Mokapo 14
Bokonzi ya nani osengeli kotosa?
1, 2. Mitindo nyonso ya bokonzi ezali mabe? Limbolá.
“BOKONZI” ezali liloba oyo elɛmbisaka bato mingi. Ezali bongo mpamba te, mbala mingi yango esalelamaka na lolenge mabe—na mosala, na libota mpe na biyangeli. Biblia elobi solo ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Ee, mingi basili koyangela basusu na lolenge ya makasi mpe mpo na matomba na bango moko.
2 Kasi bokonzi nyonso esalaka mabe te. Na ndakisa, ekoki kolobama ete nzoto na biso ezali na bokonzi likoló na biso. Ezali “kosɛnga” biso ete tópema, tólya, tómela mpe tólala. Yango ezali koyangela na makasi? Te. Kolanda kotosa masɛngami wana ezali mpo na bolamu na biso. Atako kotosa bamposa ya nzoto na biso eyaka yango moko, ezali na mitindo misusu ya bokonzi oyo ezali kosɛnga na biso ete tólinga mpenza kotosa yango. Tótalela mwa ndambo na yango.
BOKONZI OYO ELEKI BOKONZI NYONSO
3. Mpo na nini ebongi mpenza ete Yehova abéngama “Mokonzi aleki likoló”?
3 Koleka mbala 300, Yehova abéngami “Nkolo-Mokonzi aleki likoló” kati na Biblia. Nkolo-Mokonzi azali moto oyo azali na bokonzi boleki likoló. Nini epesi Yehova lotómo ya kozala na etɛlɛmɛlo wana? Emoniseli 4:11 (NW), eyanoli ete: “Yehova mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.”
4. Lolenge nini Yehova azali kosalela bokonzi na ye?
4 Lokola azali Mozalisi na biso, Yehova azali na lotómo ya kosalela bokonzi lokola elingi ye. Yango ekoki komonana lokola likambo ya kobangisa, mingimingi ntango toyebi ete Nzambe azali na “nguya mingi.” Ye abéngami “Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”—liloba oyo na Liebele ezali kopesa likanisi ya nguya oyo moto moko te akoki kotɛlɛma liboso na yango. (Yisaya 40:26; Genese 17:1) Nzokande, Yehova azali kosalela makasi na ye na boboto, mpamba te ezaleli na ye oyo eleki monene ezali bongo bolingo.—1 Yoane 4:16.
5. Mpo na nini ezali mpasi te mpo na kotosa bokonzi ya Yehova?
5 Atako Yehova ayebisaki na Mose ete akoyeisa etumbu likoló na basáli-na-mabe oyo baboyi kobongola motema, nzokande Mose ayebaki ye mingimingi lokola “Nzambe na solo, Nzambe na sembo, oyo akobatelaka kondimana mpe motema-boboto na ye epai na baoyo balingaka ye mpe baoyo babatelaka mibeko na ye.” (Deteronome 7:9, NW) Kanisá naino mwa moke! Yehova Mokonzi aleki monene na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba azali kopusa biso na makasi te ete tósalela ye. Nzokande, tobendami epai na ye na ntina na bolingo na ye. (Baloma 2:4; 5:8) Kotosa bokonzi ya Yehova ezali nkutu nde likambo ya esengo, mpamba te mibeko na ye mizalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso.—Nzembo 19:7, 8.
6. Lolenge nini ntembe ebimaki kati na elanga ya Edene na ntina na bokonzi, mpe yango ebimisaki matomba nini?
6 Baboti na biso ya liboso babwakaki bokonzi ya Nzambe. Balingaki kokamata bango moko bikateli mpo na oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Genese 3:4-6) Mpo na yango, babimisamaki na Paladiso, esika bazalaki kofanda. Na nsima, Yehova atikaki nzela na bato ete básala bibongiseli ya bokonzi oyo ekopesa bango likoki ya kofanda elongo lokola lisangá, atako lizali lisangá lizangi kokoka. Wapi mwa ndambo na bikonzi yango, mpe kino wapi Nzambe azali komizela ete tótosa yango?
“BAKONZI BAZALI LIBOSO”
7. “Bakonzi bazali liboso” bazali banani, mpe wapi etɛlɛmɛlo na bango na kokokisa bango na Nzambe?
7 Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete molimo nyonso atosaka bakonzi bazali liboso, mpamba te bokonzi ezali te bobele yango elingisami na Nzambe.” Banani “bakonzi bazali liboso”? Maloba ya Paulo na milɔngɔ́ milandi emonisi ete ezali bongo bakonzi ya Leta. (Baloma 13:1-7, NW; Tito 3:1) Yehova azali kopona bakonzi yango te, kasi atiki nzela ete bázala. Na bongo, Paulo akokaki kokoma ete: “Bakonzi oyo bazali babongisami na Nzambe.” Yango emonisi nini mpo na bokonzi motindo wana oyo ezali awa na mabelé? Emonisi ete yango ezali na nsé ya bokonzi ya Nzambe. (Yoane 19:10, 11) Na yango, ntango mobeko ya bato eyokani te na mibeko ya Nzambe, baklisto basengeli kotambwisama na lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia. “Basengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi liboso ya kotosa bato.”—Misala 5:29.
8. Matomba nini ozali kozwa na bakonzi bazali liboso, mpe lolenge nini okoki komonisa botosi na yo epai na bango?
8 Nzokande, mbala mingi, bakonzi bazali liboso, elingi koloba bakonzi ya Leta, bakosalaka lokola ‘mosali na Nzambe mpo na malamu na biso.’ (Baloma 13:4) Na makambo nini? Kanisá na ebele ya misala oyo bakonzi bazali liboso bazali kosalela biso, na ndakisa biro ya pósita, bapolisi mpe libateli mpo na kozimisa mɔ́tɔ, bibongiseli bitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe biteyelo. Paulo akomaki ete: “Yango wana, bokofuta mpako. Mikonzi bazali basáli na Nzambe wana ekolendisa bango likambo oyo.” (Baloma 13:6) Mpo na oyo etali mpako mpe masɛngami mosusu ya mibeko ya mboka, tosengeli “komitambwisa na bosembo nyonso.”—Baebele 13:18, NW.
9, 10. (a) Na nini bakonzi bazali liboso bazali ebongiseli ya Nzambe? (b) Mpo nini ezali mabe kotɛmɛla bakonzi bazali liboso?
9 Na bantango mosusu, bakonzi bazali liboso basalelaka mabe nguya na bango. Yango elongoli mokumba oyo tozali na yango ya kozala na botosi epai na bango? Te, ezali bongo te. Yehova azali komona misala mabe ya bakonzi wana. (Masese 15:3) Likambo oyo ete atiki nzela na boyangeli ya moto elimboli te ete akangi miso na mbeba na yango; azali komizela mpe te ete biso tósala bongo motindo moko na bango. Ya solo, mosika te, Nzambe “akobuka mpe akosukisa bikonzi wana nyonso,” mpe akotya na esika na yango boyangeli na ye ya sembo. (Danyele 2:44) Kasi, na kozeláká ete yango esalema, bakonzi bazali liboso bazali kokokisa mosala ya ntina.
10 Paulo alimbolaki: “Ye oyo azali kotombokela bokonzi, azali kotombokela yango ebongisami na Nzambe.” (Baloma 13:2) Bakonzi bazali liboso bazali “ebongiseli” ya Nzambe mpamba te bazali kotya mwa molɔngɔ́, oyo soki ezalaki te mbɛlɛ mobulu elingaki kozala mpe moto na moto mbɛlɛ azali kosala lokola elingi ye. Kotɛmɛla bango ekoki koyokana na Makomami te mpe ekozala likambo ya bozoba. Lokola ndakisa: Kanisá ete bauti kosala yo lipasó mpe bansinga etyami mpo na kobatela mpótá. Atako bansinga ezali mopaya kati na nzoto, ezali kosala mosala moko mpo na mwa ntango. Kolongola yango naino mikolo mikoki te ekoki kozala likámá. Bobele bongo, biyangeli ya bato bizalaki te kati na mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli. Nzokande, kino Bokonzi na ye ekoyangela mabelé mobimba, biyangeli ya bato ezali kotya mwa molɔngɔ́ kati na libota ya bato mpo ete efanda esika moko, kokokisáká mosala oyo moyokani na mokano ya Nzambe mpo na ntango oyo. Na yango, tosengeli kozala na botosi epai na bakonzi bazali liboso, atako botosi na biso ya liboso mpenza ezali na mibeko ya Nzambe mpe na bokonzi na ye.
BOKONZI KATI NA LIBOTA
11. Lolenge nini okoki kolimbola mobeko motali bokonzi?
11 Libota ezali lisangá ya liboso kati na masangá nyonso ya bato. Kati na yango, mobali mpe mwasi bakoki kozala baninga mpenza, mpe bana bakoki kobatelama mpe kobongisama mpo na bomoi ya bokóló. (Masese 5:15-21; Baefese 6:1-4) Ebongiseli oyo kitoko esengeli ete etambola malamu na boye ete epesa basangani ya libota likoki ya kofanda na kimya mpe na boyokani. Mpo ete ezala bongo, Yehova apesaki mobeko ya bokonzi, lokola elobelami na mokuse kati na maloba oyo mazwami na 1 Bakolinti 11:3 (NW): “Mokonzi na mibali nyonso ezali Klisto mpe mokonzi na mwasi ezali mobali mpe ete mokonzi na Klisto ezali Nzambe.”
12, 13. Nani azali mokonzi ya libota, mpe nini tokoki koyekola na lolenge oyo Yesu asalelaki bokonzi na ye?
12 Mobali azali mokonzi ya libota. Nzokande, ye mpe azali na mokonzi likoló na ye—Yesu Klisto. Paulo akomaki ete: “Bino mibali bólingaka basi na bino lokola Klisto alingaki lisangá mpe amipesaki ye moko mpo na yango.” (Baefese 5:25, NW) Mobali azali komonisa botosi na ye epai na Klisto ntango azali kosalela mwasi na ye makambo lokola Yesu azalaki ntango nyonso kosalela lisangá. (1 Yoane 2:6) Bokonzi monene esili kopesamela Yesu, kasi azali kosalela yango na boboto mpe na bolingo; azali na makambo makasi te. (Matai 20:25-28) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu asalelaki soko moke te bokonzi na ye na lolenge mabe. Azalaki na “bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi,” mpe abéngaki bayekoli na ye “baninga” na esika ete bázala “baombo.” Alakaki bango ete “bokozwa kopema” mpe ezali yango nde asalaki.—Matai 11:28, 29; Yoane 15:15.
13 Ndakisa ya Yesu ezali koteya mibali ete bokonzi ya moklisto elimboli te konyokola basusu. Nzokande, ezali bokonzi bosalemi na limemya mpe na bolingo kozanga koluka matomba na yo moko. Yango epekisi kobɛta to kofinga mobalani na yo, ezala na nzoto to na maloba. (Baefese 4:29, 31, 32; 5:28, 29; Bakolose 3:19) Soki mobali moklisto azali bongo kobɛta mwasi na ye, misala na ye misusu ya malamu mikozala na ntina te, mpe mabondeli na ye makopekisama.—1 Bakolinti 13:1-3; 1 Petelo 3:7.
14, 15. Lolenge nini boyebi ya Nzambe ezali kosalisa mwasi na kozala na botosi epai na mobali na ye?
14 Ntango mobali azali komekola ndakisa ya Klisto, ekozala pɛtɛɛ mpo na mwasi na ye na kolanda maloba ya Baefese 5:22, 23 (NW): “Bino basi bótosaka mibali na bino pelamoko epai na Nkolo mpo ete mobali azali mokonzi na mwasi pelamoko Klisto azali mokonzi na lisangá.” Lokola mobali akotosaka Klisto, bobele bongo mwasi asengeli kotosa mobali na ye. Biblia ezali mpe komonisa yango polele ete basi ya molende babongi kozwa lokumu mpe masanzoli mpo na mayele na bango mpe bokasi na bango na mosala oyo emonisi ezaleli ya kobanga Nzambe.—Masese 31:10-31.
15 Botosi ya mwasi moklisto epai na mobali na ye ezali na ndelo. Yango elimboli ete asengeli kotosa Nzambe na esika ya kotosa moto soki botosi na makambo mosusu ekoki komema ye na kobuka mobeko ya Nzambe. Ata na likambo motindo wana, mwasi asengeli komonisa etɛlɛmɛlo na ye ya ngwi na “elimo ya kimya mpe ya bopɔlɔ.” Esengeli komonana polele ete boyebi ya Nzambe esili kokómisa ye mwasi malamu koleka. (1 Petelo 3:1-4, NW) Esengeli mpe kozala bobele bongo mpo na mobali moklisto oyo mwasi na ye azali mondimi te. Kosalela mitindá ya Biblia esengeli kokómisa ye mobali malamu koleka.
16. Lolenge nini bana bakoki komekola ndakisa oyo Yesu atikaki wana azalaki elenge?
16 Baefese 6:1 emonisi mokumba ya bana, kolobáká ete: “Bino bana, bótosaka baboti na bino kati na Nkolo, mpo ete yango ezali sembo.” Bana baklisto bazali kolanda ndakisa ya Yesu oyo azalaki na botosi epai na baboti na ye wana ezalaki ye kokóla. Lokola elenge mobali ya botosi, “akólaki na mayele mpe na nzoto mpe na ngɔlu liboso na Nzambe mpe liboso na bato.”—Luka 2:51, 52, NW.
17. Lolenge oyo baboti bazali kosalela bokonzi ekoki kozala na bopusi nini likoló na bana na bango?
17 Lolenge oyo baboti bazali kokokisa mikumba na bango ekoki kozala na bopusi likoló na lolenge oyo bana na bango bakomemya bokonzi to bakotombokela yango. (Masese 22:6) Na bongo, ekoki kozala malamu ete baboti bámituna bango moko: ‘Nazali kosalela bokonzi na ngai na bolingo to ezali nde na makambo makasi? Napesaka nzela na makambo nyonso?’ Tata to mama oyo abangaka Nzambe asengeli kozala na bolingo mpe na boboto mpo na bana na ye, kasi akozala ngwi mpo na oyo etali kolanda mitindá ya Nzambe. Na lolenge lobongi, Paulo akomaki ete: “Bino batata mpe bósilikisaka bana na bino te, kasi bóbɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Baefese 6:4, NW; Bakolose 3:21.
18. Lolenge nini baboti basengeli kopesa disipilini?
18 Baboti basengeli kotalela malamumalamu myango na bango ya koteya, soki balingi ete bana na bango bázala na botosi mpe bápesa bango esengo. (Masese 23:24, 25) Kati na Biblia, disipilini ezali libosoliboso lolenge ya mateya. (Masese 4:1; 8:33) Esangisi bolingo mpe boboto, kasi nkanda te mpe makambo makasi te. Baboti baklisto basengeli bongo kosala na mayele mpe kozala na komipekisa bango moko ntango bazali kopesa bana na bango disipilini.—Masese 1:7.
BOKONZI KATI NA LISANGÁ
19. Lolenge nini Nzambe asili kotya ebongiseli malamu kati na lisangá ya boklisto?
19 Lokola Yehova azali Nzambe na mobulu te, asili kopesa na libota na ye ebongiseli ya bokonzi mpo ete makambo nyonso mátambola malamu. Na yango, asili kotya Yesu Mokonzi ya lisangá ya boklisto. (1 Bakolinti 14:33, 40; Baefese 1:20-23) Na nsé ya litambwisi ya Klisto oyo ezangi komonana, Nzambe asili kopesa ndingisa na ebongiseli moko oyo na nzela na yango bankulutu oyo baponami kati na lisangá moko na moko bazali kobatela etongá na kopusama te, na motema malamu mpe na bolingo. (1 Petelo 5:2, 3) Basaleli na misala bazali kosunga bango kati na misala mikeseni mpe bazali bongo kokokisa mosala ya ntina kati na lisangá.—Bafilipi 1:1.
20. Mpo na nini tosengeli kozala na botosi epai na baoyo baponami bankulutu baklisto kati na lisangá, mpe mpo na nini yango ezali na litomba?
20 Na ntina na bankulutu baklisto, Paulo akomaki ete: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango. Zambi bazali kokɛngɛlaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monɔkɔ na ntina na makambo na bango. Tiká ete básala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.” (Baebele 13:17) Na mayele nyonso, Nzambe asili kotya likoló na bakɛngɛli baklisto mokumba ya kokokisa bamposa ya elimo ya basangani na lisangá. Bankulutu wana bazali kelasi ya bakonzi ya lingomba te. Bazali nde basaleli mpe baombo ya Nzambe, oyo bazali kosala mpo na kokokisa bamposa ya baninga na bango baklisto, lokola Nkolo na biso, Yesu Klisto, asalaki yango. (Yoane 10:14, 15) Koyeba ete mibali oyo bakokisi masɛngami ya Makomami bazali komibanzabanza mpo na bokóli na biso ya elimo, yango ezali kolendisa biso na koyokela bango mpe kotosa bango.—1 Bakolinti 16:16.
21. Lolenge nini bankulutu basalisaka baninga na bango baklisto na elimo?
21 Na bantango mosusu, mpate akoki kobunga to akoki kokóma pene na likámá mpo na makambo mabe ya mokili. Na nsé ya litambwisi ya Mobateli Mokonzi, bankulutu lokola babateli-balandi bapesameli toli ya kokokisa bamposa ya bampate oyo bazali na nsé ya libateli na bango mpe bazali kosala noki mpo na kopesa bango likebi libongi na moto na moto. (1 Petelo 5:4) Batalaka basangani ya lisangá mpe balendisaka bango. Koyebáká ete Satana azali koluka kobebisa kimya ya libota ya Nzambe, bankulutu bazali kosalela mayele mauti na likoló mpo na koyeba kosilisa matáta. (Yakobo 3:17, 18) Bazali kosala makasi mpo na kobatela bomoko mpe boyokani kati na kondima, likambo oyo Yesu ye moko abondelaki mpo na yango.—Yoane 17:20-22; 1 Bakolinti 1:10.
22. Lisalisi nini bankulutu bapesaka epai na baoyo basali mabe?
22 Ezali boni soki moklisto moko azali konyokwama na ntina na mabe moko to abandi kolɛmba na ntina na lisumu oyo asali? Batoli ya kobɔndisa oyo ezwami na Biblia mpe mabondeli oyo bankulutu bakosala na motema moko mpo na ye ekoki kosalisa ye mpo na kozongela kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo. (Yakobo 5:13-15) Mibali wana, oyo baponami na elimo santu, bazali mpe na bokonzi ya kopesa disipilini mpe kopamela baoyo bazali kolanda kosala mabe to baoyo bazali likámá mpo na bopɛto ya elimo mpe ya bizaleli malamu ya lisangá. (Misala 20:28; Tito 1:9; 2:15) Mpo na kobatela lisangá pɛto, ekosengela na yo koyebisa na bankulutu masumu minene oyo omoni. (Levitike 5:1) Soki moklisto oyo asali lisumu monene andimi kosembolama mpe mpamela ezwami na Makomami mpe amonisi bilembo ya solosolo ya kobongola motema, akoki kosalisama. Nzokande, bato oyo bazali kolanda kobuka mibeko ya Nzambe mpe baboyi kobongola motema basengeli kobimisama na lisangá.—1 Bakolinti 5:9-13.
23. Bakɛngɛli baklisto basalaka nini mpo na bolamu ya lisangá?
23 Biblia esakolaki ete na nsé ya boyangeli na Mokonzi Yesu Klisto, mibali oyo bakɔmeli na elimo basengeli koponama mpo na kopesa libɔndisi, libateli mpe elendiseli epai na libota ya Nzambe. (Yisaya 32:1, 2) Basengeli kozala ndakisa lokola bapalanganisi ya nsango malamu, babateli na mpate mpe balakisi mpo na kopesa nzela na bokóli ya elimo. (Baefese 4:11, 12, 16) Atako bakɛngɛli baklisto bakoki na bantango mosusu kosembola, kopamela mpe kopesa toli na baninga na bango baklisto, nzokande kosalela mateya ya lobiko mazwami na Liloba ya Nzambe oyo bankulutu bazali koteya, ekosalisa moklisto moko na moko ete atikala na nzela ya bomoi.—Masese 3:11, 12; 6:23; Tito 2:1.
NDIMÁ LIKANISI YA YEHOVA NA NTINA NA BOKONZI
24. Na likambo nini tozali komekama mokolo na mokolo?
24 Mobali mpe mwasi ya liboso bamekamaki na likambo litali kotosa bokonzi. Na ntembe te, komekama motindo moko ezali liboso na biso mokolo na mokolo. Satana Zábolo asili kokólisa elimo ya botomboki kati na bato. (Baefese 2:2) Nzela ya lipandá ezali kolakisama ete eleki nzela ya botosi.
25. Matomba nini mazali kozwama na kobwaka elimo ya botomboki ya mokili mpe kozala na botosi na bokonzi ya Nzambe ye moko mpe na oyo atiki nzela ete ezala?
25 Nzokande, tosengeli kobwaka elimo ya botomboki oyo ezali na mokili. Na kosaláká bongo, tokomona ete kotosa Nzambe epesaka mbano mingi. Na ndakisa, tokopɛngola mitungisi mpe bampasi oyo ezwaka baoyo batosi mibeko ya Leta te. Tokozala na mabota oyo kati na yango matáta mazali mingi te lokola na mabota mosusu. Mpe tokozwa litomba na boyokani ya malamu mpe ya bolingo elongo na baninga na biso baklisto. Oyo eleki mpenza, botosi na biso epai na Nzambe ekosala ete tózala na boyokani malamu elongo na Yehova, Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Lolenge nini Yehova azali kosalela bokonzi na ye?
“Bakonzi bazali liboso” bazali banani mpe lolenge nini tosengeli kozala na botosi epai na bango?
Mobeko ya bokonzi etye mokumba nini likoló na mosangani moko na moko ya libota?
Lolenge nini tokoki komonisa botosi kati na lisangá ya boklisto?
[Etanda na lokasa 134
BAZALI BATO NA BOTOSI, KASI BATOMBOKISI TE
Kati na mosala na bango ya kosakola liboso ya bato banso, Batatoli ya Yehova bamonisaka Bokonzi ya Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na kimya mpe kobatelama ya solo. Kasi basakoli wana ya molende ya Bokonzi ya Nzambe bazali soko moke te batombokisi ya biyangeli ya mikili epai bango bafandi. Nzokande, Batatoli bazali kati na bato oyo baleki komonisa limemya mpe oyo batosaka mibeko. Mokonzi moko ya Leta na mboka moko ya Afrika alobaki ete: “Soki mangomba nyonso mazalaki lokola Batatoli ya Yehova, mbɛlɛ tolingaki kozala na babomi te, na miyibi te, na bato na mobulu te, na bakangami te mpe na bombe atomike te. Mbɛlɛ bikuke bilingaki kokangama na fungola te kobanda na ntɔ́ngɔ́ kino na mpokwa.”
Koyebáká likambo oyo, bakonzi ya Leta kati na mikili mingi basili kopesa nzela na Batatoli ete básala mosala na bango ya kosakola na bonsomi nyonso. Na mikili misusu, monyoko to bipekiseli esili kolongolama ntango bakonzi bayaki koyeba ete Batatoli ya Yehova bazali na bopusi moko malamu. Ezali lokola Paulo akomaki na ntina na botosi epai na bakonzi bazali liboso: “Landá kosala malamu, mpe okokumisama mpo na yango.”—Baloma 13:1, 3, NW.