Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango
Boyekoli nimero 8—Matomba ya “Libongoli ya Mokili ya Sika”
Lokótá na yango ya mikolo na biso, boyokani oyo ezali kati na yango moko, kobongolama ya makelelo na yango na likebi mozindo, mpe lolenge na yango ya komonisa na nguya nyonso Liloba lipemami ya Nzambe.
1. (a) Libungá nini Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kosembola, mpe na lolenge nini? (b) Na Lingelesi, mpo na nini nkombo Jehovah esalelami na esika ya Yahweh to lolenge mosusu ya nkombo yango?
NA BAMBULA euti koleka, mabongoli mingi ya sika mabimisamaki, oyo masili kopesa lisungi mingi epai na baoyo balingaka Liloba ya Nzambe ete bákanga nokinoki ntina ya makomi ya ebandeli. Nzokande, mabongoli mingi masili kolongola nkombo ya Nzambe kati na makomi ya bulɛɛ. Kasi Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kopesa nkembo mpe lokumu na nkombo monene ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mpo ete ezongisi nkombo yango na bisika bibongi kati na makomi. Nkombo yango ezali komonana na bisika 6 973 kati na Makomami ya Liebele, bakisá mpe na bisika 237 kati na Makomami ya Greke; kosangisama na yango nyonso epesi bisika 7 210. Ebéngeli Yahweh elingami mingi na banganga-mayele Bayuda, kasi kino lelo, lolenge ya sikisiki ya kobénga nkombo yango eyebani naino te. Na yango, ebéngeli Jehovah, na Latin, ezali kosalelama ntango nyonso mpo ete yango ebandaki kosalelama uta bikeke mingi mpe ezali libongoli oyo lindimami mingi na Lingelesi, mpo na Tetragrami יהוה: nkombo oyo esalemi na balɛ́tɛlɛ minei ya Liebele. R. H. Pfeiffer, nganga-mayele Moyuda alobi ete: “Ata elobami boni na ntina na eutelo na yango oyo eyebani malamu te, ‘Jehovah’ ezali mpe esengeli kotikala libongoli libongi ya liloba Yahweh na Lingelesi.”a
2. (a) Ezali na mabongoli mosusu ya liboso oyo mazongisaki nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Greke ya boklisto? (b) Na yango, ntembe nini elongolami?
2 Libongoli ya Mokili ya Sika ezali libongoli ya liboso te oyo lizongisi nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Kobanda pene na ekeke ya 14, babongoli mingi bamiyokaki ete bapusami na kozongisa nkombo ya Nzambe kati na makomi, mingimingi mpenza na bisika oyo bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto bazalaki kolobela mikapo ya Makomami ya Liebele oyo mizali na nkombo ya Nzambe kati na yango. Mabongoli mingi ya bamisionere na nkótá ya mikolo na biso, bakisá mpe mabongoli ya Makomami ya Greke na Afrika, na Azia, na Amerika mpe na bisanga ya Pacifique, mazali kosalela nkombo ya Nzambe na bisika mingi, lokola mabongoli mosusu ya nkótá ya mikili ya Mpótó. Bisika nyonso oyo nkombo ya Nzambe ebongolami, ntembe mpo na koyeba “nkolo” oyo alobelami ezali lisusu te. Yehova nde azali Nkolo ya likoló mpe mabelé, oyo nkombo na ye esantisami na lolenge Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu esantisi yango, komonisáká ete ezali nkombo oyo ekokani na mosusu te.b
3. Na myango nini Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kobimisa bokasi, bonzenga mpe ndimbola ya makomi ya ebandeli?
3 Libongoli ya Mokili ya Sika lizali kosantisa lisusu nkombo ya Yehova na komonisáká polelepolele Makomami na ye oyo mapemami, kosaleláká elobeli ya pɛtɛɛ oyo, kati na makanisi ya motángi, ezali kobimisa polele ndimbola esengeli. Yango ezali kosalela elobeli oyo ezangi mindɔndɔ, lokótá oyo lobongi na mikolo na biso; boyokani mozindo ezali komonana kati na lolenge na yango ya kobongola maloba; yango ezali kobimisa na bosikisiki mpenza likambo to ezalela oyo emonisami na makelelo (verbes) ya Liebele mpe ya Greke, mpe na Lingelesi, yango ezali kopesa likeseni kati na bomingi mpe bɔɔkɔ ntango liloba “you” esalelami, bakisá mpe na ntango yango esaleli likelelo na lolenge ya kopesa etindá (impératif) na esika oyo mokapo mozali te komonisa likambo yango polele. Na ndenge yango mpe na mitindo misusu mikeseni, Libongoli ya Mokili ya Sika lizali kongɛngisa bokasi, bonzenga mpe ndimbola ya makomi ya ebandeli, na komonisáká yango na elobeli ya mikolo na biso, na meko oyo makoki mapesi nzela.
EBONGOLAMI NA ELOBELI YA MIKOLO NA BISO
4. (a) Mokano malamu nini mobongoli moko ya kala ya Biblia amonisaki? (b) Likambo nini likómaki na ntina mingi wana ntango elekaki?
4 Mabongoli ya kala ya Biblia matondi na maloba mingi masilá ngala oyo mazalaki kolobama na ekeke ya 16 mpe ya 17. Atako lelo oyo maloba yango mazali kososolama te, nzokande na ntango wana bato bazalaki kososola yango malamu. Na ndakisa, moto oyo asalaki mingi mpo na kotya maloba motindo wana na Biblia ya Lingelesi ezalaki William Tyndale, oyo eyebisami mpo na ye ete alobaki na moko na batɛmɛli na ye na makambo matali lingomba maloba oyo: ‘Soki Nzambe abateli bomoi na ngai mwa bambula mingi, nakosala ete elenge oyo azali kopusa etimweli ya mabelé ayeba Makomami koleka yo.’ Na eleko ya Tyndale, libongoli na ye ya Makomami ya Greke lizalaki pɛtɛɛ mpenza mpe likokaki kososolama na elenge mosáli na bilanga. Nzokande, maloba mingi oyo asalelaki makómi sikawa maloba ya kala, na boye ete ‘elenge oyo azali kopusa etimweli ya mabelé’ lelo akoki lisusu te kokanga ntina mpenza ya maloba mingi oyo mazali kati na King James Version mpe oyo mazali kati na mabongoli mosusu ya kala ya Biblia. Na bongo, ekómaki likambo ya ntina ete elobeli ya kala elongolama mpe Biblia ezongisama kati na elobeli eyebani malamu na bato banso.
5. Na elobeli ya lolenge nini Biblia esengeli kobimisama, mpe mpo na nini?
5 Ezali elobeli ya bato banso nde ezalaki kosalelama na ntango Makomami mapemami mazalaki kokomama. Bantoma mpe baklisto mosusu ya liboso bazalaki kosalela Greke ya bato minene te, oyo ezalaki kosalelama na bato na filozofi, na ndakisa Platon. Bazalaki kosalela Greke oyo ezalaki kolobama mokolo na mokolo, elingi koloba Koinè, to Greke ya bato banso. Na yango, Makomami ya Greke, motindo moko na Makomami ya Liebele oyo mazalaki liboso na yango, makomamaki na lokótá oyo bato banso bazalaki koloba. Na bongo, ezali likambo ya ntina mingi ete mabongoli oyo mauti na Makomami ya ebandeli mázala mpe kati na lokótá ya bato banso, na ntina ete mákoka kososolama malamumalamu. Ezali na ntina yango nde Libongoli ya Mokili ya Sika lizali te kosalela elobeli ya kala, oyo ezalaki kosalelama esili koleka bikeke misato to minei, kasi ezali nde kosalela elobeli ya sika mpe ya polele mpo na kopesa nzela na batángi ete báyeba malamu makambo oyo Biblia ezali koloba.
6. Na nzela ya ndakisa moko, monisá litomba ya kosalela maloba ya sika na esika ya maloba oyo masilá ngala.
6 Mpo na kopesa mwa likanisi likoló na mbongwana oyo emonani na Lingelesi kobanda na ekeke ya 17 kino ekeke ya 20, tyá likebi na bokokanisi oyo elandi kati na King James Version mpe Libongoli ya Mokili ya Sika. “Suffered” kati na King James Version ekómi “allowed” [apesaki nzela] kati na Libongoli ya Mokili ya Sika (Gen. 31:7), “was bolled” ekómi “had flower buds” [ebimisaki fololo] (Ex. 9:31), “spoilers” [babebisi] ekómi “pillagers” [bapunzi] (Bas. 2:14), “ear his ground” ekómi “do his plowing” [kotimola mabelé] (1 Sam. 8:12), “when thou prayest” ekómi “when you pray” [Ezali yo kobondela] (Mat. 6:6), “sick of the palsy” [mobɛli na bobɔsɔnɔ] ekómi “paralytic” [mokatatali] (Mko. 2:3), “quickeneth” [kosekwisa] ekómi “makes . . . alive” [kopesa . . . bomoi] (Lom. 4:17), “shambles” ekómi “meat market” [zando bakotekaka nyama] (1 Kol. 10:25), “letteth” ekómi “acting as a restraint” [mopekisi, mokangi-nzela] (2 Tes. 2:7), mpe bongo na bongo. Uta na bandakisa wana, motuya ya Libongoli ya Mokili ya Sika, na likambo litali kosalela maloba ya sika na esika ya maloba oyo masilá ngala, mokoki mpenza kondimama.
BOYOKANI KATI NA KOBONGOLAMA YA MALOBA
7. Lolenge nini Libongoli ya Mokili ya Sika limonisi boyokani kati na lolenge na yango ya kobongola maloba?
7 Libongoli ya Mokili ya Sika esali milende makasi mpo na kozala na boyokani kati na bobongoli na yango ya maloba. Mpo na liloba moko ya Liebele to ya Greke, bobele liloba moko ya Lingelesi nde lipesami na yango, mpe likambo yango lisalelami na bomoko mpenza na meko oyo ndíngá (idiomes) mpe makambo ya zingazinga mapesi nzela mpo na kosala ete Lingelesi lisosolama malamumalamu. Na ndakisa, liloba ya Liebele neʹphesh libongolami na bisika nyonso “molimo.” Liloba ya Greke oyo likokani na yango, psy·kheʹ, libongolami mpe “molimo” na bisika nyonso.
8. (a) Pesá bandakisa ya maloba-ndoí. (b) Lolenge nini mokakatano ya kobongola maloba yango mosilisamaki kati na libongoli yango?
8 Na bisika mosusu, mokakatano mobimaki mpo na kobongola maloba oyo mazali ndoí (homonymes). Yango ezali maloba oyo, kati na lokótá ya ebandeli, makomamaka lolenge moko kasi oyo mazali na bandimbola ekeseni mpenza. Na bongo, ezali mpasi mpo na kopesa na liloba motindo wana ndimbola na yango ya solosolo ntango libongoli lizali kosalema. Na Lingala, ezali na maloba-ndoí; na ndakisa, “mpaka” (mobangé) mpe “mpaka” (oyo esalelamaka mpo na kobamba biloko), “mbamba” (nyoka) mpe “mbamba” (mokato; kotingama) yango ezali kokomama lolenge moko kasi ezali maloba oyo makeseni mpenza. Ndakisa moko oyo euti na Biblia ezali ya liloba ya Liebele rav, oyo ezali komonisa maloba mingi makeseni; na yango, maloba wana mabongolami na lolenge lokeseni kati na Libongoli ya Mokili ya Sika. Mbala mingi, liloba rav elimbolaka “ebele to mingi,” lokola na Exode 5:5. Nzokande, liloba rav oyo lisalelami kati na nkombo, lokola “Laba-sake” (na Liebele, Rav-sha·qehʹ) na 2 Mikonzi 18:17, elimboli “mokonzi to kapita”; kati na Danyele 1:3, yango ebongolami na “kapita na mikube na ye.” (Talá mpe Yilimia 39:3, NW, maloba na nsé na lokasa.) Liloba rav, ya lolenge ekokani na oyo wana, lilimboli “bato na matimbo”; yango emonisi ntina ya maloba oyo mabongolami kati na Yilimia 50:29. Banganga-mayele na makambo matali maloba, na ndakisa L. Koehler mpe W. Baumgartner, bandimami na babongoli ete bazali biutelo ya moboko na likambo litali kokabola maloba wana oyo makomamaka lolenge moko.
9. Lolenge nini molimboli moko ya Liebele mpe ya Greke akumisaki Libongoli ya Mokili ya Sika?
9 Na ntina na boyokani kati na kobongolama ya maloba, talá oyo Alexander Thomson, molimboli na Liebele mpe na Greke, alobaki na ntango atalelaki Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Greke ya boklisto: “Libongoli yango lizali mpenza mosala ya banganga-mayele ya makoki mingi, oyo balukaki kobimisa ndimbola ya solosolo ya makomi ya Greke na meko oyo lokótá ya Lingelesi lokoki komonisa yango. Libongoli yango lizali na mokano ya kobatela ndimbola bobele moko mpo na liloba monene nyonso ya Greke, mpe lisusu ya kozala libongoli ya liloba na liloba, kino na meko oyo makoki mapesi yango nzela. . . . Liloba oyo libongolamaka mingimingi ete ‘kokómisa mosembwi’ libongolami na bisika mingi ete ‘kotánga moto moyengebene.’ . . . Kobongisama mosusu emonani na likambo oyo ete liloba mpo na Ekulusu libongolami na ‘nzeté ya mpasi.’ . . . Luka 23:43 ebongolami malamumalamu, ete ‘Solo nazali koloba na yo lelo ete: Okozala na ngai elongo na Paladiso.’ Yango ezali kobongisama monene oyo ezali te kati na mabongoli mingi.” Na kobongolama ya Makomami ya Liebele, motaleli wana alobaki lisusu boye: “Ebongi mpenza ete moto azala na Libongoli ya Mokili ya Sika. Lizali na nguya mpe litondi na bomoi; yango ezali komema motángi na kokanisa mpe koyekola. Ezali mosala ya Banganga-batyoli ya Biblia te, kasi mosala ya banganga-mayele oyo bazali kokumisa Nzambe mpe Liloba na Ye.”—The Differentiator, ya Apríli 1952, nkasa 52-57, mpe ya Yúni 1954, lokasa 136.
10. Pesá ndakisa oyo emonisi lolenge Libongoli ya Mokili ya Sika lizali kosimba solo ya Biblia na nzela ya bobongoli maloba na boyokani nyonso.
10 Boyokani kati na kobongolama ya maloba na Libongoli ya Mokili ya Sika esili kopesa bolóngi mingi likoló na ntembe oyo ebimaka na mosala ya kosakola, na ntina na makambo ya Biblia yango moko. Na ndakisa, esili koleka mwa bambula, sosyete moko ya bato na bonsomi na makanisi (libres penseurs) na New York basɛngaki na la Société Watch Tower ete etinda balobi na yango mibale mpo na kokende kosolola makambo ya Biblia liboso na etuluku na bango, mpe lisɛngi na bango lindimamaki. Bato wana oyo bayekolá mingi bakangamaki na lisese ya Latin oyo lilobi ete falsum in uno falsum in toto, elingi koloba ete ndimbola oyo emonani lokuta na likambo moko, ezali lokuta na makambo nyonso. Na boumeli ya lisoló, mobali moko atyanaki ntembe na Batatoli ya Yehova likoló na likambo ya koyeba soki Biblia ebongi mpenza kotyelama motema. Asɛngaki ete Genese 1:3 etángama liboso na bayangani nyonso, mpe yango etángamaki, kati na Libongoli ya Mokili ya Sika ete: “Mpe Nzambe alobaki ete: ‘Tiká pole ezala.’ Bongo pole ezalaki.” Na lolendo nyonso, asɛngaki lisusu Genese 1:14, yango mpe etángamaki kati na Libongoli ya Mokili ya Sika ete: “Mpe Nzambe alandaki koloba ete: ‘Tiká mingɛngɛli mizala na etando ya makoló.’” Moto yango akataki ete “Suká wana, ozali kotánga makambo nini? Biblia na ngai elobi ete Nzambe asalaki pole na mokolo ya liboso, mpe lisusu na mokolo ya minei, mpe yango ezali na boyokani ata moke te.” Atako amikumisaki ete ayebaki Liebele, nzokande balakisaki ye ete liloba ya Liebele oyo ebongolami na “pole” na vɛrsɛ́ 3 ezalaki bongo ʼohr, nzokande liloba oyo lizali na vɛrsɛ́ 14 likesanaki, mpamba te yango ezalaki nde ma·ʼohrʹ, oyo elimboli mongɛngɛli, to eutelo na pole. Moto yango, oyo ayekolá mingi, afandaki nyɛɛ mpo ete alóngamaki ye.c Boyokani makasi oyo ezali kati na kobongolama ya maloba ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezwaki elónga na likambo yango, kondimisáká Biblia ete ebongi kotyelama motema mpe ezali na litomba.
KOBONGOLAMA YA MAKELELO NA BOSIKISIKI NYONSO
11. Likambo nini ya nguya mingi na Makomami ya ebandeli libatelami kati na Libongoli ya Mokili ya Sika? Ndenge nini?
11 Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kotya likebi mozindo mpo na kobimisa ndimbola oyo makelelo ya Greke mpe ya Liebele mazali komonisa. Na kosaláká bongo, Libongoli ya Mokili ya Sika lisali milende mpo na kobatela bonzenga, elobeli ya pɛtɛɛ, nguya mpe lolenge ya makomi ya nkótá ya ebandeli. Na bongo, ezalaki likambo ya ntina ete makelelo-masungi (verbes auxiliaires) másalelama na Lingelesi mpo na kopesa na bosikisiki mpenza ezalela ya likambo mokomoko. Lokola makelelo na yango mazali na nguya mingi, Makomami ya ebandeli mazali na mɔ́tɔ mpe mamonisaka likambo polele.
12. (a) Wapi lolenge oyo kati na yango Liebele ekeseni na nkótá ya Mpótó? (b) Limbolá bizalela mibale ya likelelo ya Liebele.
12 Makelelo ya Liebele mazalaka na “ntango” (temps) te, na motindo oyo liloba “ntango” lisalelamaka na nkótá mingi ya Mpótó. Na Lingelesi, makelelo mamonisamaka mingimingi na ntango oyo: ntango-eleki (passé), ntango ya sikawa (présent), mpe ntango-ekoya (future). Nzokande, likelelo ya Liebele emonisaka mingi mpenza ezalela ya likambo; elingi koloba ete emonisaka ezalela ya likambo oyo litalelami ete lisilaki kosalema (ezalela-ekoki) to likambo oyo lileki naino te (ezalela-ekoki te). Bizalela wana ya likelelo ya Liebele bikoki kosalelama mpo na komonisa makambo oyo masalemaki na ntango-eleki to oyo makosalema na ntango-ekoya; ezali makambo ya zingazinga nde makomonisa ntango ya likambo. Na ndakisa, ezalela-ekoki, to oyo esilaki kosalema, ya likelelo ya Liebele emonisaka mpenzampenza makambo masalemaki na ntango-eleki, kasi esalelamaka lisusu mpo na kolobela makambo oyo makoya, soki makambo yango matalelami lokola masilaki kobima mpe koleka, komonisáká bosolo ya kosalama na yango mpe kondimisáká ete, ata ndenge nini, yango ekobima.
13. Mpo na nini kotalela ezalela ya likelelo ya Liebele ezali na ntina mingi mpo na kososola malamumalamu Genese 2:2, 3?
13 Kobimisa ezalela ya likelelo ya Liebele na bosikisiki nyonso ezali likambo ya ntina mingi; soki boye te, ndimbola ekoki kobebisama mpe likanisi mosusu oyo likeseni mpenza likoki kobimisama. Mpo na kopesa mwa ndakisa ya likambo yango, talelá makelelo oyo masalelami na Genese 2:2, 3. Mpo na kolobela bopemi ya Nzambe na mokolo ya nsambo, mabongoli mingi ya Biblia mazali kosalela maloba lokola oyo: “apemaki,” “atikaki kosala,” “atiká kosala,” “bongo apemaki,” “Nzambe apemaki,” mpe “asilá kopema.” Na kotaleláká maloba yango, moto akoki kosukisa ete bopemi ya Nzambe na mokolo ya nsambo esukaki bobele na ntango ya kala. Kasi talá lolenge Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kobimisa ndimbola ya makelelo oyo masalelami na Genese 2:2, 3: “Mpe na mokolo ya nsambo Nzambe asukisaki mosala na ye oyo asalaki, mpe abandaki kopema na mokolo ya nsambo longwa na mosala na ye nyonso oyo azalisaki. Mpe Nzambe apambolaki mokolo ya nsambo mpe abulisaki yango, mpo ete na mokolo yango azali kopema longwa na mosala na ye nyonso oyo Nzambe azalisaki na mokano ya kosala.” Maloba oyo mazali na vɛrsɛ́ 2 ete “abandaki kopema” mauti na likelelo ya ezalela-ekoki te na Liebele; boye yango ezali komonisa likanisi ya likambo moko oyo lisuki naino te to oyo lizali kolandana. Ebongoleli oyo ete “abandaki kopema” eyokani na maloba mazwami na Baebele 4:4-7. Epai mosusu, likelelo oyo lisalelami na Genese 2:3 lizali kati na ezalela-ekoki, kasi mpo na koyokanisa yango na vɛrsɛ́ 2 mpe na Baebele 4:4-7, yango ebongolami ete “azali kopema.”
14. Kopɛngoláká likanisi ya libungá na ntina na waw ekolandanaka, Libongoli ya Mokili ya Sika esali milende nini na ntina na makelelo ya Liebele?
14 Moko na bantina oyo esali ete bosikisiki ezanga kati na kobongolama ya makelelo ya Liebele ezali liteya ya gramere oyo libéngami lelo waw ekolandanaka (vav consécutif). Waw (ו) ezali likangisi (conjonction) ya Liebele oyo elimboli “mpe.” Likangisi yango litambolaka yango moko te kasi lizalaka ntango nyonso elongo na maloba mosusu, mingi mpenza elongo na likelelo ya Liebele mpo na kobimisa liloba moko na yango. Bamoko balobaki, mpe ezali ntango nyonso kolobama ete bokangani wana bozali na nguya ya kolongola likelelo kati na ezalela moko mpe kotya yango kati na ezalela mosusu; elingi koloba longwa na ezalela-ekoki te kino na ezalela-ekoki (lokola yango esalemaki na mabongoli mingi, bakisá mpe mabongoli ya mikolo na biso, na Genese 2:2, 3) to longwa na ezaleli-ekoki kino ezaleli-ekoki te. Bopusi yango ebéngami lisusu ete “waw ekobongwanisaka (vav conversif).” Lolenge mabe wana ya kosalela likelelo ya Liebele esili komema na mobulungano monene mpe na libongoli libongi te ya makomi ya Liebele. Libongoli ya Mokili ya Sika endimi te ete lɛ́tɛlɛ waw ezali na nguya ya kobongola ezalela ya likelelo. Kútu, milende misalamaki mpo na kobimisa nguya ya solosolo mpe ya polele ya likelelo ya Liebele, kobateláká bongo ndimbola ya ebandeli na bosikisiki nyonso.d
15. (a) Na likebi ya motindo nini makelelo ya Greke mabongolamaki? (b) Na lisalisi ya ndakisa moko, pesá litomba ya komonisa malamumalamu likanisi oyo lizali kolandana.
15 Bobele bongo, likebi mozindo lisalemaki na ntango ya kobongolama ya makelelo ya Greke. Na Greke, ntango ya makelelo ezali te komonisa bobele eleko oyo likambo lisalemaki to ezalela na yango, kasi lisusu lolenge ya likambo, komonisáká soki yango ezalaki likambo ya ntango mokuse, to oyo liuti kobanda sika, to oyo lizali kolandana ntango nyonso, to oyo lizali kozonga mbala na mbala to mpe oyo lisilaki kosuka. Kotya likebi likoló na bandimbola wana ya makelelo ya Greke ezali kosala ete libongoli lizala sikisiki, elongo na bokasi mobimba ya likambo oyo lilobelami. Na ndakisa, komonisama ya likanisi oyo lizali kolandana ntango nyonso kati na likelelo ya Greke ezali te bobele kongɛngisa bosolo ya likambo, kasi ezali lisusu kopesa nguya mingi na lilako to na toli oyo epesami. Na ndakisa, kozanga kondima oyo Bafalisai mpe Basadukai bazalaki na yango ntango nyonso emonisami na maloba oyo ya Yesu ete: “Libota mabe mpe na pite, bazali [ntango nyonso, “NW”] koluka elembo.” Mpe ntina ya kolanda to kokóba mosala kati na makambo mabongi emonisami malamu na maloba oyo ya Yesu ete: “Bólingaka bayini na bino.” “Na bongo, bólukaka liboso bokonzi.” “Bólanda kosɛnga, mpe yango ekopesamela bino; bólanda koluka, mpe bokozwa; bólanda kobɛta [na ekuke], mpe ekofungwamela bino.”—Mat. 16:4; 5:44; 6:33; 7:7, NW.
16. Na kotaleláká ntango ya Greke oyo babéngi aoriste, lolenge nini maloba ya Yoane oyo mazwami na 1 Yoane 2:1 na ntina na “lisumu” mabongolami kozanga libungá?
16 Lokótá ya Greke ezali na ntango moko oyo emonanaka mingi te, oyo babéngi aoriste; yango emonisaka makambo oyo mazali koumela bobele ntango moke mpenza, to ya ntango mokuse. Makelelo oyo matyami na aoriste makoki kobongolama na mitindo ndenge na ndenge, engebene esika oyo yango ezwami. Moko na mitindo oyo kati na yango aoriste esalelami ezali ya komonisa likambo bobele moko ya lolenge ya sikisiki, atako yango ekangisami na eleko ata moko te. Tozali kokuta ndakisa ya likambo yango na 1 Yoane 2:1, epai kuna mabongoli mingi mazali kobongola likelelo mpo na “lisumu” na lolenge ya kopesa nzela na etamboli ya kosala masumu ntango nyonso, nzokande Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli ete, “asali lisumu,” elingi koloba lisumu oyo lisalami mbala moko. Yango ezali kobimisa ndimbola ya solosolo ete, soki moklisto asali likambo moko oyo lizali lisumu, Yesu Klisto azali mpe akosala lokola molobeli, to mosungi na ye epai na Tata na likoló. Na bongo, 1 Yoane 2:1 ezangi boyokani te na 1 Yoane 3:6-8 mpe 5:18, kasi ekeseni nde na kokweisama ya ezaleli ya ‘kokómisa lisumu momeseno’ oyo elobelami na mikapo wana.e
17. Longola komonisa likambo oyo lizali kolandana, ntango ya Greke oyo babéngi imparfait ekoki lisusu komonisa nini? Pesá ndakisa.
17 Na Greke, ntango oyo babéngi imparfait ekoki komonisa bobele likambo oyo lizali kolandana te, kasi lisusu likambo oyo lizalaki pene na kosalama kasi lisalamaki te. Talá lolenge Baebele 11:17 ezali kotángama kati na King James Version: “Na kondima Abalayama, ntango amekamaki, akabaki Yisaka: mpe ye oyo azwaki bilaka akabaki mwana na ye bobele moko.” Lolenge ya likelelo “akabaki” lokeseni kati na makambo wana mibale na Greke. Kokaba ya liboso etyami na ntango ebéngami parfait (oyo esilaki kosalema), nzokande kokaba ya mibale ezali na imparfait (kolandana kati na ntango-eleki). Kotaleláká bantango wana nyonso mibale, Libongoli ya Mokili ya Sika libongolaki vɛrsɛ́ yango boye: “Abalayama, ntango amekamaki, azalaki pene na kokaba Yisaka lokola mbeka, mpe moto yango . . . alingaki kokaba, lokola mbeka, mwana na ye mobotami-bobele moko.” Na bongo, ndimbola mobimba ya likelelo ya liboso esimbami, nzokande imparfait ya likelelo ya mibale emonisi ete likambo yango lilingaki kosalema to limekamaki, kasi likokisamaki te.—Gen. 22:9-14.
18. Likebi mozindo likoló na biteni mosusu ya makambo matali elobeli ebimisi litomba nini? Pesá ndakisa.
18 Likebi mozindo likoló na biteni mosusu ya makambo matali elobeli, na ndakisa likoló na bankombo ya gramere, lisili komema na kosembolama ya makambo oyo mazalaki kotalelama lokola bongolabongola. Na ndakisa, na Misala 9:7, wana yango ezali koyebisa likambo ya nsɔ́mɔ oyo likómelaki Saulo na nzela ya Damaseke, mabongoli mingi malobaka ete baninga na ye ya mobembo ‘bayokaki mongongo’ oyo molobaki na ye kasi bamonaki moto te. Na nsima, na Misala 22:9, epai kuna Paulo azali koyebisa likambo yango, bobele mabongoli wana malobi lisusu ete atako bamonaki kongɛnga, ‘bayokaki mongongo te.’ Nzokande, na likambo ya liboso, liloba ya Greke oyo libongolami na “mongongo” lisalelami na bokangani na moto oyo abimisaki mongongo yango, kasi na likambo ya mibale, yango elobelami kozanga ete ekangisama na moto oyo abimisaki yango, lokola na Misala 9:4. Ntina ya bokeseni wana ezali nini? Mabongoli oyo touti kolobela makɔtisi bokeseni wana te na Lingelesi [to na nkótá mosusu]; nzokande, lokola makambo mabongwani, lokótá ya Greke lozali komonisa likambo mosusu oyo likeseni. Bato yango bayokaki “[lokito] ya mongongo,” kasi bayokaki yango lolenge moko na Paulo te, oyo ayokaki maloba mpe akangaki ntina na yango. Na yango, kotaleláká bokangani oyo etyami kati na mongongo mpe mobimisi na yango, oyo ezali na Misala 9:7, Libongoli ya Mokili ya Sika elobi ete bato oyo bazalaki elongo na ye ‘bayokaki lokito ya mongongo moko, kasi bamonaki moto te.’
“YOU” (BINO) NA BOMINGI EMONISAMI
19, 20. (a) Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) esalaki nini na ntina na maloba ya makumisi ya lokuta oyo matalaki koloba na Nzambe, mpe mpo na nini? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi lolenge bɔɔkɔ ya liloba “you” ekoki kokesenisama na bomingi na yango.
19 Maloba ya Lingelesi ya kala mpo na liloba “yo” mazali bongo “thee,” “thou,” mpe “thy”; maloba yango mazongelamaki kati na mabongoli mosusu, na bisika oyo bato bazalaki koloba epai na Nzambe. Nzokande, na nkótá oyo Biblia ekomamaki na yango, ezalaki ata na lolenge moko te ya sipesiale ya likitana-pakala (pronom personnel) oyo esengelaki kosalelama ntango moto azali koloba epai na Nzambe; lolenge bobele moko ezalaki kosalelama mpo na koloba na moto mpe mpo na koloba na Nzambe. Na yango, Libongoli ya Mokili ya Sika liboyaki kosalela maloba wana ya makumisi ya lokuta, nde lisalelaki na bisika nyonso liloba “you” oyo lizali kosalelama na masoló ya mokolo na mokolo. Mpo na koyeba liloba “you” oyo lisalelami na bomingi mpe makelelo oyo bomingi na yango emonanaka polele te na Lingelesi, maloba yango manyatami na balɛ́tɛlɛ ya minene. Mbala mingi, motángi asalisamaka na koyeba soki mokapo oyo mopesami mozali kolobela “you” oyo etaleli bobele moto moko, to “YOU” oyo etaleli etuluku ya bato, lisangá.
20 Na ndakisa, na Baloma 11:13, NW, Paulo azali kolobela bato mingi: “Sikawa nazali koloba na BINO (YOU) oyo bozali bato na mabota.” Kasi na vɛrsɛ́ 17, Greke ebongwani mpo na kolobela “you” ya bɔɔkɔ, mpe maloba yango masalelami mpo na moto moko: “Nzokande, soki bitape mosusu bikatami kasi yo (you) . . . otyami na esika na yango . . .”
LIBONGOLI YA MOKILI YA SIKA NA NKÓTÁ MOSUSU
21. (a) Lolenge nini likoki limonanaki mpo na bibele ya bafandi na mabelé ete básepela na matomba ya Libongoli ya Mokili ya Sika? (b) Wapi motuya mobimba ya baekzamplere ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo enyatamaki na la Société Watch Tower na 1995?
21 Na 1961, esakolamaki ete la Société Watch Tower ezalaki kobongola Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na nkótá mosusu motoba oyo ilobamaka mingi; nkótá yango ezali bongo Allemand, Espagnol, Hollandais, Italien, Lifalansé, mpe Portugais. Mosala yango mopesamaki na babongoli ya makoki oyo bamipesi; bango banso bazalaki kosala elongo kati na biro monene ya la Société Watch Tower, na Brooklyn, New York. Bazalaki kosala lokola komité ya mikili mingi oyo mosala na yango ezalaki kozwa litambwisi libongi. Ezalaki na Yulí 1963, na liyangani “Nsango malamu ya seko,” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na Milwaukee, Wisconsin, na États-Unis, nde mbuma ya liboso ya mosala yango ya libongoli izwamaki, na ntango Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Greke ya boklisto ebimisamaki na mbala moko na nkótá motoba oyo touti kotánga. Na bongo, bafandi na mabelé oyo balobaka nkótá mosusu ikeseni na Lingelesi bazali kozwa matomba ya libongoli yango ya sika. Uta ntango yango, mosala ya libongoli molandanaki, na boye ete, na 1995, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu libimisamaki na nkótá 27, na baekzamplere koleka 81 500 000 oyo inyatamaki.f
BOTƆ́NDI MPO NA ESALELI WANA YA NGUYA
22, 23. Na mitindo nini kitoko libongoli yango ya Makomami mapemami lizali kopesa litomba epai na baklisto?
22 Libongoli ya Mokili ya Sika ezali mpenza esaleli moko ya nguya mpo na komonisa ete “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Na kotalela makambo oyo touti kolobela kati na boyekoli oyo, tososoli ete yango ezali mpenza sikisiki mpe ebongi kotyelama motema; yango ekoki kopesa bosepeli ya solosolo epai na baoyo bazali na mposa ya koyoka lolenge Nzambe azali koloba na bato, na lolenge ya kosepelisa mpenza, na lokótá ya mikolo na biso, oyo lozali koyokama malamu. Elobeli ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kolamwisa na elimo, mpe ezali kokɔtisa motángi nokinoki na boyokani na elobeli ya nguya oyo esalelamaki na Makomami ya ebandeli oyo mapemamaki. Ntina ezali lisusu te ya kozongela kotánga mikapo mbala mingi liboso ya kososola maloba ya makasimakasi. Libongoli yango lizali koloba na nguya mpe na polele nyonso, na boye ete bobele na botángi ya liboso, moto azali kokanga ntina.
23 Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ezali libongoli ya sembo ya Liloba ya Nzambe, “mopanga na [elimo, NW].” Na bongo, yango ezali ebundeli ya nguya mingi kati na etumba ya elimo oyo baklisto bazali kobunda; ezali lisungi mpo na ‘kokweisa mateya mpe makanisi ya lokuta oyo matɛlɛmisami makasi mpo na kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.’ Oyo nde makoki kitoko yango ezali kopesa biso mpo na kosakola, na boyebi mozindo, makambo oyo mazali kopesa litomba mpe oyo mazali kotonga: makambo ya nkembo matali Bokonzi na Nzambe na boyengebene—ɛɛ, “misala ya kokamwa ya Nzambe”!—Ef. 6:17; 2 Kol. 10:4, 5; Mis. 2:11, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Introduction to the Old Testament, ya Robert H. Pfeiffer, 1952, lokasa 94.
b iblia Kingdom Interlinear Translation, Ebimeli ya 1985, nkasa 1133-1138.
c Reference Bible, appendice 3C, “Hebrew Verbs Indicating Continuous or Progressive Action” (Makelelo ya Liebele maye makomonisaka likambo oyo lizali kolandana mokemoke.)
d Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 528.
e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 1008.
f Ebimesami na mobimba na yango na Allemand, na Danois, na Espagnol, na Finnois, na Italien, na Japonais, na Lifalansé, na Lingelesi (mpe na Braille), na Néerlandais, na Portugais (mpe na Braille), na Slovaque, na Suédois mpe na Tchèque; (bibimeli ya ndambo bizalaki na Afrikaans, na Cebuano, na Chinois, (mpe na Chinois oyo eyeisami pɛtɛɛ), na Coréen, na Grec, na Iloko, na Indonésien, na Norvégien, na Polonais, na Sesotho, na Tagalog, na Xhosa, na Yoruba mpe na Zoulou).