Nsango malamu oyo balingi koyebisa yo
NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, mokolo moko bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe batunaki ye ete: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” Yesu ayanolaki bango ete bikólo ekobundisa bikólo mosusu, nzala ekozala, maladi, koningana ya mabele, bato bakotosa lisusu mibeko te, mangomba ya lokuta ekobima mingi mpe bakokosa bato mingi, bato bakoyina bayekoli na ye ya solo mpe bakonyokola bango, mpe bato mingi bakolinga lisusu kozala sembo te. Ntango makambo wana ekobanda kosalema, yango ekomonisa kozala ya Klisto kasi akomonana na miso ya bato te mpe ekomonisa ete Bokonzi ya likoló ekómi pene. Yango ezali mpenza nsango—nsango malamu! Yango wana, Yesu abakisaki likambo mosusu mpo na komonisa elembo ya kozala na ye, alobaki ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:3-14, NW.
Makambo oyo ezali kobima na mokili ezali mpenza mabe, kasi ndimbola na yango ezali mpenza nsango malamu, elingi koloba, kozala ya Klisto. Makambo oyo touti kolobela ebandaki mpenza komonana na 1914, mobu oyo bato mingi bayebi yango! Ntango ya Bapakano esukaki na mobu yango mpe kobanda na ntango wana eleko oyo bato bazalaki koyangela esukaki mpe Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto ebandaki.
Nzembo 110, Nz 110 vɛrsɛ 1 mpe 2 mpe Emoniseli 12:7-12, emonisi ete ntango esengeli koleka banda boyangeli ya bato ekosuki mpe boyangeli ya Klisto ekobanda koyangela. Mikapo yango emonisi ete Klisto akofanda na likoló, na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe kino ntango akokóma Mokonzi. Na ntango yango etumba ekosalema na likoló mpe bakobwaka Satana na mabele, akomema mawa na mabele, mpe Klisto akoyangela na kati ya banguna na ye. Makambo nyonso ya mabe ekosuka na “bolɔzi monene,” oyo ekokóma ndongo na etumba ya Armagedon mpe na nsima Boyangeli ya kimya ya Mbula Nkóto ya Klisto ekobanda.—Matai 24:21, 33, 34; Emoniseli 16:14-16.
Biblia elobi ete: “Yebá makambo oyo: mikolo ya nsuka ekozala ntango ya mpasi. Na mikolo yango bato bakozala boye: miyimi, bato ya lokoso ya mbongo, bakokóma lofundo mpe lolendo, bakotiyola Nzambe, bakoboya kotosa baboti na bango, bakoyeba kotɔnda te, bakolanda makambo ya Nzambe te, bakozala na nko mingi, bakoyokela bato mawa te, bakokosela baninga makambo, bakotomboka mpe bakongala, bakoyina makambo ya malamu; bakoteka baninga, bakosilika noki mpe bakovimba na lofundu. Bakolinga bobele bisengo ya mokili, kasi Nzambe te. Bakomilakisa lokola bato ya Nzambe, kasi bakoboya nguya na ye ya solo. Kimá bato ya ndenge wana.”—2 Timoteo 3:1-5, Boyokani ya Sika.
Bato mosusu bakoki koloba ete makambo oyo nyonso esi esalemá na ntango ya kala, kasi mpo na koloba solo, makambo yango esalemá naino te ndenge ezali kosalema sikoyo. Bato oyo bakomaka makambo ya kala mpe baoyo balimbolaka makambo oyo ezali koleka na mokili, balobi ete makambo oyo ezali komonana na mabele banda 1914, emonanaki naino bongo te liboso. (Talá lokasa 7.) Makambo ya mpasi ekómi makasi koleka bileko mosusu nyonso liboso. Na yango, mpo na makambo mosusu ya elembo oyo Klisto apesaki mpo na mikolo ya nsuka, esengeli mpe kotalela makambo oyo: Kozala ya Klisto mpe Bokonzi na ye oyo esi etyami, ezali kosakolama na mokili mobimba ndenge esalemaki naino liboso te. Minyoko oyo ezali kobima mpo na mosala ya kosakola emonanaki naino makasi boye te lokola oyo Batatoli ya Yehova bazali kozwa. Mingi kati na bango babomamaki na bakaa ya bakangami na bokonzi ya Banazi. Kino lelo oyo, mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova epekisami na bisika mosusu, mpe na bisika mosusu bazali kokanga bango, kokɔtisa bango na bolɔkɔ, konyokola bango, mpe koboma bango. Nyonso wana ezali na kati ya elembo oyo Yesu apesaki.
Lokola esakolamaki na Emoniseli 11:18, ‘mabota basilikelaki’ Batatoli ya sembo ya Yehova, mpe yango emonisi ete “nkanda” ya Yehova ekopela likoló na mabota yango. Vɛrsɛ yango elobi lisusu ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ Kobanda kala naino bato babebisá mabele te na ndenge bazali kosala yango lelo, mpe mabele ekómi na likama ete bikelamu ya bomoi ezala lisusu te. Nzokande, lelo oyo likama yango esili naino te! Ebele ya bato ya siansi bazali kokebisa ete soki moto atiki kobebisa mabele te, mabele ekozala lisusu esika malamu te mpo na bato. Kasi Yehova “asalaki mabele mpo bato báfanda wana,” mpe akolongola baoyo bazali kobebisa yango liboso ete bábebisa yango nyonso.—Yisaya 45:18.
MAPAMBOLI AWA NA MABELE NA NSE YA BOKONZI YA NZAMBE
Bato mingi oyo bandimaka Biblia kasi bakanisaka ete bato malamu nyonso bazali na likoló, bakamwaka ntango bayokaka ete bato bakozala na bomoi awa na mabele na ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Biblia ezali komonisa ete kaka mwa bato moke nde bakokenda na likoló mpe baoyo bakofanda libela awa na mabele bakozala ebele mpe motángo na bango eyebani te. (Nzembo 37:11, 29; Emoniseli 7:9; 14:1-5) Esakweli moko ya Biblia, na mokanda ya Danyele, emonisi ete Bokonzi ya Nzambe oyo apesi na Klisto, ekozala mpo na mabele mobimba mpe ekoyangela yango.
Na esakweli yango, Bokonzi ya Klisto emonisami lokola libanga moko euti na boyangeli ya Yehova oyo ezali lokola ngomba. Libanga yango etuti mpe epanzi ekeko moko oyo ezali komonisa nguya ya mokili mobimba, mpe ‘libanga etutaki elilingi ekómaki [ngomba] monene, mpe etondisaki mokili mobimba.’ Esakweli yango elobi lisusu ete: “Na mikolo na mikonzi yango Nzambe na lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:34, 35, 44.
Batatoli ya Yehova balingi kosolola na yo mpo na koyebisa yo Bokonzi yango mpe elikya oyo Makomami ezali kopesa mpo na bomoi ya seko na mabele oyo ekokóma pɛto mpe kitoko. Bamilio ya bato oyo bazali lelo na bomoi, bakisa mpe bamilio mosusu oyo bakufá, bakozwa libaku ya kofanda na mabele libela na libela. Na ntango wana, na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto Yesu, mokano oyo Yehova azalaki na yango na ebandeli ntango asalaki mabele mpe atyaki babalani ya liboso, ekokokisama. Bato oyo bakofanda na Paladiso bakolɛmba bomoi soki moke te. Lokola Nzambe apesaki Adama mosala ya kosala na kati ya elanga ya Edene, ndenge moko mpe bato bakozala na misala mingi ya kobatela mabele, milona mpe banyama kati na paladiso. Bato “bakosepela mpenzampenza na misala ya mabɔkɔ na bango.”—Yisaya 65:22, NW; Genese 2:15.
Mikapo mingi na kati ya Makomami ezali komonisa ndenge bomoi ekozala ntango makambo oyo Yesu alobelaki na libondeli ekokokisama: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema na nse [lokola, NW] na likoló.” (Matai 6:10) Kasi, sikawa talá maloba oyo: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete, Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka. Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete, Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika. Alobi mpe ete, Komá ete maloba oyo mazali sembo, na solo.”—Emoniseli 21:3-5.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
“Ntango ya mpasi” MPE “bongo nsuka ekoya”
[Elilingi na lokasa 18]
Pays-Bas
[Elilingi na lokasa 18]
Nigeria