Babongisi mosala na bango mpo na kosala yango na mokili mobimba
MPO na kotambwisa malamumalamu mosala ya kosakola na mikili koleka 230 epai yango ezali kosalema, makambo mosusu mingi esengeli mpe kosalema. Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo ezali na Brooklyn, na New York (États-Unis) epai biro monene ya Batatoli ya Yehova ezali, nde ezali kotambwisa mosala yango. Mbula na mbula, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaka bamonisi na bisika ndenge na ndenge na mokili mobimba mpo na kosolola na bandeko oyo bazali kotambwisa misala na bafiliale na bisika yango. Bafiliale nyonso ezali na Komite ya Filiale oyo ezalaka na bandeko kobanda misato kino nsambo, mpo na kotambwisa mosala oyo ezali kosalema na bamboka oyo filiale na bango ezali kotalela. Bafiliale mosusu ezali na bandako ya konyata mikanda, mpe bandako yango mosusu ya konyata mikanda ezali ya minene mpe enyataka mikanda mingi mbala moko. Ekólo to teritware oyo filiale mokomoko ezali kotalela ekabolami na bitúká, mpe bitúká ekabolami na bazongazonga. Zongazonga mokomoko ezali na masangá soki 20. Mokɛngɛli ya etúká akendaka kotala bazongazonga nyonso oyo ezali na kati ya etúká oyo azali kotalela. Zongazonga mokomoko esalaka mayangani mibale na mbula moko. Mbala mibale na mbula moko, mokɛngɛli ya zongazonga akendaka kotala lisangá mokomoko oyo ezali na zongazonga oyo azali kotalela. Mokɛngɛli ya zongazonga asalisaka Batatoli mpo na kobongisa mosala ya kosakola mpe kosakola na teritware oyo epesami na lisangá na bango.
Lisangá ezalaka na Ndako ya Bokonzi oyo ezali esika ya koteya nsango malamu na mboka oyo ofandi. Teritware oyo epesami na lisangá mokomoko ekabolami na bateritware ya mikemike. Motatoli mokomoko azali na teritware na ye ya moke oyo lisangá epesi ye mpe asalaka makasi mpo na kotala bato ndako na ndako mpe kosolola na bango. Lisangá mokomoko ezalaka na Batatoli mwa mingi, bakoki kokóma soki 200, mpe ezali na bankulutu oyo bazali kokokisa mikumba ndenge na ndenge. Mosakoli mokomoko ya nsango malamu azali na ntina na kati ya ebongiseli ya Batatoli ya Yehova. Batatoli nyonso, ezala baoyo basalaka na biro monene, na bafiliale, to na lisangá, basalaka mosala ya kosakola mpe ya koyebisa bato mosusu Bokonzi ya Nzambe.
Balapolo oyo basakoli bapesaka mpo na mosala na bango ya kosakola ekómaka kino na biro monene, basangisaka yango mpe babimisaka yango na Annuaire. Mbula na mbula, etanda moko ya balapolo yango ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nimero ya 1 Yanuali. Mikanda yango mibale elobelaka mbula na mbula lapolo mobimba ya mosala ya kosakola nkombo ya Yehova mpe Bokonzi na ye oyo Klisto Yesu azali koyangela. Na bambula oyo euti koleka, bato soki milio 14, Batatoli na bato oyo basepelaka na solo, bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu mbula na mbula. Batatoli ya Yehova basalaki ngonga koleka miliare 1 na mbula mpo na kosakola nsango malamu mpe bato ya sika koleka 300 000 bazwaki batisimo. Bakabolaki bankama ya bamilio ya mikanda.