Eteni 5
Lotómo na biso ya kopona oyo tolingi, ezali likabo lileki malamu
1, 2. Likabo nini lileki malamu oyo lizali eteni ya ezaleli na biso?
LIBOSO ya koyeba ntina oyo Nzambe apesaki nzela na mpasi mpe motindo oyo akosilisa yango, tosengeli mpenza koyeba lolenge oyo asalaki biso. Azalisaki biso bobele na nzoto mpe na bɔɔngɔ́ te. Azalisaki biso mpe na makoki ya kokanisa mpe ya kozala na mayoki.
2 Lotómo na biso ya kopona oyo tolingi ezali moko na makambo ya ntina mpo na makanisi mpe mayoki na biso. Ee, kati na mitema na biso, Nzambe atyaki kati na biso, likoki ya kopona oyo tolingi. Ezalaki solo likabo lileki malamu liuti na ye.
Lolenge oyo tosalemaki
3-5. Mpo na nini tozali kosepela na lotómo na biso ya kopona oyo tolingi?
3 Totala boyokani bozali kati na lotómo na biso ya kopona oyo tolingi mpe ntina oyo Nzambe apesaki nzela na mpasi. Mpo na kobanda, kanisa naino likoló na mituna oyo: Olingaka kozala na bonsomi ya kopona makambo malingi yo kosala mpe koloba, bilei na yo mpe bilamba na yo, mosala na yo, esika mpe lolenge nini osengeli kofanda? To mpe olingaka ete moto moko akoyebisaka yo makambo nyonso masengeli yo koloba mpe kosala, na ntango nyonso ya bomoi na yo?
4 Moto moko te oyo azali na bososoli malamu akolinga ete bomoi na ye eyangelama. Mpo na nini bongo? Na ntina na lolenge oyo Nzambe asalaki biso. Biblia elobi na biso ete Nzambe azalisaki moto na ‘elilingi na ye mpe na lolenge na ye’; nzokande, lotómo ya kopona ezali moko na bizaleli oyo Nzambe azali na yango. (Genese 1:26; Deteronome 7:6) Na ntango azalisaki bato, apesaki bango likabo wana lileki malamu—lotómo na biso ya kopona oyo tolingi. Wana ezali moko na bantina mpo na yango tosilikaka wana bakonzi mabe bazali koyangela biso.
5 Na bongo, mposa ya kozala na bonsomi ezali eloko ebimi pwasa te, mpamba te Nzambe azali Nzambe ya bonsomi. Biblia elobi ete: “Esika elimo na Jéhovah ezali, bonsomi ezali wana.” (2 Bakolinti 3:17, MN) Na yango, lotómo na biso ya kopona oyo tolingi epesameli biso na Nzambe, ezali eteni na bomoto na biso. Ayebaki lolenge nini makanisi mpe mayoki na biso masengelaki kozala; ayebaki ete tokozala na esengo mingi na kozaláká na lotómo na biso ya kopona oyo tolingi.
6. Nzambe asalaki bɔɔngɔ́ na makoki nini mpo ete esala na boyokani na lotómo na biso ya kopona oyo tolingi?
6 Likoló na likabo ya lotómo na biso ya kopona oyo tolingi, Nzambe abakisaki makoki ya kokanisa, ya kososola, ya kozwa bikateli mpe ya kokesenisa mabe na malamu. (Baebele 5:14) Na bongo, esengelaki ete lotómo na biso ya kopona oyo tolingi etongama likoló na liponi ya mayele. Biso tosalemi te lokola bikeko oyo bikoninganaka, nde bizangi mayele mpe biyebi kozwa makatami te. Epai mosusu, tozalisami te mpo na kosala makambo na kozanga esosweli, lokola oyo emonani epai na nyama. Kasi, bɔɔngɔ́ na biso kitoko ekelamaki mpo ete esala na boyokani na bonsomi na biso ya kopona.
Ebandeli malamu
7, 8. Makambo nini ya malamu oyo Nzambe asalaki na ebandeli mpo na baboti na biso ya liboso?
7 Bakisa na likabo oyo ete lotómo na bango ya kopona oyo balingi, baboti na biso ya liboso, Adam na Eva, bazwaki biloko nyonso oyo moto asengelaki mpenza kozala na yango mposa, likambo oyo limonisi ete Nzambe azalaki komibanzabanza mpo na bango. Batyamaki kati na paradis monene ekokani na elanga. Bazalaki na biloko mingi ya mosuni. Bazalaki na elimo mpe na nzoto ya kokoka; basengelaki konuna te, kobɛla te to mpe kokufa te: mbɛlɛ bakokaki kozala na bomoi ya seko. Mbɛlɛ babotaki bana ya kokoka baoyo basengelaki kozala na esengo na mikolo misengelaki koya. Libota ya bato oyo lizali sé kokóla mbɛlɛ lizwaki mosala moko kitoko: kobongola mabelé mobimba ete makóma paradis.—Genese 1:26-30; 2:15.
8 Na ntina na biloko oyo bipesamelaki bango, Biblia eyebisi ete: “Nzambe atalaki biloko nyonso oyo ye asalaki, mpe tala ete yango ezalaki malamu mingi.” (Genese 1:31, MN) Elobi lisusu mpo na Nzambe ete: “Misala na ye mizali ya kokoka.” (Deteronome 32:4, MN) Ee, na ebandeli, Mozalisi asalaki biloko ya kokoka mpo na libota ya bato. Soki te, mbɛlɛ ekokaki kobonga te. Nzambe amonisaki mpenza ete azalaki komibanzabanza mpo na bango!
Bonsomi bozali na ndelo
9, 10. Mpo na nini lolenge ya kosalela lotómo na biso ya kopona oyo tolingi esengeli mpenza kozala na ndelo ebongi?
9 Atako bongo, Nzambe asalaki ete lotómo na biso ya kopona oyo tolingi ezala na ndelo te? Kanisa mpo na engumba moko monene oyo mibeko mya nzela mizali te, epai kuna moto na moto akoki kokumba motuka na nzela nyonso alingi mpe na lombango nyonso alingi. Okosepela kotambwisa motuka kati na ezalela motindo wana? Te, mpamba te ekozala na mobulu mpe yango ekobimisa makámá mingi.
10 Ezali bobele bongo mpo na lotómo na biso ya kopona oyo tolingi, oyo ezali bongo likabo liuti na Nzambe. Bonsomi bozangi ndelo elimboli kompanyi ya mobulu. Mibeko misengelaki kozala mpo ete misala ya bato mitambola malamu. Liloba na Nzambe liyebisi ete: “Bozala lokola bato na bonsomi, kobateláká bonsomi na bino lokola ezipeli na mabe te, kasi lokola baombo na Nzambe.” (1 Petelo 2:16, MN) Nzambe alingi ete lolenge ya kosalela lotómo na biso ya kopona oyo tolingi ezala na ndelo mpo na bolamu ya bato nyonso. Mokano na ye ezalaki ete tozala na bonsomi; bonsomi kati na makambo nyonso te, kasi bonsomi botyameli ndelo na mibeko.
Mibeko yango nini?
11. Tosalemaki mpo na kotósa mibeko ya nani?
11 Tosalemaki mpo na kotósa mibeko ya nani? Eteni mosusu ya 1 Petelo 2:16, elobi ete: “Lokola baombo na Nzambe.” Yango elimboli boombo na monyoko te, kasi elimboli ete tosalemaki mpo na kozala na esengo mingi na kotósáká mibeko na Nzambe. (Matai 22:35-40) Mibeko na ye mizali kopesa litambwisi malamu, koleka mibeko nyonso misalemi na bato. “Ngai Jéhovah, nazali Nzambe na yo, Ye oyo akolakisa yo mpo ete ozwa litomba, Ye oyo akokamba yo na nzela oyo osengeli kotambola.”—Yisaya 48:17.
12. Wapi bonsomi ya kopona oyo tozali na yango kati na ndelo oyo etyami na mibeko ya Nzambe?
12 Lisusu, bonsomi monene ya kopona bosengelaki kosalelama kati na ndelo etyami na mibeko ya Nzambe. Yango ezali kobimisa biloko ndenge na ndenge, likambo oyo lizali kosepelisa bato. Kanisa na bilei ndenge na ndenge, na bilamba, na miziki, na misala na ntɔki mpe na bandako oyo tozali komona na mokili. Tolingaka ete biso moko topona biloko wana, na esika ete moto mosusu azwa ekateli mpo na biso.
13. Wapi mibeko ya biloko bizalisami oyo tosengeli kotósa mpo na bolamu na biso?
13 Na bongo, tozalisamaki mpo na kozala na esengo mingi na kotósáká mibeko na Nzambe oyo mizali koyangela misala ya bato. Ezali bobele bongo mpo na botósi ya mibeko mityami na Nzambe na biloko bizalisami. Na ndakisa, soki totósi mobeko ya pesanteur te, nde tomibwaki longwa na esika moko molai, tokozoka mpe tokoki ata kokufa. Soki toboyi kotósa mibeko mizali kati na nzoto na biso mpe totiki kolya, totiki komela mai mpe kopema, tokokufa.
14. Ndenge nini toyebi ete bato bazalisamaki te ete bamitambwisa bango moko kozanga Nzambe?
14 Lokola tozalisamaki mpenza na mposa ya kotósa mibeko mityami na Nzambe kati na biloko bizalisami, bobele bongo, tozalisamaki mpe na mposa ya kotósa mibeko na ntina na bizaleli malamu mpe mibeko mitali efandelo na bato. (Matai 4:4) Bato bazalisamaki te ete bamitamwisa bango moko na makoki nyonso kozanga Ye oyo asalaki bango. Mosakoli Yilimia alobaki ete: “Ekoki na motamboli te ete atámbolisa makolo na ye. Ɛ Jéhovah, sembola ngai.” (Yilimia 10:23, 24) Na yango, kati na makambo nyonso, bato bazalisamaki ete bayangelama na Nzambe, kasi mpo na komiyangela bango moko te.
15. Mibeko ya Nzambe misengelaki nde kozala bozito mpo na Adam na Eva?
15 Kotósa mibeko na Nzambe esengelaki kozala bozito te mpo na baboti na biso ya liboso. Kasi, esengelaki nde kozala mpo na bolamu na bango mpe ya libota mobimba ya bato. Soki babalani ya liboso batósaki ndelo oyo etyamaki na mibeko ya Nzambe, mbɛlɛ makambo nyonso masengelaki kozala malamu. Ya solo, mbɛlɛ tofandi lelo kati na paradis kitoko ya bisengo mingi mpe mbɛlɛ tosali libota ya bato bazali na bomoko kati na bikangiseli ya bolingo. Mbɛlɛ mabe, mpasi mpe liwa ezali te.
[Elilingi na lokasa 11]
Na ebandeli, Mozalisi apesaki biloko ya kokoka epai na bato
[Elilingi na lokasa 12]
Okondima kokumba motuka na esika oyo mibeko mya nzela mizali te?