Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-2 mok. 14 nk. 194-214
  • Yehova atomboli mosaleli na ye Masiya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova atomboli mosaleli na ye Masiya
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mosaleli na ngai”—Ezali nani?
  • ‘Batali ye na kokamwa’
  • Nani akondima nsango malamu oyo?
  • ‘Atyolamaki mpe aboyamaki na bato’
  • ‘Batɔbɔli ye mpo na bikweli na biso’
  • ‘Atikaki bányokola ye’
  • ‘Yehova asepeli kotuta ye’
  • Bisakweli oyo elobelaki Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Moombo ya Yehova “azokisami mpo na masumu na biso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masiya
    Lamuká!—2015
  • Talá! Moombo oyo Yehova asepeli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
ip-2 mok. 14 nk. 194-214

Mokapo ya Zomi na Minei

Yehova atomboli mosaleli na ye Masiya

Yisaya 52:13–53:12

1, 2. (a) Pesá ndakisa oyo ekomonisa likambo oyo Bayuda mingi bakutanaki na yango na ebandeli ya ekeke ya liboso T.B.? (b) Eloko nini Yehova asalaki mpo na kosalisa Bayuda ya sembo báyeba Masiya?

KANISÁ ete osengeli kokutana na mokonzi moko monene. Oyebi ntango mpe esika oyo okokutana na ye. Kasi, likambo ya mpasi yango oyo: Oyebi te soki azali ndenge nini; mpe koya na ye ekozala na ndenge ya nkuku, akobenda likebi ya bato te. Ndenge nini okoyeba ye? Soki ozali na mokanda oyo elobeli ndenge azali, yango ekosalisa yo mpenza.

2 Na ebandeli ya ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.), Bayuda mingi bakutanaki na likambo ya ndenge wana. Bazalaki kozela Masiya, moto oyo aleki bato nyonso awa na mabelé. (Danyele 9:24-27; Luka 3:15) Kasi ndenge nini Bayuda ya sembo bakokaki koyeba ye? Na nzela ya basakoli Baebele, Yehova akomisaki na mikanda makambo oyo etalaki Masiya, mpo bato ya bososoli báyeba mpenza ye malamumalamu.

3. Makambo nini oyo etali Masiya ekomami na Yisaya 52:13–53:12?

3 Kati na bisakweli ya Liebele oyo etali Masiya, mbala mosusu moko te ezali kopesa likanisi ya polele koleka oyo ekomami na Yisaya 52:13–53:12. Mbula 700 liboso, Yisaya alobeli nzoto ya Masiya te, kasi makambo mosusu oyo eleki ntina, na ndakisa ntina mpe ndenge ya mpasi na ye, makambo mingi oyo etali kobomama na ye, kokundama na ye mpe kotombolama na ye. Soki totaleli esakweli oyo mpe kokokisama na yango, mitema na biso ekolendisama mpe kondima na biso ekokóma makasi.

“Mosaleli na ngai”—Ezali nani?

4. Bayuda mosusu ya mayele bapesaki makanisi nini mpo na koyeba “mosaleli,” kasi mpo na nini yango eyokani te na esakweli ya Yisaya?

4 Yisaya auti kolobela kosikolama ya Bayuda na boombo na Babilone. Sikoyo aleki na likambo moko ya ntina mingi oyo ekosalema nsima, akomi maloba ya Yehova boye: ‘Talá mosaleli na ngai akosala na bososoli; akokumisama mpe akotombolama, akozala likoló mingi.’ (Yisaya 52:13) Kasi “mosaleli” yango ezali nani? Na boumeli ya bikeke mingi, bato ya mayele ya Bayuda bapesaki makanisi ndenge na ndenge. Basusu balobaki ete ezali ekólo mobimba ya Yisalaele na ntango oyo yango ezalaki na boombo na Babilone. Kasi ndimbola wana eyokani te na makambo oyo ezali na esakweli. Mosaleli ya Nzambe andimi ye moko komona mpasi. Atako azali na likambo te, andimi konyokwama mpo na masumu ya bato mosusu. Yango ekoki soki moke te kolobelama mpo na ekólo ya Bayuda, oyo ekendeki na boombo mpo na masumu na yango. (2 Mikonzi 21:11-15; Yilimia 25:8-11) Ezali mpe na bato oyo balobaki ete Mosaleli yango ezali etuluku moko ya bato oyo bamipesá na Nzambe kati na Yisalaele mpe ete bango banyokwamaki mpo na bolamu ya Bayisalaele oyo bazalaki basumuki. Nzokande, na ntango ya mpasi oyo ekwelaki Yisalaele, ezali na etuluku moko te boye oyo enyokwamaki mpo na mosusu.

5. (a) Bayuda mosusu ya mayele balimbolaki esakweli ya Yisaya ndenge nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.) (b) Ndenge nini mokanda ya Misala emonisi polele Mosaleli yango?

5 Liboso losambo ya boklisto ebanda mpe na bikeke ya ebandeli na ntango na biso, mwa ndambo moke ya bato mosusu ya mayele ya Bayuda basalelaki esakweli yango mpo na Masiya. Makomami ya Grɛki ya boklisto emonisi ete wana nde ndimbola mpenza ya malamu. Mokanda ya Misala emonisi ete ntango mokube moko Moetiopia alobaki ete ayebi te nani azali Mosaleli oyo esakweli ya Yisaya elobeli, Filipo “asakolaki epai na ye nsango malamu oyo etali Yesu.” (Misala 8:26-40; Yisaya 53:7, 8) Mikanda mosusu ya Biblia ezali mpe komonisa ete Yesu Klisto azali Masiya, Mosaleli oyo esakweli ya Yisaya elobeli.a Wana tozali kotalela esakweli oyo, tokomona polele bokokani oyo ezali kati na ye oyo Yehova abengi “mosaleli na ngai” mpe Yesu ya Nazarete.

6. Ndenge nini esakweli ya Yisaya emonisi ete Masiya akolonga mpenza kokokisa mokano ya Nzambe?

6 Esakweli ebandi na komonisa ete nsukansuka Masiya akokokisa mpenza mokano ya Nzambe. Liloba “mosaleli” emonisi ete akotosa mokano ya Nzambe, ndenge mosaleli atosaka mokano ya nkolo na ye. Na ndenge yango, “akosala na bososoli.” Bososoli ezali makoki ya kotalela malamumalamu likambo moko. Kosala na bososoli elingi koloba kosala makambo na ndenge ya bwanya mpenza. Mpo na verbe ya Liebele oyo basaleli awa, buku moko elobi boye: “Ezali kopesa likanisi ya kozala na bokɛngi mpe kosala makambo na bwanya. Ye oyo akosala na ndenge ya bwanya akolonga mpe.” Likambo oyo ete Masiya akolonga mpenza emonani na oyo esakweli yango elobi ete “akotombolama mpe akozala likoló mingi.”

7. Ndenge nini Yesu Klisto ‘asalaki na bososoli,’ mpe ndenge nini “atombolamaki mpe azalaki likoló mingi”?

7 Yesu ‘asalaki na bososoli,’ amonisaki ete akangaki ntina ya bisakweli ya Biblia oyo etalaki ye mpe azalaki kotika yango etambwisa ye mpo na kosala mokano ya Tata na ye. (Yoane 17:4; 19:30) Yango epesaki litomba nini? Nsima ya lisekwa ya Yesu mpe komata na ye na likoló, “Nzambe atombolaki ye na esika moko ya likoló mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo ezali likoló ya nkombo mosusu nyonso.” (Bafilipi 2:9; Misala 2:34-36) Na nsima, na 1914, Yesu, oyo akumisami, atombwamaki kutu lisusu koleka. Yehova atombolaki ye kino atyaki ye na kiti ya Bokonzi ya Masiya. (Emoniseli 12:1-5) Ya solo, “atombolamaki mpe azalaki likoló mingi.”

‘Batali ye na kokamwa’

8, 9. Ntango Yesu oyo atombolami akoya mpo na kopesa etumbu, bakonzi ya mabelé bakosala nini, mpe mpo na nini?

8 Bikólo mpe bakonzi na yango bakosala nini liboso ya Masiya oyo atombolami? Soki totiki mwa moke makambo oyo ezali na parantɛzɛ na eteni ya mibale ya vɛrsɛ 14, esakweli elobi boye: ‘Lokola mingi bakamwaki mpo na ye; boye akokamwisa mabota mingi; bakonzi bakokanga minɔkɔ na bango mpo na ye. Zambi oyo eyebisamelaki bango liboso te, bakomona yango, mpe oyo eyokaki bango liboso te, bakobanzabanza yango.’ (Yisaya 52:14a, 15) Maloba oyo ya Yisaya ezali komonisa te ntango ya ebandeli oyo Masiya amonanaki, kasi nde etumba oyo akobunda na nsuka na bakonzi ya mabelé.

9 Ntango Yesu oyo atombolami akoya kopesa etumbu na ebongiseli ya makambo ya lelo, oyo ezali kotyola Nzambe, bakonzi ya mabelé ‘bakotala ye na kokamwa.’ Ezali solo ete bakonzi ya mabelé bakomona mpenza na miso te Yesu oyo akumisami. Kasi bakomona nde bilembo ya nguya na ye polele ete azali Mobundi ya likoló oyo azali kobunda na nkombo ya Yehova. (Matai 24:30) Ekosɛnga bátya likebi na makambo oyo bakonzi ya mangomba bayebisaki naino bango te, ete Yesu azali moto oyo Nzambe aponi mpo na kokokisa bikateli na ye! Mosaleli atombolami oyo bakondongwana na ye akosala makambo na ndenge oyo bazali kokanisa te.

10, 11. Na ndenge nini tokoki koloba ete elongi ya Yesu ebebisamaki na ekeke ya liboso, mpe ndenge nini yango ebebisami lelo oyo?

10 Na parantɛzɛ oyo ezali na vɛrsɛ 14, Yisaya alobi boye: “Elongi na ye ebebisami koleka lolenge ya bato; mpe motindo na ye koleka yango ya bana na bato.” (Yisaya 52:14b) Elongi ya Yesu ezalaki mabe? Te. Atako Biblia elobi eloko te mpo na ndenge nzoto ya Yesu ezalaki, ntembe ezali te ete nzoto mpe elongi ya Mwana ya kokoka ya Nzambe ezalaki kitoko. Ezali polele ete, maloba ya Yisaya etali kosambwisa oyo basambwisaki Yesu. Na mpiko nyonso, atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye polele ete bazali bakosi, babuki ya lokuta, mpe babomi; nzokande bango bafingaki ye. (1 Petelo 2:22, 23) Bafundaki ye ete azali kobuka mibeko, kotuka, kokosa, mpe kotinda bato bátombokela bakonzi ya Loma. Na ndenge yango, bafundi wana ya lokuta bamonisaki Yesu na ndenge ya mabe mpenza.

11 Ata lelo oyo mpe bato bazali kaka kokoba komonisa Yesu na ndenge ya mabe. Mpo na bato mingi Yesu azali mwana moke oyo alali na elyelo ya nyama, to moto oyo babaki na ekulusu na ndenge moko ya nsɔmɔ, oyo elongi na ye ebebi na mpasi, na motole ya nzubɛ na motó. Bakonzi ya mangomba ya boklisto nde bazali kolendisa makanisi yango. Balongi te komonisa ete Yesu azali Mokonzi moko ya nguya oyo azali na likoló, mpe oyo bikólo basengeli kozongisa monɔkɔ epai na ye. Ntango bakonzi ya mabelé bakondongwana na Yesu mosika te na mikolo ezali koya, bakokutana nde na Masiya oyo ‘bokonzi nyonso epesameli ye na likoló mpe na mabelé’!—Matai 28:18.

Nani akondima nsango malamu oyo?

12. Mituna nini ya kobenda likebi maloba ya Yisaya 53:1 ebimisi?

12 Na nsima ya kolobela na ndenge ya kokamwa mbongwana oyo esalemi epai ya Masiya—alongwi moto ‘oyo elongi na ye ebebisami’ mpe akómi moto oyo ‘atombolami mingi’—Yisaya atuni boye: ‘Nani andimi likambo yango oyo toyokaki? Lobɔkɔ ya Yehova emonisami epai ya nani?’ (Yisaya 53:1) Maloba wana ya Yisaya ezali kobimisa mituna oyo ezali kobenda likebi: Esakweli wana ekokokisama? “Lobɔkɔ ya Yehova,” to makambo oyo nguya na ye ekosala, ekomonisama mpe ekosala ete maloba oyo ekokisama?

13. Ndenge nini Paulo amonisaki ete esakweli ya Yisaya ekokisamaki epai ya Yesu, mpe bato bamonisaki ezaleli nini?

13 Na ntembe te, eyano ezali ɛɛ! Na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Loma, Paulo atángi maloba ya Yisaya mpo na komonisa ete esakweli oyo Yisaya ayokaki mpe akomaki ekokisamaki epai ya Yesu. Nkembo monene oyo Yesu azwaki nsima ya konyokwama mingi awa na mabelé ezalaki nsango malamu. Paulo alobi mpo na Bayuda oyo bazangaki kondima ete: “Atako bongo, bango nyonso batosaki te nsango malamu. Mpo Yisaya azali koloba ete: ‘Yehova, nani andimaki likambo oyo eyokamaki epai na biso?’ Boye kondima eutaka na likambo oyo eyokami. Mpe likambo oyo eyokami eyaka na nzela ya liloba oyo etali Klisto.” (Baloma 10:16, 17) Nzokande, likambo ya mawa, na mikolo ya Paulo, kaka bato moke nde bandimaki nsango malamu etali Mosaleli ya Nzambe. Mpo na nini?

14, 15. Bomoi ya Masiya awa na mabelé ebandaki na makambo ya ndenge nini?

14 Na nsima, esakweli yango eyebisi Bayisalaele ntina ya mituna oyo ezali na vɛrsɛ 1, mpe na ndenge yango, emonisi polele mpo na nini bato mingi bakondima Masiya te: “Akolaki liboso na ye lokola mwa etape, mpe lokola mosisa longwa na mabelé makauki. Azalaki na lolenge malamu te [“moto moko monene te,” NW] to na kitoko te [“moto moko ya lokumu te,” NW] ete tótala epai na ye, mpe na bonzenga te ete tólinga ye.” (Yisaya 53:2) Awa nde bayebisi biso ndenge nini Masiya akozala ntango akoya na mabelé. Akobanda moke, mpe na miso ya baoyo bazali kotala ye akokóma mpenza te moto monene. Lisusu, akozala kaka lokola etape mpamba, mwa nsɔngɛ ya nzete ya pɛtɛpɛtɛ oyo ezali kokola likoló ya ekumu to ya etape ya nzete moko. Azali mpe lokola mosisa ya nzete na mabelé makauki mpe ya malamu te, mosisa oyo ekobika kaka na mai. Akoya te na lokumu mpe nkembo oyo ebongi na mokonzi, akozala na elamba ya mokonzi te mpe akozala te na bikɔti ya bokonzi oyo ezali kongɛnga. Nzokande, ebandeli na ye emonisaki ete azali moto ya komikitisa mpe ya lofundo te.

15 Maloba oyo emonisi ete ntango Yesu abandaki bomoi na ye awa na mabelé azalaki moto monene te! Maria, ngɔndɔ Moyuda, abotaki ye na esika babɔkɔlaka nyama na engumba moko moke na nkombo Beteleme.b (Luka 2:7; Yoane 7:42) Maria ná mobali na ye, Yozefe, bazalaki babola. Mikolo soki 40 nsima ya kobotama ya Yesu, bapesaki mbeka ya masumu oyo mobeko esɛngaki babola, “bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya bibenga.” (Luka 2:24; Levitike 12:6-8) Na nsima, Maria ná Yozefe bakendeki kofanda na Nazarete, esika Yesu akolaki na libota moko ya bana mingi, mpe emonani ete bazalaki na bozwi mpenza te.—Matai 13:55, 56.

16. Ndenge nini emonanaki ete Yesu azalaki te “moto moko monene” to “moto moko ya lokumu”?

16 Emonani lokola nde, na bomoi ya Yesu lokola moto, misisa na ye ezalaki na mabelé ya malamu te. (Yoane 1:46; 7:41, 52) Atako azalaki moto ya kokoka mpe mokitani ya Mokonzi Davidi, bomoi na ye na libota moko ya bobola epesaki ye nzela te ya komonana lokola “moto moko monene” to “moto moko ya lokumu,” mpenzampenza na miso ya baoyo bazalaki kozela ete Masiya auta na libota ya bato minene. Lokola balendisamaki na bakonzi ya mangomba ya Bayuda, bato mingi batyelaki ye likebi te mpe batyolaki ye. Nsukansuka, ebele ya bato bamonaki eloko moko te ya malonga epai ya Mwana ya Nzambe, atako azalaki moto ya kokoka.—Matai 27:11-26.

‘Atyolamaki mpe aboyamaki na bato’

17. (a) Yisaya abandi kolobela nini, mpe mpo na nini akomi likambo yango lokola nde esalemá? (b) Banani oyo ‘batyolaki’ mpe ‘baboyaki’ Yesu, mpe ndenge nini basalaki yango?

17 Sikoyo Yisaya abandi kolobela polele ndenge bato bakotalela Masiya mpe ndenge bakosala ye: ‘Atyolamaki mpe aboyamaki na bato, moto ya bampasi mpe oyo amesanaki na maladi; mpe lokola moto oyo bato babombeli ye bilongi na bango, atyolamaki mpe tomonaki ye moto mpamba.’ (Yisaya 53:3) Yisaya akomi likambo yango lokola nde esalemá, mpamba te ayebaki ete maloba na ye ekokokisama solo. Bato batyolaki mpe baboyaki solo Yesu Klisto? Ɛɛ, ezali bongo! Bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bayengebene na miso na bango moko mpe bato oyo bazalaki kolanda bango batalaki ye lokola moto mpamba mpenza koleka. Babengaki ye moninga ya bakɔngɔli mpako mpe ya basi ya ndumba. (Luka 7:34, 37-39) Babwakelaki ye nsoi na elongi. Babɛtaki ye mbata mpe bafingaki ye. Basɛkaki ye mpe bawololaki ye. (Matai 26:67) Lokola batindamaki na bato oyo bazalaki kosepela na solo te, ‘bato ya ekólo mpenza ya Yesu bayambaki ye te.’—Yoane 1:10, 11.

18. Lokola Yesu abɛlaki ata mokolo moko te, ndenge nini azalaki ‘moto ya bampasi mpe oyo ameseni na maladi’?

18 Yesu, moto ya kokoka, azalaki kobɛla te. Nzokande, azalaki ‘moto ya bampasi mpe oyo ameseni na maladi.’ Bampasi mpe maladi wana ezalaki ya ye te. Yesu autaki na likoló mpe akɔtaki na mokili oyo etondi na maladi. Azalaki kofanda na esika minyoko mpe bampasi ezalaki, kasi akimaki te bato oyo bazalaki kobɛla, na nzoto to na elimo. Lokola monganga oyo azali kosalisa bato ya maladi, amesanaki mpenza na bampasi ya bato oyo bazalaki penepene na ye. Lisusu, azalaki na makoki ya kosala makambo oyo minganga bakokaka te kosala.—Luka 5:27-32.

19. Elongi ya nani ‘ebombamaki’ mpe ndenge nini banguna ya Yesu balakisaki ete ‘bamonaki ye moto mpamba’?

19 Nzokande, banguna ya Yesu bamonaki ye lokola moto oyo azali kobɛla mpe baboyaki kotyela ye likebi. Elongi na ye ‘ebombamaki’ mpo bato bámona yango te, kasi ezalaki ye te nde abombelaki bato elongi na ye. Bible na Lingala ya lelo oyo ebongoli Yisaya 53:3 boye: “Moto oyo balingaka komona na miso té.” Banguna ya Yesu bazalaki koyokela ye nkanda makasi, kutu bazalaki kolinga kotala ye te lokola nde azalaki mpenza eloko ya bosɔtɔ oyo ebongaki te kotala. Na miso na bango motuya na ye elekaki oyo ya moombo te. (Exode 21:32; Matai 26:14-16) Balingaki Balabasi mingi koleka ye atako Balabasi azalaki mobomi-bato. (Luka 23:18-25) Ezali na eloko mosusu te oyo bakokaki kosala mpo na komonisa ete bamonaki mpenza Yesu moto mpamba!

20. Maloba ya Yisaya ezali kopesa libɔndisi nini epai ya basaleli ya Yehova lelo?

20 Basaleli ya Yehova na mikolo na biso bakoki kozwa libɔndisi mingi na maloba ya Yisaya. Na bantango mosusu, banguna bakoki kotyola basambeli ya sembo ya Yehova to komona bango lokola bato mpamba. Kasi, kaka ndenge ezalaki mpo na Yesu, likambo oyo eleki mpenza ntina ezali lolenge oyo Yehova Nzambe azali kotalela biso. Kutu, ata soki bato ‘bamonaki Yesu moto mpamba,’ yango ekitisi soki moke te motuya monene oyo azali na yango na miso ya Nzambe!

‘Batɔbɔli ye mpo na bikweli na biso’

21, 22. (a) Masiya akumbaki nini mpe amemaki nini mpo na bolamu ya bato? (b) Ndenge nini bato mingi bazalaki kotalela Masiya, mpe ndenge nini mpasi na ye ekómaki makasi koleka?

21 Ntina nini Masiya asengelaki konyokwama mpe kokufa? Yisaya ayebisi yango: ‘Solo akumbi maladi na biso mpe amemi bampasi na biso; nde totángi ete apesameli etumbu ete abɛtami na Nzambe mpe anyokolami. Kasi batɔbɔli ye mpo na bikweli na biso, batuti ye mpo na mabunga na biso; etumbu oyo eyeiseli biso kimya etyami epai na ye, mpe na bampota na ye, biso tobikisami. Biso nyonso, totelengani lokola bampate; tobongwani moto na moto na nzela na ye moko; mpe Yehova atyeli ye libunga na biso nyonso.’—Yisaya 53:4-6.

22 Masiya akumbaki bamaladi ya bato mpe amemaki bampasi na bango. Na maloba mosusu, alongolelaki bango kilo oyo bazalaki na yango, mpe atyaki yango na mapeka na ye, mpe amemaki yango. Mpe lokola maladi ná mpasi euti na lisumu ya bato, Masiya amemaki nde masumu ya bato. Bato mingi bakangaki te ntina ya mpasi na ye mpe bakanisaki ete Nzambe nde apesaki ye etumbu, abɛtaki ye na maladi moko ya nsɔmɔ.c Mpasi ya Masiya ekómaki makasi ntango batɔbɔli ye, batuti ye, mpe bazokisi ye—maloba ya makasi oyo ezali komonisa liwa moko ya mabe mpe ya mpasi. Kasi, liwa na ye ezali na nguya ya kolongola masumu; ezali kopesa likoki ya kosomba baoyo babungaki na kati ya mabe mpe masumu, kosalisa bango bázala na kimya elongo na Nzambe.

23. Ndenge nini Yesu amemaki bampasi ya bato?

23 Ndenge nini Yesu amemaki bampasi ya bato? Evanzile ya Matai, ntango etángi Yisaya 53:4, elobi boye: “Bamemelaki ye bato mingi oyo bazalaki na bademo; mpe abimisaki bilimo yango na liloba moko, mpe abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te; mpo ete oyo elobamaki na nzela ya Yisaya mosakoli ekokisama, ete: ‘Ye moko akamataki bamaladi na biso mpe amemaki bampasi na biso.’” (Matai 8:16, 17) Ntango Yesu abikisaki baoyo nyonso bayaki epai na ye na bamaladi ndenge na ndenge, amemaki mpenza bampasi na bango na motó na ye. Mpe azalaki kosalela makasi na ye mpo na kobikisa bato. (Luka 8:43-48) Makoki na ye ya kobikisa maladi ya ndenge nyonso—na nzoto mpe na elimo—emonisi ete azwaki nguya ya kopɛtola bato na masumu.—Matai 9:2-8.

24. (a) Mpo na nini na miso ya bato mingi emonanaki lokola nde Yesu “abɛtamaki” na Nzambe? (b) Mpo na nini Yesu amonaki mpasi mpe akufaki?

24 Nzokande, mpo na bato mingi emonanaki lokola nde Yesu “abɛtamaki” na Nzambe. Kutu, anyokwamaki mpo na bakonzi ya mangomba oyo bato bazalaki komemya mingi. Kasi, tóbosana te ete ata amonaki mpasi ezali te mpo asalaki masumu. Ntoma Petelo alobi boye: “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu. Asalaki lisumu te, mpe lokuta ezwamaki na monɔkɔ na ye te. Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete, mpo tókoka kotika masumu mpe tózala na bomoi ya boyengebene. Mpe ‘mpo na bampota na ye bino bobiki.’” (1 Petelo 2:21, 22, 24) Liboso, tozalaki bato babungi kati na masumu, “lokola bampate, oyo bazali kobunga nzela.” (1 Petelo 2:25) Nzokande, na nzela ya Yesu, Yehova apesaki lisiko mpo na kolongola biso na ezaleli ya masumu. Asalaki ete mabunga na biso “eya epai ya” Yesu, etyama likoló na ye. Yesu moto oyo azalaki na lisumu te andimaki mpenza komona mpasi mpo na masumu na biso. Na liwa ya nsɔni oyo akufaki likoló ya nzete ya mpasi, atako asalaki eloko moko te ya mabe, asalaki ete tózongela boyokani na biso na Nzambe.

‘Atikaki bányokola ye’

25. Ndenge nini toyebi ete Masiya andimaki konyokwama mpe kokufa?

25 Masiya andimaki mpenza konyokwama mpe kokufa? Yisaya alobi boye: ‘Anyokolami mpe anyatami, nde ata bongo azipoli monɔkɔ na ye te. Lokola mwana ya mpate oyo akambami mpo na kobomama, mpe lokola mpate azali nyɛɛ liboso ya bakati ya nsuki na ye, bongo azipoli monɔkɔ na ye te.’ (Yisaya 53:7) Na butu ya nsuka ya bomoi na ye, Yesu azalaki na likoki ya kosɛnga “mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu” mpo na kobatela ye. Kasi alobaki ete: “Bongo, ndenge nini Makomami ekokokisama ete yango esengeli kosalema bongo?” (Matai 26:53, 54) Na esika ya kosala bongo, “mwana-mpate ya Nzambe” asalaki eloko moko te. (Yoane 1:29) Ntango banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló bafundaki ye na lokuta nyonso liboso ya Pilato, Yesu “azongisaki eyano te.” (Matai 27:11-14) Alingaki te koloba likambo moko oyo ekokaki kopekisa kokokisama ya mokano ya Nzambe oyo etali ye. Yesu andimaki kokufa lokola Mwana-mpate oyo akopesama mbeka, ayebaki malamu ete liwa na ye ekosikola bato ya botosi na lisumu, na maladi mpe na liwa.

26. Na ndenge nini banguna ya Yesu batyaki “bipekiseli”?

26 Sikoyo, Yisaya alobi mwa makambo mingi oyo etali minyoko mpe kosambwa ya Masiya. Mosakoli yango akomi boye: ‘Mpo na bipekiseli mpe na kosambisama alongolami; mpe nani akomibanzabanza ata mpo na makambo ya libota na ye? Mpamba te akatami longwa na mokili ya bato ya bomoi. Mpo abɛtami mpo na bikweli ya bato na ngai?’ (Yisaya 53:8) Nsukansuka ntango banguna ya Yesu bakangaki ye, bakonzi wana ya mangomba, oyo bazalaki kotɛmɛla ye, batyaki ‘bipekiseli’ na makambo oyo bazalaki kosalela ye. Yango elingi koloba te ete bapekisaki likunya na bango, kasi bapekisaki nde bosembo, to basalelaki yango te. Na Yisaya 53:8, libongoli ya Septante elobeli “kosambwisama” na esika ya “bipekiseli.” Banguna ya Yesu basambwisaki ye na ndenge baboyaki kosalela ye bosembo ata oyo basalelaka moto oyo abuki mibeko. Basambisaki Yesu na bosembo mpenza te. Ndenge nini?

27. Ntango bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kosambisa Yesu, malako nini balandaki te, mpe na ndenge nini babukaki Mibeko ya Nzambe?

27 Lokola batingamaki na ekateli na bango ya koboma Yesu, bakonzi ya mangomba batosaki ata malako na bango moko te. Balobaka ete, Sanedrina ekokaki kosambisa likambo ya monene oyo etali kopesa etumbu ya liwa na ndako ya nganga-nzambe mokonzi te, kasi kaka na ndako oyo batongá na mabanga bapasoli, oyo ezali na kati ya lopango ya tempelo. Basengelaki kosambisa likambo ya ndenge yango kaka na moi, kasi nsima ya kolala ya moi te. Mpe soki ekosɛnga kopesa etumbu ya liwa, bakoyebisa ekateli yango kaka na mokolo oyo elandi mokolo oyo basambisaki moto yango. Yango wana, basengelaki kosambisa likambo moko te na mokolo oyo ezalaki liboso ya Sabata to ya fɛti moko boye. Ntango basambisaki Yesu, balandaki malako yango ata moke te. (Matai 26:57-68) Likambo ya mabe koleka, bakonzi ya mangomba babukaki mpenza Mibeko ya Nzambe ntango basambisaki likambo yango. Na ndakisa, bafutaki bato kanyaka mpo bákanga Yesu na maloba. (Deteronome 16:19; Luka 22:2-6) Bayokaki bato oyo bazalaki kotatola maloba ya lokuta. (Exode 20:16; Malako 14:55, 56) Mpe bayokanaki mpo na kotika mobomi-bato, na ndenge yango batyaki nyongo ya makila na mitó na bango mpe ya mboka na bango. (Mituya 35:31-34; Deteronome 19:11-13; Luka 23:16-25) Na bongo, ‘basambisaki’ ye mpenza te, batalelaki likambo na bosembo te mpo na kozwa ekateli ya malamu, oyo ezangi koponapona.

28. Makambo nini banguna ya Yesu balukaki te koyeba?

28 Banguna ya Yesu balukaki koyeba soki moto yango oyo bazalaki kosambisa azali mpenza nani? Yisaya atuni motuna ekokani na oyo wana: “Nani akomibanzabanza ata mpo na makambo ya libota na ye?” Liloba “libota” ekoki kolobela bakitani ya moto to mpe bankɔkɔ na ye. Ntango Yesu atɛlɛmaki liboso na Sanedrina, basangani na yango balukaki ata moke te koyeba soki autá wapi, to soki akokisaki masɛngami mpo na kozala Masiya oyo alakamaki. Nzokande, bafundaki ye ete azalaki kotuka mpe bamonaki ete ebongi akufa. (Malako 14:64) Na nsima, Ponsi Pilato, guvɛrnɛrɛ Moloma alɛmbaki mpamba te batyaki ye mpanzi likoló mpe akatelaki Yesu etumbu ete bábaka ye na nzete. (Luka 23:13-25) Yango wana, Yesu ‘akatamaki’ to abomamaki, na katikati ya bomoi na ye, wana azalaki na mbula ntuku misato na misato ná ndambo.

29. Ndenge nini nkunda ya Yesu ezalaki “elongo na bato mabe” mpe “elongo na bato ya bomɛngo”?

29 Mpo na liwa mpe kokundama ya Masiya, Yisaya akomi lisusu boye: ‘Nkunda na ye esalamaki elongo na bato mabe, mpe kufa na ye elongo na bato ya bomɛngo; ata asalaki mabe te mpe kokosa ezalaki na monɔkɔ na ye te.’ (Yisaya 53:9) Ndenge nini Yesu azalaki elongo na bato mabe mpe na bato ya bomɛngo na liwa na ye mpe na kokundama na ye? Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., akufaki likoló na nzete ya mpasi libándá ya bifelo ya Yelusaleme. Lokola babakaki ye na nzete na katikati ya basali na mabe mibale, tokoki koloba ete esika ya kokunda ye ezalaki elongo na bato mabe. (Luka 23:33) Kasi, nsima wana Yesu akufaki, Yozefe, moto moko ya bomɛngo, moto ya mboka Alimatai, akendeki na mpiko epai ya Pilato kosɛnga nzela ya kokitisa nzoto ya Yesu mpe kokunda yango. Elongo na Nikodeme, Yozefe abongisaki nzoto ya Yesu mpo na kokunda yango mpe na nsima atyaki yango na lilita moko ya sika oyo ezalaki ya ye. (Matai 27:57-60; Yoane 19:38-42) Na ndenge yango nde nkunda ya Yesu ezalaki mpe elongo na bato ya bomɛngo.

‘Yehova asepeli kotuta ye’

30. Na ndenge nini Yehova asepelaki kotuta Yesu?

30 Na nsima, Yisaya alobi likambo moko ya kokamwa: ‘Esepelisi Yehova kotuta ye, ye apesi ye maladi; kasi wana ekokaba yo molimo na ye lokola mbeka mpo na mabe, akomona bakitani na ye, akofulisa mikolo na ye. Mokano ya Yehova ekolonga na lobɔkɔ na ye, akomona mbuma ya mpasi na molimo na ye mpe akoyoka malamu. Na boyebi na ye, mosaleli na ngai ya boyengebene akolongisa bato mingi; mpe akokumba mabunga na bango.’ (Yisaya 53:10, 11) Ndenge nini Yehova akokaki kosepela komona mosaleli wana ya sembo kotutama? Ezali polele ete, ezalaki Yehova te nde azalaki konyokola Mwana na ye ya bolingo. Banguna ya Yesu nde bazalaki mpenza na ngambo ya mpasi oyo amonaki. Kasi Yehova atikelaki bango nzela ya konyokola ye bongo. (Yoane 19:11) Na ntina nini? Ya solo, Nzambe ya boboto mpe ya motema mawa ayokaki mpasi na motema na komona Mwana na ye konyokwama. (Yisaya 63:9; Luka 1:77, 78) Ezalaki na likambo moko te oyo Yehova azangaki kosepela na yango epai ya Yesu. Atako bongo, Yehova asepelaki komona ndenge Mwana na ye andimaki konyokwama mpo na kopesa bato mapamboli ebele oyo mpasi na ye elingaki komema.

31. (a) Ndenge nini Yehova atyaki molimo ya Yesu lokola “mbeka mpo na mabe”? (b) Nsima ya mpasi nyonso oyo Yesu anyokwamaki na yango na bomoi na ye ya moto, nini esengelaki mpenza kopesa ye esengo monene?

31 Libosoliboso, Yehova atyaki molimo ya Yesu lokola “mbeka mpo na mabe.” Na yango, ntango Yesu azongaki na likoló, akɔtaki liboso ya Yehova, amemaki motuya ya mbeka ya bomoi na ye ya moto, mpo na kopesa yango lokola mbeka mpo na mabe mpe Yehova andimaki yango na esengo nyonso mpo na bolamu ya bato. (Baebele 9:24; 10:5-14) Na nzela ya mbeka mpo na mabe oyo apesaki, Yesu amizwelaki “bakitani.” Lokola azali “Tata ya seko,” azali na makoki ya kopesa bomoi—bomoi ya seko—epai ya baoyo bazali komonisa kondima na makila oyo ye asopaki. (Yisaya 9:6) Nsima ya mpasi nyonso oyo Yesu anyokwamaki na yango na bomoi na ye ya moto, to molimo, azalaki solo na esengo monene ndenge likoki epesamelaki ye ya kosikola bato na lisumu mpe liwa! Ntembe ezali te, asengelaki kutu kosepela mingi koleka na koyeba ete bosembo na ye epesaki Tata na ye ya likoló makoki ya koyanola na matumoli ya Monguna na Ye, Satana Zabolo.—Masese 27:11.

32. Na nzela ya “boyebi” nini Yesu azali ‘kokómisa bato mingi bayengebene,’ mpe banani yango oyo ye azali kokómisa bayengebene?

32 Bolamu mosusu oyo liwa ya Yesu ememi ezali ete azali kokómisa ‘bato mingi bayengebene,’ ata lelo oyo. Yisaya alobi ete azali kosala bongo na nzela “na boyebi na ye.” Ya solo, wana ezali boyebi oyo Yesu azwaki ntango akómaki moto mpe anyokwamaki, atako asalaki mabe te, mpo na botosi na ye epai ya Nzambe. (Baebele 4:15) Lokola Yesu anyokwamaki kino liwa, akómaki na makoki ya kopesa mbeka oyo esɛngamaki mpo basusu bákóma bayengebene. Banani nde bakoki kokóma na boyengebene yango? Ya liboso, bayekoli na ye bapakolami. Mpo bazali komonisa kondima na mbeka ya Yesu, Yehova azali kotánga bango bayengebene mpe azali kondima bango lokola bana na ye, mpe azali kokómisa bango bato oyo bakozwa libula elongo na Yesu. (Baloma 5:19; 8:16, 17) Na nsima, “ebele ya bato” oyo bazali kati na “bampate mosusu” bazali komonisa kondima na makila ya Yesu mpe bazali kokóma bayengebene mpo na kozala baninga ya Nzambe mpe bakobika na Armagedona.—Emoniseli 7:9; 16:14, 16; Yoane 10:16; Yakobo 2:23, 25.

33, 34. (a) Makambo nini toyekoli na ntina na Yehova oyo ezali kosimba mitema na biso? (b) “Bato mingi” oyo Mosaleli Masiya akozwa “ndambo” elongo na bango ezali banani?

33 Mpo na kosukisa, Yisaya amonisi mbano minene oyo Masiya akozwa: “Bongo nakokabela ye ndambo elongo na bato [mingi], ye mpe akokabola biloko bipunzami na bato makasi elongo. Zambi asopi molimo na ye kino kufa mpe atángami na bapɛngwi elongo. Kasi akumbaki mabe na bato mingi mpe abondelaki mpo na bapɛngwi.”—Yisaya 53:12.

34 Maloba ya nsuka ya eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ezali koteya biso likambo moko oyo ezali kosimba motema na ntina na Yehova: azwaka bato oyo batikalaka sembo epai na ye na motuya mingi. Yango emonani na elaka oyo ete ‘akokabela’ Mosaleli na ye Masiya “ndambo elongo na bato mingi.” Emonani ete maloba oyo euti na momeseno ya kokabola biloko oyo bapunzaki na etumba. Yehova azali kosepela na bosembo ya “bato mingi” ya sembo ya ntango ya kala, lokola Noa, Abalayama, mpe Yobo, mpe abombeli bango “ndambo” ya biloko na mokili ya sika oyo ezali koya. (Baebele 11:13-16) Ndenge moko mpe, akokabela Mosaleli na ye Masiya ndambo ya biloko. Ya solo, Yehova akotika bosembo na ye mpamba te, akopesela yango mbano. Biso mpe tosengeli kondima solo ete Yehova ‘akobosana te mosala na biso mpe bolingo oyo tozali komonisa mpo na nkombo na ye.’—Baebele 6:10.

35. Banani bazali “bato makasi” oyo Yesu azali kokabola elongo na bango biloko oyo epunzami, mpe biloko yango ezali nini?

35 Mosaleli ya Nzambe akozwa lisusu biloko bipunzami na etumba ntango akolonga banguna na ye. Akokabola biloko yango elongo na “bato makasi.” Na kokokisama na yango, banani bazali “bato makasi” yango? Ezali bayekoli ya liboso ya Yesu oyo balongaki mokili lokola ye—bato 144 000 ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Yoane 16:33; Emoniseli 3:21; 14:1) Bongo, biloko oyo epunzami ezali nini? Ya solo, kati na yango totángi “makabo oyo ezali bato” oyo Yesu abɔtɔli na mabɔkɔ ya Satana, mpe apesi bango na lisangá ya boklisto. (Baefese 4:8-12) “Bato makasi” 144 000 bazali mpe kozwa ndambo ya biloko mosusu oyo epunzami. Na ndenge balongi mokili, balongoli epai ya Satana ntina nyonso oyo azali na yango ya kotumola Nzambe. Bokangami makasi na bango epai ya Yehova ezali kokumisa ye mpe ezali kosepelisa motema na ye.

36. Yesu ayebaki ete azalaki kokokisa esakweli etali Mosaleli ya Nzambe? Limbolá.

36 Yesu ayebaki malamu ete azalaki kokokisa esakweli etali Mosaleli ya Nzambe. Na butu oyo bakangaki ye, atángaki maloba ya Yisaya 53:12 mpe alobaki ete ekokisami epai ya ye: “Mpo nazali koyebisa bino ete oyo ekomamá esengeli kokokisama epai na ngai, elingi koloba ete, ‘Mpe atángamaki esika moko na batyoli-mibeko.’ Mpo oyo etali ngai ezali kokokisama.” (Luka 22:36, 37) Likambo ya mawa, batalelaki Yesu lokola motyoli-mibeko. Babomaki ye likoló na nzete ya mpasi, na katikati ya basali na mabe mibale, lokola moto oyo abukaki mibeko. (Malako 15:27) Atako bongo, andimaki nsɔni yango ekwela ye, mpo ayebaki malamu ete azali nde kobondela mpo na biso. Ezali lokola nde atɛlɛmaki kati na bato ya masumu mpe etumbu ya liwa, mpe ye moko nde azwaki etumbu yango.

37. (a) Makambo ya bomoi mpe liwa ya Yesu ezali kopesa biso nzela ya koyeba malamumalamu likambo nini? (b) Mpo na nini tosengeli komonisa botɔndi epai ya Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto, Mosaleli na ye oyo atombolami?

37 Makambo ya bomoi ya Yesu mpe liwa na ye ezali kopesa biso nzela ya koyeba malamumalamu likambo oyo ete: Yesu Klisto azali Masiya, Mosaleli oyo alobelami na esakweli ya Yisaya. Tozali solo na botɔndi mingi na ndenge oyo Yehova andimaki kotika Mwana na ye ya bolingo ete akokisa esakweli etali Mosaleli yango, ndenge anyokwamaki mpe akufaki mpo tókoka kosikolama na lisumu mpe liwa! Na ndenge yango, Yehova amonisaki bolingo mingi epai na biso. Baloma 5:8 elobi boye: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso.” Solo tosengeli mpe kozala na botɔndi epai ya Yesu Klisto, Mosaleli oyo atombolami, oyo andimaki kosopa molimo na ye kino liwa!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Targoum ya Jonathan ben Uzziel (ekeke ya liboso T.B.) ebongoli Yisaya 52:13 boye: “Talá, mosaleli na ngai, Mopakolami (to, Masiya), akolonga.” Ndenge moko mpe, mokanda Talmud ya Babilone (soki ekeke ya misato T.B.) elobi: “Masiya. Nkombo na ye nani? . . . Bateyi balobi ete nkombo na ye moto ya maba ya ‘ndako’ ya Rabi, ndenge balobi ete: ‘Ya solo, akumbaki nde maladi na biso.’”—Sanhedrin 98b; Yisaya 53:4.

b Mosakoli Mika abengi Beteleme “oyo aleki moke kati na mabota ya Yuda.” (Mika 5:2) Atako Beteleme ezalaki engumba moko moke, ezwaki lokumu mingi mpenza mpamba te Masiya abotamaki kuna.

c Liloba ya Liebele oyo babongoli “abɛtami” esalelamaka mpe mpo na kolobela maladi ya maba. (2 Mikonzi 15:5) Bato mosusu ya mayele balobi ete, na kotalela Yisaya 53:4, Bayuda mosusu bakanisaki ete Masiya akozala moto ya maba. Mokanda Talmud ya Babilone esaleli vɛrsɛ yango mpo na Masiya, mpe ebengi ye “moto ya maba ya ‘ndako’ ya Rabi.” La Sainte Bible commentée de Fillion, libongoli ya Bakatolike oyo basalelaki Vulgate mpo na kobongola yango ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Totalelaki ye lokola moto ya maba.”

[Etanda na lokasa 212]

MOSALELI YA YEHOVA

Ndenge Yesu akokisaki mokumba yango

ESAKWELI

LIKAMBO

KOKOKISAMA

Yis. 52:13

Atombolamaki mpe azalaki likoló mingi

Mis. 2:34-36; Filp. 2:8-11; 1 Pet. 3:22

Yis. 52:14

Bamonisaki ye na ndenge ya mabe batyolaki ye

Mat. 11:19; Mat. 27:39-44, 63, 64; Yoa. 8:48; 10:20

Yis. 52:15

Akamwisaki bikólo mingi

Mat. 24:30; 2 Tes. 1:6-10; Emon. 1:7

Yis. 53:1

Bandimaki ye te

Yoa. 12:37, 38; Lom. 10:11, 16, 17

Yis. 53:2

Ebandeli na ye ezalaki ya moto ya komikitisa mpe ya lofundo te

Luka 2:7; Yoa. 1:46

Yis. 53:3

Batyolaki ye mpe baboyaki ye

Mat. 26:67; Luka 23:18-25; Yoa. 1:10, 11

Yis. 53:4

Akumbaki bamaladi na biso

Mat. 8:16, 17; Luka 8:43-48

Yis. 53:5

Batɔbɔlaki ye

Yoa. 19:34

Yis. 53:6

Anyokwamaki mpo na mabunga ya bato

1 Pet. 2:21-25

Yis. 53:7

Afandaki nyɛɛ mpe afungolaki monɔkɔ te liboso ya bafundi na ye

Mat. 27:11-14; Mko. 14:60, 61; Mis. 8:32, 35

Yis. 53:8

Basambisaki ye kaka mpamba mpe bakatelaki ye etumbu

Mat. 26:57-68; 27:1, 2, Mat. 27:11-26; Yoa. 18:12-14, Yoa. 18:19-24, 28-40

Yis. 53:9

Akundamaki elongo na bato ya bomɛngo

Mat. 27:57-60; Yoa. 19:38-42

Yis. 53:10

Molimo na ye esalela-maki lokola mbeka mpo na mabe

Ebe. 9:24; 10:5-14

Yis. 53:11

Afungolelaki bato nzela mpo bákóma bayengebene

Lom. 5:18, 19; 1 Pet. 2:24; Emon. 7:14

Yis. 53:12

Atángamaki esika moko na basumuki

Mat. 26:55, 56; 27:38; Luka 22:36, 37

[Elilingi na lokasa 203]

‘Batyolaki ye’

[Elilingi na lokasa 206]

“Azipolaki monɔkɔ na ye te”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na “Ecce Homo” ya Antonio Ciseri

[Elilingi na lokasa 211]

“Asopaki molimo na ye kino liwa”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto