Likoló, kati na Klisto Yesu.” Tiká ete banso oyo basili kokɔmela bázala mpe na makanisi motindo moko. Ezali na baoyo libumu ekómá nzambe na bango, oyo makanisi na bango matyamá sé na biloko ya mokili, mpe oyo nsuka na bango ezali bongo libebi, kasi Paulo andimi ete “mboka na biso ezali kuna na Likoló.”​—3:13, 14, 20.

11. (a) Wapi makambo masengeli kotalelama mpe kosalelama? (b) Paulo asaleli maloba nini mpo na bokabi ya Bafilipi?

11 Paulo apesi elendiseli ete ‘bósepelaka kati na Nkolo mpe tiká ete boboto na bino eyebana na bato banso. Bólanda kotalela makambo ya solo mpe mabongi kobanzama, makambo oyo mazali sembo, oyo mazali pɛto, oyo matondi na boboto, oyo malobelami malamu, oyo na bizaleli bibongi mpe oyo ebongi kosanzolama. Bósalela oyo boyekolaki, oyo bondimaki, oyo boyokaki mpe oyo bomonaki epai na ngai, mpe Nzambe na kimya akozala na bino.’ (4:4-9) Paulo azali na esengo mingi mpo na makanisi ya bokabi oyo Bafilipi bazali na yango epai na ye, atako azali na makasi ya kosala makambo nyonso ‘na lisalisi ya ye oyo akokembisaka ye na nguya.’ Apesi bango matɔ́ndi mingi mpenza mpo na makabo na bango. Uta ntango abandaki kosakola nsango malamu kati na Makedonia, bango bazalaki kopesa makabo na lolenge loleki mpenza. Mpo na yango, Nzambe akosilisa mpenza ‘bosɛngá mobimba na bango engebene bonene ya bozwi na ye na nkembo na nzela na Klisto Yesu.’ (4:13, 19) Atindi mbote oyo euti epai na babulami nyonso, bakisá mpe mbote ya bato ya ndako ya Kaisala.

LITOMBA NA YANGO

12. Lolenge moko na bandeko oyo bazalaki na Filipi, ndenge nini tokoki lelo kondimama na Nzambe mpe kozala ntina ya esengo mpo na bandeko na biso?

12 Oyo nde litomba mokanda ya Bafilipi ezali na yango mpo na biso! Na ntembe te tozali na mposa ya kondimama na Yehova mpe kozwa makumisi uta na bakɛngɛli baklisto oyo bazali kokamba biso, lokola oyo lisangá ya Filipi ezwaki uta na Paulo. Tokoki kozwa yango soki tolandi ndakisa kitoko ya Bafilipi mpe toli ya Paulo oyo etondi na bolingo. Lolenge moko na Bafilipi, tosengeli komonisa ezaleli ya kokaba, tosengeli komibanzabanza mpo na kosunga bandeko na biso ntango bazali na mikakatano, mpe tosengeli kokɔtela mpe kotambolisa nsango malamu. (1:3-7) Tosengeli kokóba “kotɛlɛma ngwi kati na elimo moko, na molimo moko kobundáká elongo mpo na kondima na nsango malamu,” kongɛngáká lokola “miinda” kati na libota na bato bayɔngɔtani mpe bapɛngwi nzela. Soki tozali kosala makambo yango mpe kolanda kotalela makambo ya litomba monene, tokoki kokóma ntina ya esengo mpo na bandeko na biso lolenge Bafilipi bakómaki esengo mpe motole mpo na ntoma Paulo.​—1:27; 2:15; 4:1, 8, NW.

13. Na makambo nini tokoki komekola Paulo na bomoko nyonso?

13 Paulo alobi ete “Na bomoko mpenza bózala bamekoli na ngai, NW.” Bakomekola ye na makambo nini? Moko na yango ezali ya kozala na bosepeli na makambo ya lolenge nyonso. Ezala kati na bozwi mingi to kati na bosɛngá, Paulo ayekolaki komiyokanisa na bizalela ya makambo nyonso, na ntina ete akóba mosala ya Nzambe na molende mpe na esengo nyonso. Banso mpe tosengeli komekola Paulo na komonisáká bolingo mingi mpo na bandeko na biso ya sembo. Alobelaki mosala ya Timoté mpe ya Epafalodito na esengo mpenza oyo euti na bolingo! Oyo nde mayoki makasi azalaki na yango mpo na bandeko na ye ya Filipi, oyo abéngaki bango ete “bandeko na ngai, baoyo nazali kolinga bino mpe kozala na bino mposa, esengo mpe motole na ngai”!—3:17; 4:1, 11, 12; 2:19-30.

14. Toli nini malamu mokanda ya Bafilipi epesi na ntina na mokano ya kozwa bomoi mpe Bokonzi, mpe mokanda yango mozali kolobela libosoliboso banani?

14 Na lolenge nini mosusu Paulo akoki komekolama? Na “kobiláká libonza kino nsuka, NW”! Baoyo nyonso batye makanisi na bango likoló na ‘makambo mabongi kobanzama’ bazali mpenza kosepela na ebongiseli kitoko ya Nzambe mpo na likoló mpe mabelé, epai kuna ‘ndemo nyonso ikoyambola polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.’ Toli malamu oyo ezali kati na Bafilipi ezali kolendisa baoyo nyonso bazali kolikya kozwa bomoi ya seko na nzela ya Bokonzi ya Nzambe ete bálanda ntango nyonso mokano wana. Nzokande, mokanda ya Bafilipi mozali libosoliboso mpenza koloba epai na baoyo ‘mboka na bango ezali kuna na Likoló,’ oyo bazali kozela na mposa makasi mpenza ete bázwa “lolenge na nzoto [ya Klisto] na nkembo.” ‘Kobosanáká makambo mazali na nsima mpe kopusanáká mpo na yango ezali liboso,’ tiká ete bango nyonso bámekola ntoma Paulo na ‘kobiláká libonza kino nsuka mpo na mbano ya libyangami ya likoló,’ libula na bango ya nkembo kati na Bokonzi ya makoló!—4:8; 2:10, 11; 3:13, 14, 20, 21, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto