Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ip-2 mok. 23 nk. 335-348
  • “Nkombo ya sika”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nkombo ya sika”
  • Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova afandi nyɛɛ te
  • Yehova apesi “nkombo ya sika”
  • ‘Yehova asepeli na yo’
  • ‘Bókanga monɔkɔ te’
  • Mosala ya Nzambe ekozwa lifuti
  • “Lobiko na yo ezali koya”!
  • “Bóganga na esengo na bomoko”!
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Yehova azali kokómisa basaleli na ye kitoko na pole
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mokanda ya Biblia nimero 23—Yisaya
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Nkembo ya Yehova ezali kongɛngɛla basaleli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
ip-2 mok. 23 nk. 335-348

Mokapo ya Ntuku Mibale na Misato

“Nkombo ya sika”

Yisaya 62:1-12

1. Likambo nini ya kokitisa motema ekomami na Yisaya mokapo 62?

BAYUDA oyo balɛmbi nzoto na Babilone bazali nde na mposa ete bákitisa bango motema, bábɔndisa bango mpe bápesa bango elikya ete ekólo na bango ekozonga. Kobanda Yelusaleme mpe tempelo na yango ebebisamaki, eleki sikoyo bambula ebele. Yuda, oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 800 na Babilone, etikali mpamba mpe emonani lokola nde Yehova abosani Bayuda. Nini ekoki kokitisa mpasi na bango? Bilaka ya Yehova oyo emonisi ete akozongisa bango na mboka na bango mpe akopesa bango nzela ya kozongisa losambo ya pɛto. Na ntango yango, maloba lokola “oyo basundoli mpenza” mpe “etikali mpamba” ekosalelama lisusu te mpo na kolobela Yuda kasi bakobenga ye nde na bankombo oyo ekomonisa ete Nzambe andimi ye. (Yisaya 62:4, NW; Zekalia 2:12) Mokapo 62 ya Yisaya etondi na bilaka ya ndenge wana. Nzokande, ndenge moko na bisakweli mosusu oyo etali kozongisama, mokapo yango elobeli makambo oyo etali kaka te kosikolama ya Bayuda na boombo ya Babilone. Na kokokisama na yango ya monene, Yisaya mokapo 62 ezali kokitisa biso motema ete ekólo ya elimo ya Yehova, “Yisalaele ya Nzambe,” ekobikisama solo.—Bagalatia 6:16.

Yehova afandi nyɛɛ te

2. Na ndenge nini Yehova amoniseli lisusu Siona boboto?

2 Babilone ekwei na mobu 539 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na nsima, Sirise, mokonzi ya Perse abimisi mobeko moko oyo epesi nzela na Bayuda oyo bazali kobanga Nzambe ete bázonga na Yelusaleme mpe bázongisa losambo ya Yehova. (Ezela 1:2-4) Bayuda ya liboso bakómi na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. Yehova amoniseli lisusu Yelusaleme boboto; yango emonani na esengo oyo ezali na maloba na ye oyo ya esakweli: ‘Mpo na Siona nakokanga monɔkɔ te, mpe mpo na Yelusaleme nakofanda nyɛɛ te; kino boyengebene na ye ekobima lokola pole mpe lobiko na ye lokola mwinda mozali kongɛnga.’—Yisaya 62:1.

3. (a) Mpo na nini Yehova asukaki na kobwaka Siona oyo ezalaki awa na mabelé, mpe nini ezwi esika na yango? (b) Nini ekómelaki losambo ya solo mpe ntango nini, mpe lelo tozali kobika na eleko nini?

3 Na mobu 537 L.T.B., Yehova akokisaki elaka na ye ya kozongisa Siona, to Yelusaleme. Apesaki bato ya engumba yango lobiko, mpe boyengebene na bango engɛngaki makasi. Kasi, na nsima bapɛngwaki lisusu mosika na losambo ya pɛto. Nsukansuka, baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya, mpe Yehova asundolaki bango; bazalaki lisusu te ekólo oyo ye aponi. (Matai 21:43; 23:38; Yoane 1:9-13) Yehova abimisaki ekólo moko ya sika, “Yisalaele ya Nzambe.” Ekólo wana ya sika ekómaki ekólo na ye mpenza, mpe na ekeke ya liboso basangani na yango basakolaki nsango malamu na molende na bisika nyonso ya mokili oyo bayebaki na ntango wana. (Bagalatia 6:16; Bakolose 1:23) Kasi, likambo ya mawa, na nsima ya liwa ya bantoma, losambo ya solo ezongaki nsima. Yango ebimisaki boklisto moko ya lipɛngwi, oyo ezali lelo na mangomba ya boklisto. (Matai 13:24-30, 36-43; Misala 20:29, 30) Na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova atikaki mangomba ya boklisto eyokisa nkombo na ye nsɔni. Kasi, nsukansuka, na 1914, “mbula ya boboto” ya Yehova ebandaki, kokokisama monene ya eteni oyo ya esakweli ya Yisaya ebandaki mpe.—Yisaya 61:2, NW.

4, 5. (a) Lelo oyo Siona ná bana na ye ezali banani? (b) Na ndenge nini Yehova asaleli Siona mpo ete “lobiko na ye” ekóma “lokola mwinda mozali kongɛnga”?

4 Lelo oyo elaka ya Yehova ya kozongisa Siona ekokisami epai ya ebongiseli na ye ya likoló, “Yelusaleme mboka ya likoló,” oyo emonisami awa na mabelé na bana na ye, baklisto bapakolami na elimo. (Bagalatia 4:26) Ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló ezali mosungi oyo amipesi mpenza, oyo azali na bokɛngi, atondi na bolingo mpe alingá mosala. Na 1914, ntango ebongiseli yango ebotaki Bokonzi ya Masiya, ezalaki solo esengo monene! (Emoniseli 12:1-5) Mingi mpenza banda 1919, bana ya ebongiseli yango awa na mabelé basakweli bikólo boyengebene mpe lobiko na yango. Ndenge Yisaya asakolaki, bana yango bangɛngi lokola mwinda na kati ya molili, batiki pole na bango engɛnga.—Matai 5:15, 16; Bafilipi 2:15.

5 Lokola Yehova atyaka likebi mpenza na bolamu ya basaleli na ye, akopema te, to akofanda nyɛɛ te kino ntango akokokisa bilaka nyonso oyo alakaki Siona ná bana na ye. Batikali bapakolami elongo na baninga na bango “bampate mosusu” baboyi mpe kokanga monɔkɔ. (Yoane 10:16) Bazali solo kosala makɛlɛlɛ ntango bazali kolakisa bato nzela bobele moko ya kobika.—Baloma 10:10.

Yehova apesi “nkombo ya sika”

6. Yehova akani kosala nini mpo na Siona?

6 Yehova akani kosala nini mpo na Siona, “mwasi” na ye ya likoló oyo amonisami na Yelusaleme ya kala? Alobi boye: ‘Bikólo bakomona boyengebene na yo, mpe bakonzi nyonso nkembo na yo; mpe okobengama na nkombo ya sika oyo monɔkɔ ya Yehova ekoloba.’ (Yisaya 62:2) Lokola Bayisalaele bazali kolanda boyengebene, bikólo ezali kotala bango na likebi mpenza, bálinga bálinga te. Bakonzi, ata balingi to balingi te, bakondima ete Yehova azali kosalela Yelusaleme mpe boyangeli na bango ezali mpenza eloko te liboso ya Bokonzi ya Yehova.—Yisaya 49:23.

7. Nkombo ya sika ya Siona emonisi nini?

7 Sikoyo Yehova amonisi mpenza ete Siona ebongwani, na ndenge apesi yango nkombo ya sika. Nkombo yango ya sika emonisi mapamboli mpe lokumu oyo bana ya Siona awa na mabelé bazali na yango banda na mobu 537 L.T.B.a Emonisi ete Yehova andimi solo ete Siona ezali eloko na ye. Lelo oyo, basangani ya Yisalaele ya Nzambe batondi na esengo mpo Yehova azali kosepela na bango ndenge wana, mpe bampate mosusu bazali kosepela elongo na bango.

8. Na ndenge nini Yehova apesi Siona lokumu?

8 Nsima ya kopesa Siona nkombo na ye ya sika, Yehova apesi sikoyo elaka oyo: ‘Okozala motole ya kitoko na lobɔkɔ ya [Yehova] mpe motole ya bokonzi na lobɔkɔ ya Nzambe na yo.’ (Yisaya 62:3) Yehova atɛlɛmisi mwasi na ye ya elilingi, Siona ya likoló, na lobɔkɔ mpo bámona ye mpe bákumisa kitoko na ye. (Nzembo 48:2; 50:2) Motole ya kitoko mpe “motole ya bokonzi” emonisi ete bapesi ye lokumu mpe bokonzi. (Zekalia 9:16) Yisalaele ya Nzambe, oyo ezali komonisa Siona ya likoló to “Yelusaleme mboka ya likoló,” ezali eloko ya kitoko mpenza oyo esalemi na lobɔkɔ ya Nzambe, to nguya na ye ntango azali kosalela yango. (Bagalatia 4:26) Na lisungi ya Yehova, ekólo wana ya elimo epesi mpenza ndakisa monene ya bosembo mpe bokangami na Nzambe. Lokola balendisami, bamilio ya bato, ezala bapakolami to bampate mosusu, bazali komonisa ete bazali na kondima mpe na bolingo ya makasi mpenza. Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, wana bapakolami bazwi mbano na bango ya nkembo kuna na likoló, Yehova akosalela bango mpo na komema bato, oyo lelo bazali komilelalela, na bomoi ya seko.—Baloma 8:21, 22; Emoniseli 22:2.

‘Yehova asepeli na yo’

9. Lobelá mbongwana oyo esalemi epai ya Siona.

9 Kozwa nkombo ya sika ezali mpe na kati ya mbongwana ya malamu oyo esalemi epai ya Siona ya likoló oyo emonisami na bana na ye awa na mabelé. Totángi boye: ‘Bakobenga yo lisusu te mwasi oyo basundoli mpenza; mpe mpo na mokili na yo bakoloba te ete etikali mpamba. Kasi bakobenga yo ete, Esengo na ngai, mpe mokili na yo ete, Mwasi ya libala. Mpo Yehova akoyoka esengo mpo na yo mpe mokili na yo ekozala lokola mwasi ya libala.’ (Yisaya 62:4) Siona ya mabelé etikali mpamba banda ebebisami na mobu 607 L.T.B. Nzokande, maloba ya Yehova ekitisi yango motema ete ekotongama lisusu mpe bato bakofanda lisusu na mabelé na yango. Siona, oyo babebisaki, ekozala lisusu te lokola mwasi oyo basundoli mpenza, mpe mabelé na yango ekotikala lisusu mpamba te. Kotongama lisusu ya Yelusaleme na mobu 537 L.T.B. emonisi ete Yelusaleme ekómi engumba ya sika oyo ekeseni mpenza na ndenge etikalaki nsima ya kobebisama na yango. Yehova alobi ete bakobenga Siona “Esengo na ngai,” mpe bakobenga mabelé na yango, “Mwasi ya libala.”—Yisaya 54:1, 5, 6; 66:8; Yilimia 23:5-8; 30:17; Bagalatia 4:27-31.

10. (a) Ndenge nini Yisalaele ya Nzambe ebongwanaki? (b) “Mokili” ya Yisalaele ya Nzambe ezali nini?

10 Kobanda na 1919, mbongwana ya ndenge yango esalemaki mpe epai ya Yisalaele ya Nzambe. Na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, emonanaki lokola nde Nzambe aboyaki baklisto bapakolami. Kasi kobanda na 1919, Nzambe andimaki bango lisusu, mpe apɛtolaki lolenge na bango ya kosambela. Mbongwana yango emonanaki na mateya na bango, na lolenge na bango ya kotambwisa makambo mpe na mosala na bango. Yisalaele ya Nzambe ekɔtaki na “mokili” na yango, mboka na yango ya elimo to esika na yango ya mosala.—Yisaya 66:7, 8, 20-22.

11. Na ndenge nini Bayuda bakamati mama na bango lokola mwasi na bango ya libala?

11 Yehova abendi lisusu likebi na kondima oyo andimi lisusu bato na ye, alobi boye: ‘Lokola elenge mobali akamati moseka lokola mwasi na ye, mpe akokómisa ye mwasi na ye, boye bana na yo babali bakobala yo, bakokamata yo lokola mwasi; mpe lokola mobali ya libala azali na esengo mpo na mwasi mobalani, boye Nzambe na yo akozala na esengo mpo na yo.’ (Yisaya 62:5) Na ndenge nini Bayuda, “bana babali” ya Siona bakamati mama na bango lokola mwasi na bango ya libala? Na ndenge oyo ete bana ya Siona, oyo basikolami na boombo ya Babilone, bazongi mpe bakamati mboka oyo kala ezalaki mboka-mokonzi na bango, mpe bafandi lisusu na kati na yango. Na ntango wana, Siona ezali lisusu mboka oyo etikali mpamba te, kasi etondi na bana babali.—Yilimia 3:14.

12. (a) Na ndenge nini Yehova amonisi polele ete baklisto bapakolami bazali na kati ya ebongiseli oyo ye abali? (b) Na ndenge nini boyokani ya Yehova elongo na bato na ye ezali ndakisa eleki malamu mpo na babalani lelo oyo? (Talá etanda na lokasa 342.)

12 Ndenge moko mpe, kobanda 1919 bana ya Siona ya likoló bazwi mokili na bango, mboka na bango ya elimo, oyo nkombo na yango ya esakweli ezali “Mwasi ya libala.” Mosala oyo basali na mokili yango emonisi polele ete baklisto bapakolami yango bazali ‘ekólo moko mpo na nkombo ya Yehova.’ (Misala 15:14) Lokola baklisto yango bazali kobota mbuma ya Bokonzi mpe bazali kosakola nkombo ya Yehova, yango emonisi polele ete Yehova azali kosepela na bango. Amonisi polele ete bazali na kati ya ebongiseli oyo ekoki kokabwana na ye soki moke te. Lokola Yehova apakoli baklisto yango na elimo santu, asikoli bango na boombo ya elimo, mpe azali kosalela bango mpo na kosakola elikya ya Bokonzi epai ya bato nyonso, amonisi ete azali kosepela na bango lokola mobali asepelaka na mwasi na ye.—Yilimia 32:41.

‘Bókanga monɔkɔ te’

13, 14. (a) Na ntango ya kala, ndenge nini Yelusaleme ekómaki engumba oyo ezalaki kobatela bato na yango? (b) Na mikolo na biso, ndenge nini Siona ekómi “eloko ya kosanzolama kati na mokili”?

13 Nkombo ya sika oyo Yehova apesi basaleli na ye esali ete bábanga te. Yango emonisi ete andimi bango mpe ete bazali bato na ye mpenza. Sikoyo, Yehova asaleli ndakisa mosusu, azali koloba na basaleli na ye lokola nde azali koloba na engumba moko oyo ezali na kati ya lopango: ‘Ee Yelusaleme, likoló na mapango na yo natye bakɛngɛli; na moi mobimba mpe na butu mobimba báfanda kimya te. Bino bozali kotatwela Yehova, bókanga monɔkɔ te. Mpe bótika ye kimya te kino akokokisa Yelusaleme, mpe akobongisa yango eloko ya kosanzolama kati na mokili.’ (Yisaya 62:6, 7) Na ntango oyo Yehova ye moko atyaki, nsima ya kolongwa ya batikali ya Bayuda ya sembo na Babilone mpo na kozonga na Yelusaleme, Yelusaleme yango ekómaki “eloko ya kosanzolama kati na mokili,” engumba oyo ezali na kati ya lopango oyo ezali kobatela bafandi na yango. Butu moi bakɛngɛli oyo bazali likoló ya lopango yango bazali kobatela mboka mpe kopesa bana-mboka makebisi.—Nehemia 6:15; 7:3; Yisaya 52:8.

14 Na mikolo na biso, Yehova azali kosalela bakɛngɛli na ye bapakolami mpo na kolakisa bato ya komikitisa nzela ya kobima na boombo ya mangomba ya lokuta. Bazali kobenga bato yango bákɔta na ebongiseli na ye mpo bábebisama te na makambo ya mbindo na elimo, na makambo ya mabe, mpe Nzambe aboya bango te. (Yilimia 33:9; Sefania 3:19) Bakɛngɛli, elingi koloba “moombo ya sembo mpe ya mayele,” bazali kosala mosala monene ya kobatela ndenge wana, na ndenge bazali kopesa ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ (Matai 24:45-47) Lokola “ebele ya bato” bazali kosala elongo na bakɛngɛli yango, bazali mpe kosala mosala monene ya kokómisa Siona “eloko ya kosanzolama kati na mokili.”—Emoniseli 7:9.

15. Ndenge nini etuluku ya bakɛngɛli mpe baninga na bango bazali kosalela Yehova ntango nyonso?

15 Mosala ya etuluku ya bakɛngɛli mpe ya baninga na bango esili naino te! Bamipesaka na molimo na bango mobimba mpe yango emonanaka na ndenge bamilio ya bato ya sembo bazali kosala mosala na molende. Bato yango bazali kosalisama na bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango, na basali ya bolingo malamu oyo bazali na Babetele mpe na bisika ya konyata mikanda ya Batatoli ya Yehova, na bamisionɛrɛ, na babongisi-nzela minene, na babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe na babongisi-nzela basungi. Longola yango bazali komipesa na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ya sika, kotala bandeko oyo bazali kobɛla, kosunga baoyo bazali kokutana na mikakatano na minganga, mpe kopesa lisungi na ntango ebongi na baoyo bakutani na makama ya mpela, koningana ya mabelé to makama mosusu. Mbala mingi, mingi kati na bandeko wana oyo bazali na elimo ya komipesa basalaka mpenza “butu moi”!—Emoniseli 7:14, 15.

16. Ndenge nini basaleli ya Yehova ‘batikaka ye kimya te’?

16 Basaleli ya Yehova balendisami na kobondela ntango nyonso, kosɛnga Nzambe ete “mokano na [ye] esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:9, 10; 1 Batesaloniki 5:17) Balendisi bango ete ‘bátika Yehova kimya te’ kino ntango akokokisa mposa mpe bilikya ya kozongisa losambo ya solo. Yesu abɛtaki nsɛtɛ na likambo ya kobondela ntango nyonso, alendisaki bayekoli na ye ete “bábelelaka [Nzambe] butu moi.”—Luka 18:1-8.

Mosala ya Nzambe ekozwa lifuti

17, 18. (a) Na ndenge nini bafandi ya Siona bakoki kolikya kosepela na mbuma ya mosala na bango? (b) Ndenge nini basaleli ya Yehova bazali kosepela na mbuma ya mosala na bango lelo oyo?

17 Nkombo ya sika oyo Yehova apesi basaleli na ye ezali kokitisa bango motema ete milende na bango ezali mpamba te. ‘Yehova akati ndai na lobɔkɔ na ye ya mobali, mpe na lobɔkɔ na ye ya nguya ete, nakopesa lisusu nkona na bino te ete ezala bilei mpo na bayini; bapaya bakomɛla vinyo na yo te oyo yo osaleli yango. Kasi baoyo bakoyanganisa yango bakolya yango, mpe bakosanzola Yehova; baoyo bakolɔkɔta yango bakomɛla yango, na lopango ya esika na ngai mosantu.’ (Yisaya 62:8, 9) Lobɔkɔ ya mobali mpe lobɔkɔ ya nguya ya Yehova ezali komonisa nguya mpe makasi na ye. (Deteronome 32:40; Ezekiele 20:5) Lokola Yehova atángi lobɔkɔ na ye ya mobali mpe lobɔkɔ na ye ya nguya mpo na kokata ndai, yango emonisi ete azali na mokano mpenza ya kobongola makambo ya Siona. Na mobu 607 L.T.B., Yehova apesi bayini to banguna ya Siona nzela ya koyiba mpe kopunza biloko na ye. (Deteronome 28:33, 51) Kasi sikoyo, kaka bato oyo bazali na lotomo ya kozwa biloko ya Siona nde bakozwa yango.—Deteronome 14:22-27.

18 Na kokokisama ya elaka yango na mikolo na biso, basaleli ya Yehova oyo bazongisami [na mboka na bango] bazali na biloko ya elimo mingi mpenza. Bazali mpenza kosepela na mbuma ya mosala makasi na bango: kobakisama ya bayekoli ya Klisto mpe ebele ya bilei ya elimo. (Yisaya 55:1, 2; 65:14) Lokola basaleli na ye bazali sembo, Yehova azali kotika te ete banguna na bango bábebisa bomɛngo na bango ya elimo to bábɔtɔla bango mbuma ya mosala oyo basali na molimo na bango mobimba. Ata mosala moko te oyo esalemi mpo na Yehova ezali mosala ya mpunda.—Malaki 3:10-12; Baebele 6:10.

19, 20. (a) Ndenge nini nzela ebongisamaki mpo Bayuda bázonga na Yelusaleme? (b) Ndenge nini na mikolo na biso nzela ebongisami mpo bato ya komikitisa báya na ebongiseli ya Yehova?

19 Nkombo ya sika ezali mpe kobenda bato ya mitema sembo na ebongiseli ya Yehova. Bibele ya bato bazali koyangana na kati na yango, mpe batikeli bango nzela polele. Esakweli ya Yisaya elobi boye: ‘Bóleka! Bóleka na baporte; bóbongisa nzela mpo na bato. Bótonga! Bótonga balabala, bólongola mabanga na yango; bótombola elembo likoló mpo na bikólo.’ (Yisaya 62:10) Na kokokisama na yango ya liboso, emonani ete bayebisaki Bayuda báleka na baporte ya bingumba ya bokonzi ya Babilone mpo na kozonga na Yelusaleme. Bato yango basengelaki kolongola mabanga na nzela mpo mobembo na bango ezala mpasi te mpe kotombola elembo mpo na kolakisa nzela.—Yisaya 11:12.

20 Kobanda 1919, baklisto bapakolami batyami pembeni mpo básala mosala ya Nzambe mpe bazali kotambola na “Nzela ya Bosantu.” (Yisaya 35:8, NW) Bazalaki bato ya liboso oyo batambolaki na balabala ya elimo mpo na kobima na Babilone Monene. (Yisaya 40:3; 48:20) Nzambe apesaki bango libaku malamu ya kokamba mosala ya kosakola misala na ye ya nguya mpe ya kolakisa bato nzela oyo ezali kokende tii na balabala yango. Kolongola mabanga to biloko oyo ezali kobɛtisa bato mabaku na balabala yango ezalaki mpenza mpo na bolamu na bango moko. (Yisaya 57:14) Basengelaki komona polele mpenza mikano mpe mateya ya Nzambe. Bindimeli ya lokuta ezali mabanga oyo ebɛtisaka bato mabaku na nzela ya bomoi, nzokande Liloba ya Yehova ezali ‘lokola marto oyo ebukaka libanga mikemike.’ Na liloba yango, baklisto bapakolami bapanzaki mabanga oyo ekokaki kokweisa baoyo balingi kosalela Yehova.—Yilimia 23:29.

21, 22. Elembo nini Yehova atye mpo na baoyo bazali kotika mangomba ya lokuta mpe ndenge nini toyebi yango?

21 Na mobu 537 L.T.B., Yelusaleme ekómaki elembo oyo elakisaki batikali ya Bayuda ete basengeli kozonga mpo na kotonga tempelo. (Yisaya 49:22) Na 1919, ntango batikali bapakolami basikolamaki na boombo ya mangomba ya lokuta, bayengayengaki mpamba te. Bayebaki esika bazalaki kokende, mpamba te Yehova atɛlɛmisaki elembo moko mpo na bango. Elembo yango nini? Bobele oyo esakolami na Yisaya 11:10, epai tozali kotánga boye: ‘Na mokolo yango, mosisa ya Yese ekozala, oyo akotɛlɛma lokola elembo mpo na bikólo.’ Ntoma Paulo asalelaki maloba yango mpo na Yesu. (Baloma 15:8, 12) Ɛɛ, elembo ezali Klisto Yesu, ye oyo azali Mokonzi na Ngomba Siona ya likoló!—Baebele 12:22; Emoniseli 14:1.

22 Baklisto bapakolami ná bampate mosusu bayangani pembenipembeni ya Yesu mpo na komipesa na losambo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló oyo esangisaka bato. Boyangeli na ye ezali mpo na kolongisa bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe kopesa bolamu na bato ya mitema sembo na bikólo nyonso ya mabelé. Yango esengeli kotinda mokomoko na biso na kokumisa ye na masanzoli, boye te?

“Lobiko na yo ezali koya”!

23, 24. Ndenge nini lobiko ezali koyela baoyo bazali kondimela Nzambe?

23 Nkombo ya sika oyo Yehova apesi ebongiseli na ye, oyo ezali lokola mwasi na ye, etali mpe lobiko ya seko ya bana ya mwasi yango. Yisaya akomi boye: ‘Talá, Yehova ayokisi yango kino nsuka ya mokili, ete, Bóloba na mwana mwasi ya Siona ete, Talá lobiko na yo ezali koya; talá libonza oyo azali kopesa ezali na ye, lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.’ (Yisaya 62:11) Lobiko ya Bayuda eyaki ntango Babilone ekweaki mpe bazongaki na mboka na bango. Kasi maloba yango ezali kolobela likambo moko ya monene koleka oyo wana. Maloba ya Yehova ezali kokundwela biso esakweli oyo ya Zekalia na ntina na Yelusaleme: “Sepelá mingi, ee mwana mwasi ya Siona, gangá, ee mwana mwasi ya Yelusaleme; talá mokonzi na yo akoyela yo, ye azali na boyengebene mpe na kobikisa; na bopɔlɔ mpe atamboli likoló ya mpunda, ɛɛ, likoló ya mwana ya mpunda.”—Zekalia 9:9.

24 Mbula misato na ndambo nsima ya batisimo na ye na mai mpe kopakolama na elimo ya Nzambe, Yesu akɔtaki na Yelusaleme likoló ya mpunda mpe apɛtolaki tempelo na yango. (Matai 21:1-5; Yoane 12:14-16) Lelo oyo, Yesu Klisto nde azali komema lobiko ya Yehova epai ya baoyo nyonso bazali kondimela Nzambe. Kobanda atyamaki na kiti ya bokonzi na 1914, Yesu azali Mosambisi mpe Mopesi-Etumbu oyo Yehova aponi. Na 1918, mbula misato na ndambo nsima ya kotyama na kiti ya bokonzi, apɛtolaki tempelo ya elimo ya Yehova, oyo emonisamaki awa na mabelé na lisangá ya baklisto bapakolami. (Malaki 3:1-5) Kotyama na ye lokola elembo emonisaki ebandeli ya mosala monene ya koyanganisa bato bauti na mabelé mobimba, mpo bázala bato ya Bokonzi ya Masiya. Lokola esalemaki na ntango ya kala, “lobiko” eyelaki Yisalaele ya Nzambe ntango basikolamaki na Babilone Monene na 1919. “Libonza” to “lifuti” oyo babombeli baoyo bazali komipesa na mosala makasi ya kobuka mbuma ezali bomoi ezangi kufa na likoló to bomoi ya seko awa na mabelé. Baoyo nyonso bazali kotikala sembo bakoki kotya motema ete “mosala na [bango] ya makasi ezali mpamba te na oyo etali Nkolo.”—1 Bakolinti 15:58.

25. Elaka nini ya kokitisa motema Yehova apesi basaleli na ye?

25 Talá makambo ya malamu mpenza oyo ezali kozela ebongiseli ya Yehova na likoló, bapakolami oyo bazali komonisa yango na mabelé, mpe moto nyonso oyo azali mpenza kosunga bango! (Deteronome 26:19) Yisaya asakolaki boye: ‘Bakobengama ete, Bato ya bosantu, basikolami ya Yehova; okobengama ete, Olukami, mboka oyo basundoli yango mobimba te.’ (Yisaya 62:12) Ezali na ntango moko oyo “Yelusaleme mboka ya likoló,” oyo emonisami na Yisalaele ya Nzambe, emonaki ete basundoli yango. Ekomiyoka lisusu bongo soki moke te. Yehova akobatela basaleli na ye mpo na libela, akondima bango ntango nyonso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bisakweli ya Biblia “nkombo moko ya sika” ekoki komonisa lokumu to mokumba moko ya sika.—Emoniseli 2:17; 3:12.

[Etanda na lokasa 342]

Ndakisa ya malamu mpenza mpo na bato oyo babalá

Ntango bato babalaka, bazalaka na makambo oyo bakanisaka ete bakozwa na libala na bango. Kasi Nzambe alukaka nini na libala? Ye nde abandisaki ebongiseli ya libala. Ntina nini asalaki libala?

Boyokani na ye na ekólo ya Yisalaele ezali kosalisa biso tóyeba likanisi ya Nzambe na likambo yango. Yisaya alobeli boyokani yango lokola oyo ezalaka kati na mwasi ná mobali na ye. (Yisaya 62:1-5) Talá oyo Yehova Nzambe, “mobali” azali kosala mpo na “mwasi” na ye. Azali kobatela ye mpe kosantisa ye. (Yisaya 62:6, 7, 12) Azali kopesa ye lokumu mpe kotalela ye na motuya. (Yisaya 62:3, 8, 9) Azali kosepela na ye, ndenge emonani na bankombo ya sika oyo apesi ye.—Yisaya 62:4, 5, 12.

Kati na Makomami ya Grɛki ya boklisto, ntoma Paulo azongeli maloba ya Yisaya oyo ezali kolobela boyokani ya Yehova ná Yisalaele ntango akokanisi boyokani ya mobali ná mwasi na ye na boyokani kati na Klisto ná lisangá ya baklisto bapakolami.—Baefese 5:21-27.

Ntoma Paulo alendisaki baklisto ete bámekola boyokani oyo ezali kati na Yesu ná lisangá na kati ya mabala na bango. Bolingo oyo Yehova alingaki Yisalaele mpe oyo Klisto alingaka lisangá eleki bolingo mosusu nyonso. Ezala boyokani kati na Yehova ná Yisalaele to boyokani kati na Yesu ná lisangá ezali ndakisa ya malamu mpenza oyo baklisto basengeli kolanda mpo na kozala na mabala ya malamu mpe ya esengo.—Baefese 5:28-33.

[Elilingi na lokasa 339]

Yehova akobenga Siona ya likoló na nkombo ya sika

[Bililingi na lokasa 347]

Na mikolo na biso, etuluku ya bakɛngɛli ya Yehova bakangi monɔkɔ te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto