Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rq liteya 15 lok. 30
  • Tósalisa basusu ete básala mokano ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa basusu ete básala mokano ya Nzambe
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki koyebisa basusu nsango malamu?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • ‘Bazali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge nini nsango malamu ezali kosakolama?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
rq liteya 15 lok. 30

Liteya 15

Tósalisa basusu ete básala mokano ya Nzambe

Mpo na nini koyebisa basusu makambo oyo ozali koyekola? (1)

Osengeli koyebisa nsango malamu epai na nani? (2)

Bopusi nini etamboli na yo ekoki kozala na yango likoló na basusu? (2)

Ntango nini okoki kosakola elongo na lisangá? (3)

1. Kino sikawa, osili koyekola makambo mingi ya malamu na Biblia. Boyebi yango esengeli komema yo na kolóna bomoto ya boklisto. (Baefese 4:22-24) Boyebi wana ezali na ntina mingi mpo ete ozwa bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Nzokande, basusu mpe basengeli koyoka nsango malamu mpo ete bango mpe bákoka kobikisama. Baklisto nyonso ya solo basengeli kopesa litatoli epai na basusu. Yango ezali etindá euti na Nzambe.​—Baloma 10:10; 1 Bakolinti 9:16; 1 Timoté 4:16.

2. Okoki kobanda na koyebisáká makambo malamu oyo ozali koyekola epai na baoyo bazali zingazinga na yo. Yebisá makambo yango na libota na yo, na baninga, na baoyo otángaka na bango mpe na baoyo osalaka na bango esika moko. Zalá na boboto mpe na motema pɛtɛɛ wana ozali koyebisa bango makambo yango. (2 Timoté 2:24, 25) Obosana te ete mbala mingi bato batalelaka etamboli na moto koleka makambo oyo azali koloba. Na yango etamboli malamu na yo ekoki kobenda basusu ete báyoka nsango oyo ozali koyebisa bango.​—Matai 5:16; 1 Petelo 3:1, 2, 16.

3. Na nsima, okoki kokokisa masɛngami mpo na kobanda kosakola elongo na Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi. Yango ezali litambe moko ya ntina mingi mpo na bokóli na yo. (Matai 24:14) Oyo nde esengo okozala na yango soki okosalisa moto moko ete akóma mosaleli ya Yehova mpe kozwa bomoi ya seko!​—1 Batesaloniki 2:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto