Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 320-327
  • Boyekoli nimero 7—Biblia na mikolo na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boyekoli nimero 7—Biblia na mikolo na biso
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BASOSYETE YA BOBIMISI BIBLIA
  • BATATOLI YA YEHOVA, BABIMISI NA BIBLIA
  • SOSYETE YA BONYATI BIBLIA
  • LIBONGOLI YA MOKILI YA SIKA YA MAKOMAMI MOSANTU
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Libongoli ya Mokili ya Sika
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Libongoli ya Liloba ya Nzambe oyo ebongi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 320-327

Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango

Boyekoli nimero 7—Biblia na mikolo na biso

Istware ya basosyete oyo ikobimisaka Biblia; mosala ya la Société Watch Tower oyo motali konyata mpe kobimisa Biblia; kobimisama ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi).

1. (a) Mayebisi mauti na Nzambe mapesamaki mpo na mikano nini, mpe mpo na nini mosusu na yango ekomamaki te? (b) Mitindá nini ya sikisiki Yehova apesaki na mingi kati na basakoli, mpe yango ezali na litomba nini mpo na biso na “mikolo na nsuka”?

MAKOMAMI Mosantu, elingi koloba mikanda 66 oyo mipemami mpe miyebani lelo na nkombo Biblia, mazali “liloba na [Yehova]” oyo likomamaki. (Yis. 66:5) Na boumeli ya bikeke mingi, “liloba” yango lizalaki kotíyola na bonsomi nyonso uta na Yehova kino na basakoli na ye mpe basaleli na ye awa na mabelé. Mayebisi wana oyo mautaki na Nzambe makokisaki libosoliboso mokano na yango ya ntango wana mpe mazalaki bilakiseli ya nguya mpenza mpo na makambo ya solosolo oyo masengelaki kobima na mikolo mizalaki koya mosika. Esɛngamaki ntango nyonso te epai na basakoli ya Nzambe ete bákoma “liloba na [Yehova]” oyo lipesamelaki bango. Na ndakisa, maloba mosusu ya Eliya mpe ya Elisa oyo malobamaki mpo na libota ya eleko na bango matyamaki te na mikanda. Epai mosusu, basakoli lokola Mose, Yisaya, Yilimia, Habakuku mpe basusu, bazwaki etindá ya sikisiki ya “kokoma” to ya ‘kotya na mokanda to na rulo’ “liloba na [Yehova]” oyo liyebisamaki epai na bango. (Ex. 17:14; Yis. 30:8; Yil. 30:2; Hab. 2:2; Emon. 1:11) Na bongo, “maloba malobamaki liboso na basakoli na bulɛɛ” mabatelamaki, esika moko na mikanda mosusu ya bulɛɛ, mpo na kolamwisa, epai na basaleli ya Yehova, makoki ya kokanisa na lolenge ya polele mpe mingimingi mpo na kopesa bango litambwisi na “mikolo na nsuka.”​—2 Pet. 3:1-3.

2. Kati na istware, bileko nini na boumeli na yango mosala ya kosala bakopi mpe ya kobongola Biblia mokólaki?

2 Bakopi mingi ya Makomami ya Liebele oyo mapemami esalemaki kobanda na eleko ya Ezela. Uta ekeke ya liboso ya Ntango na Biso, bakopi ya Biblia esalamaki lisusu mpe lisusu na baklisto ya liboso mpe esalelamaki mpo na kopesa litatoli na ntina na mikano ya Yehova, oyo mitali Klisto na Ye, na bisika nyonso ya mokili oyo moyebanaki na eleko wana. Ntango myango ya bonyati mikanda ekómaki kosalelama mingi (kobanda na ekeke ya 15), bato bapusamaki lisusu na kosala bakopi mingi ya Biblia mpe kokabola yango. Mabongoli mingi, bakisá mpe konyatama ya mikanda, ebandaki kosalema na bituluku ya bato na ekeke ya 16 mpe na ekeke ya 17. Kobanda na mobu 1800, Biblia ebimisamaki, na mobimba to na ndambo, na nkótá 71.

BASOSYETE YA BOBIMISI BIBLIA

3. Likambo nini lisungaki mingi mpo na kokólisa kokabolama ya Biblia uta na ebandeli ya ekeke ya 19?

3 Molende makasi epesamaki na mosala yango na ekeke ya 19 mpe ya 20, ntango basosyete ya bobimisi Biblia, oyo iutaki kosalema sika, ibandaki komikɔtisa na mosala monene wana ya bokaboli Biblia. Moko na basosyete yango ya kala ya Biblia ezalaki bongo Sosyete ya Bangelesi mpe ya Bapaya mpo na bobimisi Biblia; sosyete yango esalemaki na mboka Londres na 1804. Kosalama ya sosyete wana ya Biblia esalaki ete basosyete mosusu ya lolenge wana ikoka kosalema.a

4. (a) Mitángo nini mizali komonisa ete liloba ya bomoi lisili mpenza kopalangana na mabelé mobimba? (b) Mayebisi nini ya ntina mapesami kati na etánda ya lokasa 322 na ntina na mabongoli makeseni ya Biblia oyo matángami? Pesá ndakisa ya likambo yango na kolobeláká libongoli moko ya sikisiki ya Biblia.

4 Lokola basosyete mingi ya bobimisi Biblia izalaki kosalama, emonanaki ete mosala ya kopalanganisa Biblia mokólaki mingi. Na mobu 1900, Biblia, na mobimba na yango to na ndambo, ebimisamaki na nkótá 567, mpe na 1928, na nkótá 856. Na 1938, motángo ya nkótá molekaki nkóto, mpe sikawa Biblia ezwami na nkótá koleka 2 000. Liloba ya Yehova oyo likokitisaka motema mpe likopesaka bomoi lisili kopalangana na mabelé mobimba! Na bongo, bato ya mabota nyonso bazwi likoki ya koyanola na libyangi oyo elobi ete: “Bósanzola Yehova, bino mabota nyonso, mpe tiká ete bato nyonso básanzola ye.” (Lom. 15:11, NW) Etánda oyo ezwami na lokasa 322, ete “Mwa mabongoli minene ya Biblia na nkótá nsambo ya minene,” epesi mayebisi mosusu likoló na kokabolama ya Biblia na mikolo na biso.

5. Likambo nini lizali na ntina mingi koleka bokaboli Biblia, nzokande Batatoli ya Yehova bazali komonisa botɔ́ndi na likambo nini?

5 Atako kobimisa Biblia mpo na bibele na bato awa na mabelé ezali mosala mobongi kokumisama, nzokande kosalela Biblia yango mpo na kopesa bososoli ya Makomami epai na bato ezali mosala oyo moleki mpenza ntina. Na eleko ya Bayuda mpe na eleko ya baklisto ya liboso, ntango Biblia izalaki mingi te, eloko oyo ezalaki na motuya mpenza ezalaki bongo komonisa “ntina” ya liloba, mpe kino na mikolo ya lelo yango ezali likambo ya ntina mingi koleka. (Mat. 13:23; Neh. 8:8) Nzokande, kokabolama ya ebele ya Biblia esali ete mosala yango ya koteya Liloba ya Nzambe mókoka kosalema na lombangu mpenza. Wana Batatoli ya Yehova bazali kokende liboso, na molende nyonso, kati na mosala na bango ya koteya Biblia na etando mobimba, bazali na botɔ́ndi mpenza ete, sikawa, bamilió ya Biblia izwami na mikili mingi mpe na nkótá ndenge na ndenge.

BATATOLI YA YEHOVA, BABIMISI NA BIBLIA

6. Batatoli ya Yehova bayebani na mosala nini na mikolo ya lelo mpe na ntango ya kala?

6 Batatoli ya Yehova bazali mpe libota oyo likobimisaka Biblia. Yango ezalaki mpe bongo na mikolo ya Ezela. Ezalaki bongo na mikolo ya bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto, oyo batondisaki mokili ya kala na bakopi ya Biblia, oyo ikomamaki na mabɔkɔ, na boye ete litika ya bamaniskri ya makomi oyo tozwi epai na bango ezali libula ya motuya oyo eleki nyonso mosusu ya ntango ya kala. Sikawa, na mikolo na biso, mosala motindo moko ya kobimisa Biblia na molende mozali kosalema na Batatoli ya Yehova.

7. Sosyete nini Batatoli ya Yehova basalaki? ntango nini? mpe lolenge nini babandaki kokólisa mosala na bango na eleko yango?

7 Na 1884, Batatoli ya Yehova basalaki sosyete moko mpo na kokóba mosala na bango ya bobimisi Biblia; Sosyete yango eyebani lelo na nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania. Libosoliboso, Batatoli ya Yehova bazalaki kosomba Biblia epai na basosyete mosusu oyo ikobimisaka Biblia; bazalaki kokabola yango na ntango bazalaki kokólisa mosala ya kosakola ndako na ndako, mosala oyo bobele bango nde bazalaki kosala yango. Biblia King James Version oyo ebimisamaki na 1611 na Lingelesi ezalaki kosalelama lokola libongoli ya moboko mpo na boyekoli ya Biblia.

8. (a) Na lolenge nini Watch Tower Bible and Tract Society esalaki na boyokani na nkombo na yango? (b) Lolenge nini la Société esalelaki mabongoli mingi ya Biblia, mpe na mokano nini?

8 Na boyokani na nkombo na yango, Watch Tower Bible and Tract Society emipesaki na mosala ya bokaboli Biblia, bakisá mpe bobimisi babúku, batrakte mpe mikanda mosusu ya boklisto. Mokano na yango mozali ya kolakisa mateya ya solosolo ya Liloba ya Nzambe. Mateya na yango ya Biblia masili kosalisa baoyo balingaka boyengebene na kokima mangomba ya lokuta mpe bafilozofi ya mokili mpe na kozwa kimya oyo ezali kouta na solo ya Biblia, lokola yango emonisamaki na nzela na Yesu mpe na bato mosusu oyo bazalaki balobeli-bamipesi mpo na Yehova. (Yoa. 8:31, 32) Uta ntango oyo zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (na Lingelesi) ebandaki kobimisama na 1879, mikanda mibimisami na la Société Watch Tower misili kotánga maloba, nkombo mpe misili kolobela mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia. Na bongo, la Société Watch Tower esili kondima motuya ya mabongoli nyonso wana mpe esalelaki yango malamumalamu mpo na kosilisa mobulungano oyo mouti na mateya ya mangomba mpe komonisa polele nsango ya Nzambe.

9. Lolenge nini la Société emikɔtisaki na makambo matali bobimisi Biblia?

9 Biblia ya Rotherham mpe Biblia ya Holman. Uta 1890, Batatoli ya Yehova, na lisalisi ya la Société Watch Tower, bakɔtaki mbala moko na mosala ya bobimisi mpe bokaboli Biblia. Uta ntango yango, ntómo ya bonyati Biblia izwamaki uta na Joseph B. Rotherham, Mongelesi mobongoli na Biblia, mpo na kobimisa kati na États-Unis, ebimeli ya mibale ya Testamá ya Sika oyo ebongisami lisusu (na Lingelesi). Na lokasa ya motó na likambo ya mikanda yango oyo minyatamaki, ezalaki na nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society, Allegheny, Pennsylvania; wana ezali esika oyo biro monene ya la Société ezalaki na eleko wana. Na 1901, bibongiseli bizwamaki mpo na konyatama ya sipesiale ya Biblia Holman Linear Bible, oyo ezali na banɔti ya bolimboli na pembeni ya lokasa, oyo iutaki na mikanda mibimisamaki na la Société kobanda 1895 kino 1901. Makomi ya Biblia yango mazalaki komonisa Biblia King James Version mpe Revised Version ya Makomami ya Liebele mpe ya Greke. Ebimeli ya mobimba ya Biblia wana oyo ezalaki na baekzamplere 5 000 esilaki kokabolama na mobu 1903.

10. Libongoli nini ya Makomami ya Greke la Société ekómaki mobimisi na yango na 1902?

10 Biblia Emphatic Diaglott. Na 1902, la Société Watch Tower ezwaki lotómo ya kosalela, lotómo ya bobimisi mpe ya bokaboli Biblia Emphatic Diaglott. Biblia wana ya Makomami ya Greke ya boklisto ebongisamaki na Benjamin Wilson, Mongelesi mobongoli na Biblia, na engumba Geneva, na etúká ya Illinois. Yango esilisamaki na 1864. Esalelaki makomi ya Greke mabimisamaki na J. J. Griesbach, elongo na libongoli moko ya liloba na liloba na Lingelesi, libongoli oyo babéngi interlinéaire, mpe na lobɔkɔ ya mobali, Biblia ya Wilson mpenza etyami wana, Biblia oyo kati na yango asaleli bilembo na ye moko ya kobongola mongongo.

11. Ntango nini la Société ebimisaki “Biblia mpo na Bayekoli ya Biblia,” mpe nini ezalaki kati na yango?

11 Biblia mpo na Bayekoli ya Biblia. Na 1907, la Société Watch Tower ebimisaki “Biblia mpo na Bayekoli ya Biblia” na Lingelesi. Búku yango ezalaki na libongoli babéngi King James Version oyo linyatami malamumalamu, bakisá mpe banɔti ibongi oyo ityamaki na pembeni ya lokasa, elongo na libakemá (appendice) moko ya ntina mingi oyo esalemaki na Batatoli ya Yehova. Libakemá yango, oyo na nsima eyeisamaki monene kino nkasa koleka 550, ebéngamaki “Mokanda ya Babeloya balakisi na Biblia”; yango ebimisamaki mpe na volimi na yango moko. Ezalaki kopesa bandimbola mikuse likoló na mikapo mingi ya Biblia, elongo na mitindami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na babúku ya la Société oyo ibongisamá mpo na boyekoli ya makomi; ezalaki mpe na maloba mokuse likoló na makambo matali mateya, esika moko na mikapo ya moboko oyo mizalaki koyeisa pɛtɛɛ kolakisama na yango epai na basusu. Lolenge na yango ekokanaki na mokanda “Éprouvez toutes choses” oyo la Société abimisaki na nsima. Ezalaki mpe na index ya mitó na makambo, bandimbola ya mikapo ya makasi, liste ya mikapo oyo milongobani te, index ya mikapo ya Makomami, kronoloji ya bokokanisi mpe bakálati 12 ya geografi. Biblia wana ya malamu esalisaki Batatoli ya Yehova na boumeli ya bambula mingi kati na mosala na bango ya kosakola epai na bato banso.

SOSYETE YA BONYATI BIBLIA

12. Ntango nini la Société ekɔtaki na makambo matali konyata Biblia?

12 Na boumeli ya mbula 30, la Société Watch Tower esalelaki basosyete ya mokili mpo na konyata Biblia na yango. Nzokande, na Desɛ́mbɛ 1926, Emphatic Diaglott ebimisamaki lokola Biblia ya liboso oyo enyatamaki na binyateli la Société mpenza, binyateli oyo bizwami na Brooklyn, New York. Konyatama ya ebimeli wana ya Makomami ya Greke ya boklisto elendisaki elikya oyo ete, mokolo mosusu, Biblia mobimba ekonyatama na binyateli ya la Société.

13. (a) Wapi Biblia ya liboso oyo la Société enyataki na mobimba na yango, mpe ntango nini ebimisamaki? (b) Bisaleli nini ya kosunga na boyekoli bizalaki kati na yango?

13 Biblia King James Version. Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba emonisaki ntina ya kobimisa Biblia kozanga kosalela sosyete mosusu. Ntango matáta malandaki kobakisama kati na mabota na mokili mobimba, la Société azwaki libaku ya kosalela bapaláki oyo, likoló na yango, makomi ya Biblia King James Version enyatamaki. Na mokolo ya 18 Sɛtɛ́mbɛ 1942, na mayangani ya Teokrasi ya mokili ya sika oyo masalemaki na Batatoli ya Yehova, oyo liyangani na yango ya monene lisalemaki na Cleveland, Ohio, prezidá ya la Société asalaki lisukúlu oyo lizalaki na motó na likambo ete “Tólakisa ‘mopanga ya elimo.’” Ntango akómaki na esika ya ntina mingi kati na lisukúlu yango, abimisaki Biblia wana ya liboso oyo enyatamaki na mobimba na yango kati na enyateli mikanda ya la Société Watch Tower na Brooklyn. Kati na libakemá na yango, ezalaki na liste ya bankombo ya sikisiki esika moko na ndimbola na yango; ezalaki mpe na “konkordansi ya Maloba ya Biblia” oyo ebongisamaki malamumalamu mpe bisaleli mosusu ya ntina mingi. Likoló ya lokasa mokomoko, ezalaki na mitó na makambo oyo mibongi. Na ndakisa, “ndai ya sembo ya Yefeta” ekitanaki “ndai ya Yefeta oyo ezangaki bokɛngi” oyo ezwami na Basambisi mokapo 11, mpe “Bomoi ya [oyo azalaki] Liloba ya Nzambe liboso ya kokóma moto mpe kobotama na ye lokola moto” etyamaki likoló na Yoane mokapo 1.

14. Na 1944, la Société enyataki libongoli nini libongisami ya Biblia, mpe makambo nini mazalaki kati na Biblia yango?

14 Biblia American Standard Version. Libongoli mosusu ya ntina mingi ya Biblia ezali bongo American Standard Version oyo ebimisamaki na 1901. Likambo na yango ya ntina mingi ezali bongo kokomama ya nkombo ya Nzambe “Yehova” pene na mbala 7 000 kati na Makomami ya Liebele. Nsima na masoló ndenge na ndenge ya boyokani, la Société Watch Tower ezwaki, na 1944, lotómo ya kosalela bapaláki oyo, likoló na yango, Biblia American Standard Version ekomamaki na mobimba na yango mpo na konyatama na binyateli ya la Société mpenza. Na mokolo ya 10 Augústo 1944, na Buffalo, New York, engumba ya moboko epai kuna mayangani 17 ya Batatoli ya Yehova masalamaki elongo moko mpe makangisamaki moko na mosusu na nzela ya telefone, prezidá ya la Société asepelisaki bibele ya bayoki na ye na kosakoláká kobima ya Biblia American Standard Version oyo enyatamaki na la Société mpenza. Kati na libakema, ezalaki na “konkordansi ya maloba mpe ya bankombo izwami kati na Biblia”; konkordansi yango ezalaki na makambo mingi ya lisungi monene. Ebimeli ya moke ya Biblia yango ebimisamaki na 1958.

15. Libongoli nini libimisamaki na la Société na 1972?

15 Biblia The Bible in Living English. Na 1972, la Société Watch Tower ebimisaki Biblia The Bible in Living English, oyo ezalaki libongoli ya nkɔ́ndɔ́ Steven T. Byington. Na bisika nyonso bisengeli, yango ezali kobongola nkombo ya Nzambe ete “Yehova.”

16. Na bongo, kati na mosala nini, oyo mosangisi makambo mibale, Batatoli ya Yehova bamikɔtisaki?

16 Na bongo, kati na mikili mpe bisanga koleka 200 na mabelé mobimba, Batatoli ya Yehova bazali te bobele kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo botyami na Nzambe, kasi bazali lisusu banyati mpe babimisi, na motángo monene, ya Búku ya ntina mingi oyo ezali na nsango yango ya Bokonzi, Makomami Mosantu oyo mapemami na Yehova Nzambe.

LIBONGOLI YA MOKILI YA SIKA YA MAKOMAMI MOSANTU

17. (a) Lolenge nini mabongoli mingi ya Biblia mamonanaki ete mazalaki na ntina, nzokande mbeba nini ezali kati na yango? (b) Kobanda 1946, prezidá ya la Société Watch Tower azalaki koluka nini?

17 Batatoli ya Yehova bandimi ete basengeli mpenza komonisa botɔ́ndi mpo na ebele ya mabongoli ya Biblia oyo basalelaki mpo na koyekola solo ya Liloba ya Nzambe. Nzokande, mabongoli nyonso wana, ata oyo ebimisamaki na nsima na yango nyonso, ezali na mbeba kati na yango. Ezali na bongolabongola mpe na kozanga kolongobana kati na kobongolama ya maloba, oyo ebebisami na mateya ya bonkɔ́kɔ oyo mazali kokɔtisa mikabwano to bafilozofi ya mokili; yango wana mabongoli yango mazali na boyokani ya mobimba te na solo ya bulɛɛ oyo Yehova akomisaki kati na Liloba na ye. Yango wana, mingi mpenza kobanda 1946, prezidá ya Watch Tower Bible and Tract Society amikɔtisaki kati na bolukiluki ya libongoli moko ya sembo ya Makomami oyo liuti na nkótá ya ebandeli—libongoli oyo lisengeli kososolama malamu na batángi ya mikolo na biso, lolenge makomi ya ebandeli mazalaki kososolama na bato ya mayele mpe na bato mpamba ya bileko oyo Biblia ezalaki kokomama.

18. Lolenge nini la Société ayaki kokóma mobimisi mpe monyati ya Biblia Libongoli ya Mokili ya sika?

18 Na mokolo ya 3 Sɛtɛ́mbɛ 1949, na biro monene ya la Société na Brooklyn, prezidá asakolaki epai na Lisangani ya Bakambi ete ezali na Komité moko ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika mpe ayebisaki bango ete komité yango esilisi libongoli ya sika ya Makomami ya Greke ya boklisto. Mokanda ya komité yango motángamaki, oyo na nzela na yango komité wana epesaki na la Société lotómo ya kozala na maniskri ya libongoli yango, bakisá bokɛngɛli mpe lotómo ya bobimisi, mpo na komonisa ete bandimi mosala ya la Société oyo motali kopesa mateya ya Biblia na mabelé mobimba, mosala mokeseni na oyo ya mangomba nyonso. Biteni ya maniskri yango mpe bitángamaki mpo na komonisa mokano mpe motuya ya libongoli yango. Na motema moko, bakambi nyonso bandimaki likabo litali libongoli oyo lipesamelaki bango, mpe bibongiseli bizwamaki mpo na konyata yango kozanga koumela. Na mokolo ya 29 Sɛtɛ́mbɛ 1949, yango ebandaki kobongisama na masini, mpe na ebandeli ya eleko ya molungé ya 1950, baekzamplere mingi etyamaki mpe ekangisamaki na lolenge ya búku.

19. (a) Lolenge nini Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebimisamaki ndambondambo? (b) Milende nini misalemaki mpo na kobongisa bavolimi wana?

19 Kobimisama ya ndambondambo ya Libongoli ya Mokili ya Sika. Ezalaki na Mwamisato 2 Augústo 1950, na mokolo ya minei ya liyangani na bango ya mikili mingi oyo lisalemaki na Yankee Stadium, na New York, nde bayangani 82 075 ya Batatoli ya Yehova, oyo bakamwaki mingi, bandimaki na motema mobimba kobimisama ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Greke ya boklisto (na Lingelesi). Kolendisamáká na boyambi wana ya mɔ́tɔ ya ebandeli, bakisá mpe na maloba ya botɔ́ndi oyo bazwaki nsima mpo na lolenge lobongi ya libongoli yango, Komité wana eyaki lisusu kobanda mosala monene ya kobongola Makomami ya Liebele. Yango ebimisamaki na bavolimi mitano oyo ilandanaki mpenza uta 1953 kino 1960. Kosangisama ya volimi wana motoba esalaki bibliotɛkɛ ya Biblia mobimba na Lingelesi ya mikolo na biso. Volimi mokomoko ezalaki mpe na bisaleli ya ntina oyo bikosungaka kati na boyekoli ya Biblia. Na bongo, ezwamelo monene ya mayebisi matali Makomami eutaki kozwama mpo na bayekoli ya Biblia na mikolo na biso. Milende makasi esalemaki mpo na kobimisa makambo ya ntina longwa na eutelo nyonso ya makomi, eutelo oyo ebongi kotyelama motema, na ntina ete Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ekoka komonisa polele mpe na bosikisiki nyonso nsango ya nguya oyo ezalaki kati na Makomami ya ebandeli oyo mapemamaki.

20. Ebimeli ya liboso ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezalaki na bisaleli nini ya kosunga kati na (a) maloba na yango na nsé ya lokasa, (b) mitindami na yango, mpe (c) maloba na yango ya ebandeli mpe mabakema na yango?

20 Kati na bisaleli oyo bikosungaka mpo na koyekola Biblia, oyo bizwami na ebimeli ya liboso ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) na biteni motoba, ezalaki na liboke moko ya ntina mingi ya maloba na nsé ya lokasa mpo na kolimbola makomi, kopesáká bongo eutelo ya mabongoli ya maloba. Kati na maloba yango na nsé ya lokasa, bandimbola ya nguya ipesamaki mpo na kolóngisa Makomami. Ezalaki mpe na ebongiseli ya motuya mpenza ya mitindami kati na yango. Kolandana ya maloba ya ntina mingi oyo matali mateya, esalamaki mpo na kokamba moyekoli ya Biblia kino na mikapo ya moboko oyo mizali kolobela makambo yango. Ezalaki mpe na mitindami mingi pembeni ya nkasa. Yango ezalaki kokamba motángi kino na (a) maloba ya motindo moko, (b) mabanzo, makanisi mpe makambo ya motindo moko, (c) mayebisi matali bomoi ya moto moko, (d) mayebisi matali geografi, (e) kokokisama ya bisakweli, mpe (f) mikapo ya sikisiki oyo mizali to miuti na biteni mosusu ya Biblia. Kati na bavolimi yango, ezalaki mpe na maloba ya ebandeli ya ntina mingi, bililingi ya mwa bamaniskri ya kala, mabakema mpe ba index ya ntina mingi, bakisá bakálati ya mikili oyo milobelami na Biblia mpe bisika oyo mikili yango mizwamaki. Ebimeli wana ya yambo ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) epesaki etando ya bozwi monene mpo na boyekoli ya moto ye moko ya Biblia mpe mpo na kopesa litomba na bato ya mitema sembo uta na mateya oyo Batatoli ya Yehova bazali komemela bango. Ebimeli ya sipesiale mpenza mpo na bayekoli, oyo etyamaki na volimi bobele moko mpe enyatamaki na baekzamplere 150 000, ebimisamaki mokolo ya 30 Yúni 1963, na ebandeli ya liyangani “Nsango malamu ya seko” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na Milwaukee, Wisconsin, na États-Unis.

21. (a) Makambo nini mazalaki koleka ntango Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo lisembolamaki lisusu, libimisamaki? (b) Wapi mwa makambo oyo mazalaki kati na yango?

21 Ebimeli ya volimi bobele moko oyo etalelami lisusu. Na eleko ya molungé ya 1961, na molɔngɔ́ ya mayangani ya Batatoli ya Yehova oyo masalemaki na États-Unis mpe na Mpótó, ebimeli oyo etalelami lisusu ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu na volimi bobele moko, oyo ezangi mindɔndɔ́ mpo na kosalelama, ebimisamaki mpo na kokabolama. Yango eyambamaki na esengo nyonso na bankóto mingi ya baoyo bayanganaki kati na mayangani yango. Kotyamáká kati na ekótó ya lángi ya mai ya mpondu, ebimeli yango ezalaki na nkasa 1 472 mpe ezalaki na konkordansi moko ya ntina mingi; yango ezalaki mpe na libakema etali makambo mazali kati na Biblia, bakisá mpe bakálati.

22, 23. Bibimeli nini mosusu bibimisamaki, mpe wapi mwa makambo oyo mazalaki kati na yango?

22 Bibimeli mosusu. Na 1969, Biblia The Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scriptures ebimisamaki, mpe ebimeli na yango ya mibale ebimisamaki na 1985. Volimi yango ezali na libongoli ya liloba na liloba na Lingelesi uta na makomi ya Greke oyo mabimisamaki na Westcott mpe Hort, bakisá mpe ebimeli ya 1984 ya Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongolami na Lingelesi ya mikolo na biso. Na bongo, yango epesi epai na moyekoli ya solosolo ya Biblia makambo oyo Greke ya ebandeli ezalaki mpenza koloba na ebandeli to na masoló ya mokolo na mokolo.

23 Ebimeli ya mibale ya Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) oyo esembolamaki lisusu, ebimisamaki na 1970, mpe ebimeli ya misato, oyo mpe ebongisamaki lisusu, elandaki na 1971 mpe etondaki na maloba mingi na nsé ya lokasa. Na mayangani ya etúká “Bokóli ya Bokonzi” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na 1984, ebimeli oyo esembolamaki lisusu mpe oyo ezalaki na mitindami kati na yango ebimisamaki na Lingelesi. Ezalaki na mitindami katikati na nkasa, mitindami oyo mibongisamaki mpe mitalelamaki lisusu malamu, oyo mibimisamaki libosoliboso na Lingelesi uta 1950 kino 1960. Lokola libongoli yango esalamaki mpo na moyekoli ya solosolo ya Biblia, yango ezalaki na mitindami koleka 125 000, ezalaki na maloba koleka 11 000 na nsé ya lokasa, konkordansi moko oyo ezalaki na makambo mingi, bakálati, mpe libakema ya mitó na makambo 43. Bobele na 1984, ebimeli moko ya monene mingi te mpe ezalaki na mitindami, ebimisamaki engebene bozongeli ya 1984, kasi ezalaki na maloba na nsé ya lokasa te.

24. (a) Wapi mwa matomba ya ebimeli ya mitindami mpe oyo ezangi mitindami? (b) Pesá ndakisa ya kosalelama ya mitó na makambo oyo mityami na likoló na nkasa.

24 Mwa matomba na yango. Mpo na kosalisa motángi ete ayeba noki esika mokapo oyo azali na mposa na yango mozali, ezala ebimeli ya mitindami to ya mitindami te ezali na mitó na makambo likoló na lokasa mokomoko. Mitó na makambo yango mizali kolobela makambo oyo mazali na kati ya lokasa wana, mpe yango etyami mingimingi mpenza mpo na kosalisa mosakoli ya Bokonzi ete ayeba noki esika mikapo mizali, mpo na koyanola na mituna oyo batuni ye. Na ndakisa, akoki kozala na mposa ya komona mokapo oyo epesi toli mpo na kobɔkɔla bana. Ntango akómi na lokasa 847 (na ebimeli ya mwa monene na Lifalansé) kati na mokanda ya Masese, akotala maloba ya moboko oyo matyami na nsuka ete “Un beau nom” (Nkombo malamu). Lokola yango ezali eteni ya ebandeli ya motó na likambo, boye emonisi ete likambo oyo yango elobeli lizwami pene na ebandeli ya lokasa wana, mpe akokuta yango na Masese 22:1. Mpo na mokapo oyo momonisami na eteni ya mibale ya motó na likambo oyo mozali likoló na lokasa 847 lisusu ete “Comment élever les enfants” (Lolenge ya kobɔkɔla bana), molukiluki akokuta yango na ebandeli ya makambo ya lokasa yango, na vɛ́rsɛ 6. Eteni elandi ya motó na likambo yango likoló na lokasa 861 (na Lingelesi) ezali kotángama boye: “Not spare the rod” (Salelá fimbo). Likambo yango lilobelami penepene na nsé mpenza ya lokasa, na lobɔkɔ ya mwasi, na vɛ́rsɛ 15. Mitó wana ya makambo oyo mikomami na likoló mpenza ya nkasa mikoki kopesa lisalisi monene epai na mosakoli ya Bokonzi oyo akoyeba bongo esika akoki komona mikapo oyo azali koluka. Na lisalisi na yango, Biblia ekoki kosalelama nokinoki kozanga mpasi.

25. Konkordansi nini yango epesaki, mpe na mitindo nini yango ekoki kosalelama malamu?

25 Na nsuka ya Biblia ya mitindami mpe oyo ezangi mitindami, ezali na eteni oyo ebéngami “Index des mots bibliques les plus importants” (Index ya maloba minene ya Biblia). Kuna, okokuta ebele ya maloba ya ntina oyo mazali kati na Biblia, esika moko na milɔngɔ́ mikuse ya maloba, lolenge yango ezwami kati na mokapo. Na bongo, konkordansi ezwami kati na yango, bakisá mpe molɔngɔ́ molai ya maloba ya sika mpe ya bolimboli oyo esalelami kati na makomi. Mpo na baoyo bameseni na maloba ya Biblia King James Version, lisungi lipesameli bango na nzela ya kobongolama ya maloba mingi ya Lingelesi ya kala ya Biblia kino na maloba ya Lingelesi ya Biblia ya mikolo na biso. Na ndakisa, tókamata liloba “grace” (mawa, ngɔlu, bolimbisi) kati na King James Version. Liloba yango lityami kati na index (na ebimeli ya Lingelesi), kotindáká moyekoli ya Biblia ete atala na liloba “undeserved kindness” (ngɔlu), oyo ezali liloba ya lelo oyo lisalelami na libongoli ya sika. Index ya maloba ezali kopesa likoki ya komona mikapo ya Makomami oyo milobeli mateya ya moboko, na ndakisa “molimo” to “lisiko,” kopesáká likoki ya koyekola na bozindo mpenza na nzela ya mikapo ya Biblia yango moko. Mosakoli ya Bokonzi oyo abyangami na koteya moko na makambo minene wana akoki nokinoki kosalela biteni ya maloba ya mikapo oyo bipesami kati na konkordansi yango. Lisusu, liste ya mikapo ya ntina epesami mpo na nkombo oyo iyebani mingi, nkombo ya bisika, bakisá mpe nkombo ya bato minene oyo balobelami kati na Biblia. Na bongo, lisungi monene epesami na bayekoli nyonso ya Biblia oyo bazali kosalela libongoli yango.

26. Monisá moko na lolenge kati na yango libakema ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kopesa lisungi.

26 Libakema moko, oyo esalemi na mayele mingi, ezali mpe kopesa mayebisi ya sikisiki oyo mazali kopesa litomba mpo na koteya. Makambo ya libakema yango matyami na molɔngɔ́ na motindo boye ete makoki kosalelama lokola lisungi mpo na kolimbola mateya ya minene ya Biblia mpe makambo oyo makangani na yango. Na ndakisa, na kolobeláká likambo litali “âme” (molimo), libakema yango, na nsé na mitó na makambo mwambe oyo mikeseni, lizali kopesa molɔngɔ́ ya mikapo ya Makomami oyo mizali komonisa mitindo mikeseni oyo kati na yango liloba “molimo” (na Liebele, neʹphesh) lizali kosalelama. Bitánda mpe bakálati ityami mpe kati na makambo ya libakema yango. Biblia ya mitindami ezali na libakema oyo eleki molai, bakisá mpe maloba ya ntina mingi na nsé ya lokasa, oyo mazali kopesa mayebisi ya ntina likoló na makomi, na lolenge ya pɛtɛɛ. Na bongo, Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na ntina mingi mpo na matomba mingi oyo yango ezali kopesa na kokɔtisáká nokinoki boyebi ya sikisiki epai na batángi na yango.

27, 28. Limbolá mpe pesá ndakisa ya lolenge oyo Libongoli ya Mokili ya Sika (na lingelesi) lizali komonisa ndenge ya kobénga nkombo.

27 Lisungi mpo na koyeba kobénga nkombo oyo izali kati na Biblia. Kati na makomi ya Lingelesi yango moko, bibimeli nyonso ya Libongoli ya Mokili ya Sika bizali kopesa lisungi na likambo ya kobénga nkombo oyo izali na kati. Ebongiseli oyo esalelami ekokani na oyo esalelamaki na moto moko ya mayele mpo na Biblia Revised Standard Version ya 1952. Nkombo ekatami bitenibiteni oyo bikabolami na mikɔlɔtɔ mike to na elembo ya botomboli lolaka (ʹ). Elembo ya botomboli lolaka etyami nsima na eteni ya liloba oyo likoló na yango mongongo mosengeli kotombolama mpo na kobénga nkombo yango. Soki eteni ya liloba oyo esengeli kobéngama na mongongo makasi ezali kosuka na moleli, boye lolaka ya moleli yango esengeli koyeisama molai ntango liloba wana lizali kobéngama. Soki eteni ya liloba yango esuki na molelisami, boye lolaka ya moleli oyo mozali wana esengeli kozala mokuse.

28 Na ndakisa, talá Yobo 4:1. Mokapo yango mozali kolobela “Elʹi·phaz the Teʹman·ite” (“Elifaza Motemani”). Wana elembo ya botomboli lolaka etyami likoló na eteni ya ebandeli ya nkombo nyonso mibale, lɛ́tɛlɛ “e” esengeli kobéngama na lolenge lokeseni kati na nkombo wana mibale. Kati na “Elʹi·phaz,” elembo ya botomboli lolaka oyo etyami na nsima ya molelisami “l” ezali kosala ete lolaka ya moleli “e” lózala mokuse, lokola na “end” (“nsuka”). Nzokande, kati na “Teʹman·ite,” elembo ya botomboli lolaka oyo etyami mbala moko nsima na moleli “e” ezali kokómisa lolaka na yango molai, lolenge moko na “e” ya liboso kati na liloba “Eden” (“Edene”). Soki mileli mibale “a” na “i” esangisami, lokola na “Morʹde·cai” (Moledekai) oyo ezwami na Esetele 2:5 mpe na “Siʹnai” oyo ezwami na Exode 19:1, “ai” ekobéngama na lolaka ya “ai” ya molai.

29. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika euti nde na kobongisama ya mabongoli ya kala, mpe makambo nini mazali kolóngisa eyano na yo?

29 Libongoli ya sika. Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ezali libongoli moko ya sika uta na nkótá ya ebandeli ya Biblia: Liebele, Aramɛyɛ mpe Greke. Yango ezali soko moke te kobongisama ya libongoli moko ya kala ya Lingelesi; ekomeli na yango, maloba na yango mpe lolenge na yango emekoli ata Biblia moko te. Mpo na eteni oyo ekomamaki na Liebele mpe na Aramɛyɛ, Biblia Hebraica ya Rudolf Kittel, ebimeli na yango ya nsambo, ya mwambe mpe ya libwa (1951-1955) esalelamaki; makomi ya Biblia yango mapɛtolami malamu mpe mandimami na mokili mobimba. Ebimeli moko ya sika ya makomi ya Liebele oyo eyebani na nkombo Biblia Hebraica Stuttgartensia, ya mobu 1977, esalelamaki mpo na koyeisa sika makambo oyo mayebisami kati na maloba na nsé ya lokasa ya Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi). Eteni ya Greke ebongolamaki mingi mpenza longwa na makomi ya moboko ya Greke oyo mabongisamaki na Westcott mpe Hort, mpe mabimisamaki na 1881. Nzokande, Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika esalelaki mpe makomi mosusu ya Greke, sangisá makomi ya Greke oyo mabimisamaki na Nestle (1948). Makomi nyonso wana ya malamu malobelami na bozindo kati na boyekoli nimero 5 mpe nimero 6 ya búku oyo. Komité wana esalaki libongoli moko ya nguya mpe ya sikisiki ya Biblia, mpe yango ebimisi makomi ya polele mpe ya mɔ́tɔ, kopesáká nzela na bososoli mozindo mpe ya kokoka ya Liloba ya Nzambe.

30. Molukiluki moko ya makomi apesaki likanisi nini likoló na libongoli yango?

30 Talá likanisi ya molukiluki moko ya makomi likoló na libongoli yango: “Mabongoli ya Makomami ya Liebele ya ebandeli mazali mpenza moke na lokótá ya Lingelesi. Tozali na esengo mingi ya kozwa eteni ya liboso ya Libongoli ya Mokili ya Sika [ya Makomami ya Liebele], kobanda na Genese kino Luta. . . . Milende mingi misalemi na ntina ete Biblia yango ekoka kozala pɛtɛɛ mpo na kotángama. Moto moko te akoki koloba ete yango ezali ya sika te kati na eutelo na yango. Maloba na yango matongami soko moke te likoló na maloba ya mabongoli oyo masilá kobimisama liboso.”b

31. Lolenge nini nganga-mayele moko Moyuda amonisaki likanisi na ye likoló na Libongoli ya Mokili ya Sika?

31 Molakisi Dr. Benjamin Kedar, nganga-mayele Moyuda ya Israël, na boumeli ya mituna-lisoló elongo na momonisi moko ya la Société Watch Tower, apesaki likanisi na ye likoló na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na maloba oyo: “Kati na bolukiluki mingi oyo nasalaka na makambo matali nkótá, na ntina na Biblia mpe mabongoli ya Liebele, natalelaka mingi Biblia ya Lingelesi oyo eyebani na nkombo Libongoli ya Mokili ya Sika. Na kosaláká bongo, nandimisamaka ntango nyonso ete mosala yango mozali mpenza komonisa molende ya solosolo oyo mosalemaki mpo na kobimisa bososoli ya sikisiki ya makomi. Kopesáká bilembeteli ete [babongoli] bayebaki malamumalamu lokótá ya ebandeli, Biblia yango ezali kobongola maloba kati na lokótá mosusu na lolenge ya pɛtɛɛ mpenza mpo na kososolama, kozanga ete ezunguluka mpambampamba uta na lolenge ya sikisiki ya ekomeli ya Liebele. . . . Maloba nyonso ya lokótá matikaka mwa bonsomi kati na kolimbolama na yango to kobongolama na yango. Na bongo, na makambo matali nkótá, ntembe ekoki lisusu kobima likoló na likambo moko oyo lisilaki kosukisama. Kasi, kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika, naino namoná ata likanisi moke te ya komeka kobakisa eloko moko oyo ezali te kati na makomi.”c

32. Kino na meko nini Libongoli ya Mokili ya Sika ezali libongoli ya liloba na liloba, mpe litomba na yango ezali nini?

32 Libongoli ya liloba na liloba. Bosembo kati na libongoli ezali mpe komonisama na lolenge yango ezali kolanda ndimbola ya liloba mokomoko. Yango esɛngi ete pene na maloba nyonso ya libongoli ya Lingelesi mázala na liloba oyo ekokani na yango kati na makomi ya Liebele mpe ya Greke. Kati na lokótá oyo makomi mazali kobongolama, bobongoli liloba na liloba esengeli kosalama kino na meko oyo ndíngá (idiome) ya lokótá ya ebandeli epesi yango nzela. Lisusu, bobongoli liloba na liloba esɛngi ete molɔngɔ́ ya maloba mingi mabongolami mózala lolenge moko na oyo ya Liebele mpe Greke, kobateláká bongo bokasi ya makomi ya ebandeli. Na nzela ya libongoli ya liloba na liloba, elɛngi, bonzenga, mpe kolandana kitoko ya makambo engebene makomi ya ebandeli ekoki komonisama na bosikisiki mpenza.

33. Lolenge nini kotikama ya makomi ya liloba na liloba na bisika mosusu eyebisamaki?

33 Na mwa bisika mosusu, makomi mabongolamaki lisusu liloba na liloba te, mpo na kotya na maloba ya pɛtɛɛ ndíngá ya Liebele to ya Greke oyo izali mpasi mpo na kososolama. Nzokande, na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezali na mitindami, yango eyebisami epai na motángi na nzela na maloba na nsé ya lokasa, epai kuna kobongolama ya makomi yango liloba na liloba epesami.

34. (a) Kotika libongoli ya liloba na liloba ezali kobimisa makambo nini? (b) Pesá ndakisa.

34 Babongoli mingi ya Biblia basili kotika libongoli ya liloba na liloba na ntina na oyo bazali kobénga ete bonzenga ya lokótá mpe lolenge kitoko na yango. Bazali koloba ete libongoli ya liloba na liloba lizalaka makasi, likangamá mpe lityaka motángi na nkaká. Nzokande, lokola batiki libongoli ya liloba na liloba, yango ememi bango na kotangwa na maloba ya ebandeli mpe ya sikisiki ya solo, na ntina na maloba mpe bandimbola ndenge na ndenge oyo bazali kokɔtisa. Na yango, basili kosenzola makanisi ya Nzambe. Na ndakisa, molakisi moko ya kala ya Eteyelo monene ya Amerika, oyo atikalá na nkombo ya lokumu nsima ya kozwa epasó, afundaki Batatoli ya Yehova ete basili kobebisa kitoko mpe bonzenga ya Biblia. Biblia oyo azalaki kolobela ezalaki bongo King James Version oyo ekumisamaki na boumeli ya ntango molai ete ezalaki moboko ya Lingelesi kitoko. Alobaki ete: ‘Talá likambo bosali na Nzembo 23. Bosili kobebisa kitoko mpe bonzenga na yango na maloba na bino “Je/ho/vah is/ my/ shep/herd” (Yehova azali mobateli na ngai). [Bokómisi yango] biteni nsambo ya maloba, na esika ya biteni motoba. Ezali mawa mingi. Bolekisi ndelo. Lolaka kitoko ezali lisusu te. Biblia King James ebongi mpenza mpo ete ezali bobele na biteni motoba ya maloba—“The/ Lord/ is/ my/ shep/herd”’ (Nkolo azali mobateli na ngai). Eyano ezongisamaki epai na molakisi wana ete ezalaki likambo ya ntina kotya maloba yango ndenge Davidi, mokomi na Biblia, atyaki yango. Davidi asalelaki liloba “Nkolo,” to asalelaki nde nkombo ya Nzambe? Molakisi yango andimaki ete Davidi asalelaki nkombo ya Nzambe, kasi akóbaki koloba ete mpo na kitoko mpe bonzenga ya lokótá, liloba “Nkolo” lisengelaki kondimama. Oyo nde ndimbola ya mpambampamba ya kolongola nkombo monene ya Yehova kati na loyembo wana ya kosanzola ye!

35. Mpo na nini tosengeli kotɔ́nda Nzambe, mpe nini ezali elikya mpe libondeli na biso?

35 Na lolenge yango, mikapo mingi misili kobebisama na bato oyo bazali koluka liboso bonzenga ya lokótá oyo bato bazali kosala, mpe yango esali ete bosikisiki ekoka kozanga kati na mabongoli mingi ya Biblia. Tiká ete Nzambe azwa matɔ́ndi mpo ete apesi Libongoli ya Mokili ya Sika, elongo na makomi na yango ya polele mpe ya sikisiki ya Biblia! Tiká ete nkombo na ye monene, Yehova, esantisama kati na mitema ya baoyo nyonso bazali kotánga yango!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na ebele ya basosyete ya Biblia oyo isalemaki kobanda 1804, tokoki kotánga Sosyete ya bobimisi Biblia na Amerika (1816), oyo ebongisamaki uta na basosyete oyo izalaki liboso kati na mboka yango; tokoki mpe kotánga Sosyete ya Edimbourg mpo na bobimisi Biblia (na 1809), Sosyete ya Glasgow mpo na bobimisi Biblia (na 1812); na nsima, basosyete wana mibale ya nsuka iyaki kosangisama (na 1861) mpo na kosala sosyete bobele moko oyo ebéngami Sosyete ya mboka Écosse mpo na bobimisi Biblia. Na 1820, basosyete ya bobimisi Biblia isalamaki mpe na mboka Suisse, Irlande, France, Finlande, Suède, Danemark, Norvège, Hollande, Islande, Russie mpe na Allemagne.

b Alexander Thomson, na búku The Differentiator, ya Yúni 1954, lokasa 131.

c 12 Yúni 1989, ebongolami uta na lokótá ya Allemand.

[Etanda na lokasa 322]

MWA MABONGOLI MINENE YA BIBLIA NA NKÓTÁ NSAMBO YA MINENE

Nkombo ya Ebimeli ya Makomi ya Kobongolama Makomi ya Libongoli ebandeli moboko mpo ya nkombo moboko mpo na Makomami ya Nzambe na Makomami ya Liebele ya Greke

LINGELESI

Rheims-Douay* 1582-1610 Vulgate Lord (ADONAI, Vulgate mbala mibale)

King James 1611 M LORD (Jehovah, Textus Version* mingi te) receptus

Young 1862-1898 M Jehovah Textus receptus

English Revised* 1881-1895 M LORD (Jehovah, Westcott mingi te) mpe Hort

Emphasised 1878-1902 M (Ginsburg) Yahweh Westcott Bible mpe Hort, Tregelles

American 1901 M Jehovah Westcott Standard mpe Hort

An American 1923-1939 M LORD (Yahweh, Translation mingi te) Westcott (Smith-Goodspeed)* mpe Hort

Revised 1946-1952 M LORD Westcott Standard* mpe Hort, Nestle

New English 1961-1970 M (BHK) LORD (Jehovah, Makomi Bible* mingi te) ya sika maponami uta na biutelo ndenge na ndenge

Today’s 1966-1976 M (BHK) LORD UBS English Version

New King 1979-1982 M (BHS) LORD (YAH, Majority James mingi te) Text Bible/ Revised Authorised Version

New Jerusalem 1985 M Yahweh Greke Bible*

ESPAGNOL

Valera 1602 M Jehová Textus receptus

Moderna 1893 M Jehová Scrivener

Nácar-Colunga* 1944 M Yavé Greke

Evaristo 1964 M Yavé Greke Martín Nieto*

Serafín de 1965 M (BHK) Yahvéh, Nestle- Ausejo* Señor Aland

Biblia de 1967 M Yahveh Greke Jerusalén*

Cantera- 1975 M (BHK) Yahveh Greke Iglesias*

Nueva 1975 M Señor Greke Biblia Española*

PORTUGAIS

Almeida 1681, M Jehovah Textus 1750 receptus

Figueiredo* 1778-90 Vulgate Senhor Vulgate

Matos 1927-30 Vulgate Senhor Vulgate Soares*

Pontifício 1967 M Javé Merk Instituto Bíblico*

Jerusalém* 1976, 1981 M Iahweh Greke

ALLEMAND

Luther* 1522, 1534 M HErr Erasme

Zürcher 1531 M Herr, Greke Jahwe

Elberfelder 1855, M Jehova Textus 1871 receptus

Menge 1926 M HErr Greke

Luther (ebongisami 1964, M HERR Greke lisusu)* 1984

Bibel in 1967 M (BHS) Herr Nestle- heutigem Aland, Deutsch (Gute UBS Nachricht)*

Einheitsübersetzung* 1972, M Herr, Greke 1974 Jahwe

Revidierte 1975, M HERR, Greke Jahwe 1985 Elberfelder

LIFALANSÉ

Darby 1859, M Eternel Greke 1885

Crampon* 1894-1904 M Jéhovah Merk

Jérusalem* 1948-54 Vulgate, Yahvé Vulgate, Liebele Greke

TOB 1971-75 M (BHS) Seigneur Nestle, Ecumenical UBS Bible*

Osty* 1973 M Yahvé Greke

Segond 1978 M (BHS) Eternel Nestle- révisée Aland, Black, Metzger, Wikgren

Français 1982 M (BHS) Seigneur Nestle, courant UBS

HOLLANDAIS (PAYS-BAS)

Statenvertaling 1637 M HEERE Textus receptus

Leidse Vertaling 1899-1912 M Jahwe Nestle

Petrus 1929-1939 M Jahweh Nestle -Canisiusvertaling*

NBG-vertaling 1939-51 M HERE Nestle

Willibrordvertaling* 1961-75 M Jahwe Nestle

Groot Nieuws Bijbel* 1972-83 M Heer Nestle

ITALIEN

Diodati 1607, M Signore Greke 1641

Riveduta (Luzzi) 1925 M Eterno Greke

Nardoni* 1960 M Signore, Greke Jahweh

Pontificio 1923-58 M Signore, Merk Jahve Istituto Biblico*

Garofalo* 1960 M Jahve, Greke Signore

Concordata* 1968 M (BHK) Signore, Nestle, Iavè Merk

CEI* 1971 M Signore Greke

Parola del 1976-85 M (BHS) Signore UBS Signore*

* Asteriske emonisi ete mikanda-apokrife mizalaki na kati na yango, kasi mikoki te komonana kati na bibimeli nyonso.

“M” emonisi makomi ya Bamasorete. Ntango etyami yango moko, yebá ete ata ebimeli moko te ya sikisiki ya makomi ya Bamasorete emonisami.

“BHK” emonisi Biblia Hebraica ya Kittel.

“UBS” emonisi Biblia The Greek New Testament, ebimisami na United Bible Societies.

“BHS” emonisi Biblia Hebraica Stuttgartensia.

“Greke” emonisi libongoli oyo lisalemaki uta na Greke, kasi makomi ya sikisiki mamonisami te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto