Eteni 11
Moboko ya mokili ya sika mozali kotyama uta sikawa
1, 2. Na kotalela bisakweli ya Biblia, makambo nini tozali komona lelo?
LIKAMBO mosusu ya kitoko ezali oyo ete moboko ya mokili ya sika ya Nzambe mozali kotyama sikawa, nzokande mokili ya Satana oyo monuni, mozali kobeba. Na miso na biso, Nzambe azali kosangisa bato bauti na bikólo nyonso mpe asali bango moboko ya ebongiseli ya sika ya bato awa na mabelé oyo ekokitana mokili oyo mosili lelo kokabwana. Kati na Biblia, na 2 Petelo 3:13, libota wana ya bato ya sika na mabelé, libéngami ete “mabelé ya sika.”
2 Esakweli ya Biblia elobi lisusu ete: “Na mikolo ya nsuka [ntango oyo tozali kobika], . . . Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete: ‘Yakani, tobuta na ngomba ya Jéhovah [losambo na ye ya solo], . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.’”—Yisaya 2:2, 3.
3. (a) Esakweli ya Yisaya ezali kokokana epai na banani? (b) Mokanda ya nsuka ya Biblia elobi nini mpo na yango?
3 Esakweli oyo ezali kokokisama sikawa kati na baoyo bazali kotósa ‘nzela na Nzambe mpe bazali kotambola na bipai bikokendaka ye.’ Mokanda ya nsuka ya Biblia elobeli bato wana ya kimya na mokili mobimba lokola “ebele monene . . . euti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, minoko nyonso,” oyo bazali na bondeko ya solo kati na mokili mobimba mpo na kosalela Nzambe na bomoko. Mpe Biblia elobi lisusu ete: “Bazali baoyo babimi na bolózi monene.” Ezali baoyo bakobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo.—Emoniseli 7:9, 14; Matai 24:3.
Libota ya solo ya bandeko na mokili mobimba
4, 5. Nini epesi nzela ete libota ya ba Témoins de Jéhovah lisalema kati na mokili mobimba?
4 Bamilió ya ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi mpo na komiyokanisa na malako na Nzambe mpe banzela na ye. Elikya na bango ya bomoi ya seko etyami na mokili ya sika oyo Nzambe akosala yango. Na kotósáká mibeko na Nzambe na etamboli na bango ya mokolo na mokolo, bazali komonisa ete bazali pene na kolanda nzela ya boyangeli na ye uta sikawa, mpe lisusu kati na mokili ya sika. Bipai nyonso na mokili, bazali koponapona bikólo te, na mposo te, bazali mpenza kotósa bobele mitinda oyo Nzambe asili kopesa kati na Liloba na ye. Yango wana basali libota ya solo kati na mokili mobimba, libota ya mokili ya sika mosalami na Nzambe.—Yisaya 54:13; Matai 22:37, 38; Yoane 15:9, 14.
5 Soki ba Témoins de Jéhovah basali libota ya mokili mobimba oyo ekokani na mosusu te, ezali mpo na makasi na bango moko te. Bayebi ete yango euti na nguya ya elimo na Nzambe oyo ekosalaka mosala epai na libota oyo lizali kotósa banzela na ye. (Misala 5:29, 32; Bagalatia 5:22, 23) Ezali mosala ya Nzambe. Mpo na yango, Yesu alobaki ete: “Makambo oyo bato bakoki kosala yango te, Nzambe akosala yango.” (Luka 18:27) Na yango, Nzambe oyo asali bomoko ya solo na molóngó mobimba akosala mpe libota ya mokili ya sika ya solo.
6. Mpo na nini tokoki koloba ete bondeko ya ba Témoins de Jéhovah ezali ekamwiseli na mikolo na biso?
6 Na yango, tokoki komona uta sikawa lolenge oyo Jéhovah akoyangela mokili ya sika na kotaleláká oyo abandi kosala na kotyama ya moboko ya mokili yango, oyo esalemi uta sikawa. Mpe oyo asili kosala mpo na Batemwe na ye, ezali na lolenge mosusu, lokola ekamwiseli na mikolo na biso. Mpo na nini? Mpo ete asili kosangisa ba Témoins de Jéhovah na libota ya solo ya bandeko na mokili mobimba; bakoki kokabwana te na ntina na makambo ya bikólo, soko na koponapona mposo to mpo na kokabwana ya mangomba. Atako bakómi bamilió mingi mpe bafandi kati na mikili kolela 200, bango nyonso bazali na bomoko oyo ekoki kobebisama te. Libota wana ya mokili mobimba, oyo esalemi naino te kati na Lisoló ya bato, ezali mpenza ekamwiseli moko monene oyo Nzambe asili kosala na mikolo na biso.—Yisaya 43:10, 11, 21; Misala 10:34, 35; Bagalatia 3:28.
Ndenge nini koyeba libota na Nzambe
7. Engebene Yesu, na likambo nini tokoki koyeba bayekoli na ye ya solo?
7 Mwango mosusu nini oyo ekosalisa biso na koyeba libota oyo Nzambe azali kosalela lokola moboko mpo na mokili ya sika? Banani bazali kokokisa maloba na Yesu oyo mazwami na Yoane 13:34, 35 (MN)? Alobaki boye: “Napesi bino mobeko oyo ya sika ete: bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nasili kolinga bino. Soki bozali na bolingo kati na bino, bato nyonso bakoyeba ete bino bozali bayekoli na ngai.” Ba Témoins de Jéhovah bazali kondima maloba oyo ya Yesu mpe bazali kosalela yango. Lokola yango elakisami na Liloba na Nzambe, bazali “na bolingo mozindo” kati na bango. (1 Petelo 4:8, MN) Lisusu, bazali ‘komilatisa bolingo, mpamba te yango ezali ekanganeli ekoki.’ (Bakolose 3:14, MN) Na bongo, bolingo kati na bandeko ezali bongo “simá” oyo ezali kokangisa bango na bomoko kati na mokili mobimba.
8. Likambo nini mosusu lilobelami na 1 Yoane 3:10-12 mpo na koyeba libota na Nzambe?
8 Lisusu, 1 Yoane 3:10-12 (MN) elobi ete: “Bana ya Nzambe mpe bana ya Diable bamonani na boye ete: moto na moto akosalaka boyengebene te, auti na Nzambe te; lolenge moko mpo na ye oyo alingi ndeko na ye te. Mpo ete tala etinda toyokaki epai na ye longwa na ebandeli: ete tolinganaka; na motindo na Kaina te oyo autaki na ye oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye.” Yango wana libota ya Nzambe lizali na bondeko ya solo kati na mokili mobimba, mpe bakosalaka mobulu te.
Elembo mosusu
9, 10. (a) Mosala nini mopesi nzela na koyeba basaleli na Nzambe na mikolo ya nsuka? (b) Lolenge nini ba Témoins de Jéhovah basili kokokisa Matai 24:14?
9 Ezali mpe na mwango mosusu oyo tokoki koyeba basaleli ya Nzambe. Kati na esakweli na ye na ntina na nsuka ya mokili, Yesu alobelaki makambo mingi oyo masengelaki komonisa bilembo ya mikolo ya nsuka. (Tala Eteni 9 ya mokanda oyo.) Moko na makambo ya moboko ya esakweli yango ezwami na Matai 24:14: “Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”
10 Tosili komona kokokisama ya esakweli oyo? Ee. Uta ntango mikolo ya nsuka mibandaki na 1914, ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe na mokili mobimba, na lolenge oyo Yesu atindaki yango, elingi koloba na koteya bato. (Matai 10:7, 12; Misala 20:20) Bamilió mingi ya Batemwe bazali kokende kotala bato na mabota nyonso mpo na kosolola na bango na ntina na mokili ya sika. Yango esali ete ozwa mokanda oyo, mpo ete mosala na bango esangisi kobimisa mpe kokabola ebele ya mikanda milobelaka Bokonzi na Nzambe. Oyebi bato mosusu oyo bateyaka ndako na ndako na ntina na Bokonzi na Nzambe kati na mokili mobimba? Malako 13:10 emonisi biso lisusu ete, mosala oyo ya kosakola mpe koteya mosengeli kosalema “liboso,” bongo nsuka ekoya.
Bamonisi ete Satana azali mobuki lokutá
11. Ba Témoins de Jéhovah bakokisi likambo nini mosusu na kotósáká boyangeli ya Nzambe?
11 Na kotosáká mibeko mpe malako na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah bazali lisusu kokokisa likambo moko. Bazali komonisa ete Satana abukaki lokutá wana alobaki na bokosi nyonso ete moto moko te akoki kotikala sembo kati na mimekamo. (Yobo 2:1-5) Na kozaláká lisangá ya bamilió na bato oyo bauti na mabota nyonso, lokola moto bobele moko, Batemwe bazali komonisa bosembo na bango na boyangeli ya Nzambe. Bazali bato na kozanga kokoka, kasi bamitii na ngambo na Nzambe na ntina na likambo litali boyangeli ya molóngó mobimba, atako masɛnginya ya Satana.
12. Na kondima na bango, ba Témoins de Jéhovah bazali komekola banani?
12 Lelo oyo, ebele ya ba Témoins de Jéhovah yango babakisi litatoli na bango na molongó ya batatoli ya kala oyo bamonisaki bosembo na bango epai na Nzambe. Mpo na kotanga bobele ndambo na bango, Abele, Noa, Yobo, Abalayama, Sara, Yisaka, Yakobo, Debora, Luta, Davidi, mpe Danyele bazalaki mpe na molongó yango. (Baebele, mokapo 11) Lokola Biblia emonisi yango, bazali ‘lipata monene ya batatoli ya sembo.’ (Baebele 12:1) Bango mpe bato mosusu, kati na bango Yesu mpe bayekoli na ye, babatelaki bosembo na bango epai na Nzambe.
13. Maloba nini oyo Yesu alobaki na ntina na Satana mamonani ete mazali solo?
13 Yango emonisi bosolo ya maloba oyo Yesu alobaki epai na bakonzi ya mangomba na ntina na Satana, ete: “Kasi sikawa bolingi koboma ngai, moto oyo ayebisi bino solo oyo nayokaki epai na Nzambe. Abalayama asalaki bongo te. . . . Bino bouti na tata na bino, Diable, mpe bolingi kosala mikano ya tata na bino. Ye mobomi na bato uta ebandeli, mpe aumeli na solo te, mpo ete solo ezali kati na ye te. Ekobukaka ye lokutá, azali kosolola makanisi na ye mpenza, mpo ete azali mobuki na lokutá mpe tata na yango.”—Yoane 8:40, 44, MN.
Okopona nani?
14. Likambo nini lizali komonana sikawa na moboko ya mokili ya sika?
14 Moboko ya mokili ya sika oyo Nzambe azali kosala yango uta sikawa kati na libota ya mokili mobimba ya ba Témoins de Jéhovah, ezali sé kolendisama. Mbula na mbula, ebele na bato bazali kosalela lotómo na bango ya kopona oyo balingi, etongami likoló na boyebi ya solo, mpo na kondima boyangeli ya Nzambe. Bazali kokɔta kati na libota ya mokili ya sika, bazali komitya na ngambo ya Nzambe na ntina na likambo litali boyangeli ya molóngó mobimba mpe komonisa ete Satana azali mobuki na lokutá.
15. Mosala nini ya kokabola Yesu azali kosala na mikolo na biso?
15 Na koponáká boyangeli ya Nzambe, Klisto, oyo azali kokabola “bampate” na “bantaba,” atangi bango ete babongi mpo na kozala na “lobɔkɔ na ye ya mobali.” Kati na esakweli na ye na ntina na mikolo ya nsuka, Yesu alobaki ete: “Mabota nyonso makoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato lokola mobateli na bibwele akokabolaka bampate na bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, mpe bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.” Bampate ezali basokemi oyo basangani na bandeko na Klisto mpe bazali kosunga bango, na kotosáká bongo boyangeli ya Nzambe. Bantaba ezali bato na lolendo baoyo baboyi bandeko na Klisto mpe bazali kosala eloko moko te mpo na kosimba boyangeli ya Nzambe. Mpe likambo nini likobima na nsima? Yesu ayanoli: “Bango (bantaba) bakoleka na kolongolama ya seko, nde bayengebene (bampate) bakozwa bomoi ya seko.”—Matai 25:31-36, MN.
16. Likambo nini osengeli kosala soko nde olingi kozala na bomoi na paradis oyo ekoya?
16 Ya solo, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso. Mosika te akosala paradis moko kitoko awa na mabelé. Olingi kozala kati na paradis wana? Soko bongo, monisa botɔndi na yo na bibongiseli ya Jéhovah na koluka koyeba ye mpe na kosalela makambo oyo ozali koyekola. “Boluka Jéhovah naino akoki komonana, bobyanga ye naino abɛlɛmi penepene. Tika ete moto mabe alongwa na nzela na ye. Mpe moto na masumu alongwa na makanisi na ye mabe. Tika ete abutwa epai na Jéhovah, ete aokela ye mawa.”—Yisaya 55:6, 7.
17. Mpo na nini ntango ya kobungisa ezali te mpo na kopona nani oyo tosengeli kosalela?
17 Ntango ya kobungisa ezali te. Nsuka ya ebongiseli oyo enuni esili kobɛlɛma. Liloba na Nzambe lipesi toli oyo ete: “Bolinga mokili te soko biloko bizali kati na yango. Moto nani alingi mokili, bolingo na Tata ezali na ye te. . . . Mokili mozali koleka mpe mposa na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.” 1 Yoane 2:15-17, MN.
18. Matambé nini osengeli kosala mpo na kozala na elikya makasi ya kozala na bomoi kati na mokili ya sika ya kitoko mingi ya Nzambe?
18 Libota ya Nzambe libongisami uta sikawa mpo na kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika. Bazali kozwa makoki ya elimo mpe makoki mosusu masengeli na bango mpo na kobongisa paradis. Tolendisi yo ete opona Nzambe lokola Moyangeli mpe opesa lisungi na mosala ya lobiko oyo azali kokokisa lelo na mabelé. Yekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, yekola koyeba Nzambe oyo azali mpenza komibanzabanza mpo na biso, oyo akosilisa bampasi na biso. Na bongo, yo mpe okoki kokɔta kati na moboko ya mokili ya sika. Okoki bongo kozala na elikya ya kozwa ngolu na Nzambe mpe kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika ya kitoko mingi.
[Elilingi na lokasa 31]
Ba Témoins de Jéhovah bazali na bondeko ya solo na mokili mobimba
[Elilingi na lokasa 32]
Moboko ya mokili ya sika ya Nzambe mozali kotyama uta sikawa