Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be lok. 27-lok. 32 par. 3
  • Koyekola epesaka mbano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyekola epesaka mbano
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bongisá makanisi na yo malamu
  • Ndenge ya koyekola
  • Makambo ya koyekola
  • “Tongá libota na yo”
  • Okozwa mbano
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Bongisá ndenge na yo ya koyekola!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mabota, bókumisa Nzambe na kati ya lisangá na Ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be lok. 27-lok. 32 par. 3

Koyekola epesaka mbano

OMONAKA ndenge bato baponaka mbuma ya kolya? Mpo na koyeba soki mbuma ekɔmeli, bato mingi batalaka langi mpe monene na yango. Bato mosusu bayokaka nsolo na yango. Bato mosusu basimbaka yango, to bafinafinaka yango. Kasi bato mosusu batalaka kilo na yango: batyaka mbuma mosusu na lobɔkɔ ya mwasi, mosusu na lobɔkɔ ya mobali mpe balukaka koyeba oyo wapi ezali na kilo mpe na mai mingi. Bato yango balukaka nini? Batalaka mbuma yango malamumalamu, balukaka oyo ya malamu, bakanisaka mbuma oyo basilá kolya mpe batalaka soki mbuma oyo bazali komona ekokani na oyo bayebi. Lokola bazali kotalela likambo yango na likebi mpenza, bakozwa mbano: bakolya mbuma ya kitoko.

Ya solo, koyekola Liloba ya Nzambe epesaka mbano oyo eleki monene. Soki tozali kotya boyekoli yango na esika ya liboso na bomoi na biso, kondima na biso ekokóma makasi koleka, bolingo na biso ekobakisama mingi mpenza, mosala na biso ekobota mbuma mingi lisusu mpe bikateli oyo tokozwa ekomonisa mpenza ete tozali na bososoli mpe na bwanya ya Nzambe. Masese 3:15 (NW) elobi boye mpo na mbano yango: “Makambo nyonso mosusu ya kosepelisa ekoki kokokana na yango te.” Yo mpe ozwaka mbano yango? Lolenge oyo ozali koyekola ekoki kosalisa yo ozwa yango.​—Kols. 1:9, 10.

Elilingi na lokasa 30

Manyolá

Koyekola ezali nini? Koyekola ezali kaka te kotánga likolólikoló. Yango esɛngi mpe kosalela mayele na yo mpo na kotalela likambo na likebi mpenza to na mozindo. Yango esɛngi kotalela malamumalamu makambo oyo ozali kotánga, kokokanisa yango na makambo oyo oyebi mpe kotalela ntina ya makambo oyo balobeli wana. Ntango ozali koyekola, kanisá na mozindo likoló na likambo nyonso ya sika oyo okomona. Talelá mpe ndenge oyo yo moko okoki kosalela malamu mpenza toli ya Makomami. Lokola ozali Motatoli ya Yehova, osengeli mpe kokanisa ndenge osengeli kosalela makambo yango mpo na kosalisa bato mosusu. Na ntembe te, koyekola esɛngi mpe komanyola.

Bongisá makanisi na yo malamu

Elilingi na lokasa 30

Mpo ozwa mpenza matomba na boyekoli na yo moko, bongisá motema na yo

Ntango ozali komibongisa mpo na koyekola, tyá pembeni wana biloko lokola Biblia, mokanda oyo ozali kosalela, krɛyo to biki, mbala mosusu mpe kaye moko. Kasi obongisaka mpe motema na yo? Biblia eyebisi biso ete Ezela ‘abongisaki motema na ye ete asosola Mobeko ya Yehova mpe ete alanda yango mpe ete alakisa malako mpe bosembo kati na Yisalaele.’ (Ezl. 7:10, NW) Osengeli kosala nini mpo na kobongisa motema na ndenge yango?

Libondeli esalisaka biso tóyekola Liloba ya Nzambe na makanisi oyo ebongi. Tolingi ete motema na biso, elingi koloba bomoto na biso mpenza, endima mateya oyo Yehova azali kopesa biso. Ntango nyonso oyo olingi kobanda boyekoli na yo, sɛngá Yehova asalisa yo na nzela ya elimo na ye. (Luka 11:13) Sɛngá ye asalisa yo okanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga, oyeba ndenge yango eyokani na mokano na ye, ndenge ekoki kosalisa yo okesenisa mabe na malamu, ndenge osengeli kosalela mitinda na ye na bomoi na yo, mpe ndenge mateya yango etaleli boyokani na bino mibale. (Mas. 9:10) Ntango ozali koyekola, ‘kobá kosɛnga Nzambe’ ete apesa yo bwanya. (Yak. 1:5) Ntango ozali kosɛnga Yehova asalisa yo obwaka makanisi nyonso ya mabe to bamposa nyonso oyo ekoki kopesa yo mpasi, salelá makambo oyo ozali koyekola mpo na komitalela na bosembo mpenza. Ntango nyonso, “pesá Yehova matɔndi” mpo na makambo oyo alakisi yo. (Nz. 147:7, NW) Kobondela liboso ya koyekola ekosala ete tókóma baninga mpenza ya Yehova, mpamba te ekosalisa biso tóyoka ye ntango azali koloba na biso na nzela ya Liloba na ye.​—Nz. 145:18.

Basaleli ya Yehova bakeseni mpenza na bato mosusu na ndenge oyo bayambaka mpe bandimaka Liloba ya Nzambe. Mbala mingi, bato oyo babangaka Nzambe te babɛtaka ntembe mpe baboyaka kondima makambo oyo ekomami na Biblia. Kasi biso tozali na ezaleli wana te. Biso totyelaka Yehova motema. (Mas. 3:5-7) Soki tokangi ntina ya likambo moko te, tolobaka te na lolendo nyonso ete ezali lokuta. Ntango tozali kolukaluka biyano, tozelaka Yehova. (Mika 7:7) Lokola Ezela, tozali na mokano ya kosalela mpe ya koteya makambo oyo tozali koyekola. Soki tobongisi mitema na biso na ndenge yango, boyekoli na biso ekopesa biso mbano monene.

Ndenge ya koyekola

Na esika ya kobanda mbala moko koyekola na paragrafe ya liboso mpe kolanda bongo tii na nsuka, luká libosoliboso koyeba likambo oyo balobeli na lisolo to na mokapo yango mobimba. Bandá naino na kotalela malamumalamu motó ya likambo. Yango nde motó ya likambo monene ya lisolo oyo okoyekola. Na nsima, tyá likebi mpo na koyeba ndenge mitó ya likambo moke eyokani na motó ya likambo monene. Talelá malamu mpenza bililingi, bakalati to bitanda ya bozongeli oyo ezali na lisolo yango. Omituna boye: ‘Na kotalela makambo oyo nauti komona, nakoyekola likambo nini awa? Yango ekozala na ntina nini mpo na ngai?’ Yango ekosala ete boyekoli na yo ekokisa mokano moko.

Elilingi na lokasa 30

Mpo na kolukaluka makambo mosusu, salelá mikanda oyo bozali na yango na monɔkɔ oyo yo oyebi malamu

Sikoyo, bandá koyekola. Masolo ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu ezalaka na mituna. Ntango ozali kotánga paragrafe mokomoko, ezali malamu otya elembo na biyano yango. Ata soki mituna mpo na boyekoli ezali te, okoki kotya elembo na makanisi ya ntina oyo olingi kobosana te. Soki omoni likambo ya sika, koleka mbangumbangu te talelá yango malamu mpenza mpo okanga ntina na yango. Tyá mpenza likebi na bandakisa to na makanisi oyo okoki kosalela na mosala ya kosakola to oyo okoki kokɔtisa na lisolo oyo okosala na lisangá. Kanisá moto mokomoko oyo okoki kolendisa kondima na ye soki oyebisi ye makambo oyo oyekoli. Komá to tyá elembo na makanisi oyo olingi kosalela mpe zongelá yango ntango okosilisa koyekola.

Ntango ozali koyekola, tángáká mpe mikapo oyo maloba na yango ekomami wana te. Talelá malamumalamu ndenge mokapo mokomoko eyokani na likanisi ya ntina ya paragrafe yango.

Okoki kokutana na makanisi oyo ozali kokanga ntina na yango mbala moko te to oyo osengeli kotalela yango lisusu malamumalamu. Na esika ete elongola likebi na yo, tyá elembo wana mpo otalela yango lisusu na nsima. Mbala mingi, toyebaka makambo mosusu malamu ntango tozali kotánga baparagrafe oyo elandi. Soki oyebi likambo yango malamu kaka te, okoki kolukaluka na mikanda mosusu. Makambo nini okotya elembo mpo na koluka yango na nsima? Mbala mosusu ezali na vɛrsɛ moko oyo maloba na yango ekomami wana, kasi ozali kokanga mpenza ntina na yango te. To ozali mpenza komona te ndenge nini vɛrsɛ yango eyokani na likambo oyo ozali koyekola. Mbala mosusu omoni ete okangi ntina ya likanisi moko na lisolo yango, kasi okangi yango malamu mpenza te mpo olimbola yango epai ya moto mosusu. Na esika oleka yango mpe obosana yango, ekozala malamu, ntango okosilisa koyekola, olukaluka na mikanda mosusu makanisi mosusu oyo etali likambo yango.

Elilingi na lokasa 30

Tángá bavɛrsɛ

Ntango ntoma Paulo akomelaki baklisto Baebele mokanda ya molai, atɛlɛmaki moke na katikati ya mokanda mpe alobaki ete: “Likanisi ya ntina mpenza yango oyo.” (Ebe. 8:1) Yo mpe otɛlɛmaka mbala na mbala mpo na kokanisa likambo lokola oyo? Talá ntina oyo Paulo asalaki bongo. Na mikapo ya liboso ya mokanda na ye oyo epemami, Paulo amonisaki ete Klisto, Nganga-Nzambe Monene oyo aleki monene, akɔtaki na “esika mosantu” oyo ezali na likoló. (Ebe. 4:14–5:10; 6:20) Kasi na ebandeli ya mokapo 8, ntango abendi likebi na bango na likambo wana ya ntina mpe amonisi yango polele, Paulo abongisaki makanisi ya bato oyo bakotánga mokanda na ye ete bákanisa na mozindo mpo na koyeba ndenge oyo likambo yango etaleli bomoi na bango. Amonisaki ete Klisto amonanaki liboso ya Nzambe mpo na bango mpe afungolaki nzela mpo bango mpe bákɔta na “esika mosantu oyo ezali na likoló.” (Ebe. 9:24; 10:19-22) Lokola apesaki bango ndanga mpo na elikya na bango, yango elingaki kotinda bango básalela toli mosusu oyo ezalaki na mokanda yango, toli oyo etali kondima, koyika mpiko mpe etamboli ya boklisto. Biso mpe, soki tozali kotya likebi na makanisi ya ntina ntango tozali koyekola, yango ekosalisa biso tóyeba ndenge bazali kolimbola motó ya likambo monene mpe yango ekosala ete tóyeba mpenza ntina oyo misala na biso esengeli koyokana na makambo oyo toyekoli.

Boyekoli na yo moko ekotinda yo osalela makambo oyo oyekoli? Motuna oyo ezali mpenza na ntina mingi. Ntango oyekoli likambo moko, omituna boye: ‘Yango ezali kotinda ngai na ezaleli nini mpe namityela mikano nini? Ndenge nini nakoki kosalela makambo oyo mpo na kosilisa mokakatano moko to mpo na kozwa ekateli moko to mpe mpo na kokokisa likambo moko? Ndenge nini nakoki kosalela yango na libota na ngai, na mosala ya kosakola to na kati ya lisangá?’ Ntango ozali kotalela mituna oyo, bondelá mpe kanisá soki na makambo nini mpenza ya bomoi na yo okoki kosalela boyebi oyo ozali kozwa.

Ntango osilisi koyekola mokapo moko to lisolo moko, zwá ntango ya kosala mwa bozongeli. Talá soki okoki koyeba lisusu makanisi ya ntina mpe lolenge balimbolaki makanisi mosusu oyo esimbi likambo yango. Yango ekosalisa yo okanga makambo oyekoli mpo osalela yango na mikolo oyo ekoya.

Makambo ya koyekola

Biso basaleli ya Yehova tozali na makambo ebele ya koyekola. Kasi tokobanda na nini? Ekozala malamu mokolo na mokolo tóyekolaka vɛrsɛ moko mpe makanisi oyo ezali na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Pɔsɔ na pɔsɔ, tókendeke na makita ya lisangá. Soki tozali koyekola mpo na kobongisa makita yango, ekosalisa biso mingi mpenza. Longola yango, bato mosusu basalelaka ntango na bango na mayele mpo na koyekola mikanda na biso mosusu ya boklisto, oyo ebimaki ntango bango bayebaki naino solo te. Bato mosusu mpe baponaka kotánga mikanda mosusu ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe bayekolaka bavɛrsɛ yango na mozindo.

Bongo okosala nini soki okoki te koyekola na mozindo makambo nyonso oyo bokotalela na makita ya lisangá ya pɔsɔ moko? Kokwea te na motambo ya koluka kotánga yango mbangumbangu kaka mpo na kotánga to mpe, likambo ya mabe koleka, otika koyekola kaka mpo ozali kokoka koyekola te. Na esika ya kosala bongo, luká nde koyeba makambo nini oyo okoki koyekola mpe yekolá yango malamu mpenza. Saláká bongo pɔsɔ na pɔsɔ. Na nsima, salá makasi obongisaka mpe makita mosusu.

“Tongá libota na yo”

Yehova ayebi ete batata basengeli kosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Masese 24:27 elobi boye: “Bongisá mosala na yo na libanda, omikokisela yango kati na elanga.” Kasi osengeli te kobosana bamposa ya elimo ya libota na yo. Yango wana vɛrsɛ yango elobi lisusu ete: “Boye na nsima, tongá [libota, NW] na yo.” Ndenge nini batata bakoki kosala yango? Masese 24:3 (NW) elobi boye: “Na nzela ya bososoli, [libota] ekotɛlɛma makasi.”

Ndenge nini bososoli ekoki kosalisa libota na yo? Bososoli ezali mayele ya kotalela likambo ndenge ezali komonana polele mpe oyo ezali komonana polele te. Tokoki mpenza koloba ete mpo boyekoli ya libota esalemaka malamu mpenza, osengeli libosoliboso koyeba libota na yo malamumalamu. Ndenge nini bato ya libota na yo bazali kokola na elimo? Yoká bango na likebi mpenza ntango bozali kosolola. Bazali na elimo ya koimaima to ya kobomba nkanda? Bazali kolobela mingi biloko ya mosuni, bazali koluka makambo minene? Ntango ozali kosakola na bana na yo, bamiyokaka malamu, mpe bayebisaka baninga na bango ete bazali Batatoli ya Yehova? Basepelaka na programɛ ya botángi ya Biblia na libota mpe kosala boyekoli ya libota na bino? Bazali mpenza na bomoi oyo eyokani na nzela ya Yehova? Soki otaleli yango malamumalamu, okomona makambo oyo yo, tata, osengeli kosala mpo olona mpe olendisa bizaleli ya elimo epai ya moto mokomoko ya libota na yo.

Luká na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! masolo oyo ezali kolobela makambo oyo etali mpenza libota na yo. Na nsima, liboso ya mokolo ya boyekoli, yebisá libota na yo makambo oyo bokoyekola mpo bákoka kotalela yango. Ntango bozali koyekola, salá makasi masolo esalema na bolingo mpenza. Kopesa moto moko etumbu te to kotungisa moto moko te na ntango ya boyekoli, kasi monisá ntina ya makambo oyo bozali koyekola mpe, na kotalela bamposa ya libota, lobelá polele ndenge nini libota ekoki kosalela makambo yango. Salá ete moto mokomoko apesa makanisi na ye na lisolo yango. Salisá moto mokomoko amona mpenza ete Liloba ya Yehova ezali “ya kokoka,” mpe ezali koyebisa makambo oyo tosengeli na yango na bomoi na biso.​—Nz. 19:7, NW.

Okozwa mbano

Bato oyo batalelaka makambo na likebi kasi bazali na bososoli ya elimo te bakoki koyekola molɔ́ngɔ́, to makambo oyo ezali kosalema na mokili, ata mpe koyekola nzoto na bango moko, kasi bakangaka mpenza te ntina ya makambo oyo bazali komona. Nzokande, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bato oyo bayekolaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala bakoki kokanga ntina ete biloko yango ezali komonisa misala ya Nzambe, to kokokisama ya bisakweli ya Biblia mpe ya mokano ya Nzambe mpo na bato oyo bazali na botosi.​—Mko. 13:4-29; Lom. 1:20; Emon. 12:12.

Atako yango ezali likambo ya monene mpenza, tosengeli te kokóma na lolendo mpo na yango. Nzokande, koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo esalisaka biso tózala ntango nyonso na komikitisa. (Det. 17:18-20) Ezali mpe kobatela biso mpo na “nguya ya bokosi ya lisumu” mpamba te ntango Liloba ya Nzambe ezali kosala na mitema na biso, ekozala mpasi mpo tókwea na mposa ya kosala lisumu. (Ebe. 2:1; 3:13; Kols. 3:5-10) Na bongo, ‘tokotambola na ndenge ebongi na Yehova mpo tokosepelisa ye mpenza wana tozali kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu.’ (Kols. 1:10) Yango nde mokano na biso ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe soki tokokisi yango, tokozwa mbano oyo eleki monene.

MPO NA KOZWA MBANO OYO ELEKI MONENE

  • Bongisá motema na yo

  • Luká koyeba likambo oyo lisolo yango ekolobela

  • Tyá likebi na makanisi ya ntina

  • Talá ndenge bavɛrsɛ ezali komonisa ntina ya makanisi oyo epesami

  • Zongelá makanisi ya ntina

  • Manyolá mpo na koyeba ndenge oyo osengeli kosalela makambo yango na bomoi na yo

  • Luká ndenge ya kosalela makanisi yango mpo na kosalisa bato mosusu

NDENGE YA KOYEBA MAKAMBO OYO LISOLO YA BOYEKOLI EKOLOBELA

  • Talelá malamumalamu motó ya likambo

  • Talelá boyokani oyo ezali kati na motó ya likambo moke mokomoko na motó ya likambo monene

  • Talelá bililingi, bakalati to bitanda ya bozongeli

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto