Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jt nk. 3-5
  • Bazali banani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali banani?
  • Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NKOMBO NA BANGO
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nkombo ya Nzambe mpe “Kondimana ya Sika”
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
    Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
Makambo mosusu
Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka?
jt nk. 3-5

Bazali banani?

BATATOLI YA YEHOVA bazali na mposa oyeba bango malamu. Mbala mosusu ofandaka na bango kartye moko to osalaka na bango esika moko to mpe okutanaka na bango mokolo na mokolo na bisika mosusu. Ekoki mpe kozala ete omonaka bango na balabala ntango bazali kolakisa bazulunalo na bango epai ya baleki-nzela. To mpe osololá na bango mwa moke epai na yo.

Ya solo mpenza, Batatoli ya Yehova balingi yo, bazali mpe koluka ete ozala malamu. Balingi kozala baninga na yo mpe koyebisa yo makambo mosusu mingi oyo bango bayebi, makambo oyo bango bandimaka, koyebisa yo ndenge lingomba na bango ezali, mpe ndenge nini batalelaka bato mpe mokili oyo biso nyonso tofandi. Yango wana, babimisi mwa buku oyo mpo na yo.

Na makambo mingi, Batatoli ya Yehova bazali lokola bato nyonso. Batungisamaka na makambo oyo bato nyonso mpe batungisamaka na yango​—lokola makambo ya nkita, mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe mitungisi ya makanisi. Basalaka mpe mabunga, mpamba te bazali bato ya kokoka te, bapemami te, bazangi mpe mbeba te. Kasi soki basali libunga, basalaka makasi ete bazongela yango lisusu te mpe bayekolaka Biblia na molende mpo na kosala mbongwana oyo esengeli mpo na likambo oyo ekómelaki bango. Bamipesi na Nzambe mpo na kosala mokano na ye, mpe basalaka makasi mpo na kokokisa ekateli na bango. Na misala na bango nyonso, balukaka toli ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu na ye.

Bandimaka makambo oyo ezali na Biblia, kasi makanisi ya bato te to mateya ya mangomba te, mpe yango ezali mpenza likambo ya ntina mpo na bango. Bazali na makanisi ndenge moko na ntoma Paulo ntango alobaki, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, ete: “Nzambe azali sembo ata bato nyonso bazali na lokuta.” (Baloma 3:4 haut-fleuvea) Mpo na mateya oyo bato bateyaka lokola nde euti na Biblia, Batatoli bandimaka na motema mobimba kolanda ndakisa ya bato ya Beloya, oyo ntango bayokaki ntoma Paulo azali kosakola: “Bayambi Liloba na mposa mingi, mpe batángi Makomi mokolo na mokolo kotala soko makambo yango mazali [bongo].” (Misala 17:11) Batatoli ya Yehova bandimaka ete esengeli kotalela malamu mateya nyonso ya mangomba mpo na koluka koyeba soki euti na Makomami oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, ezala mateya yango bango moko nde batei yango to soki bato mosusu nde batei yango. Bazali kosɛnga yo mpe kolendisa yo ete osala bongo ntango ozali kosolola na bango.

Na yango, Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe. Batalelaka mikanda 66 ya Biblia ete eutaki na Nzambe mpe ete makambo ya kala oyo bakomi na mikanda yango ezali solo. Bango babengaka eteni ya Biblia oyo eyebani na nkombo Kondimana ya Sika, ete Makomami ya Greke ya boklisto, mpe eteni mosusu oyo eyebani na nkombo Kondimana ya Kala, ete Makomami ya Liebele. Bandimaka biteni yango nyonso mibale, Makomami ya Greke ya boklisto mpe Makomami ya Liebele, mpe balandaka yango ndenge ekomami longola kaka bisika oyo maloba ezali komonisa mpenza ete ezali na elobeli ya elilingi. Bayebi ete bisakweli mingi ya Biblia esili kokokisama, mosusu ezali kokokisama sikoyo, mpe mosusu ekokokisama na mikolo ezali koya.

NKOMBO NA BANGO

Batatoli ya Yehova? Ɛɛ, ezali nkombo oyo bayebani na yango. Nkombo yango emonisi mosala na bango, ezali komonisa ete bapesaka litatoli mpo na Yehova, mpo na Bonzambe na ye, mpe mpo na mikano na ye. Maloba lokola “Nzambe,” “Nkolo,” mpe “Mozalisi”​—ndenge moko na maloba lokola “Prezida,” “Mokonzi,” mpe “Général”​—ezali batitre mpe ekoki kosalelama mpo na bato ndenge na ndenge. Kasi, nkombo “Yehova” ezali nkombo ya moto kaka moko mpe esalelamaka kaka mpo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yango ezali na Nzembo 83:18 na Biblia ya kala ya Lingala ya Uele oyo totángaka boye: ‘Tiká báyeba Yo moko, oyo azali na nkombo Yehova, ozali Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.’

Nkombo Yehova (to Yawe, lokola Biblia haut-fleuve mpe babongoli mosusu babongoli yango) emonani mbala soki 7000 na kati ya Makomami ya Liebele ya ebandeli. Balimwisi nkombo yango na Babiblia mingi mpe batii na esika na yango bibengeli lokola “Nzambe” to “Nkolo.” Atako bongo, na kati ya Babiblia yango, ezali mpasi te mpo na komona bisika Makomami ya Liebele esalelaki nkombo Yehova, mpamba te maloba oyo batii na bisika oyo nkombo yango ekomamaki ezali na makomi minene, lokola: NZAMBE to NKOLO. Mabongoli mingi ya mikolo na biso esaleli nkombo Yehova to Yawe. Yango wana, na Traduction du monde nouveau tozali kotánga boye na Yisaya 42:8: “Ngai nazali Yehova. Wana ezali nkombo na ngai.”

Batatoli ya Yehova bazwi nkombo na bango na mokanda ya Yisaya mokapo 43. Kuna mokili emonisami lokola tribinale moko monene: Basɛngi banzambe ya bikólo bábimisa batatoli na bango mpo na komonisa ete makambo na bango ezali sembo to báyoka ndenge batatoli ya Yehova bazali koloba mpo na Yehova mpe bándima solo. Yango wana, Yehova alobi na basaleli na ye ete: “Bino bozali batatoli na ngai, elobi Yehova, mpe mosaleli na ngai oyo naponi, mpo bóyeba mpe bóndima, mpe bósosola ete ezali ngai. Liboso na ngai Nzambe mosusu asalemaki te mpe mosusu akozala nsima na ngai te. Ngai, ngai nazali Yehova, mpe mobikisi mosusu azali te, bobele ngai.”​—Yisaya 43:10, 11, Crampon (1905).

Yehova Nzambe azalaki na batatoli awa na mabele na boumeli ya bankóto ya bambula liboso Klisto abotama. Nsima ya kotánga nkombo ya basusu kati na mibali yango ya kondima na Baebele mokapo 11, Baebele mokapo 12:1 elobi ete: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tólongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso tópota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso.” Yesu alobaki liboso ya Ponto Pilata ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” Yesu abengami “motatoli ya sembo mpe ya solo.” (Yoane 18:37; Emoniseli 3:14) Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.”​—Misala 1:8.

Yango wana, lelo oyo bato soki milio 6 kati na mikili koleka 230, oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova oyo Klisto azali koyangela, bandimi ete babongi mpenza komibenga Batatoli ya Yehova.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na kati ya mwa buku oyo, soki liyebisi ezali te mikapo nyonso euti na Biblia ya Lingala haut-fleuve, 1970, na ekomeli ya mikolo oyo. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Bamipesi na Nzambe mpo na kosala mokano na ye

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Bandimi ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Ntembe oyo bato bazali kotya mpo na nkombo yango ezali lokola likambo oyo bazali kosambisa na tribinale moko monene

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Batatoli bazali soki milio 6 na mikili koleka 230

[Elilingi na lokasa 3]

Balingi yo

[Elilingi na lokasa 4]

Nkombo ya Nzambe na Liebele ya kala

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto