Eteni 8
Mokano na Nzambe mozali pene mpo na kokokana
1, 2. Ebongiseli nini Nzambe asili kozwi mpo na kosilisa mpasi?
LIBOTA na bato lizali kooka mpasi uta bikeke mingi na nsé na boyangeli ya bato oyo bazali na elimo ya botomboki mpe na bilimu mabe. Atako bongo, Nzambe azangi te kosala eloko moko mpo na mpasi na biso. Kasi, na boumeli ya bikeke nyonso wana, azwaki bibongiseli mpo na kosikola bato longwa na mabe mpe na mpasi.
2 Na eleko ya botomboki na Edene, Nzambe abandaki komonisa mokano na ye ya kosala boyangeli oyo ekobongola mabelé na paradis mpo na bato. (Genese 3:15) Na nsima, Yesu, Molobeli na liboso na Nzambe, asalelaki boyangeli wana na Nzambe oyo esengelaki koya lokola motó ya mateya na ye. Alobaki ete yango ezali elikya bobele moko mpo na bato.—Danyele 2:44; Matai 6:9, 10; 12:21.
3. Lolenge nini Yesu abéngaki boyangeli bokokamba mabelé, mpe mpo na nini?
3 Yesu abéngaki boyangeli wana na Nzambe oyo esengeli koya ete, “bokonzi ya makoló,” mpo ete ekoyangela longwa na likoló. (Matai 4:17) Mpe abéngaki yango lisusu ete “bokonzi na Nzambe,” mpo ete Nzambe azali Mobandisi na yango. (Luka 17:20) Na boumeli ya bikeke mingi, Nzambe apesaki elimo na ye epai bato oyo bazalaki bakomi na mikanda na ye ete bakoma bisakweli na ntina na baoyo basengelaki kosala boyangeli yango mpe makambo oyo bokonzi yango ekosala.
Mokonzi ya sika ya mabelé
4, 5. Lolenge nini Nzambe amonisaki ete Yesu azali Mokonzi oyo ye andimi?
4 Soko mibu nkɔto mibale sikawa, Yesu akokisaki ebele na bisakweli bitali moto oyo asengelaki kozala Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe. Amonisaki ete Nzambe aponaki ye lokola Mokonzi ya bokonzi bokoyangela bato longwa na makoló. Lisusu, nsima na liwa na ye, Yesu asekwisamaki na Nzambe mpo na kozala na bomoi na likoló lokola ekelamu ya elimo na nguya mpe ezangi kokufa. Bato mingi bamonaki lisekwa na ye.—Misala 4:10; 9:1-9; Baloma 1:1-4; 1 Bakolinti 15:3-8.
5 Bongo, Yesu “afandaki na lobɔkɔ na mobali na Nzambe.” (Baebele 10:12) Kuna, azelaki ntango oyo Nzambe asengelaki kopesa ye nguya lokola Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe na likoló. Na bongo, esakweli ya Nzembo 110:1 (MN) ekokanaki, epai Nzambe alobi na Yesu ete: “Fanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali kino nakotya banguna na yo lokola etyelo ya makolo na yo.”
6. Lolenge nini Yesu amonisaki ete abongi mpo na kozala Mokonzi na Bokonzi na Nzambe?
6 Na ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki ete abongaki mpo na kozwa esika wana. Atako minyoko, atikalaki sembo epai na Nzambe. Na bongo, amonisaki ete Satana azali mobuki na lokutá, wana alobaki ete moto moko te akoki kotikala sembo epai na Nzambe kati na mimekamo. Yesu, moto na kokoka, ‘Adam ya mibale,’ amonisaki ete Nzambe amikosaki te wana azalisaki bato na ezaleli ya kokoka.—1 Bakolinti 15:22, 45; Matai 4:1-11.
7, 8. Makambo nini ya malamu oyo Yesu asalaki na ntango azalaki awa na mabelé, mpe amonisaki likambo nini?
7 Mokonzi nini asili kosala makambo malamu lokola oyo Yesu asalaki na boumeli ya mwa bambula oyo alekisa na mosala na ye? Wana azwaki nguya ya elimo santu na Nzambe, Yesu abikisaki bato na maladi, bibɔsɔnɔ, bakufeli miso, bimimi, bibúbú. Asekwisaki ata mpe bakufi! Amonisaki na etando moke, makambo oyo akosala mpo na bolamu ya bato na etando ya mokili mobimba, na ntango oyo akoya kati na nguya ya Bokonzi.—Matai 15:30, 31; Luka 7:11-16.
8 Yesu asalaki makambo mingi ya malamu wana ezalaki ye na mabelé kino Yoane, moyekoli na ye alobaki ete: “Ya solo, ezali na ebele na makambo mosusu oyo Yesu asalaki. Soki tokomi yango moko na moko, nakanisi ete mokili mokokoka te na mikanda oyo mikokomama.”—Yoane 21:25, MN.a
9. Mpo na nini bato ya motema sembo bazalaki kokenda epai na Yesu?
9 Yesu azalaki na bopɔlɔ mpe na motema mawa, azalaki na bolingo mingi epai na bato. Asalisaki babólá mpe bato oyo banyokwami, kozanga komonisa ezaleli ya koponapona epai na bazwi to mpe bato ya lokumu mingi. Bato ya motema sembo bazalaki koyanola na libyangi oyo na Yesu litondi na bolingo, ete: “Boya epai na ngai, bino nyonso bolɛmbi mpo na mosala mpe bokumbi bozito, mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino, mpe bozala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ekookisa mpasi te, mpe mokumba na ngai mozali na bozito te.” (Matai 11:28-30, MN) Bato oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki kokenda epai na ye mpe bazalaki kozela boyangeli na ye na motema likoló.—Yoane 12:19.
Bakonzi balandi
10, 11. Banani bakokamba mabelé elongo na Yesu?
10 Boyangeli ya bato ezali na bakonzi balandi; ezali bobele bongo mpo na Bokonzi na Nzambe na likoló. Yesu akokamba mabelé elongo na bato mosusu, mpamba te alakaki basalani na ye ete bakozala bakonzi mpo na koyangela bato elongo na ye.—Yoane 14:2, 3; Emoniseli 5:10; 20:6.
11 Na yango, ntalo moke na bato bakosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló elongo na Yesu. Basali Bokonzi na Nzambe oyo bokomema bolamu ya seko epai na bato. (2 Bakolinti 4:14; Emoniseli 14:1-3) Na boumeli ya ntango, Jéhovah asili bongo kotya moboko ya boyangeli oyo ekopesa bolamu ya seko epai na libota na bato.
Boyangeli ya lipandá esuki
12, 13. Bokonzi na Nzambe ezali pene na kosala likambo nini?
12 Na ekeke oyo, Nzambe asili kopesa lisungi na ye mpenza mpo na makambo ya mabelé. Lokola Eteni 9 ya mokanda oyo ekolimbola yango polele, bisakweli ya Biblia bimonisi ete Bokonzi na Nzambe mpe na Klisto etyamaki na 1914, mpe sikawa ezali pene mpo na koboma ebongiseli nyonso ya Satana. Bokonzi yango ezali pene na ‘koyangela kati na banguna na [Klisto].’—Nzembo 110:2.
13 Mpo na yango, esakweli ya Danyele 2:44 elobi ete: “Na mikolo ya mikonzi yango [ya ntango oyo], Nzambe na lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te [boyangeli ya bato ekopesamela lisusu nzela te]; [Bokonzi na Nzambe] ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe yango ekotikala libela na libela.”—Revised Standard Version.
14. Bolamu nini bokozwama wana boyangeli ya bato ekolongolama?
14 Wana biyangeli nyonso biuti na Nzambe te bikosila kobomama, Bokonzi na Nzambe ekoyangela mabelé kati na makambo nyonso. Lokola ezali na likoló, ekobebisama na bato te. Bokonzi bokozala na esika oyo yango ezalaki liboso, na likoló, epai na Nzambe. Mpe lokola boyangeli na Nzambe ekozala awa na mabelé, moto moko te akozimbisama na mangomba ya lokutá, na mateya mabe na filozofi ya bato to na malako ya politike. Makambo wana makozala lisusu te.—Matai 7:15-23; Emoniseli, mokapo 17 kino mokapo 19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okokuta makambo mingi na ntina na bomoi na Yesu kati na mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na 1991 na la Société Watchtower.
[Elilingi na lokasa 18]
Na ntango azalaki awa na mabelé, Yesu abikisaki bato na maladi mpe asekweisaki bakufi mpo na komonisa makambo oyo akosala na mokili ya sika
[Elilingi na lokasa 19]
Bokonzi na Nzambe na likoló ekosilisa motindo nyonso na boyangeli bouti na ye te