Mokano na Nzambe mpo na bato ezali nini?
1-4. (a) Mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki nini mpo na bato? (b) Mpo na nini moto azangaki botosi? (Talá etánda “Satana azali nani?”)
ELAKA ya mokili mozangi bitumba lokola emonisami na Yisaya 2:2-4 mpe na Mika 4:1-4 epesi biso te bobele elikya ya solo mpo na mikolo mizali koya, kasi eyebisi biso lisusu likambo moko ya ntina mingi etali Mozalisi na biso. Azali Nzambe oyo azali na mokano. Esakweli ya Yisaya mokapo 2 ezali solo eteni moko kati na molongo molai ya bisakweli oyo ezali komonana banda na lokasa ya liboso kino na lokasa ya nsuka ya Biblia, mpe ezali komonisa biso lolenge oyo Nzambe akokokisa mokano na ye ya ebandeli.
2 Ntango Nzambe asalaki bato mibale ya liboso, ayebisaki bango polele nini ezalaki mokano na ye mpo na bango. Na Genese mokapo 1, vɛrsɛ 28, totangi ete: “Nzambe mpe apambolaki bango, mpe Nzambe alobelaki bango ete: ‘Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botya yango na nse na bino; mpe bozala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛke na likoló mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ekotambolaka na mokili.’” Soki toyokanisi etinda oyo na maloba mayebisami na mokapo molandi ya Genese—“[Yehova] Nzambe akamataki moto mpe atyaki ye na elanga ya Edene kotimola yango mpe kobatela yango”—tomoni sikawa polele ete likanisi ya Nzambe mpo na babalani ya liboso elongo na bakitani na bango ezalaki ete bakómisa Paladiso mosika koleka bandelo ya elanga ya Edene, kino kozinga mabelé mobimba.a—Genese 2:15.
3 Ntango boni basengelaki kosepela na efandelo na bango ya paladiso? Makomami mamonisi ete moto azalisamaki mpo na kozala na bomoi libela na libela na mabelé. Liwa ekokaki kokwela bato bobele soki bazangi botosi epai na Mozalisi na bango, lokola emonisami na Genese mokapo 2, vɛrsɛ 16 mpe vɛrsɛ 17 ete: “[Yehova] Nzambe alakaki moto ete: ‘Yo okoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga, nde mbuma na nzeté na koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te, mpo ete mokolo okolya yango okokufa solo.’” Na bongo, ebongi na kokanisa ete kolanda kotosa elimbolaki kozala ntango nyonso na bomoi, bomoi ya seko kati na paladiso.—Nzembo 37:29; Masese 2:21, 22.
4 Nzokande, anzelu moko, oyo na nsima azwaki nkombo ya Satana (oyo elimboli “Monguna”), apusaki babalani wana ya liboso na kosalela na lolenge mabe lotómo na bango ya kopona oyo balingi na kozangáká botosi epai na Nzambe. (Yobo 1:6-12; talá Deteronome 30:19, 20.) Komonisáká lokola ete nyoka nde azalaki koloba, anzelu wana motomboki alóngaki na kokosa Eva mpe, na nzela na ye alóngaki kokweisa Adam na koyebisáká bango ete bakokóma na mayele mingi mpe bomoi na bango ekozala malamu koleka na kozangáká kotosa Nzambe lokola Mokonzi oyo Aleki-likoló.b (Genese 3:1-19) Na ntina na botomboki na bango ya polele, bakweisamaki na liwa. Yango elimboli ete mokano na Nzambe mpo na bato ekokokana lisusu te to ebebisamaki libela? Te, nkutu elimboli nde ete bibongiseli mosusu bisengelaki kokamatama mpo na kokokisama ya mokano na Nzambe ya ebandeli na ntina na paladiso na mabelé matondi na bato ya botosi baoyo bakosepela na bomoi ya seko. Lolenge nini yango ekoki kosalema?
Libota ya ndaká
5, 6. (a) Nzambe alakaki nini lokola nzela mpo na kosilisa mikakatano mibimaki na botomboki ya Satana? (b) Nzambe alakaki nini epai na Abalayama?
5 Kati na lisambisi oyo asalaki likoló na baoyo batombokelaki bokonzi na ye, Yehova Nzambe alobaki ete akobimisa “libota” to “mokitani” oyo akokoka kosilisa bampasi nyonso oyo ebimisamaki na mobandisi ya botomboki. Na elobeli ya elilingi, Nzambe alobaki ete Libota wana akonyata to akotuta nyoka, oyo ezalaki elilingi ya Satana, na motó, kotyáká bongo nsuka na kozala ya Satana mpe na botomboki. Na boumeli ya bambula mingi eteni wana ya mokapo na Genese elimbolamaki na mitindo mikeseni mpe na lolenge ya bongolabongola. Kasi lokola liloba “libota” esalelami kati na bisakweli mingi, bilaka mosusu bizali na boyokani na yango bimonisi oyo yango elimboli.—Genese 3:15.
6 Liloba “libota” mbala mingi esalelami na boyokani na kokokisama mobimba ya mokano na Nzambe mpo na bato nyonso. Lokola eyebisami na Genese 22:18, Nzambe apesaki epai na mosembwi, Moebele Abalayama elaka oyo: “Mabota nyonso na nse makopambwama mpo na bana [libota, NW] na yo, mpo ete osili kotosa monoko na Ngai.” Nzambe asepelaki mingi na Abalayama mpo ete azalaki moto oyo alukaki Ye na solo. Nzokande, atako Nzambe apambolaki Abalayama, mokapo wana emonisi ete bolingo na Nzambe ezalaki te bobele epai na Abalayama ye moko soko mpe bobele epai na bakitani na ye. Nzambe alandaki kobatela kati na makanisi mokano na ye ya ebandeli na ntina na Paladiso na mabelé mpo na bato nyonso, “mabota nyonso.” Azalaki sikawa koyebisa na Abalayama ete lokola litomba mpo na bosembo na ye, akozwa libaku malamu ya kobimisa “libota” oyo na nzela na yango mabota nyonso makokoka kopambwama.
7, 8. Lolenge nini Libota wana ya ndaká likangisamaki esika moko na makambo matali bokonzi mpe Masiya?
7 Abalayama azalaki tata na ebele ya mabota minene. (Genese 17:4, 5) Kasi Yehova Nzambe amonisaki polele na molongo nini, Libota ya ndaká oyo akopesa mapamboli epai na bato, asengelaki kobima. (Genese 17:17, 21) Yisaka, mwana ya Abalayama mpe nkɔ́kɔ na ye Yakobo, bango mibale batangami kati na molongo oyo esengelaki kobimisa “libota.” Moko na mabota oyo ebimaki na Abalayama ezalaki libota na Yisraele, oyo lizalaki na mabota 12 oyo eutaki na bana ya Yakobo, nkɔ́kɔ ya Abalayama. Ezalaki na libota wana nde “libota” ya ndaká esengelaki na nsuka kobima.—Genese 26:1, 4; 28:10, 13-15.
8 Bisakweli oyo bipesamaki na nsima bimonisaki ete libota oyo ya ntina, moyangeli, akobima mpenzampenza na nzela ya libota ya Yuda. Genese 49:10 elobi ete: “Nzeté na bokonzi ekolongwa na Yuda te, mpe lingenda na mokonzi ekolongwa kati na makolo na ye te, kino ekoya Mokólo na yango mpe mabota nyonso makotosa ye.”3 Rashi, molimboli na Biblia, alobaki na ntina na maloba “kino Mokólo na yango akoya” ete elimboli “kino Mokonzi Masiya akoya, ezali epai na ye nde bokonzi bopesami.”4 Lokola Rachi, balimboli mingi na Biblia bakangaki ntina ete esakweli wana etalelaki Masiya.
9. (a) Nzambe alakaki nini epai na Mokonzi Davidi mpo na oyo etali Libota? (b) Kokokana nini ezali kati na bilaka bizwami na Genese 49:10 mpe na Nzembo 72:7, 8?
9 Moyangeli ya liboso na molongo ya Yuda, Mokonzi Davidi, azwaki elaka oyo epai na Nzambe ete: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ekobongisama liboso na yo libela; kiti na bokonzi na yo ekokokisama seko.” (2 Samwele 7:16) Lisusu, Nzambe alakaki ye ete: “Nakotemisa libota na yo nsima na yo, . . . Nakokokisa mpe kiti na bokonzi na ye. Ye akotóngela ngai ndako, mpe nakokokisa kiti na bokonzi na ye libela.” (1 Ntango 17:11, 12) Ezali solo ete, mokonzi Salomo, mwana na Davidi mpe mokitani na ye, atóngaki tempelo ya Yehova, kasi akokaki te koyangela libela na libela. Nzokande, moto moko kati na libota ya Davidi azalaki “Mokólo na yango” to Masiya, oyo asakolamaki na Genese 49:10. Kolobáká na lolenge ya esakweli na ntina na moto yango, Mokonzi Davidi akomaki ete: “Na mikolo na ye, moyengebene akozala na makila malamu; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumela sanza. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu, longwa mpe na ebale kino na ndelo na mokili mpenza.”—Nzembo 72:7, 8.
10. Libota ya ndaká esengelaki kokokisa nini kati na Genese 3:15, mpe lolenge nini yango eyokani na elaka oyo epesamaki na Abalayama?
10 Soki tolandi komonisama mokemoke epesamaki kati na esakweli oyo, tokososola ete mapamboli malakamaki na Abalayama engebene yango—“mabota nyonso na mabelé makopambwama”—makokokisama solo na nzela ya Moyangeli yango oyo auti na libota ya Davidi. (Genese 22:18) Na bongo, boyokani etyamaki kati na bisakweli na ntina na Libota mpe bozeli ya Masiya epai na libota ya Bayuda, oyo na boumeli ya boyangeli na ye mabelé makozala na kimya ya solo. Ya solo, azali “libota” oyo elobelami na Genese 3:15 oyo akotya nsuka na botomboki oyo ebimaki na ebandeli mpo na kotemela boyangeli ya Nzambe mpe kosilisa bampasi oyo yango ebimisaki. (Nzembo 2:5, 8, 9) Mituna misusu mpe makambo mosusu na ntina na Masiya oyo alakamaki elobelami na eteni “Nani akokamba mabota kino na kimya?”. Kasi, totala sikawa boyokani oyo Nzambe azalaki na yango elongo na bakitani ya Abalayama.
Mokano ya kondimana ya Mibeko
11-13. Lolenge nini kondimana ya Mibeko ezalaki na litomba mpo na libota [ya Yisraele], mpe yango esengelaki koumela libela na libela?
11 Bayisraele bakómaki libota mwa bikeke nsima na eleko ya Abalayama. Nzambe abimisaki bakitani wana ya Abalayama longwa na boombo na Ezipito, mpe na nse ya litambwisi ya Mose, moto mosusu ya kondima oyo Ye aponaki, Nzambe asalaki kondimana ya ntina, to boyokani elongo na bango. (Exode 19:5, 6; Deteronome 5:2, 3) Kondimana wana ya Mibeko epesaki na libota lolenge ya polele oyo Nzambe alingaki ete basambela ye. Ebongisaki bango lokola libota mpo na losambo motindo wana.
12 Tosengeli koyeba ete uta ebandeli kondimana wana ezalaki na masengami. Liboso na kopesa libota na Yisraele Mibeko Zomi mpe kondimana na mobimba na yango, oyo kati na yango Mibeko zomi mizalaki eteni na yango, Nzambe ayebisaki bango ete: “Yango wana soko bokotosa monoko na ngai mpe bokobatela kondimana na ngai, mbele bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali na ngai, [nde bino] bokozala bokonzi na banganga mpe libota na bulee.” (Exode 19:5, 6) Soki balingaki ete balanda kosalelama na Nzambe lokola bato na ye oyo alingi bango mingi, basengelaki kotosa ye na kondima nyonso. Wana ezalaki masengami ya kondimana.
13 Lifuti oyo elakamaki mpo na bosembo na bango—ya koyanganisama lokola libota ya banganga mpo na mosala ya Nzambe—emonisi ete kondimana ya Mibeko ezalaki yango moko te likambo lilekaki ntina, kasi nde nzela ekomema kino kobongisama ya libota ya banganga oyo bakosalisa mabota mosusu ete bayeba Nzambe ya solo. Uta ebandeli mokano ya Nzambe ezalaki ete bato nyonso bapambwama, kasi ezalaki te bobele mpo na basangani ya libota moko.—Genese 22:18.
14. Kondimana ya Mibeko ebimisaki lisusu matomba nini?
14 Lokola kondimana ya Mibeko ezalaki yango moko te likambo lilekaki ntina, mokano na yango ezalaki nini? Na ntembe te emonisaki mpe etɔndolaki polele mateya nyonso ya lokuta ya mangomba oyo moto abandaki kokólisa ye moko uta ntango ya botomboki kati na elanga ya Edene. (Deteronome 18:9-13) Ezalaki lisusu kobatela libota ya Yisraele longwa na mimeseno ya mbindo mpe losambo ya mabota oyo mazingaki bango na koboyáká boyokani nyonso elongo na mabota yango. (Deteronome 7:1-6) Ntango nyonso oyo Yisraele esengelaki kolanda Mibeko wana, bakokaki kobatelama na ezalela ya peto na makambo ya losambo, na nzela na yango, bakokaki na nsima koyeba mpe koyamba malamu Libota ya ndaká, to Masiya.
15, 16. Mateya nini ya elimo ya ntina makotisamaki kati na kondimana ya Mibeko oyo mamonisi lisusu ete yango ezalaki mpo na mwa ntango mokuse?
15 Kondimana ya Mibeko emonisaki lisusu ntina ya kosala mbondi mpo na masumu, mpamba te kati na yango ezalaki na ebongiseli ya sikisiki ya kopesa bambeka, oyo ezalaki eteni monene ya losambo ya Bayuda. (Levitike 1:1-17; 3:1-17; 16:1-34; Mituya 15:22-29) Nsima na botomboki ya Adam mpe Eva, bato babungisaki ezaleli ya kokoka oyo ekokaki kopesa bango nzela na kozala na bomoi ya seko na kolongono na nzoto ya kokoka. (Genese 2:17) Na ntina na lisumu ya liboso, bakitani ya Adam mpe Eva (bango nyonso babotamaki nsima na botomboki) babotamaki na ezalela ya kozanga kokoka mpe na mposa ya kosala masumu. (Genese 8:21; Nzembo 51:5; Mosakoli 7:20) Ezaleli ya kozanga kokoka ememaki maladi, konuna, liwa mpe kozanga boyokani kati na moto mpe Nzambe. (1 Mikonzi 8:46; talá Bileli 3:44.) Esengelaki ete moboko epesama oyo ekopesa nzela na kobongisa mabe wana, mpe komema kosikwama mpo na ezaleli wana ya kozanga kokoka ya moto. Bato na kondima bayebaki ntango nyonso mposa wana.—Yobo 1:4, 5; Nzembo 32:1-5.
16 Kondimana ya Mibeko emonisaki ete Nzambe azali na mitinda na ye ya kosambisa oyo esengeli kotosama. Emonisaki lisusu moboko mpo na koyeba lolenge mibeko ya boyengebene ya Nzambe ekokaki kosalelama na lolenge lobongi mpenza.c Bibongiseli ya kopesa mbeka oyo ezalaki kati na kondimana ya Mibeko ekokaki ata moke te kozongisa mokano ya Nzambe ya ebandeli mpo na bato, mpo ete litomba na yango ezalaki ya ntango mokuse, ezalaki komonisa ezalela ya lisumu ya bato kasi ezalaki te kolongola to kopekisa yango. Na bongo, Mibeko mizalaki nzela mpo na kosalisa libota wana libongisamaki ya basambeli ya Nzambe na koyeba Libota yango na ntango ebongisami mpe kososola lolenge nini Libota yango ekolongola mpasi ebimaki na lisumu ya Adam. Epai wapi yango emonisami kati na Torah?
Mosakoli lokola Mose alakami
17, 18. Ndenge nini tosengeli kokanga ntina ya elaka oyo Nzambe apesaki na Deteronome 18:15, 18, 19 oyo ya kobimisa mosakoli moko?
17 Na Deteronome mokapo 18, vɛrsɛ 15, Mose alobaki na libota ya Yisraele ete: “[Yehova] Nzambe akotemisela yo mosakoli longwa na kati na yo, longwa na bandeko na yo, lokola ngai, bokoyoka ye.” Bobele na mokapo yango, na vɛrsɛ 18 mpe vɛrsɛ 19, Yehova alobaki na Mose, moto oyo Ye atyaki lokola moyokanisi kati na ye mpe libota na Ye, na maloba oyo: “Nakotemisela bango mosakoli lokola yo, longwa na kati na bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monoko na ye, mpe ye akolobela bango makambo nyonso oyo ekolakela ngai ye. Soko mpe moto nani akoyoka maloba na ngai te oyo ekolobela ye na nkombo na ngai, mbele ngai mpenza nakokata likambo na ye.” Lolenge nini tosengeli kososola esakweli wana?
18 Ezali polele ete mosakoli oyo alobelami awa azali moto moko ya sikisiki. Lokola maloba ya zingazinga mamonisi yango, likanisi ya Nzambe ezali te ete akolanda ntango nyonso kobimisa basakoli mpo na libota lokola basusu bazali kokanisa yango. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na mosakoli (na·viʹ) elobeli bobele moto moko, kokokanisáká ye na Mose oyo akokanaki na moto mosusu te kati na lisoló ya libota ya Yisraele. Lisusu, maloba ya nsuka na mokanda bobele wana ya Deteronome eyebisi ete: “Mosakoli abimi kati na Yisraele lisusu te lokola Mose—oyo [Yehova] ayebaki miso na miso.” (Deteronome 34:10-12) Ekoki mpenza kozala ete moto akomaki maloba oyo ezali Yosua, mwana na Nuni, oyo ye moko azalaki motambwisi monene mpe mosakoli oyo aponamaki na Nzambe. Kasi na maloba na ye moko, elobelami te ete amimonaki ye moko lokola moto oyo mpo na ye maloba ya Mose na ntina na mosakoli lokola Mose masengelaki kokokisama. Na bongo, Nzambe alingaki koloba nini wana alakaki ete akobimisa mosakoli lokola Mose? Makambo nini mazalaki epai na Mose oyo makesenisaki ye na bato mosusu?
Kondimana ya sika esakolami
19. (a) Na ndimbola nini Mose akesenaki na bato mosusu? (b) Mosakoli oyo akokani na Mose asengelaki kokokisa mokumba nini mosusu?
19 Mose azalaki motambwisi monene; azalaki mopesi na mibeko, mosakoli, mosáli na bikamwiseli, molakisi mpe mosambisi. Azalaki lisusu moyokanisi, mosakoli bobele moko oyo asalelamaki lokola moyokanisi ya kondimana kati na Nzambe mpe bato (ezali bongo libota na Yisraele). Mosakoli oyo asengeli kozala mpenza lokola ye, asengelaki mpe kokoka kosala makambo motindo moko. Yango elimboli ete likanisi ya Nzambe ezalaki ete kondimana mosusu ekitanya kondimana ya Mibeko? Ee, ezali bongo. Na nzela na mosakoli Yilimia, Nzambe alobelaki polele likanisi na ye ya kosala kondimana ya sika. Kondimana ya sika esengelaki kosenga moyokanisi ya sika. Bobele moto oyo akokanaki na Mose nde akokaki kokokisa masengami mpo na mokumba wana. Soki totaleli oyo kondimana ya sika ezali kosenga, tokokoka kososola malamu mokumba ya moyokanisi.
20, 21. (a) Elaka nini tozali kokuta na Yilimia 31:31-34? (b) Mokano ya kondimana ya sika ezalaki nini? (c) Na bongo, nini esengelaki kokómela kondimana ya Mibeko?
20 Ezalaki pene na mibu 900 nsima na Mose nde Yilimia ayebisaki maloba oyo ya Nzambe na libota na Yisraele: “[Yehova] alobi ete: Tala mikolo mikoya wana nakosala kondimana na sika na ndako na Yisraele mpe na ndako na Yuda. Pelamoko kondimana oyo ekataki ngai na batata na bango te, na ntango nakambaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito; babebisaki kondimana na ngai, . . . [Yehova] alobi bongo. Kasi oyo ekozala kondimana ekokata ngai na ndako na Yisraele nsima na mikolo yango; . . . Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa mpe mabe na bango lisusu te.”d—Yilimia 31:31-34.
21 Lokola mosakoli oyo akokani na Mose akosala lokola moyokanisi ya sika ya kondimana ya sika, na bongo ezali polele ete makambo nyonso ya ntina matali losambo oyo esengamaki na nse ya Mibeko na Mose masengelaki kotikala libela te, kasi bobele kino kondimana ya sika ekotyama. Ya solo, ntango Nzambe akokaki kopesa moboko mpo na ‘kolimbisa bikweli mpe kokanisa lisusu te masumu na bango,’ bakokaki ntango nyonso te kozala na mposa ya ebongiseli mobimba ya kopesa mbeka oyo ezalaki kopesama na tempelo, oyo ezalaki komemela bango bobele bolimbisi ya mwa ntango moke. Na kosalema ya kondimana ya sika, milulu ya kondimana ya Mibeko lokola kotosa ya Sabata mpe mikolo ya bafeti, esengelaki kozala lisusu na ndimbola moko te. Na ntango ebongisamaki, Nzambe akokaki komonisa eloko nini esengamaki epai na baoyo balakamaki kokota kati na kondimana ya sika.—Amosa 3:7.
Mapamboli mpo na mabota nyonso
22, 23. (a) Nini ezalaki mokano ya kondimana ya sika mpo na oyo etali mabota? (b) Lolenge nini bisakweli mosusu bimonisi oyo ezalaki mokano ya Nzambe mpo na mabota nyonso?
22 Koyebáká ete mosakoli oyo akokani na Mose mpe Libota ya Abalayama ezali bobele moto moko, esalisi biso na komona likambo mosusu ya ntina kati na kondimana ya sika; ekokaki kozala mwango mosengeli na nzela na yango bato ya mabota nyonso bakokaki kosambela Nzambe ya solo. Lokola Genese 22:18 elobi ete ezali na nzela ya “libota” yango nde “mabota nyonso ya mabelé makopambwama,” yango emonisi ete na ntango moko kati na lisoló ya bato, Nzambe akolanda te kozala na boyokani bobele elongo na libota moko, bakitani ya Abalayama. Nsima wana libota na Yisraele likokisaki mokumba monene ya kobimisa Libota ya ndaká mpe nsima na kosalema ya kondimana ya sika, losambo ya Nzambe ya solo esengelaki kopesamela nzela na bato ya mabota nyonso mpe mposo nyonso.
23 Ya solo, moto moko te akokaki kotemela boyengebene ya Nzambe lokola andimi ete bato ya sembo ya mabota nyonso mpe mposo nyonso basambela ye. Yango ezalaki mokano ya Nzambe longwa na ebandeli, mpe ezali na bisakweli mingi kati na Biblia oyo endimisi likambo oyo ete bato ya mabota nyonso bakopambwama na nzela ya libota ya Abalayama. (Zakari 8:20-23) Tozali kokuta ndakisa moko kati na Sofoni mokapo 3, vɛrsɛ 9 epai kuna Nzambe alobi ete: “Boye, nakobongola maloba na bato kino liloba na mpeto, ete bango nyonso babyanga nkombo na [Yehova] mpe basalela ye na motema moko.” Esakweli ya Yisaya mokapo 2 oyo elobelamaki na ebandeli ya mwa búku oyo emonisi likambo oyo ya koyanganisama ya bato kati na losambo lopesami na Nzambe, bato ya mabota mingi bazali kobongwana mpo na kosalela ye kati na solo, koyekoláká banzela ya kimya; emonisi lisusu ntango likambo yango likosalema: “Ekozala ete na mikolo na nsuka.” (Yisaya 2:2) Maloba oyo “mikolo na nsuka” elimboli nini?
24. (a) Maloba oyo ete “mikolo na nsuka” elimboli nini? (b) Nini elobelami kati na Ezekiele mokapo 38 mpe mokapo 39?
24 Makomami mazali mbala mingi kolobela mokolo oyo Nzambe akosambisa mabota nyonso. (Yisaya 34:2, 8; Yilimia 25:31-35; Yoele 3:2; Habakuku 3:12; Sofoni 1:18; 3:8) Uta Bokonzi na Nzambe ebwakamaki kati na elanga ya Edene, kozanga kolónga ya moto mpo na komitambwisa ye moko emonani polele. Biyangeli ya bato bilóngi te na makambo nyonso, bipesi nde mpasi makasi. Soki nzela epesami na eleko oyo ya bibundeli ya nikleere mpe ya kobeba ya ezingelo na biso ete eumela ntango molai, mbele bato bakokoka komiboma bango moko mpe kobebisa mabelé efandelo na bango. Na yango, na kosaleláká Masiya, Libota ya ndaká lokola moponami na ye, Nzambe akosukisa makambo wana. (Nzembo 2:1-11; 110:1-6) Mosakoli Ezekiele amonaki na liboso etumba wana ya Nzambe elongo na biyangeli ya bato. Na mokapo 38 mpe mokapo 39 ya mokanda na ye, alobeli etumba ya Nzambe elongo na “Gog ya mokili ya Magog.” (Ezekiele 38:2) Yango eyebani mingi lokola esakweli etali mikolo ya nsuka. Botaleli Makomami na likebi nyonso emonisi ete awa “Gog” ezali nkombo ya elilingi mpo na Satana, ekelamu motomboki wana ya elimo, oyo amemaki Adam mpe Eva na nzela ya kozanga botosi epai na Nzambe. Kozanga kolónga ya ekelamu wana ya elimo mpe balandi na ye, oyo bazali uta kala banguna na Nzambe, ezali lelo eteni ya liboso ya kokokisama na elaká ya ebandeli etali “libota” oyo na elobeli ya elilingi akoboma “nyoka,” Satana na kotutáká ye motó.—Genese 3:15.
25. Engebene bisakweli, nini esengeli kosalema nsima na kobomama ya mampinga ya Satana?
25 Nsima na kobebisama ya balandi ya Satana, bizaleli kitoko ya paladiso oyo ezalaki na ebandeli na elanga ya Edene bikozongisama. Kasi na mbala oyo, na nse na bibongiseli ya kondimana ya sika, bato bakozala na botosi epai na Nzambe. (Yisaya 11:1-9; 35:1-10) Ekozala bobele kolimbisama ya masumu te kasi lisusu bato bakozonga mpenza na ezaleli ya kokoka. (Yisaya 26:9) Lokola litomba, bakozwa bomoi ya seko. (Nzembo 37:29; Yisaya 25:8) Na ntango wana, ata bakufi, ezala baoyo bakufaki na bosembo nyonso epai na Nzambe, ezala bankáma na bamilió ya baoyo bazwaki likoki te ya koyekola solo na ntina na ye, bakozongisama na bomoi. (Danyele 12:2, 13; Yisaya 26:19) Elikya kitoko motindo wana ezali kobenda biso pene na Nzambe oyo akanaki makambo motindo wana, boye te?
26. Koya ya mosakoli oyo akokani na Mose ezali kosenga nini epai na biso?
26 Wana ezali mwa ndambo kati na mapamboli makopesama epai na bato ya mabota nyonso baoyo bazali koyeba mpe koyoka mongongo ya mosakoli oyo akokani na Mose, Libota oyo likoyangela na kiti na bokonzi ya Davidi “ntango nyonso ekoumela sanza” elingi koloba libela na libela. (Nzembo 72:7) Na ntina na mosakoli yango oyo akokani na Mose, Deteronome 18:19 elobi lisusu ete: “Soko mpe moto nani akoyoka maloba na ngai te oyo ekoloba ye na nkombo na ngai, mbele ngai mpenza nakokata likambo na ye.” Okomizwela ntango, okosala milende oyo esengeli mpo na koyeba Mosakoli oyo akokani na Mose, Masiya yango, na koyekoláká makambo nyonso oyo Nzambe azali kosenga? Yo mpenza okoyekola koyeba Nzambe ya solo?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisoló ya mokanda ya Genese oyo elobeli elanga ya Edene ezali lisapo te, kasi Edene ezalaki esika moko monene ya solo. Mokapo emonisi ete ezalaki na nord ya esobe ya mokili ya Mésopotamie, na eutelo ya bibale Tigre mpe Euphrate. (Genese 2:7-14) Esengelaki kozala ndakisa oyo moto akokaki kolanda mpo na kobongisa mpe kolona biteni bitikalaki ya mabelé.
b Mpo na kozwa bandimbola mingi na ntina na botomboki wana, talá etánda “Mpo na nini Nzambe apesi nzela na mabe?”
c Bikateli ya kosambisa oyo ekomamaki na Mose na kotalela lolenge ya kofuta bitumbu na Mibeko (“bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, lino mpo na lino”) emonisi mitinda oyo elandamaki na Nzambe ye moko mpo na kosilisa likambo etali lobiko ya moto. (Deteronome 19:21) Moto na kokoka, Adam, lokola ezali ye nde moto amemelaki libota ya bato etumbu, na bongo moto mosusu ya kokoka asengelaki kopesa bomoi na ye mpo na kosomba yango ebungaki. Na bongo, liwa na ye ekokaki kosikola bato na lolenge ya kokoka na lisumu ya Adam mpe na makambo oyo yango ebimisaki. Bobele koya ya “libota” ya ndaká, oyo bomoi na ye ekopesama lokola lisiko engebene ebongiseli ya kosambisama nde ekoki mpenza komema kobikisama motindo wana. (Genese 3:15) Mpo na lisoló molai ya Libota wana kati na mokano na Nzambe, talá eteni “Nani akokamba mabota kino na kimya?,” paragrafe 17 kino paragrafe 20.
d Ndimbola oyo emonani na losambo ya Bayuda ya mikolo na biso ezali ete Yilimia asakolaki bobele bozongeli to kondimisa lisusu kondimana ya Mibeko lokola esalemaki bongo nsima na bozongi na bango longwa na boombo na Babilone na 537 L.T.B. (Esdrase 10:1-14) Kasi esakweli yango moko ezali kondima ndimbola motindo wana te. Nzambe alobaki polele ete oyo ekozala “kondimana ya sika,” kasi bobele bozongeli ya pamba ya kondimana te. Lisusu, abendaki likebi na kolobáká ete yango ekeseni na kondimana oyo esalemaki ntango abimisaki bango na boombo na Ezipito. Basusu bakanisaki ete esengelaki kozala ya “sika” na ndimbola oyo ete sikawa bakokaki kotosa na bosembo nyonso kondimana yango moko, nzokande lisoló ya bato limonisi ete ezalaki bongo te. Ya solo, kozanga bosembo na bango ememaki kobebisama ya tempelo ya mibale.—Deteronome 18:19; 28:45-48.
[Etanda na lokasa 13]
SATANA AZALI NANI?
BIBLIA ezali kolobela Satana te lokola “mposa mabe” oyo ezali kati na moto, kasi lokola ekelamu moko ya elimo oyo ezangi komonana, anzelu moko. (Yobo 1:6) Lokola moko na baanzelu, to mwana na Nzambe, asalemaki na lolenge ya kokoka, kasi na nsima amikómisaki ye moko motomboki ya liboso, to monguna ya Nzambe. (Deteronome 32:4; talá Ezekiele 28:12-17.) Kati na botomboki na ye liboso na boyangeli ya Nzambe, afundaki bato ete bazangi sembo, bakolukaka bobele bolamu na bango moko. Tala mikapo misusu ya Makomami oyo mimonisi polele mayele mabe oyo Satana asalelaki mpo na komema bato na kozanga botosi mpe na etamboli ya mabe:
[Etanda/Bililingi na nkasa 16, 17]
MPO NA NINI NZAMBE APESI NZELA NA MABE?
KATI na eleko moko ya bomoi na yo, osilá komituna mbala mosusu ete: ‘Soki Nzambe azali, mpo na nini apesi nzela na bampasi?’ to, ‘Soki bampasi ezali mpo ete Nzambe apesaki nzela, mpo na nini na boumeli ya ntango molai boye?’ Mituna motindo oyo ezali mpasi mingi mpo na koyanola, mingimingi soki tokanisi eloko lokola kobomama ya ebele ya Bayuda na maboko ya ba Nazis, oyo mbala mosusu koleka makambo mosusu, ekómaki elembo mpenza mpo na komonisa bampasi ya bato. Kati na milende na bango ya kozwa bandimbola ya solo, bamoko bazali kondima te ete Nzambe azali, nzokande, basusu bazali kondima te ete mabe ezali. Bosukisi motindo wana ezali malamu? Biyano ya kosepelisa bikoki nde kozala?
2 Basusu bazali kondima ete mituna motindo wana misengeli te kotunama. Nzokande, basakoli ya sembo, lokola Habakuku, bamonaki mabe te na kolinga koyeba makambo motindo wana. Habakuku atunaki Nzambe ete: “Ɛ [Yehova], kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te? Nakongangela yo ete, ‘Mobulu!’ Nde okobikisa te. Mpo na nini okomonisa ngai mabe mpe okotala mikakatano?”—Habakuku 1:2, 3.
3 Likambo ya mawa, ezali na baoyo bazali na likoki te ya kondima ata eyano moko, ata soki yango ezali ya malamu to ya mabe. Makambo ya mabe mpe mobulu ya bato ezali kopekisa makoki na bango na kotalela makambo na lolenge lobongi. Na yango, moto oyo azali koluka eyano asengeli kotalela na bosembo nyonso ezaleli na ye moko mpe motuya ya bandimbola oyo epesami.
Toluka koyeba baoyo bazali mpenza babandisi na yango
4 Nzambe asangani soko moke te mpe mokolo moko te na mabe oyo bato bazali kosala. Nzokande, mateya mosusu ya mangomba mazali koteya likanisi wana, kokómisáká bongo makambo makasi mingi. Na ndakisa, bindimeli oyo bimonisi ete mokili oyo ezali esika ya komeka bato mpo na mikolo mizali koya mpe ete Nzambe “akamataka” bato oyo ye alingaka na nzela ya liwa, ata bana mike, yango esali ete atalelama lokola ye nde moto azali mobandisi ya makámá, ya mabe mpe ya bampasi. Makanisi motindo wana makoki mpe kolobelama na kotalela mateya oyo endimi ete makambo manso masilá kotangama mpe nyonso esilá kokomama bongo. Ezali mpe na baoyo bazali komeka kolimbola kobomama ya ebele ya Bayuda na maboko ya ba nazis lokola ‘etumbu ya Nzambe epai na Bayuda ya mikili na Mpótó baoyo bakangamaki na makambo ya mokili’ to lokola ‘mwango Nzambe asalelaki mpo na komonisa na mokili ntina ya kosala Ekólo ya Bayuda.’ Bato mingi bazali kotalela makanisi wana bobele te ete ekoki kondimama te kasi lisusu lokola ete ezali mpenza kotuka.
5 Bindimeli motindo wana bizali kotuka Nzambe, boye te? Ezali nde moto, kasi Nzambe te, oyo azali mobandisi ya bokesene nyonso oyo esalemi na boumeli ya bikeke mingi? (Mosakoli 8:9) Ezali lokola mokomi na makambo ya kala Arnold Toynbee alobaki: “Ezali bobele bato nde bazali na makoki ya kosala mabe, mpamba te ezali bobele bango nde bayebaka makambo basalaka mpe maponi basalaka nsima na kokanisa malamu.”e Na yango, lokola moto asalelaki mabe likoki na ye ya kopona oyo alingi, ebimisaki bampasi ya minene mpenza. Na bongo, mpo na nini Nzambe asalaki ye te na motindo boye ete akoka te kosala mabe na mozalani na ye?
6 Moto azalisamaki na “elilingi” ya Nzambe mpe elongo na likabo ya kopona oyo ye alingi. (Genese 1:26) Soki ezalaki bongo te, mbele moto akokaki te kozala na likoki ya kozala na esengo mpe mbele akokaki te kosala makambo malamu epai na bato mosusu. Lisosoli mbele ekokaki kozala na ntina te, mpe bomoi ya moto mbele ekokanaki na oyo ya banyama. Likoki ya kopona oyo alingi ezali lipamboli mpo na moto mpe yango esali ete azala moto, na esika ete azala lokola robot. Kasi likoki mpe bonsomi ya kopona oyo olingi, esangisi bonsomi ya kopona makambo, bopusi oyo ekoki kozala ya mabe to oyo ekoki kopesa mpasi. Atako bongo, kondima likambo oyo ete Nzambe azali mobandisi ya mabe te, yango ezali te eyano na mituna oyo: Mpo na nini apesaki nzela na yango? Mpo na nini azali kotya nsuka nokinoki te na bampasi?
Lolenge nini Nzambe akokaki kopesa nzela na yango?
7 Mpo na nini mabe ezali soki mpenza nguya moko oyo ekoki kosukisa yango ezali? Eyano ya Biblia na motuna wana ezali liboso kati na lisoló oyo etali mobali mpe mwasi ya liboso, Adam mpe Eva. Genese mokapo 2 mpe mokapo 3 emonisi ete baponaki kozanga botosi epai na Nzambe na kolyáká “mbuma na nzeté na koyeba malamu mpe mabe.” Mikakatano minene mibimaki na kozanga botosi na bango. Moto oyo apusaki bango na botomboki (talá etánda “Satana azali nani?”) asalaki na kolobáká ete: “Bino bokokufa solo te,” na bongo atemelaki bosolo na Nzambe, mpo ete Nzambe alobaki polele ete etumbu ya kozanga botosi ekozala liwa. (Genese 2:17; 3:4) Molengoli akobaki na kolobáká ete: “Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwama mpe bokokóma lokola Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:5) Alingaki koloba na wana ete Nzambe abombelaki bango likambo moko ya ntina. Na motindo yango, ntembe ebimaki mpo na oyo etali motuya ya mibeko na Nzambe mpe lolenge na ye ya koyangela. Likambo oyo ezalaki botemeli ya Boyangeli ya nzambe, mpe ya lotómo na ye ya kozala Moyangeli Aleki monene mpe Moyangeli bobele moko ya bato.
8 Mituna minene mibimaki: Moto azali solo na mposa ya litambwisi na Nzambe mpo na komiyangela ye moko mpe mabelé mobimba na lolenge malamu? Soki ezali bongo te, mbala mosusu Nzambe azangaki bosembo na kosengáká botosi epai na moto. Soki moto azali na likoki ya komiyangela ye moko, mpo na nini esengelaki ete Nzambe apona oyo ezalaki malamu mpe mabe mpo na moto? Koboma batomboki wana mbele ekokaki te kopesa eyano na mituna wana. Esengelaki kozela ntango mingi eleka mpo moto amonisa polele kozanga likoki na ye ya komitambwisa ye moko.
Nani azali na lotómo ya kozwa bikateli?
9 Mbala mosusu, motuna ya ntina oyo moko na moko na biso asengeli kopesa eyano ezali oyo: Ezali nde Nzambe moto azali na lotómo ya kozwa bikateli mpo na makambo oyo ezali ya ntina mingi mpe ntango nini yango esengeli kosalema? Bato mingi bazali kokakatana na kondima ete esengelaki likambo oyo etaleli bizaleli malamu mpo na kolimbola ntina oyo nzela epesami na bampasi oyo bato bazali kozwa. Kasi ezali likambo ya kozanga mayele na kondima ete, Nzambe oyo amonaka na mikolo mizali koya, ayebi nini ekozala malamu mpo na bikelamu na ye nyonso?
10 Mosakoli Yisaya akomaki ete: “Mpo ete makanisi na ngai mazali makanisi na bino te mpe nzela na bino ezali nzela na ngai te, Yehova alobi bongo.” (Yisaya 55:8) Ya solo, Nzambe azangi te komibanzabanza na bampasi ya bato, kasi lokola azali na mayele oyo eleki mpe azali seko, azali na etelemelo malamu mpo na koyeba te bobele makambo nyonso matalelami na biyano na mituna wana kasi lisusu lolenge nini mpe ntango nini asengeli kosilisa yango mpo na bolamu monene ya baoyo nyonso batalelami na yango.
11 Na kotikáká ntango mingi mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki, Nzambe atye elakiseli oyo ekoumela. Soki na mikolo mizali koya, lotómo na Nzambe ya kozala Moyangeli etyamelami lisusu ntembe, ekozala na ntina te na kopesa na motomboki mwa ntango mpo na komeka kolóngisa bifundeli na ye. (Nahumu 1:9) Makambo nyonso oyo makozala na mposa ya komonisama masilaki liboso komonisama. Na ntango oyo, tozali na libaku malamu ya komitya na ngambo na Nzambe, lokola esalaki yango bato mingi na sembo na ntango na kala. Na ndakisa, Yobo, atako ayebaki ntina na bampasi na ye te, azwaki ekateli ya kotikala sembo liboso na Nzambe. (Yobo 2:9, 10) Bosembo motindo wana ebongi mpenza na Nzambe, Mozalisi na moto, boye te?
Lolenge nini Nzambe akosilisa likambo yango?
12 Ntango oyo epesamaki na Nzambe mpo na kosilisa ntembe oyo ebimisamaki, ezali kobelema na nsuka na yango. Mosika te, mabe mpe baoyo nyonso bazali kosala yango bakolongolama. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44) Nzambe ye moko akopesa kimya ya seko mpe bolamu mpo na bato kati na paladiso na mabelé. (Yisaya 14:7) Lokola azali Nzambe na boyengebene, Yehova akobosana te baoyo banyokwamaki mpe bakufaki mpamba. Bakosekwisama, bakozongisama na bomoi ya sembo awa na mabelé. (Yobo 14:14, 15; Yisaya 25:6-8) Nzambe ye moko alaki ete “makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” Bomoi ya seko ekopesa mpenza libaku kitoko epai na bato mpo na koyeba malamu bantina mpo na yango Nzambe apesaki nzela na mabe. Moko te kati na baoyo bakozwa mapamboli motindo wana akozala na mawa na ntina na bampasi na ye ya kala to ya bato mosusu. ‘Bosepela mpe boyoka esengo libela na yango ezali ngai kotónga.’ Nzambe akosala makambo mingi koleka oyo tobungisaki.—Yisaya 65:17, 18.
13 Na nzela ya bandimbola ya Biblia, Nzambe amonisi biso polele mpo na nini bampasi ezali. Nzokande, lisoló mokuse lokola oyo ekoki te kopesa biyano na mituna nyonso mitali likambo oyo monene.f Biyano mingi bikoki kozwama bobele na nzela ya boyekoli mozindo ya Biblia na mobimba na yango. Omilengeli mpo na kosala yango, ondimi komibombela ntango oyo esengeli mpo na kosala bolukiluki motindo wana? Matomba oyo makozwama mabongi na kosala bongo.
[Maloba na nse ya lokasa]
e Maloba mauti na mokanda La grande aventure de l’humanité, 1977, lokasa 21.
f Mpo na lisoló mozindo ya likambo oyo, tala mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création?, mokapo 16, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
1-3. Lolenge nini bato mosusu bamekaki kolimbola mpo na nini bampasi ezali?
4, 5. Tangá mwa bindimeli oyo bizali kotuka Nzambe?
6. Likambo oyo ete bato bazali na likoki ya kopona oyo balingi, ezali kosenga nini?
7, 8. Mituna nini mibimaki na ebandeli ya lisoló ya bato?
9-11. Mpo na nini Nzambe apesi nzela na bampasi mpo na boumeli ya ntango molai boye?
12, 13. Lolenge nini mosika te Nzambe akotya boyengebene na mabelé?
[Elilingi na lokasa 15]
Mpo na nini Nzambe asengaki bambeka kati na kondimana ya Mibeko?