Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango
Boyekoli nimero 4—Biblia mpe kanɔ́ na yango
Eutelo ya liloba “Biblia”; komonisama ya mikanda oyo mizali mpenza mikanda ya Bibliotɛkɛ ya Nzambe; kobwakama ya mikanda oyo babéngi apokrife.
1, 2. (a) Ndimbola ya liloba ya Greke bi·bliʹa ezali nini? (b) Lolenge nini liloba wana mpe maloba mosusu oyo makangani na yango masalelami kati na Makomami ya Greke ya boklisto? (c) Lolenge nini liloba “Biblia” likɔtaki na Lingala?
LOKOLA Makomami mapemami mabéngamaka mingimingi Biblia, esengeli koluka koyeba eutelo mpe ndimbola ya liloba “Biblia.” Yango euti na liloba ya Greke bi·bliʹa, oyo elimboli “mikanda mike.” Na ngala na yango, bi·bliʹa euti na biʹblos, liloba oyo lizali komonisa eteni ya ntéi ya nzeté ya papirise oyo uta na yango bazalaki kosala “nkasa” ya kokoma, na ntango ya kala. (Libóngo ya Gebali, oyo ezalaki na mokili ya Foenike, mpe oyo na nzela na yango papirise ezalaki kosombama uta na Ezipito, ekómaki kobéngama Byblos epai na Bagreke. Talá Yosua 13:5, NW, maloba na nsé ya lokasa.) Maloba ndenge na ndenge oyo makomamaki na nkasa wana ya papirise mayebanaki mingi na nkombo bi·bliʹa. Na yango, liloba bi·bliʹa likómaki komonisa nkomá ya lolenge nyonso; ezala barulo, babúku, mikanda, to makomi, to ata bibliotɛkɛ epai kuna mikanda mikemike mizwami.
2 Likambo ya kokamwa mpenza, liloba “Biblia” yango moko ezali te kati na libongoli ya Lingala to na mabongoli ya nkótá mosusu ya Makomami Mosantu. Nzokande, uta ekeke ya mibale L.T.B., kosangisama ya mikanda mipemami ya Makomami ya Liebele ebéngamaki na lokótá ya Greke ete ta bi·bliʹa. Na Danyele 9:2, mosakoli akomaki ete: “Ngai, Danyele, nasosolaki kati na mikanda . . . ” Na mokapo yango libongoli Septante esaleli liloba biʹblois, oyo ezali boíké ya liloba biʹblos. Na 2 Timoté 4:13, Paulo akomaki ete: “Ekoya yo, yaká . . . na mikanda [na Greke, bi·bliʹa].” Kati na mitindo ndenge na ndenge ya gramere na yango, maloba ya Greke bi·bliʹon mpe biʹblos ezali kokutama mbala koleka 40 kati na Makomami ya Greke ya boklisto mpe ebongolamaka mingi na “(ba)rulo” to “mokanda to mikanda.” Na nsima, Bi·bliʹa ekómaki kosalelama lokola liloba ya bɔɔkɔ (singulier) na Latin mpe, uta na Latin, liloba “Biblia” ekɔtaki na Lingala.
3. Lolenge nini bakomi ya Biblia bandimisaki ete yango ezali Liloba lipemami ya Nzambe?
3 Yango ezali Liloba ya Nzambe. Atako bato ndenge na ndenge basalelamaki mpo na kokoma Biblia na nsé ya kopemama, mpe atako basusu basanganaki na kobongolama na yango longwa na nkótá ya ebandeli kino na nkótá oyo ikoki kokomama na mikolo na biso, nzokande Biblia ezali solosolo Liloba ya Nzambe; yango ezali emoniseli epemami na ye moko epai na bato. Bakomi bapemami ya Biblia bazalaki kotalela yango ete ezalaki Liloba ya Nzambe, lokola yango emonisami polele na maloba oyo bazalaki kosalela, na ndakisa “makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova]” (Det. 8:3), “maloba na [Yehova]” (Yos. 24:27), “malako na [Yehova]” (Ezl. 7:11), “Mobeko na [Yehova]” (Nz. 19:7), “Liloba na [Yehova]” ‘maloba ya Yehova’ (Mat. 4:4), mpe “Liloba na [Yehova]” (1 Tes. 4:15).
BIBLIOTƐKƐ YA NZAMBE
4. Biblia ezali lisangá ya nini, mpe nani atyaki yango bongo?
4 Na mikolo na biso, búku oyo moto ayebi yango na nkombo Biblia ezali bongo lisangá ya mikanda ya kala oyo mipemamaki na Nzambe. Yango ebongisamaki lokola makomi mpe esangisamaki na boumeli ya bikeke 16. Na mobimba na yango, kosangisama wana ya mikanda esali oyo Jérôme abéngi yango na Latin ete Bibliotheca Divina, to Bibliotɛkɛ ya Nzambe. Bibliotɛkɛ wana ezali na kataloge na yango, to liste ya makomi oyo mandimami; liste yango ezali bobele na mikanda oyo mibongi na bibliotɛkɛ wana mpe oyo mitondi na makambo ya sikisiki ya bibliotɛkɛ yango. Mikanda nyonso oyo mindimami te milongolami. Yehova Nzambe azali Motaleli Monene ya bibliotɛkɛ wana; ye azali kotya mitindá oyo mizali komonisa ete makomi oyo to oyo mosusu masengeli kokɔtisama to kokɔtisama te kati na bibliotɛkɛ. Na bongo, Biblia ezali na kataloge oyo esilá kotyama; kataloge wana ezali na mikanda 66 oyo mibimi, yango nyonso, na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe.
5. Kanɔ́ ya Biblia ezali nini, mpe ebéngeli yango euti wapi?
5 Mbala mingi, liboke to liste ya mikanda oyo bosolo na yango endimami mpe oyo mindimami ete mizali Makomami mapemami, ebéngamaka mingimingi kanɔ́ ya Biblia. Na ebandeli, mokɛ́kɛ́lɛ́ (na Liebele, qa·nehʹ) ezalaki kosalelama lokola emekeli ya bolai soki eteni ya nzeté ezali te. Ntoma Paulo asalelaki liloba ya Greke ka·nonʹ mpo na kolobela ‘emekeli ya etamboli,’ bakisá mpe “teritware” oyo bandelo na yango emekamaki mpe oyo epesamelaki ye. (Gal. 6:16, NW, maloba na nsé ya lokasa; 2 Kol. 10:13, NW) Na yango, mikanda ya kanɔ́ ezali mikanda oyo mitondi na bosolo, oyo mipemami mpe oyo mibongi kosalelama lokola emekeli mpo na koyeba kondima ya solo, mateya ya sembo mpe etamboli malamu. Soki tozangi kosalela mikanda oyo mizali “semba” lokola libaya to nivó ya batongi-ndako, boye “botongi” na biso ekozala makasi te, mpe ekokwea na lomeko ya Motaleli Monene.
6. Wapi mwa makambo oyo mazali komonisa ete mokanda boye mozali mokanda ya kanɔ́?
6 Lolenge ya koyeba mokanda ya kanɔ́. Wapi ndambo ya bilembeteli biuti na Nzambe oyo bimonisi ete mikanda 66 ya Biblia mibongaki kokɔta na kanɔ́ na yango? Libosoliboso, mikanda yango misengeli kolobela misala ya Yehova awa na mabelé, kopusáká bato na kosambela ye mpe kolamwisáká kati na bango limemya mozindo mpo na nkombo na ye, bozalisi na ye mpe mpo na mikano na ye awa na mabelé. Mikanda yango misengeli komonisa bilembeteli ete mipemamaki na Nzambe, elingi koloba mizwamaki na nzela ya elimo santu. (2 Pet. 1:21) Yango esengeli kopusa na biyambayamba te, soko na losambo ya bikelamu mpe te, kútu esengeli nde kopusa na bolingo mpe na mosala mpo na Nzambe. Na kati ya mokanda mokomoko, esengeli kozala ata na eloko moko te oyo ezangi boyokani na makambo mazali kati na mikanda mosusu ya liboke wana; nzokande, mokanda mokomoko mosengeli, na bomoko mpenza na mikanda mosusu, kondimisa ete yango nyonso ekomamaki na lotómo ya moto bobele moko, Yehova Nzambe. Tosengeli komizela mpe ete makomi yango mápesa bilembeteli oyo bizali komonisa bosolo na yango ata kati na makambo ya mikemike. Likoló na bilembeteli ya moboko oyo touti kotánga, ezali mpe na bilembeteli mosusu ya sikisiki oyo bizali kolakisa kopemama, mpe na yango ezali komonisa kokɔtisama ya makomi wana kati na kanɔ́, engebene lolenge ya makambo mazwami kati na mokanda mokomoko; tosilaki kolobela likambo yango, awa na búku oyo, kati na maloba ya ebandeli ya mokanda mokomoko ya Biblia. Lisusu, ezali na makambo ya sikisiki oyo mataleli Makomami ya Liebele mpe na makambo ya sikisiki oyo mataleli Makomami ya Greke; makambo yango mazali kosalisa biso na koyeba komonisa kanɔ́ ya Biblia.
MAKOMAMI YA LIEBELE
7. Na matambe nini ya mokemoke kanɔ́ ya Makomami ya Liebele ekokisamaki na mobimba mpenza, mpe eteni nyonso ya sika esengelaki kozala na boyokani na eloko nini?
7 Ezali likambo libongi te na kokanisa ete, liboso ya kondima kopemama ya mikanda ya Makomami ya Liebele, esengelaki naino kozela ete bokomami ya kanɔ́ mobimba ya Liebele ekóma na nsuka, na ekeke ya mitano L.T.B. Uta ebandeli mpenza, mikanda oyo Mose akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mindimamaki na bana ya Yisalaele ete mipemamaki mpe miutaki na Nzambe. Ntango kokomama na yango esukaki, Pantatɛ́kɛ esalaki kanɔ́ uta na ntango wana. Bimoniseli mosusu oyo bitali mikano ya Nzambe mpe oyo bipesamaki na bato oyo bapemamaki bisengelaki kolanda makanisi motindo moko mpe kozala na boyokani na mitindá ya moboko oyo mitali losambo ya solo mpe milobelami kati na Pantatɛ́kɛ. Tomonaki bosolo ya likambo yango ntango toyekolaki mikanda mikeseni ya Biblia, mingimingi mpenza na lolenge oyo mikanda yango mizali kolobela motó na likambo monene ya Biblia: kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolóngisama ya lotómo na ye ya kozala mokonzi, na nzela ya Bokonzi oyo etambwisami na Klisto, Mombóto oyo alakamaki.
8. Eloko nini emonisi ete mikanda ya basakoli mizali mikanda ya kanɔ́ ya Biblia?
8 Makomami ya Liebele matondi mpenza na bisakweli. Yehova ye moko, na nzela ya Mose, apesaki elembeteli oyo esengeli kosalisa mpo na koyeba bosolo ya esakweli, soki yango euti na Nzambe to euti na Nzambe te, mpe yango epesaki lisungi mpo na koyeba soki búku nini ya bisakweli ebongaki kokɔtisama kati na kanɔ́. (Det. 13:1-3; 18:20-22) Botaleli mozindo ya mokanda mokomoko ya Makomami ya Liebele, elongo na liboke mobimba ya Biblia mpe istware ya mokili, emonisi kozanga ntembe ete “liloba” oyo basakoli bayebisaki lisakolamaki na nkombo ya Yehova, mpe ete yango “ekokisamaki” ezala na mobimba, na moke, to mpe na ndambo na yango, wana ezalaki kolobela makambo oyo mazalaki koya, mpe epusaki bato na komipesa epai na Nzambe. Soki esakweli ekokisi makambo wana, boye bosolo na yango mpe kopemama na yango ekoki kondimama.
9. Moto asengeli kobatela nini na makanisi ntango azali kotalela likambo ya kanɔ́ ya Biblia?
9 Kolobelama ya mikapo ya Makomami ya Liebele na Yesu mpe na bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo bapemamaki, ezali kopesa mwango ya nokinoki mpo na koyeba ete mikanda mingi ya Makomami ya Liebele mipemamaki, atako ndambo na yango etángami te na bango, na ndakisa mokanda ya Esetele mpe mokanda ya Mosakoli. Na bongo, wana tozali kotalela kokɔtisama ya mikanda kati na kanɔ́, likambo mosusu ya ntina mingi esengeli kobatelama na makanisi; yango etaleli kanɔ́ mobimba ya Biblia. Lokola Yehova apesaki kopemama epai na bato ete bákoma maloba na ye ya bonzambe mpo na kolakisama na bango, kobongisama na bango mpe kolendisama na bango kati na losambo mpe na mosala na ye, bobele bongo Yehova asengelaki kokamba mpe kotambwisa kosangisama ya makomi mapemami, bakisá mpe kotyama ya kanɔ́ ya Biblia. Asalaki bongo mpo ete ntembe ezala te na ntina na makambo oyo mazwami kati na Liloba na ye ya solo mpe mpo na kotya eloko oyo esengelaki kozala emekeli makasi ya losambo ya solo. Na ntembe te, ezali bobele na lolenge wana nde bikelamu oyo bizali awa na mabelé bizali kokóba kozwa ‘kobotama ya sika na nzela ya liloba ya Nzambe’ mpe kokóma na likoki ya komonisa ete “Liloba na Nkolo ezali koumela seko.”—1 Pet. 1:23, 25.
10. Kanɔ́ ya Makomami ya Liebele etyamaki ntango nini?
10 Kotyama ya kanɔ́ ya Makomami ya Liebele. Lisoló ya kala ya Bayuda limonisi ete Ezela nde abandaki kosangisa mpe kosala liste to kataloge ya kanɔ́ ya Makomami ya Liebele, mpe eyebisami ete Nehemia nde moto asukisaki mosala yango. Na ntembe te Ezela azalaki na makoki mpenza mpo na kokokisa mosala motindo wana, azalaki moko na bakomi bapemami ya Biblia, nganga, moto na mayele mpe moakisi (copiste) andimami ya makomi mosantu. (Ezl. 7:1-11) Ezali na ntina moko te ya kotya ntembe na likambo oyo liyebisami na lisoló ya kala ete kanɔ́ ya Makomami ya Liebele etyamaki na nsuka ya ekeke ya mitano L.T.B.
11. Lolenge nini kanɔ́ ya kala ya Bayuda ezali kopesa liste ya Makomami ya Liebele?
11 Tozali lelo na mikanda 39 ya Makomami ya Liebele; nzokande kanɔ́ ya kala ya Bayuda, ntango ezali kosangisa mikanda wana, ezali kokómisa yango na motuya ya 24. Ntango bamoko na bato na mayele basangisaki mokanda ya Luta, mokanda ya Basambisi mpe mokanda ya Bileli esika moko na Yilimia, batángaki motuya ya mikanda nyonso ete mizali 22, atako makomi ya kanɔ́ matikalaki ntango nyonso lolenge moko.a Yango esalaki ete motuya ya mikanda mipemami mókokana na motuya ya balɛ́tɛlɛ ya alfabɛ́ ya Liebele. Oyo ezali liste ya mikanda 24 engebene lisoló ya kala ya Bayuda:
Mibeko (Pantatɛ́kɛ)
1. Genese
2. Exode
3. Levitike
4. Mituya
5. Deteronome
Basakoli
6. Yosua
7. Basambisi
8. Samwele (ya Liboso mpe ya Mibale esangisami lokola mokanda moko)
9. Mikonzi (ya Liboso mpe ya Mibale esangisami lokola mokanda moko)
10. Yisaya
11. Yilimia
12. Ezekiele
13. Basakoli zomi na mibale (Hosea, Yoele, Amosa, Obadia, Yona, Mika, Nahumu, Habakuku, Sefania, Hagai, Zekalia, mpe Malaki, lokola mokanda moko)
Makomi (Hagiographes)
14. Nzembo
15. Masese
16. Yobo
17. Loyembo na Salomo
18. Luta
19. Bileli
20. Mosakoli
21. Esetele
22. Danyele
23. Ezela (Nehemia esangisamaki na Ezela)
24. Ntango (ya Liboso mpe ya Mibale esangisamaki lokola mokanda moko)
12. Eloko nini mosusu endimisi kanɔ́ ya Makomami ya Liebele, mpe yango esuki na mikanda nini?
12 Wana ezalaki kataloge, to kanɔ́, oyo endimamaki na Yesu Klisto mpe na lisangá ya boklisto ya ebandeli ete ezali Makomami mapemami. Ezalaki uta na makomi wana nde bakomi bapemami ya Makomami ya Greke ya boklisto bazalaki kozwa mikapo oyo bazalaki kolobela, mpe lokola bazalaki kosalela maloba lokola “pelamoko ekomami” liboso ete bálobela makambo oyo mazali na mikapo yango, boye bazalaki kondimisa ete Makomami wana mazalaki mpenza Liloba ya Nzambe. (Lom. 15:9) Yesu, wana azalaki kolobela Makomami nyonso mapemami oyo makomamaki kino na ntango ya mosala na ye, atángaki makambo oyo makomami na “mibeko na Mose, na basakoli, [mpe] na Nzembo.” (Luka 24:44) Lokola “Nzembo” ezali mokanda ya liboso ya liboke ya mikanda oyo babéngi Hagiographes, basaleli yango awa mpo na kolobela eteni wana mobimba. Mokanda ya nsuka oyo motyamaki kati na kanɔ́ ya Makomami ya Liebele ezalaki mokanda ya Nehemia. Likambo oyo ete yango ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe limonani na lolenge oyo mokanda yango mozali kopesa dati ya ebandeli ya esakweli monene ya Danyele ete “longwa na kobima na liloba na kotɛlɛmisa mpe na kotonga Yelusaleme” kino komonana ya Masiya, bapɔ́sɔ 69 ya esakweli esengelaki koleka. (Dan. 9:25; Neh. 2:1-8; 6:15) Mokanda ya Nehemia mozali mpe kopesa moboko mpo na lisoló ya Malaki, oyo ezali mokanda ya nsuka kati na mikanda ya basakoli. Likambo oyo ete Malaki ezali mokanda ya kanɔ́ ya Makomami mapemami ekoki kotyamela ntembe te, mpo ete, ata Yesu, Mwana ya Nzambe, atángaki maloba na yango mbala mingi. (Mat. 11:10, 14) Atako maloba ya mikanda mingi mosusu ya kanɔ́ ya Makomami ya Liebele malobelami mpe bongo, nzokande maloba ya oyo ebéngami na bokosi nyonso ete makomi mapemami, oyo makomamaki nsima na mikolo ya Nehemia mpe ya Malaki, kino ntango ya Yesu, matángami ata na mokomi moko te ya Makomami ya Greke ya boklisto. Likambo yango lindimisi makanisi ya kala ya Bayuda, mpe limonisi endimeli ya lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso T.B., ete kanɔ́ ya Makomami ya Liebele esukaki na makomi ya Nehemia mpe ya Malaki.
MIKANDA YA MAKOMAMI YA LIEBELE OYO BABÉNGI APOKRIFE
13. (a) Mikanda babéngi apokrife mizali nini? (b) Lolenge nini yango eyaki kondimama kati na kanɔ́ ya Lingomba ya Katolike ya Loma?
13 Mikanda babéngi apokrife mizali nini? Mizali makomi oyo bato bakɔtisá kati na mabongoli mosusu ya Biblia, kasi oyo basusu baboyaki yango mpo ete ezangi bilembeteli oyo bimonisi ete epemamaki na Nzambe. Liloba ya Greke a·poʹkry·phos ezali kolobela makambo ya “nkuku.” (Mko. 4:22, NW; Luka 8:17; Kols. 2:3) Liloba yango lisalelami mpo na kolobela mikanda oyo mokomi na yango ayebani sikisiki te to eutelo na yango etyameli ntembe, to mpe mikanda oyo, atako mitalelami ete mizali na mwa ntina mpo na botángi ya moto ye moko, nzokande mizangi bilembeteli ya kopemama na Nzambe. Mikanda motindo wana mizalaki kobombama na esika na yango moko mpe mizalaki kotángama liboso na bato te; boye, likanisi ya “nkuku” euti na likambo yango. Na likita oyo babéngi Concile de Carthage, oyo esalemaki na mobu 397 T.B., likanisi lipesamaki ete mikanda nsambo kati na mikanda oyo mizali apokrife mibakisama na Makomami ya Liebele, mpe makambo mosusu mákɔtisama na mokanda ya Esetele mpe mokanda ya Danyele oyo esilaki kondimama na kanɔ́ ya Biblia. Nzokande, ezalaki bobele na mobu 1546, na likita babéngi Concile de Trente, nde lingomba ya Katolike ya Loma endimaki mpenza kobakisama wana kati na kataloge na yango ya mikanda ya Biblia. Mikanda oyo mibakisamaki ezalaki bongo Tobia, Yudite, Bwanya, Sira, Baruk, Makabe ya Liboso, mpe Makabe ya Mibale; makambo mabakisamaki na mokanda ya Esetele mpe biteni misato bibakisamaki na mokanda ya Danyele.
14. (a) Na lolenge nini Makabe ya Liboso ezali kobenda likebi? (b) Bato nini ya mayele balobelaki soko moke te mikanda oyo mizali apokrife, mpe mpo na nini?
14 Mokanda ya Makabe ya Liboso, atako mokoki kotángama te ete mozali kati na mikanda mipemami, nzokande mozali na makambo ya solo ya lisoló ya kala. Yango ezali koyebisa lisoló ya etumba oyo Bayuda babundaki mpo na kozwa lipandá na ekeke ya mibale L.T.B. na litambwisi ya libota ya bonganga ya Makabe. Mikanda-apokrife oyo mitikali mitondi na masapo, na biyambayamba, mpe na mabungá. Mikanda yango milobelamaki ata mbala moko te na Yesu to na bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto.
15, 16. Lolenge nini Josèphe mpe Jérôme bamonisaki mikanda oyo misengeli kokɔtisama kati na kanɔ́?
15 Kati na búku na ye Against Apion (I, 38-41 [8]), Josèphe Flavius, mokomi na makambo ya kala ya Bayuda, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso T.B., alobeli mikanda nyonso oyo mindimamaki na Bayuda ete mizalaki mikanda mosantu. Akomaki boye: “Tozali te na bankóto ya mikanda oyo mizangi molɔngɔ́ kati na yango, mpe mizangi boyokani moko na mosusu. Mikanda na biso, oyo mindimami na bosolo nyonso, mizali bobele ntuku mibale na mibale [motuya oyo mokokani na mikanda 39 oyo tozali na yango lelo, lokola yango emonisami na paragrafe 11], mpe mizali na makambo ya bileko binso. Kati na mikanda yango, mitano mizali ya Mose, oyo mizali na mibeko mpe na lisoló ya kala oyo libandi na kobotama ya moto kino liwa ya mopesi na mibeko. . . . Kobanda na liwa ya Mose kino Alatazelezese, oyo akitanaki Zelezese mokonzi ya Perse, basakoli oyo bayaki nsima na Mose bakomaki lisoló ya makambo ya bileko na bango kati na mikanda zomi na misato. Mikanda minei oyo mitikali mizali na banzembo ya kosanzola Nzambe mpe na malako mpo na etamboli ya bomoi ya moto.” Na bongo, Josèphe amonisi ete kanɔ́ ya Makomami ya Liebele esilaki kotyama ntango molai mpenza liboso ya ekeke ya liboso T.B.
16 Jérôme, nganga-mayele ya Biblia, oyo asilisaki kobongola Biblia ya Latin na nkombo, Vulgate soko na mobu 405 T.B., atikalaki ngwi kati na etɛlɛmɛlo na ye liboso na mikanda oyo mizalaki apokrife. Nsima wana apesaki liste ya mikanda mipemami, kosaleláká etángeli motindo moko na Josèphe wana akitisaki, na motuya ya 22, mikanda 39 ya Makomami ya Liebele oyo mipemami, akomaki boye na maloba na ye ya ebandeli mpo na mikanda ya Samwele mpe ya Mikonzi kati na Vulgate: “Na bongo, ezali na mikanda ntuku mibale na mibale . . . Maloba ya ebandeli oyo ya Makomami ekoki kosalelama lokola esimbelo makasi na ntina na mikanda oyo tozali kobongola longwa na Liebele kino na Latin; na yango, tokoki koyeba ete mikanda nyonso oyo mizali kati na yango te misengeli kotyama na ngámbo ya mikanda-apokrife.”
MAKOMAMI YA GREKE YA BOKLISTO
17. Lingomba ya Katolike ya Loma lizali komikumisa ete lizali na mokumba nini, kasi nani mpenza azali komonisa mikanda oyo misengeli kokɔtisama kati na kanɔ́ ya Biblia?
17 Lingomba ya Katolike ya Loma emitángaka ete yango nde ezali na mokumba ya kozwa ekateli na ntina na kotyama ya mikanda kati na kanɔ́ ya Biblia, mpe balobelaka mingi Concile de Carthage (mobu 397 T.B.), epai kuna kataloge moko ya mikanda ebongisamaki. Nzokande, likambo yango lizali solo te mpo ete kanɔ́ yango, bakisá mpe liste ya mikanda oyo misali Makomami ya Greke ya boklisto, esilaki kotyama uta kala, elingi koloba etyamaki na mobeko ya likita ata moko te, kasi na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe—elimo bobele moko oyo esilaki kopemisa bato na kokoma mikanda yango. Matatoli ya basáli na bakataloge oyo bayaki nsima, oyo bapemamaki te, mazali na ntina bobele mpo na kondimisa kanɔ́ ya Biblia ete etyamaki na elimo ya Nzambe.
18. Bisukiseli nini ya ntina mpenza bikoki kozwama na etánda oyo ezali komonisa bakataloge ya kala ya Makomami ya Greke ya boklisto?
18 Bilembeteli biuti na bakataloge ya kala. Soki tobwaki liso na etánda oyo etyami na boyekoli oyo, tokomona ebele ya bakataloge, ya Makomami ya boklisto, na ekeke ya minei; bakataloge yango ezali na badati oyo ezalaki liboso ya ba conciles oyo toutaki kolobela, mpe yango eyokani mpenza na kanɔ́ oyo tozali na yango lelo, nzokande mosusu na yango ezangi bobele mokanda ya Emoniseli. Liboso ya nsuka ya ekeke ya mibale, Baevanzile minei, mokanda ya Misala mpe mikanda 12 kati na mikanda oyo ntoma Paulo akomaki endimamaki na bato banso. Bobele ndambo ya mikanda ya mike nde etyamelaki ntembe na bisika mosusu. Ekoki kozala ete, mpo na ntina moko to mosusu, mikanda wana mizalaki kotambolatambola mingi te na ebandeli mpe na yango ntango molai elekaki liboso ete mindimama lokola mikanda ya kanɔ́.
19. (a) Mokanda nini ya ntina mingi mozwamaki na Italie, mpe dati na yango ezali nini? (b) Lolenge nini mokanda yango mozali komonisa kanɔ́ oyo endimamaki na eleko wana?
19 Moko na bakataloge ya motuya mpenza ezali bongo eteni ya mokanda oyo L. A. Muratori akundolaki; kataloge yango ezali na bibliotɛkɛ ya Ambroise, na engumba Milan, na mokili ya Italie, mpe Muratori abimisaki yango na 1740. Atako ebandeli ya mokanda yango esilá kobeba, nzokande kolobelama ya Luka lokola Evanzile ya misato, kati na kataloge yango, emonisi ete Matai mpe Malako elobelamaki liboso. Eteni ya Mokanda ya Muratori, oyo ezali na Latin, ekomamaki na nsuka ya ekeke ya mibale T.B. Ezali mokanda moko ya motuya mpenza, lokola libongoli ya ndambo na yango, oyo lilandi, lizali komonisa yango: “Mokanda ya misato ya Evanzile ezali oyo ya Luka. Luka, monganga oyo ayebanaki malamu, akomaki yango na lobɔkɔ na ye moko . . . Mokanda ya minei ya Evanzile ezali oyo na Yoane, moko na bayekoli. . . . Mpe na yango, atako makambo makeseni maponamaki mpe mayebisami kati na mokanda mokomoko ya Baevanzile, nzokande kozanga boyokani ezali te likoló na kondima ya bandimi, mpo ete kati na [yango] nyonso, na nsé na litambwisi ya Elimo bobele moko, makambo nyonso mayebisamaki na ntina na kobotama na ye, mpasi na ye, lisekwa na ye, masoló na ye elongo na bayekoli, mpe boyei na ye nyonso mibale, ya liboso kati na koyokisama nsɔ́ni euti na kotyolama oyo esilaki kosalema; mpe ya mibale kati na nkembo ya nguya ya bokonzi, oyo ekosalema na mikolo mizali koya. Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te soki Yoane alobeli na molɔngɔ́ mpenza ebele yango ya makambo kati na mikanda na ye, komonisáká ete azalaki ntango makambo masalemaki, kolobáká ete: ‘Makambo oyo tosili kokoma, tomonaki yango na miso na biso, mpe toyokaki yango na matoi na biso, mpe tosimbaki yango na mabɔkɔ na biso.’ Na motindo yango, ayamboli ete azalaki te bobele motatoli oyo amonaki makambo na miso, kasi lisusu moyoki mpe moyebisi na makambo kitoko nyonso ya Nkolo, kati na molɔngɔ́ na yango. Lisusu, misala oyo bantoma nyonso basalaki mikomami kati na mokanda moko. [Boye] Luka asangisaki yango mpo na Teofili, moto na lokumu . . . Na oyo etali mikanda ya Paulo, yango moko ezali komonisa polele, epai na moto oyo akoki kososola, makambo oyo yango ezali mpenza kolobela, esika oyo yango ekomamaki mpe ntina oyo yango etindamaki. Libosoliboso, akomaki na bolai mpenza epai na Bakolinti mpo na kopekisa mikabwano miuti na mateya ya lokuta; na nsima akomaki epai na Bagalatia [mpo na kokweisa] kokatama ngenga; mpe epai na Baloma na ntina na molɔngɔ́ oyo ezali kati na Makomami, kosakoláká ete Klisto azali likambo ya moboko oyo lilobelami kati na Makomami wana—oyo mokomoko na yango ezali na ntina mpo na biso ete tólobela yango, koyebáká ete mopambwami Ntoma Paulo ye moko, wana alandaki ndakisa ya Yoane oyo alekaki liboso na ye, akomeli mangomba koleka nsambo na kotángáká mokomoko na nkombo na yango, engebene molɔngɔ́ oyo: Epai na Bakolinti (ya liboso), epai na Baefese (ya mibale), epai na Bafilipi (ya misato), epai na Bakolose (ya minei), epai na Bagalatia (ya mitano), epai na Batesaloniki (ya motoba), epai na Baloma (ya nsambo). Atako akomeli Bakolinti mpe Batesaloniki mbala mibale mpo na kosembola bango, nzokande likambo oyo ete ezali bobele na lingomba moko oyo epalangani na mabelé mobimba emonisami [? kati na makomi wana nsambo]; mpe lisusu, kati na Apokalipisi, Yoane azali koloba na bato banso, atako azali kokomela mangomba nsambo. Kasi, uta na boboto mpe bolingo, [Paulo atindaki mokanda] moko epai na Filemona, moko epai na Tito, mpe mibale epai na Timoté; [mikanda yango] mitalelamaki mosantu mpe na limemya monene kati na Lingomba. . . . Na Nsima, mokanda ya Yuda mpe mikanda mibale oyo mizali na nkombo ya Yoane mizali kotángama . . . Tozwi bobele apokalipisi ya Yoane mpe apokalipisi ya Petelo, mpo na oyo [ya nsuka], bamoko kati na biso balingaka te ete etángama kati na lingomba.”—Búku The New Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge, 1956, Vol. VIII, lokasa 56.
20. (a) Lolenge nini kozanga ya mokanda moko ya Yoane mpe ya mokanda moko ya Petelo elimbolami? (b) Na bongo, lolenge nini kataloge yango eyokani mpenza na kataloge oyo tozali na yango na mikolo na biso?
20 Esili komonana ete pene na nsuka ya Eteni ya Mokanda ya Muratori bobele mikanda mibale ya Yoane nde milobelami. Nzokande, na likambo yango, búku oyo touti kolobela, na lokasa 55, eyebisi ete mikanda mibale wana ya Yoane “mikoki bobele kozala mokanda ya mibale mpe mokanda ya misato, oyo mokomi na yango amibéngi ye moko ete ‘mobangé.’ Lokola asilaki kolobela mokanda ya liboso, atako na lolenge ya likolólikoló esika moko na Evanzile ya minei, mpe komonisáká bongo endimeli makasi na ye ete mokanda yango mokomamaki mpenza na Yoane, mokomi amonaki malamu ete alobela bobele mikanda mibale wana ya mikuse koleka.” Na ntina na likambo oyo ete mokanda ya liboso ya Petelo molobelami ata na esika moko te, búku yango elandi koloba ete: “Likanisi oyo likoki mpenza kozala solo ezali oyo ete mwa ndambo ya maloba mabungaki, ekoki kozala molɔngɔ́ moko ya maloba, oyo kati na yango 1 Petelo mpe Apokalipisi ya Yoane elobelamaki ete ezwamaki.” Na yango, engebene makambo mamonisami kati na Eteni ya Mokanda ya Muratori, búku yango, na lokasa 56, esukisi ete: “Testamá ya Sika etalelami ete esalami na Baevanzile minei, Misala, mikanda zomi na misato ya Paulo, Apokalipisi ya Yoane, sangisá mbala mosusu mikanda na ye misato, Yuda, mbala mosusu 1 Petelo, wana botɛmɛli liboso na mokanda mosusu ya Petelo esilaki naino te.”
21. (a) Wapi litomba ya maloba ya Origène na ntina na makomi mapemami? (b) Bakomi oyo bayaki nsima bandimaki likambo nini?
21 Origène, soko na mobu 230 T.B., andimaki ete mokanda ya Baebele mpe mokanda ya Yakobo mizali kati na Makomami mapemami, atako yango nyonso mibale ezangi kati na Eteni ya Mokanda ya Muratori. Likambo oyo amonisi ete bamoko bazalaki kotya ntembe na kozala ya mikanda wana kati na kanɔ́, ezali komonisa lisusu ete, na ntango wana, mikanda mingi ya Makomami ya Greke mindimamaki ete mizali mikanda ya kanɔ́; bobele bato moke nde bazalaki kotya ntembe na mwa mikanda ya mikuse oyo miyebanaki mingi te. Na nsima, Athanase, Jérôme, mpe Augustin bandimaki bosukisi oyo baliste ya kala epesaki, na komonisáká ete kanɔ́ yango esangisi mikanda 27 motindo moko na oyo tozali na yango lelo.b
22, 23. (a) Lolenge nini baliste ya bakataloge oyo etyami na etánda ebongisamaki? (b) Mpo na nini emonani lokola ete baliste motindo wana ezalaki te liboso ya Eteni ya Mokanda ya Muratori?
22 Mingi kati na bakataloge oyo etyami na etánda ezali baliste ya sikisiki oyo emonisi mikanda oyo mindimamaki ete mizalaki mikanda ya kanɔ́. Bakataloge ya Irénée, ya Clément moto na Alesandalia, ya Tertullien, mpe ya Origène ekokisami na makambo oyo bazalaki kozwa uta na mikanda mosusu, mpe yango emonisi lolenge oyo bango bazalaki kotalela mikanda yango. Makomi ya Eusèbe mazali mpe kondimisa mikanda yango. Nzokande, likambo oyo ete bakomi wana bazali te kolobela mikanda mosusu oyo mipemami, elingi komonisa te ete mikanda yango mizali te kati na kanɔ́. Soki bazwaki libaku ya kolobela yango te kati na makomi na bango, ekoki kozala bobele mpo na liponi oyo bango moko basalaki to mpe mpo ete likambo oyo bazalaki kolobela etalelaki te mikanda yango. Kasi, mpo na nini baliste ya sikisiki oyo eumeli koleka Eteni ya Mokanda ya Muratori ezwami te?
23 Ezalaki bobele ntango balimboli lokola Marcion bayaki na katikati ya ekeke ya mibale T.B. nde ntembe ebimaki mpo na koyeba mikanda ya boklisto oyo misengelaki kondimama kati na kanɔ́. Marcion asalaki kanɔ́ na ye oyo eyokanaki na mateya na ye, kozwáká bobele mwa mikanda ya ntoma Paulo mpe lolenge moko ya Evanzile ya Luka oyo kati na yango mbebá ilongolami. Likambo yango, elongo na ebele ya mikanda-apokrife oyo mipalanganaki kati na mokili na eleko wana, epusaki basáli na bakataloge ete bámonisa mikanda oyo bandimaki ete mizali mikanda ya kanɔ́.
24. (a) Makambo nini mazali komonana kati na makomi ya “Testamá ya Sika” oyo mazali apokrife? (b) Bato ya mayele balobi nini mpo na yango?
24 Makomi oyo mazali apokrife. Bilembeteli ya kati bizali kondimisa bokeseni ya polele oyo esalemaki kati na makomi mapemami ya boklisto mpe mikanda ya lokuta, oyo mipemami te. Makomi oyo mazali apokrife matikali mpenza na nsé mpe mazalaka mbala mingi na bibanzabanza mpamba mpe na makambo ya bomwana. Mbala mingi, yango ezalaka na bosikisiki te.c Talá maloba malandi oyo bato ya mayele balobaki na ntina na mikanda wana oyo mindimami te na kanɔ́:
“Ezali ata na moto moko te oyo alongolaki yango na Testamá ya Sika: yango moko emilongolaki.”—M. R. James, The Apocryphal New Testament, nkasa xi, xii.
“Soki tokokanisi Testamá na biso ya Sika na mikanda mosusu ya lolenge yango, tokomona libulu monene oyo ekaboli yango na mikanda wana. Elobamaka mbala mingi ete, baevanzile oyo epemami te ezali mpenza kondimisa baevanzile ya kanɔ́.”—G. Milligan, The New Testament Documents, lokasa 228.
“Ekoki ata moke te kolobama mpo na mokanda moko, oyo mobatelamaki mpo na biso uta eleko ya ebandeli ya Lingomba mpe oyo mouti na libándá ya Testamá ya Sika, ete mobongi kobakisama kati na kanɔ́ lelo oyo.”—K. Aland, The Problem of the New Testament Canon, lokasa 24.
25. Makambo nini matali mokomi mokomoko ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo mazali kondimisa ete makomi yango mapemamaki?
25 Bakomi oyo bapemamaki. Likambo oyo ezali mpe na ntina. Na lolenge moko to mosusu, bakomi nyonso ya Makomami ya Greke ya boklisto bakanganaki makasi elongo na lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá ya boklisto ya ebandeli, oyo lisangisaki bantoma oyo Yesu ye moko aponaki. Matai, Yoane mpe Petelo bazalaki kati na bantoma zomi na mibale ya ebandeli, mpe na nsima Paulo aponamaki lokola ntoma kasi atángamaki te lokola moko na bantoma 12.d Atako Paulo azalaki te ntango elimo santu esopamaki na Pantekote, nzokande Matai, Yoane mpe Petelo bazalaki wana, elongo na Yakobo mpe Yuda, mbala mosusu Malako mpe azalaki wana. (Mis. 1:13, 14) Petelo atángi na polele mpenza mikanda ya Paulo esika moko na “Makomami mosusu oyo matikali.” (2 Pet. 3:15, 16, NW) Malako mpe Luka bazalaki basalani ya pene mpe basáli mobembo elongo na Paulo mpe Petelo. (Mis. 12:25; 1 Pet. 5:13; Kols. 4:14; 2 Tim. 4:11) Bakomi nyonso wana bapesamelaki makoki ya kokamwa na nzela ya elimo santu; ezala na lolenge ya sikisiki lokola na kosopama ya elimo na Pantekote mpe na kobongwama ya Paulo (Mis. 9:17, 18) to, na ntembe te lokola yango esalemaki epai na Luka, na nzela ya kotyama mabɔkɔ na bantoma. (Mis. 8:14-17) Mikanda nyonso ya Makomami ya Greke ya boklisto mikomamaki na boumeli ya eleko oyo makabo wana ya sipesiale oyo mautaki na elimo ya Nzambe mazalaki naino kosala mosala.
26. (a) Tozali kondima nini ete ezali Liloba ya Nzambe, mpe mpo na nini? (b) Lolenge nini tosengeli komonisa botɔ́ndi mpo na Biblia?
26 Kondima epai na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo azali Mopemisi mpe Mobateli ya Liloba na ye, ezali kondimisa biso ete azali moto oyo atambwisaki kosangisama ya biteni ndenge na ndenge ya Liloba yango. Na bongo, tozali kondima na motema moko mikanda 27 ya Makomami ya Greke ya boklisto mpe mikanda 39 ya Makomami ya Liebele ete yango nyonso esali Biblia bobele moko mpe ezali na Mobandisi bobele moko, Yehova Nzambe. Liloba na Ye oyo lizali na mikanda 66 ezali litambwisi mpo na biso, mpe boyokani oyo ezali kati na mobimba na yango, bakisá mpe bokatikati na yango ezali bilembeteli oyo bimonisi ezaleli na yango ya kokoka. Tiká ete banso básanzola Yehova Nzambe, Mokomisi na búku oyo ekokani na mosusu te! Yango ekoki kokómisa biso bato ya makoki mingi mpe kokɔtisa biso na nzela ya bomoi. Tiká ete tósalela yango na mayele nyonso mpe na mabaku nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Encyclopaedia Judaica, 1973, Vol. 4, colonnes 826, 827.
b Búku The Books and the Parchments, 1963, F. F. Bruce, lokasa 112.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 122-125.
d Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 129-130.
[Etanda na lokasa 303]
Bakataloge minene ya kala ya Makomami ya Greke ya boklisto
A - Endimami kozanga ntembe lokola mokanda ya Makomami mpe ya kanɔ́ ya Biblia
D - Endimami te na bisika mosusu
DA - Endimami te na bisika mosusu, kasi basáli na kataloge bandimi ete ezali mokanda ya Makomami mpe ya kanɔ́
? - Banganga-mayele bazangi likanisi ya sikisiki ya mateya mauti na makomi yango mpe ya lolenge mokanda molobelami mozali kotalelama
- Esika oyo etikali mpamba emonisi ete mokanda yango mosalelamaki te to molobelamaki te na nganga-mayele to na eutelo yango
Nkombo mpe Esika
Eteni ya Irénée, Clément Tertullien, Mokanda Asie moto na Afrika ya ya Muratori, Mineure Alesandalia Nɔ́rdi Italie
Dati ya zingazinga 170 180 190 207 na T.B.
Matai A A A A
Malako A A A A
Luka A A A A
Yoane A A A A
Misala A A A A
Baloma A A A A
1 Bakolinti A A A A
2 Bakolinti A A A A
Bagalatia A A A A
Baefese A A A A
Bafilipi A A A A
Bakolose A A A A
1 Batesaloniki A A A A
2 Batesaloniki A A A A
1 Timoté A A A A
2 Timoté A A A A
Tito A A A A
Filemona A A A A
Baebele D DA DA
Yakobo ?
1 Petelo A? A A A
2 Petelo D? A
1 Yoane A A DA A
2 Yoane A A DA
3 Yoane A?
Yuda A DA A
Emoniseli A A A A
Nkombo mpe Esika
Origène, Eusèbe, Cyrille Liste ya Alesandalia Palestine moto na Cheltenham, Yelusaleme Afrika ya Nɔ́rdi
Dati ya zingazinga 230 320 348 365 na T.B.
Matai A A A A
Malako A A A A
Luka A A A A
Yoane A A A A
Misala A A A A
Baloma A A A A
1 Bakolinti A A A A
2 Bakolinti A A A A
Bagalatia A A A A
Baefese A A A A
Bafilipi A A A A
Bakolose A A A A
1 Batesaloniki A A A A
2 Batesaloniki A A A A
1 Timoté A A A A
2 Timoté A A A A
Tito A A A A
Filemona A A A A
Baebele DA DA A
Yakobo DA DA A
1 Petelo A A A A
2 Petelo DA DA A D
1 Yoane A A A A
2 Yoane DA DA A D
3 Yoane DA DA A D
Yuda DA DA A
Emoniseli A DA A
Nkombo mpe Esika
Athanase, Épiphane, Grégoire Amphiloque, Alesandalia Palestine Nazianze, Asie Asie Mineure Mineure
Dati ya zingazinga 367 368 370 370 na T.B.
Matai A A A A
Malako A A A A
Luka A A A A
Yoane A A A A
Misala A A A A
Baloma A A A A
1 Bakolinti A A A A
2 Bakolinti A A A A
Bagalatia A A A A
Baefese A A A A
Bafilipi A A A A
Bakolose A A A A
1 Batesaloniki A A A A
2 Batesaloniki A A A A
1 Timoté A A A A
2 Timoté A A A A
Tito A A A A
Filemona A A A A
Baebele A A A DA
Yakobo A A A A
1 Petelo A A A A
2 Petelo A A A D
1 Yoane A A A A
2 Yoane A A A D
3 Yoane A A A D
Yuda A A A D
Emoniseli A DA D
Nkombo mpe Esika
Philastre, Jérôme, Augustin, Likita Italie Italie Afrika Concile de ya Nɔ́rdi Carthage ya misato, Afrika ya Nɔ́rdi
Dati ya zingazinga 383 394 397 397 na T.B.
Matai A A A A
Malako A A A A
Luka A A A A
Yoane A A A A
Misala A A A A
Baloma A A A A
1 Bakolinti A A A A
2 Bakolinti A A A A
Bagalatia A A A A
Baefese A A A A
Bafilipi A A A A
Bakolose A A A A
1 Batesaloniki A A A A
2 Batesaloniki A A A A
1 Timoté A A A A
2 Timoté A A A A
Tito A A A A
Filemona A A A A
Baebele DA DA A A
Yakobo A DA A A
1 Petelo A A A A
2 Petelo A DA A A
1 Yoane A A A A
2 Yoane A DA A A
3 Yoane A DA A A
Yuda A DA A A
Emoniseli DA DA A A