Mokapo ya zomi na mitano
Kowelana ya bakonzi yango mibale na ekeke ya 20
1. Na maloba ya nganga-mayele moko ya masolo ya kala, bikólo nini bizalaki na esika ya liboso na mbongwana oyo esalemaki na Mpoto na ekeke ya 19?
NORMAN DAVIES, nganga-mayele ya masolo ya kala, akomaki ete: “Mbongwana monene esalemaki na ekeke ya 19 na Mpoto koleka bikeke mosusu ya liboso.” Alobaki lisusu ete: “Mikili ya Mpoto ekómaki makasi koleka na makambo ya tekiniki, ya nkita, na mimeseno mpe na boyokani na bikólo ya mokili mobimba.” Bikólo ya Mpoto oyo “etombolaki nkita na ‘ekeke yango ya bomɛngo,’” lokola Davies alobaki yango, “ezalaki libosoliboso Grande-Bretagne . . . mpe nsima ya bambula Allemagne.”
‘MITEMA NA BANGO MIKOSEPELA KOSALA MABE’
2. Pene na nsuka ya ekeke ya 19, bikólo nini ya nguya na mokili bizwaki esika ya “mokonzi ya nɔrdi” mpe ya “mokonzi ya sudi”?
2 Pene na nsuka ya ekeke ya 19, bokonzi ya Allemagne ezalaki “mokonzi ya nɔrdi” mpe Grande-Bretagne ezalaki “mokonzi ya sudi.” (Danyele 11:14, 15, NW) Anzelu ya Yehova alobaki ete: ‘Mpo na mikonzi mibale yango, bakokanisa mabe na mitema na bango; mpe wana ezali bango kofanda esika moko na mesa moko bakobuka lokuta.’ Alobaki lisusu ete: “Nde ekozala mpamba; mpo ete nsuka ekozala naino na elaka esili koponama.”—Danyele 11:27.
3, 4. (a) Nani akómaki mokonzi ya liboso ya bokonzi ya Allemagne, mpe kondimana nini asalaki? (b) Mokano nini Kaiser Guillaume alandaki?
3 Na mokolo ya 18 Yanuali na mobu 1871, Guillaume I akómaki mokonzi ya liboso ya bokonzi ya Allemagne. Atyaki Otto von Bismarck ministre-mokonzi (chancelier). Lokola Bismarck azalaki na mokano ya kobongisa mboka yango ya sika, aboyaki kozwana na matata na bikólo mosusu mpe asalaki boyokani elongo na bokonzi ya Autriche-Hongrie mpe ya Italie, boyokani yango ebéngamaki Triple-Alliance (Boyokani kati na Bikólo Misato). Kasi matata mabimaki mpamba te matomba ya mokonzi oyo ya nɔrdi makesanaki mpenza na matomba ya mokonzi ya sudi.
4 Nsima ya liwa ya Guillaume I mpe ya mokitani na ye Frédéric III na mobu 1888, Guillaume II azwaki bokonzi ntango azalaki na mbula 29. Lokola azalaki na mokano ya kopalanganisa lokumu ya Allemagne na mokili, Guillaume II oyo ayebanaki mpe na nkombo ya Kaiser Guillaume alongolaki Bismarck na bokonzi. Nganga-mayele moko ya masolo ya kala alobaki ete: “Na boyangeli ya Guillaume II, [Allemagne] ekómaki na lolendo mpe koluka ntango nyonso kobundisa bikólo mosusu.”
5. Ndenge nini bakonzi yango mibale bafandaki “na mesa moko,” mpe makambo nini bazalaki kolobana?
5 Ntango Nicolas II, mokonzi (tsar) ya Russie, abyangaki likita monene mpo na kimya na engumba La Haye na ekólo Hollande na mokolo ya 24 Augusto na mobu 1898, ezalaki eleko moko ya boyokani te kati na bikólo mingi. Likita yango mpe oyo elandaki na 1907 ebimisaki Esambiselo ya matata minene kati na bikólo (Cour permanente d’arbitrage) na engumba La Haye. Lokola bazalaki basangani ya esambiselo yango, Allemagne na Grande-Bretagne bamimonisaki lokola babateli na kimya. Bafandaki “na mesa moko,” lokola baninga, kasi ‘mitema na bango ezalaki kokana kosala mabe.’ Boyokani ya maloba ya sukali, ya ‘kokosana ntango bafandi na mesa moko,’ ekoki koyeisa kimya ya solo te. ‘Eloko moko te ekoki kolonga’ na mikano oyo bikólo yango ezali kozwa na makambo ya politiki, ya mombongo mpe ya kobatela bato mpamba te nsuka ya bakonzi yango mibale “ekozala na elaka esili koponama” na Yehova Nzambe.
‘AKOBEBISA KONDIMANA YA BULƐƐ’
6, 7. (a) Na lolenge nini mokonzi ya nɔrdi ‘azongaki na mokili na ye’? (b) Ndenge nini mokonzi ya sudi atalelaki bokoli ya mokonzi ya nɔrdi?
6 Anzelu ya Yehova akobaki koloba ete: “[Mokonzi ya nɔrdi] akozonga na mokili na ye na mosolo mingi, nde akotya motema na kobebisa kondimana ya bulɛɛ. Akosala mokano na ye, mpe [akozonga] na mokili na ye.”—Danyele 11:28.
7 Kaiser Guillaume azongaki na “mokili” na ye, elingi koloba na mokili oyo, liboso, eyangelamaki na mokonzi ya kala ya nɔrdi. Ndenge nini? Na kosaláká boyangeli oyo esengelaki kopalanganisa lokumu ya bokonzi ya Allemagne, Guillaume II alandaki bongo mokano ya kobɔtɔla mikili mingi na Afrika mpe na bisika mosusu. Lokola alingaki kozala na masuwa mingi koleka Grande-Bretagne, Guillaume II abandaki kosala masuwa minene mpo na bitumba. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Bobele na mbula koleka zomi mwa moke, Allemagne oyo ezalaki na masuwa mingi te esalaki masuwa mingi koleka na boye ete ekómaki na esika ya mibale nsima ya Grande-Bretagne.” Mpo na kotikala na esika na yango ya liboso, Grande-Bretagne esalaki masuwa mingi koleka. Esalaki mpe boyokani oyo ebéngamaki Boyokani ya solosolo (entente cordiale) elongo na France mpe boyokani ndenge moko na Russie, elingi koloba boyokani ya bikólo misato to Triple-Entente. Mikili ya Mpoto mikabwanaki bongo na bibongiseli mibale na makambo ya kobatela bato—Triple-Alliance na ngámbo moko mpe Triple-Entente na ngámbo mosusu.
8. Ndenge nini bokonzi ya Allemagne ekómaki na ‘bozwi mingi’?
8 Bokonzi ya Allemagne elandaki kobundisa bikólo mosusu. Yango wana ekómaki na ‘bozwi mingi’ mpamba te ezalaki kotambwisa mikili ya Triple-Alliance. Bokonzi ya Autriche-Hongrie na Italie ezalaki kondima Lingomba ya Katolike. Na bongo, Triple-Alliance endimaki mpe bokonzi ya papa, nzokande mokonzi ya sudi, oyo bikólo na ye ya Triple-Entente ezalaki bikólo ya Katolike te, endimaki bokonzi ya papa te.
9. Ndenge nini motema ya mokonzi ya nɔrdi ‘etɛmɛlaki kondimana ya bulɛɛ’?
9 Ezalaki boni mpo na libota ya Yehova? Bazalaki kosakola banda kala ete “bilaka ya mabota” ekosuka na 1914.a (Luka 21:24) Na mbula wana, Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, Mokitani ya Davidi, etyamaki na likoló. (2 Samwele 7:12-16; Luka 22:28, 29) Banda sanza ya Marsi 1880, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete Bokonzi ya Nzambe esengeli kobanda koyangela na nsuka ya “bilaka ya mabota” to “ntango ya mabota.” (King James Version) Kasi mokonzi ya Allemagne, ye mokonzi ya nɔrdi, alingaki na motema na ye se ‘kobebisa kondimana ya bulɛɛ ya bokonzi.’ Na esika ya kondima Bokonzi ya Nzambe, Kaiser Guillaume ‘alongaki’ kokokisa mokano na ye ya koyangela mokili mobimba. Na kosaláká bongo, Guillaume II apelisaki mɔ́tɔ oyo ebimisaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.
ETUMBA OYO MOKONZI “AKOBANGA”
10, 11. Ndenge nini Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, mpe na lolenge nini yango esalemaki na ‘ntango oyo esilaki koponama’?
10 Anzelu asakolaki ete: “Na elaka eponami [mokonzi ya nɔrdi] akozonga lisusu na mokili ya [sudi, NW]; nde na mbala oyo ekozala lokola ezalaki na mbala ya liboso te.” (Danyele 11:29) “Elaka oyo eponamaki” na Nzambe mpo na kosukisa boyangeli ya Mabota na mabelé esukaki na 1914 ntango atyaki bokonzi na likoló. Na mokolo ya 28 Yuni na mobu 1914, François-Ferdinand, mokitani na bokonzi ya Autriche-Hongrie na mwasi na ye babomamaki na engumba ya Sarajevo na ekólo Bosnie na nganga-mobulu moko, moto ya Serbie. Yango ezalaki montɛntɛi (étincelle) oyo epelisaki mɔ́tɔ ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.
11 Kaiser Guillaume apusaki Autriche-Hongrie ete ebunda na Serbie. Lokola bayebaki ete Allemagne ezalaki nsima na bango, bakonzi ya Autriche-Hongrie basɛngaki etumba na Serbie na mokolo ya 28 Yuli na mobu 1914. Kasi Russie ekɔtelaki Serbie. Ntango bakonzi ya Allemagne bamonaki bongo, basɛngaki mpe etumba na Russie mpe France (moko na bikólo ya Triple-Entente) ekɔtelaki Russie. Allemagne esɛngaki mpe etumba na France. Mpo na kokɔta noki na Paris, Allemagne ebundisaki Belgique, atako ekólo yango eboyaki kokɔta na bitumba ndenge Grande-Bretagne esɛngaki. Na yango, Grande-Bretagne esɛngaki etumba na Allemagne. Bikólo mosusu bikɔtaki na etumba, mpe Italie elongwaki na ngámbo moko mpo na kokɔta na ngámbo mosusu. Na boumeli ya etumba oyo, Grande-Bretagne ekómisaki Ezipito etúká na yango mpo na kopekisa mokonzi ya nɔrdi ete akanga nzela ya Canal de Suez te mpe azingela Ezipito te, mokili oyo ezalaki kala mokonzi ya sudi.
12. Na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, ndenge nini makambo esalemaki ‘lokola na ntango ya kala te’?
12 Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Atako Allemagne ezalaki kobunda na bikólo mingi ya nguya oyo bisanganaki, emonanaki ete ekokaki kolonga etumba.” Na bitumba ya liboso oyo bakonzi yango mibale bazalaki kobunda na ntango ya kala, mokonzi ya nɔrdi to bokonzi ya Loma azalaki ntango nyonso kolonga. Kasi na mbala oyo, ‘makambo mazalaki lisusu lokola na ntango ya kala te.’ Mokonzi ya nɔrdi akweyaki na etumba. Koyebisáká ntina ya mbongwana yango, anzelu alobaki ete: “Zambi masuwa ya Kitimi makobimela ye, mpe ye akobanga.” (Danyele 11:30a) “Masuwa ya Kitimi” ezalaki nini?
13, 14. (a) “Masuwa ya Kitimi” oyo eyaki kobundisa mokonzi ya nɔrdi ezalaki nini? (b) Ndenge nini ebele ya masuwa ya Kitimi ebakisamaki na ntango bazalaki kobunda etumba ya liboso ya mokili mobimba?
13 Na mikolo ya Danyele, Kitimi ezalaki Kupulu (Chypre). Na ebandeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, Chypre ekómaki na mabɔkɔ ya Grande-Bretagne. Buku moko (The Zondervan Pictorial Encyclopedia of the Bible) elobi lisusu ete nkombo Kitimi “esalelamaki mpe mpo na kolobela mikili nyonso ya Mpoto, kasi mingi mpenza mikili ya Mpoto oyo mizalaki mosika, pembeni ya mai monene.” Libongoli moko ya Biblia (New International Version) ebongoli “masuwa ya Kitimi” na “masuwa ya mikili ya Mpoto oyo mizalaki na bokula ya mai monene.” Na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, masuwa ya Kitimi ezalaki mpenza masuwa ya Grande-Bretagne mpamba te yango ezalaki kotambola na bokula ya wɛsti ya mikili ya Mpoto.
14 Lokola etumba ezalaki kokóma ndongo, ebele ya masuwa ya Kitimi eyaki kobakisama na masuwa ya Grande-Bretagne. Na mokolo ya 7 Mai na mobu 1915, sous-marin U-20 ya Allemagne ezindisaki pakebo Lusitania na bokula ya sudi ya Irlande. Bato ya Amerika 128 bakufaki elongo na bato mosusu. Na nsima, Allemagne ekobaki kosalela sous-marin na etumba ya Mai Monene ya Atlantique. Yango wana, na mokolo ya 6 Aprili na mobu 1917, Woodrow Wilson, prezida ya États-Unis, asɛngaki etumba na Allemagne. Lokola azwaki ebele ya masuwa mpe ebele ya basoda ya États-Unis, mokonzi ya sudi—nguya ya mokili mobimba, États-Unis na Angleterre—azalaki mpenza na bibundeli bikoki mpo na kobunda na monguna na ye.
15. Ntango nini mokonzi ya nɔrdi ‘abangaki’?
15 Ntango nguya ya mokili mobimba, États-Unis na Angleterre ebundisaki ye, mokonzi ya nɔrdi ‘abangaki’ mpe na sanza ya Novɛmbɛ 1918, andimaki kokweya na ye na etumba. Guillaume II amibombaki na Hollande mpe Allemagne ekómaki repibliki. Kasi mokonzi ya nɔrdi akweyaki naino te.
MOKONZI OYO AZALI ‘KOLONGA’
16. Soki tolandi esakweli, mokonzi ya nɔrdi akosala nini soki alongi etumba te?
16 “[Mokonzi ya nɔrdi] akozonga na nsima, mpe [akoya] mpe akongala na ntina na kondimana ya bulɛɛ, mpe akosala mokano na ye. Akozonga mpe akokanisa baoyo batiki kondimana ya bulɛɛ.” (Danyele 11:30b) Bobele lokola anzelu asakolaki, makambo yango makokisamaki mpenza bongo.
17. Makambo nini esalaki ete Adolf Hitler akóma mokonzi makasi?
17 Ntango etumba esilaki na 1918, bikólo oyo bilongaki bisalaki boyokani ya kimya elongo na Allemagne kasi boyokani yango ezalaki nde etumbu. Bato ya Allemagne bamonaki masɛngami ya boyokani yango makasi mpenza mpamba te repibliki na bango ya sika ezalaki makasi te banda na ebandeli na yango. Allemagne ekutanaki na bolɔzi makasi na boumeli ya mwa bambula kino bato milio motoba bazalaki na misala te mpamba te nkita ebebaki na ntina na mobulungano monene. Ntango ya mpasi oyo ekómelaki bato ya Allemagne na ebandeli ya bambula ya 1930 ezalaki libaku malamu mpo ete bándima makanisi ya Adolf Hitler. Akómaki ministre-mokonzi na Yanuali 1933 mpe mbula moko na nsima akómaki prezida ya repibliki oyo Banazi babéngaki Bokonzi ya Misato (Troisième Reich).b
18. Ndenge nini Hitler ‘alongaki’?
18 Nsima ya kokóma mokonzi, Hitler abandaki noki kobundisa “kondimana ya bulɛɛ” oyo emonisamaki na bandeko ya Yesu Klisto bapakolami. (Matai 25:40) Na likambo oyo, ‘alongaki’ konyokola makasi ebele ya baklisto ya sembo. Hitler atombolaki nkita ya ekólo na ye mpe asalaki boyokani makasi na mikili mosusu; na bongo, ‘alongaki’ mpe na makambo wana. Bobele na mwa bambula, akómisaki Allemagne ekólo moko ya nguya na mokili.
19. Hitler asalaki boninga na nani ntango azalaki koluka lisungi?
19 Hitler ‘atalelaki baoyo batikaki kondimana ya bulɛɛ.’ Ezalaki banani? Na ntembe te, ezalaki bakonzi ya mangomba ya boklisto, bato oyo bamikumisaka ete basalá kondimana na Nzambe, nzokande bazalaka bayekoli ya Yesu Klisto te. Hitler alongaki kobyanga ‘bato yango batiká kondimana ya bulɛɛ’ báya kosunga ye. Na ndakisa, asalaki boyokani elongo na papa wa Loma. Na mobu 1935, Hitler asalaki departema mpo na kotalela makambo ya mangomba (Ministry of Church Affairs). Moko na mikano na yango ezalaki ya kotya mangomba na nse ya boyangeli ya Leta.
“MABƆKƆ” EUTI NA MOKONZI
20. “Mabɔkɔ” nini mokonzi ya nɔrdi asalelaki, mpe mpo na kotɛmɛla nani?
20 Hitler aumelaki te mpo na kobunda bitumba, lokola anzelu ayebisaki yango sikisiki ete: “Ekozala na mabɔkɔ oyo ekotɛlɛma, oyo ekouta na ye; mpe ekobebisa mpenza esika ya bulɛɛ, esika ya makasi, mpe ekolongola mbeka ya kotumba.” (Danyele 11:31a, NW) “Mabɔkɔ” yango ezalaki basoda ya mokonzi ya nɔrdi oyo babundisaki mokonzi ya sudi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ na mobu 1939, “mabɔkɔ” yango, elingi koloba, basoda ya Nazi bazingelaki Pologne. Mikolo mibale na nsima, Grande-Bretagne na France basɛngaki etumba na Allemagne mpo na kokɔtela Pologne. Na bongo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Basoda ya Allemagne babɔtɔlaki Pologne mbala moko, mpe mwa ntango moke na nsima, babɔtɔlaki mpe Danemark, Norvège, Hollande, Belgique, Luxembourg na France. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Na nsuka ya 1941, Allemagne ya Nazi ekómaki na bokonzi likoló na mikili nyonso ya Mpoto.”
21. Ndenge nini makambo mabalukelaki mokonzi ya nɔrdi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe yango esukaki boni?
21 Atako bakonzi ya Allemagne na ya Union soviétique batyaki mabɔkɔ na mokanda mpo bikólo na bango bizala na boyokani makasi mpo na kosalisana mpe kobatela bandelo na yango, Hitler abundaki na Union soviétique na mokolo ya 22 Yuni na mobu 1941. Yango etyaki bongo Union soviétique ngámbo moko na Grande-Bretagne. Atako na ebandeli mpenza ya etumba yango, basoda ya Allemagne bakɔtaki mosika na ekólo Russie, kasi basoda ya Russie babundaki makasi. Na mokolo ya 6 Desɛmbɛ na mobu 1941, basoda ya Allemagne bakweyaki mpenza na etumba na engumba Moscou. Na mokolo oyo elandaki, ekólo Japon oyo emityaki na ngámbo ya Allemagne, ebwakaki bɔmbi na engumba ya Pearl Harbor na Hawaï. Ntango ayokaki yango, Hitler alobaki na basungi na ye ete: “Sikoyo eloko moko te ekoki kopekisa biso tólonga etumba.” Na mokolo ya 11 Desɛmbɛ, asɛngaki na mbalakaka etumba na États-Unis. Kasi ayebaki te nguya oyo Union soviétique na États-Unis bazalaki na yango. Lokola basoda ya Russie bazalaki kobundisa Allemagne na ɛsti mpe basoda ya Grande-Bretagne na ya États-Unis na wɛsti, makambo mabalukelaki Hitler. Babandaki kobɔtɔla basoda ya Allemagne mokili mokomoko. Hitler amibomaki mpe nsima na yango, na mokolo ya 7 Mai na mobu 1945, Allemagne emipesaki na mabɔkɔ ya banguna na yango.
22. Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi ‘atyolaki esika ya bulɛɛ mpe alongolaki mbeka ya kotumba’?
22 Anzelu alobaki ete ‘bango [basoda ya Nazi] bakobebisa esika ya bulɛɛ, esika ya makasi mpe bakolongola mbeka ya kotumba.’ Na mokili ya Yuda na ntango ya kala, esika ya bulɛɛ ezalaki moko na biteni ya tempelo ya Yelusaleme. Kasi ntango Bayuda baboyaki Yesu, Yehova mpe aboyaki bango na tempelo na bango. (Matai 23:37–24:2) Banda ekeke ya liboso ya ntango na biso, tempelo ya Yehova esilá kokóma tempelo ya elimo, oyo esika na yango oyo eleki bosantu ezali na likoló mpe esika na yango ya losambo ezali na mabelé, epai kuna bandeko bapakolami ya Nganga Monene Yesu bazali kosalela Nzambe. Banda bambula ya 1930, “ebele monene” basangani na losambo elongo na batikali bapakolami mpe na bongo bazali kosala ‘na tempelo ya Nzambe.’ (Emoniseli 7:9, 15; 11:1, 2; Baebele 9:11, 12, 24) Na mikili oyo ezalaki na nse ya boyangeli na ye, mokonzi ya nɔrdi abebisaki libándá ya tempelo awa na mabelé wana anyokolaki batikali bapakolami na baninga na bango. Monyoko ezalaki mpenza makasi na boye ete “mbeka ya kotumba”—elingi koloba mbeka ya masanzoli ya nkombo ya Yehova oyo bato nyonso bazalaki kopesa—elongolamaki. (Baebele 13:15) Atako monyoko ezalaki makasi mpenza, kasi baklisto batikali bapakolami elongo na “bampate mosusu” bakobaki kosakola na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.—Yoane 10:16.
‘ELOKO YA MBINDO ETYAMI’
23. Na ekeke ya liboso, “eloko ya mbindo” ezalaki nini?
23 Ntango etumba ya mibale ya mokili mobimba elingaki kosila, eloko moko ebimaki, bobele lokola anzelu ya Nzambe asakolaki yango boye: “Bakotya mpenza eloko ya mbindo oyo ezali koyeisa libebi.” (Danyele 11:31b, NW) Yesu mpe alobelaki “eloko ya mbindo.” Na ekeke ya liboso, eloko ya mbindo ezalaki basoda ya Loma oyo bazingelaki Yelusaleme na mobu 66 T.B. mpo na kosukisa botɔmbɔki ya Bayuda.c—Matai 24:15, NW; Danyele 9:27.
24, 25. (a) Na ntango na biso, “eloko ya mbindo” ezali nini? (b) Ntango nini mpe ndenge nini ‘eloko ya mbindo etyamaki’?
24 “Eloko ya mbindo” oyo ‘etyami’ na ntango na biso ezali nini? Emonani ete ezali “eloko ya mbindo,” eloko ya lokuta oyo ezwi esika ya Bokonzi ya Nzambe. Ezalaki Société des Nations, nyama na yauli ya langi motane, oyo ebwakamaki na libulu mozindo, elingi koloba ezalaki lisusu te ebongiseli mpo na kimya na mokili, banda ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. (Emoniseli 17:8) Nzokande, “nyama na yauli” esengelaki “kobima na libulu mozindo.” Esalemaki bongo ntango bikólo 50 oyo bisanganaki, kati na yango Union soviétique, bisalaki ONU na mokolo ya 24 Ɔkɔtɔbɛ na mobu 1945. Na bongo, “eloko ya mbindo” oyo anzelu asakolaki—elingi koloba ONU—etyamaki.
25 Allemagne ezalaki monguna monene ya mokonzi ya sudi na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba mpe etalelamaki lokola mokonzi ya nɔrdi. Mokili mosusu nini ekozwa esika yango?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 6 ya buku oyo.
b Bokonzi ya liboso ezalaki Bokonzi Mosantu ya Loma, bokonzi ya mibale ezalaki bokonzi ya Allemagne.
c Talá mokapo 11 ya buku oyo.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Na nsuka ya ekeke ya 19, mikili nini ya nguya ezwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi mpe ya mokonzi ya sudi?
• Na ntina na mokonzi ya nɔrdi, ndenge nini matata oyo ebimaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba masukaki ‘lokola na ntango ya kala te’?
• Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ndenge nini Hitler akómisaki Allemagne ekólo moko ya nguya na mokili?
• Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ndenge nini kowelana esukaki kati na mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi?
[Etanda/Bililingi na lokasa 268]
Mokonzi Mokonzi
ya Nɔrdi ya Sudi
Danyele 11:27-30a Bokonzi ya Allemagne Gde-Bretagne, na nsima
(Etumba ya Liboso ya mokili mobimba) États-Unis na Angleterre,
nguya ya mokili mobimba
Danyele 11:30b, 31 Hitler: Bokonzi ya misato États-Unis na
(Etumba ya Mibale ya mokili mobimba) Angleterre, nguya
ya mokili mobimba
[Elilingi]
Prezida Woodrow Wilson, ye na Mokonzi Georges V
[Elilingi]
Baklisto mingi banyokwamaki na bakaa ya bakangami
[Elilingi]
Bakonzi ya mangomba ya boklisto bapesaki Hitler mabɔkɔ
[Elilingi]
Babomaki Ferdinand na kati ya Vuatire oyo
[Elilingi]
Basoda ya Allemagne na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba
[Elilingi na lokasa 257]
Na 1945 na engumba Yalta, Winston Churchill ministre-mokonzi ya Grande-Bretagne, Franklin D. Roosevelt prezida ya États-Unis na Joseph Staline mokambi ya Union soviétique, basalaki likita ete basoda na bango bázala naino na Allemagne mpe basalaki guvernema ya sika na Pologne. Basalaki mpe ONU
[Bililingi na lokasa 258]
1. Ferdinand, mokitani ya bokonzi 2. Masuwa ya Allemagne mpo na bitumba 3. Masuwa ya Grande-Bretagne mpo na bitumba 4. Lusitania 5. États-Unis ekɔti na etumba
[Bililingi na lokasa 263]
Ntango Japon, moninga ya Allemagne na etumba, abwakaki bɔmbi na Pearl Harbor, Adolf Hitler azalaki mpenza na elikya ete akolonga etumba