Nani mpenza azali koyangela mokili?
Na motuna oyo bato mingi bakoyanola na liloba bobele moko ete: Nzambe. Nzokande, ezali polele ete, esika moko te Biblia elobi ete Yesu Klisto to Tata na ye bazali mpenza bakonzi ya mokili na lelo. Nkutu, Yesu alobaki ete: “Mokóló na mokili oyo akobwakama libanda.” Mpe abakisaki ete: “Mokóló na mokili oyo azali koya. Mpe azali na eloko kati na ngai te.”—Yoane 12:31; 14:30; 16:11.
Na bongo, mokóló ya mokili na lelo azali kotemela Yesu. Akoki mpenza kozala nani?
Mobandisi ya bampasi na mokili
Atako milende ya bato na makanisi malamu, mokili esili konyokwama mingi na boumeli ya Lisolo na bato. Ezali yango nde epusaki bato na mayele na komituna lokola esalaki yango mokomi na nsango David Lawrence, oyo asilá kokufa. Akomaki ete: “‘Kimya na mabelé’—pɛnɛpɛnɛ na bato nyonso balingi yango, boboto epai na bato—pɛnɛpɛnɛ na bato nyonso ya mokili bazali na liyoki wana bamoko mpo na basusu. Na yango, likambo nini lizali kozanga? Mpo na nini likaneli ya etumba nzokande bato bazali na mposa na kozala na boboto uta kobotama na bango?”
Yango ekeseni mpenza na makanisi ya bato, boye te? Atako bato bazali kotombela kofanda mpenza na kimya, nzokande bazali koyinana mpe kobomana—mpe bazali kosala yango na motindo na mabe mingi! Kanisa na mayele mabe mpo na koboma oyo bato basili komonisa. Basalelaki bandako etondi na gaz mabe mpo na koboma bato, bisika ya monyoko makasi bibengami camps de concentration, mandoki makasi mpo na kobwakela bato móto, ba bombes ebengami napalm mpe myango misusu ya mabe mpo na koyokisana mpasi mpe kobomana, kozanga mawa.
Okanisi ete bato, oyo bazali koluka kimya mpe bolamu, bakoki, bango moko, kosala mabe motindo oyo? Nguya nini ezali kopusa bato na kosala makambo na nsomo boye to komema bango kati na ezalela oyo bazali komiyoka ete bapusami na kosala bambeba? Omitúná naino te soki ezali na nguya moko mabe mpe ezangi komonana oyo ezali kopusa bato na kosala mobulu mingi boye?
Mokóló na mokili amonisami polele
Ntina ya koluka epai na epai ezali te, mpamba te Biblia ezali komonisa polele ete ekelamu moko ya mayele mpe azangi komonana na miso na bato azali kotambwisa bato mpe mabota. Elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala kati na oyo mabe.” Lisusu, emonisi ye na maloba oyo: “[Ye] oyo abengami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.”—1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:9.
Na libaku moko, ntango Yesu “amekamaki na Diable,” atyaki ntembe te ete Satana azali mokonzi ya mokili. Biblia elimboli ndenge likambo lilekaki: “Satana atambolisi ye lisusu na ngomba molai mingi mpe atalisi ye bikonzi nyonso na mokili mpe nkembo na yango. Alobi na ye ete: ‘Nakopesa yo oyo nyonso soko okokwea mpe okokumbamela ngai.’ Yesu alobi na ye ete: ‘Longwa na yo, Satana.’”—Matai 4:1, 8-10.
Tokanisa moke: Satana amekaki Yesu na kolakaka ye “bikonzi nyonso ya mokili.” Nzokande, lipesi wana ekokaki mpenza kobenda moto soki Satana azalaki mpenza mokóló ya bikonzi yango te? Te, mpenzampenza te. Tosimba lisusu ete Yesu awanganaki te ete biyangeli wana ya mokili bizalaki ya Satana, likambo oyo mbele akokaki kosala yango soki Satana azalaki na bokonzi te likoló na yango. Na bongo, Satan le Diable azali mpenza mokonzi azangi komonana ya mokili! Na yango, Biblia ezali kobenga ye “nzambe na ekeke oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Kasi ndenge nini ekelamu ya mabe akomaki kino kozwa etelemelo wana na nguya?
Ye oyo akomaki Satana azalaki anzelu oyo asalamaki na Nzambe, kasi alulaki nkembo na Nzambe. Aboyaki kondima ete Nzambe azali na lotomo ya koyangela bikelamu na ye. Mpo na yango, akosaki Eva, mwasi ya liboso, na kosololaka na ye na nzela na nyoka. Na bongo alongaki kobenda ye na mobali na ye Adam, ete batosa mitinda na ye na esika ete batosa Nzambe. (Genese 3:1-6; 2 Bakolinti 11:3) Alobaki mpe ete akoki kopengwisa bana nyonso oyo Adam na Eva balingaki kobota, ete basambela Nzambe te. Yango wana Nzambe atikelaki ye ntango mpo na kondimisa maloba na ye, kasi Satana alongi te.—Yobo 1:6-12; 2:1-10.
Likambo mosusu ya ntina ezali oyo ete, Satana azali bobele ye moko te oyo azali koyangela mokili. Alongaki na kozimbisa baanzelu mosusu ete balanda ye kati na kotomboka na ye epai na Nzambe. Bakomaki bilimu mabe, bikelamu ya elimo oyo bazali koyokana elongo na Diable. Biblia ezali koloba na ntina na bango ntango ezali kopesa toli oyo epai na baklisto ete: “Boyeba kotelema liboso na mayele na oyo mabe. Mpamba te tozali kobunda na mosuni mpe makila te, kasi na . . . nguya mpe na mikonzi na mokili oyo na molili, mpe na bilimu mabe kati na likoló.”—Baefese 6:11, 12.
Temela bilimu mabe
Mikonzi mabe oyo na mokili, bazangi komonana, bazali na ekateli ya kozimbisa bato nyonso, ya kopengola bango na losambo ya Nzambe. Moko kati na myango ya bilimu mabe ezali ya kondimisa bato ete bomoi mosusu ekozalaka nsima na liwa, nzokande Liloba na Nzambe ezali komonisa polele ete bakufi bayebi ata eloko moko lisusu te. (Genese 2:17; 3:19; Ezekiele 18:4; Nzembo 146:3, 4; Mosakoli 9:5, 10) Na bongo, elimu mabe oyo akomekola mongongo ya mokufi akoki kosolola elongo na baboti na ye to na baninga na ye oyo bazali naino na bomoi, ezala na nzela ya mosololi na bilimu, to na nzela na “mongongo” mouti na bisika bizangi komonana. Ekomonanaka lokola ete “mongongo” mozali ya mokufi, nzokande ezali mpenza ya elimu mabe.
Soki ekomeli yo na koyoka “mongongo” moko, komikosa te. Kondima te makambo oyo ezali koloba na yo; zongela nde maloba oyo na Yesu ete: “Longwa na yo, Satana!” (Matai 4:10; Yakobo 4:7) Kopesa nzela te na mposa ya koluka koyeba makambo na nkuku ete ebenda yo na kozala na boyokani elongo na bilimu mabe. Kosala motindo wana ekozala kosambela bilimu mabe, nzokande Nzambe azali kokebisa basaleli na ye mpo na lolenge nyonso ya misala mitali kosambela bilimu mabe. Biblia ezali kokweisa moto nyonso oyo azali “koyebisa mabombami, . . . oyo azali kotuna makambo epai na nganga-nkisi, [to] moto oyo azali kosala mosala ya koyebisa makambo makoya, [to] moto oyo azali kosolola na bakufi.”—Deteronome 18:10-12; Bagalatia 5:19-21; Emoniseli 21:8.
Mpo ete kosalela bilimu mabe ezali kokomisa moto moombo ya bilimu yango, bwaka misala na yango nyonso, ata yango ezali ya kosepelisa mpe ya kokamwisa. Kati na misala yango, totangi na ndakisa kosala maji mpo na koluka koyeba makambo mabombami to makambo makoya, koluka koyoka mingongo ya bilimu, kotalisa maboko mpo na kolimbola makambo mpe kotala bilembo na myoto mpo na kosakola makambo. Bilimu mabe bakoki mpe kobimisa makelele mpe makambo mosusu ya kokamwa kati na bandako oyo bango bafandeli yango.
Lisusu, bilimu mabe bazali kosalela mposa mabe ya bato na kolendisaka mikanda, ba films mpe bilakiseli na televizyo oyo bizali kokumisa misala na pite mpe elongobani te. Bilimu mabe bayebi ete, soki makanisi mabe malongolami te kati na elimo, makozwa misisa mpe makomema bato na kosala pite, lokola ememaki bango moko na kosala bongo.—Genese 6:1, 2; 1 Batesaloniki 4:3-8; Yuda 6.
Ya solo, bato mingi bakoseka likanisi oyo ete mokili eyangelami na bilimu mabe. Kasi kozanga kondima na bango esengeli kokamwisa biso te, mpamba te Biblia elobi ete: “Satana [ye moko] akobongwanaka anzelu na moi.” (2 Bakolinti 11:14) Mayele na ye eleki mabe ezali ya kozipa bato miso mpo bandima te ete ye na bilimu mabe bazali solo. Kasi komitika kozimbisama te! Diable mpe bilimu mabe bazali mpenza, mpe esengeli na yo kotemela bango ntango nyonso.—1 Petelo 5:8, 9.
Tokoki kozala na esengo, mpamba te etikali mwa ntango moke, Satana mpe bilimu mabe bakozala lisusu te. Biblia elobi ete, “mokili [bakisa mpe bilimu mabe oyo bazali koyangela yango] ezali kolongwa . . . , nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.” (1 Yoane 2:17) Oyo nde kosikolama na kolongolama na bopusi wana ya mabe! Na bongo tika ete tozala kati na baoyo bazali kosala mokano na Nzambe mpe baoyo bakozala na bomoi libela na libela kati na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Nzambe akosala!—Nzembo 37:9-11, 29; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.
Soki liyebisi lizali te, mikapo ya Biblia mizwami na Biblia Lingala, haut-fleuve, 1970. MN elakisi Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau.
[Elilingi na lokasa 4]
Satana akokaki kopesa na Yesu bikonzi nyonso ya mokili soki yango ezalaki ya ye te?