Mokanda ya Biblia nimero 64—3 Yoane
Mokomi: Ntoma Yoane
Esika ya bokomi: Efese, to pene na yango
Nsuka ya bokomi: soko 98 T.B.
1. Mokanda ya misato ya Yoane motindamaki epai na nani, mpe makambo nini toyebi na ntina na ye?
MOKANDA oyo motindami epai na Gayo, moklisto moko ya sembo oyo Yoane azalaki kolinga mingi. Gayo ezalaki nkombo oyo epesamaki epai na bato mingi na eleko ya lisangá ya liboso ya boklisto. Yango emonani mbala minei kati na biteni mosusu ya Makomami ya Greke ya boklisto, kolobeláká bato misato, to mpe minei, oyo bakeseni. (Mis. 19:29; 20:4; Lom. 16:23; 1 Kol. 1:14) Ezali ata na likambo moko te oyo eyebisami mpo na kokesenisa Gayo oyo Yoane atindelaki ye mokanda mpe ba Gayo mosusu. Manso oyo toyebi na ntina na Gayo yango ezali bobele ete azalaki mosangani ya lisangá ya boklisto, azalaki moninga ya motema ya Yoane, mpe ete mokanda ya misato ya Yoane motindamaki epai na ye moko; na ntina yango, liloba “yo” ezali ntango nyonso kosalelama.
2. Nini ezali komonisa mokomi, ntango mpe esika ya bokomi ya Mokanda ya Misato ya Yoane?
2 Lokola lolenge ya botindi mbote na ebandeli mpe na nsuka ekokani na oyo ya mokanda ya mibale ya Yoane, mpe lokola mokomi amibéngi lisusu ete azali “mobangé,” boye ntembe ezali te ete mokomi ya mokanda yango ezalaki bobele ntoma Yoane. (2 Yoa. 1) Bokokani oyo ezali kati na makambo mpe elobeli ya mokanda yango, lolenge moko na mikanda mosusu mibale ya Yoane, emonisi ete mokanda yango mokomamaki na Efese to pene na yango, soko na mobu 98 T.B. Na ntina na bokuse na yango, mokanda oyo motángami mingi te na bakomi ya kala, kasi esika moko na mokanda ya mibale ya Yoane, yango ezwami kati na bakataloge ya kala ya Makomami mapemami.a
3. Yoane amonisi nini kati na mokanda na ye ya misato, mpe etaliseli nini kitoko tozwi na ntina na bondeko oyo ezalaki kati na baklisto ya liboso?
3 Kati na mokanda oyo, Yoane asepeli mpo na ezaleli ya koyamba bapaya oyo Gayo amonisaki liboso na bandeko batamboli, mpe alobeli mwa mikakatano oyo mibimisamaki na Diotelefe, moto moko ya lolendo. Emonani ete Demeteli oyo alobelami kati na mokanda yango azali moto oyo amemaki mokanda wana epai na Gayo; boye ekoki kozala ete atindamaki na Yoane mpe azalaki na mposa ya boyambi ya Gayo kati na mobembo, boyambi oyo mokanda wana esengelaki kozala ndanga na yango. Lolenge moko na Gayo, toyebi ata likambo moko te na ntina na Diotelefe mpe Demeteli, longola bobele makambo oyo tozali katánga na mokanda oyo. Nzokande, mokanda yango mozali kopesa mwa etaliseli kitoko mpenza na ntina na bondeko makasi oyo ezalaki kati na baklisto ya liboso, oyo esangisaki bato ya mikili ndenge na ndenge. Moko na makambo yango ezalaki momeseno ya koyamba na boboto nyonso baoyo bazalaki kosala mibembo ‘mpo na nkombo yango,’ atako bayebanaki liboso te na bayambi na bango.—3 Yo V. 7.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YOANE YA MISATO
4. Yoane akumisi Gayo na likambo nini, etamboli nini ya mabe Yoane akweisi, mpe toli malamu nini apesi?
4 Ntoma alendisi ezaleli ya koyamba bapaya mpe ya kosala misala malamu (V. 1-14). Yoane asepeli na koyoka ete Gayo azali ntango nyonso “kotambolaka kati na . . . solo.” Apesi ye longonya mpo ete azali kosala mosala ya sembo, na komonisáká boboto epai na bandeko oyo bazali bapaya. Yoane alobi ete: “Bongo, ekoki na biso [koyamba] bato na motindo yango ete tózala basalani na bango na misala na solo.” Na mikolo mileki, Yoane atindelaki lisangá mokanda, kasi Diotelefe, moto na komikumisa, azali komonisa limemya ata na likambo moko te oyo liuti na Yoane mpe na bakambi mosusu. Ntango Yoane akokende kuna, akobyanga ye ete amonisa ntina ya ‘bilobaloba na ye.’ Molingami Gayo alendisami ete ‘ayekola makambo mabe te kasi makambo malamu.’ Demeteli atángami ete azali ndakisa oyo ebongi na lokumu. Na esika ya kokoma makambo mingi, Yoane azali kolikya ete, nsima na mwa ntango moke, bakomonana na miso mpenza elongo na Gayo.—V. 4, 8, 10, 11.
LITOMBA NA YANGO
5. (a) Lolenge nini Yoane amimonisaki ete azalaki mokɛngɛli malamu, mpe elimo nini esengelaki kobatelama? (b) Mpo na nini Yoane alobaki polele na ntina na Diotelefe? (c) Lelo oyo, tosengeli kosala molende mpo na likambo nini, na boyokani na etindá nini oyo Yoane apesi?
5 Ntoma Yoane amimonisi ete azali mokɛngɛli oyo azali kopesa ndakisa malamu na molende mpo na kobatela lisangá liboso na bopusi nyonso ya mabe oyo ekoki kobebisa yango. Elimo ya bolingo mpe ya koyamba bapaya oyo ezalaki komonana kati na lisangá mobimba ebongi mpenza kokumisama, mpe na ntembe te ezalaki mokumba na bango ete bábatela ezalela yango ya esengo, na ntina ete bandeko bakóló-mboka mpe “bapaya” (bato oyo bayebanaki liboso te epai na bayambi na bango oyo bazalaki baklisto), oyo bazalaki kolekaleka kati na bango, bákoka kosala elongo lokola “basalani na misala na solo.” (V. 5, 8, NW) Nzokande, Diotelefe azalaki na miso ya lolendo, eloko oyo eyinami na Yehova, mpe azalaki na limemya te mpo na bokonzi ya Teokrasi, azalaki kútu kobimisa maloba ya matɔ́ngi na ntina na ntoma Yoane. (Mas. 6:16, 17) Azalaki kotya epekiseli liboso na ezaleli ya boklisto ya koyamba bapaya, ezaleli oyo lisangá ezalaki na yango. Likambo ya kokamwa ezali te soki ntoma Yoane atɛmɛlaki mabe wana mpe atombolaki bolingo ya solo ya boklisto kati na lisangá. Lelo oyo, tosengeli kozala na molende mpo na kobatela ezaleli ya komikitisa, kotamboláká kati na solo, mpe kosaleláká bolingo bouti na Nzambe mpe bokabi, na boyokani na motindá oyo Yoane apesi ete: “Ye oyo akosalaka malamu azali moto na Nzambe; ye oyo akosalaka mabe asili komona Nzambe te.”—3 Yoa. 11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etánda “Bakataloge minene ya kala ya Makomami ya Greke ya boklisto,” na lokasa 303.