Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be lok. 33-lok. 38 par. 4
  • Ndenge ya kolukaluka na mikanda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolukaluka na mikanda
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolukaluka na kati ya Biblia, mokanda na biso ya libosoliboso
  • Yekolá kolukaluka na mikanda mosusu
  • Bibliotɛkɛ ya mikanda ya Teokrasi
  • Zalá na dosye na yo moko
  • Sololá na bato
  • Talelá makanisi oyo ozwi
  • Esaleli ya sika mpo na bolukiluki
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Lolenge nini kobongisa bibliotɛkɛ ya teokrasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be lok. 33-lok. 38 par. 4

Ndenge ya kolukaluka na mikanda

MOKONZI SALOMO “atalaki malamu, alukaki mpe abongisaki masese mingi.” Mpo na nini? Mpamba te asepelaki kokoma “maloba ya solo oyo ebongi mpenza.” (Mos. 12:9, 10, NW) Luka ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta na ebandeli’ mpo na kolobela na molɔngɔ makambo oyo esalemaki na bomoi ya Klisto. (Luka 1:3) Basaleli ya Nzambe wana mibale bazalaki kolukaluka.

Kolukaluka elimboli nini? Kolukaluka elimboli koluka koyeba malamumalamu makambo oyo etali eloko moko to likambo moko boye. Yango esɛngi kotánga mpe koyekola. Ekoki mpe kosɛnga kotuna bato mosusu makanisi na bango na likambo yango.

Ntango nini tokoki kolukaluka? Tózwa mwa bandakisa: Mbala mosusu ntango ozali koyekola Biblia yo moko, ozwi mituna oyo ezali na ntina mingi mpo na yo. Ekoki kozala ete moto moko oyo opesaki ye litatoli atuni yo motuna oyo esɛngi ete olukaluka makambo mosusu mpo na kopesa ye eyano. To mbala mosusu basɛngi yo osala lisukulu.

Tózwa ndakisa ete basɛngi yo osala lisukulu. Mbala mosusu lisolo oyo osengeli kotalela ekɔti mpenza na bozindo te. Ndenge nini okoki kosala ete elobela mpenza mposa ya lisangá? Osengeli kolukaluka mpo na kozwa makanisi mosusu. Soki, ntango okosala lisolo na yo okopesa mitángo oyo ekomonisa bonene ya likambo to bandakisa oyo ekoyokana mpenza na makambo oyo okoloba mpe etali mpenza bomoi ya bato oyo bazali koyoka yo, ata ezali likambo oyo bato nyonso bayebi, bato oyo bazali koyoka bakomona ete oteyi bango makambo ya sika mpe kutu ekosepelisa bango. Mbala mosusu makambo oyo ezali na mokanda oyo ozali kotalela ekomamaki mpo na bato nyonso na mokili mobimba, kasi osengeli kobakisa makanisi mpe bandakisa mosusu mpo etalela mpenza lisangá to moto oyo ozali kosolola na ye. Okosala ndenge nini?

Liboso obanda kolukaluka, talelá naino bato oyo bakoyoka yo. Makambo nini bayebi? Makambo nini basengeli koyeba? Na nsima, omityela mokano moko: okolimbolela bango likambo yango? okondimisa bango yango? okokweisa yango? to okolendisa bango? Mpo na kolimbola likambo moko, osengeli koyebisa makambo mosusu oyo ekokómisa yango polele na matoi ya bato oyo bazali koyoka. Bato bakoki kosimba makanisi ya ntina, kasi mbala mosusu osengeli lisusu koyebisa bango ntango nini to ndenge nini bakoki kosalela makambo oyo olobi. Kondimisa bato likambo esɛngi ete omonisa mpenza ntina na yango, mpo na nini likambo yango ezali boye to boye, esɛngi mpe ete opesa bilembeteli na yango. Mpo na kokweisa makanisi, osengeli koyeba malamumalamu makanisi ndenge na ndenge oyo bato bazali na yango mpo na likambo yango mpe kotalela malamu mpenza bilembeteli na yango. Ya solo, biso tozali kaka te koluka makanisi oyo ekondimisa bato, kasi tozali mpe koluka ndenge oyo tokoki koyebisa bango makambo na boboto mpenza. Mpo na kolendisa bato, osengeli mpenza kosimba mitema na bango. Yango elingi koloba ete osengeli kopesa bato oyo bazali koyoka yo makasi mpe kokolisa epai na bango mposa ya kosalela makambo oyo ozali kolobela. Soki osaleli bandakisa ya bato oyo basalelaki makambo yango na bomoi na bango ata na ntango ya mpasi, yango ekoki kosalisa yo osimba mitema ya bato oyo bazali koyoka.

Okoki sikoyo kobanda kolukaluka? Naino te. Talelá sikoyo makambo boni osengeli kolobela. Mpo na yango, ntango oyo bapesi mpo na lisolo na yo nde ekokata likambo. Soki okosala lisolo yango liboso ya bandeko mosusu, okosala yango na boumeli ya ntango boni? Miniti mitano? Miniti ntuku minei na mitano? Ntango oyo epesami mpo na kosala lisolo yango eyebani, ndenge ezalaka na makita ya lisangá to yo moko nde okopona, lokola na ntango ozali koyekola Biblia elongo na moto to na ntango bankulutu batalaka bandeko mpo na kolendisa bango?

Mpo na kosukisa, okolukaluka na mikanda nini oyo ozali na yango? Longola mikanda oyo ozali na yango na ndako, ezali na mikanda mosusu na bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi? Bandeko oyo basaleli Yehova na boumeli ya bambula mingi bakondima ete osalela mikanda na bango mpo na kolukaluka? Na esika oyo ofandi, ezali na bibliotɛkɛ moko oyo bato nyonso bakendeke kotánga kuna, esika okoki kosalela badiksionɛrɛ mpe mikanda mosusu soki esengeli?

Ndenge ya kolukaluka na kati ya Biblia, mokanda na biso ya libosoliboso

Soki ozali kolukaluka ndimbola ya vɛrsɛ moko, bandá naino koluka na kati ya Biblia.

Talelá bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe oyo elandi. Omituna: ‘Lisolo yango etalelaki nani? Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe oyo elandi emonisi makambo nini oyo esali ete báloba maloba oyo, to emonisi bizaleli nini ya bato oyo balobeli bango awa?’ Makambo oyo nyonso ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya vɛrsɛ moko mpe ekoki kosalisa yo osala lisolo na yo malamu.

Na ndakisa, mbala mingi totángaka Baebele 4:12 mpo na komonisa ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya oyo ekoki kosimba mitema ya bato mpe kobongola bomoi na bango. Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe oyo elandi ezali kosalisa biso tóyeba lisusu malamumalamu ndenge nini yango ekoki kosalema. Elobeli bomoi ya Bayisalaele na boumeli ya mbula 40 oyo balekisaki na esobe, liboso ya kokɔta na mokili oyo Yehova alakaki Abalayama. (Ebe. 3:7–4:13) “Liloba ya Nzambe,” elingi koloba elaka oyo apesaki ete akomema bango na esika moko ya kopema mpo na kokokisa kondimana na ye na Abalayama, ekufaki te. Ezalaki na bomoi mpe ezalaki kokokisama mokemoke. Bayisalaele basengelaki mpenza komonisa kondima na liloba yango. Nzokande, ntango Yehova azalaki komema bango banda Ezipito tii na Ngomba Sinai mpe kokómisa bango na Mokili ya Ndaka, bamonisaki mbala na mbala ete bazangaki kondima. Yango wana, lokola basepelaki te na ndenge Nzambe azalaki kokokisa liloba na ye, makanisi ya mitema na bango emonanaki polele. Ndenge moko mpe lelo oyo, liloba ya Nzambe to elaka na ye, ezali komonisa makambo oyo ezali na mitema ya bato.

Talelá mitindami. Babiblia mosusu ezali na mitindami. Biblia na yo mpe ezali na yango? Soki ezali, yango ekoki kosalisa yo. Tózwa ndakisa moko na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika. Mokanda ya 1 Petelo 3:6 emonisi ete Sara apesaki ndakisa malamu oyo basi baklisto basengeli kolanda. Elembo oyo ezali wana ebimisi likanisi yango malamumalamu mpamba te etindi biso na Genese 18:12, esika emonisi ete na ‘kati ya motema na ye,’ Sara abengaki Abalayama nkolo na ye. Yango emonisi ete azalaki mpenza kotosa Abalayama na motema moko. Longola bandimbola lokola oyo, mitindami yango ekoki kotinda yo na bavɛrsɛ oyo emonisi ndenge esakweli moko ya Biblia to etinda moko ya Mibeko ya Moize ezali kokokisama. Kasi okomona ete mitindami mosusu epesaka bandimbola wana nyonso te. Mitindami mosusu ekotinda yo na bavɛrsɛ oyo ezali kolobela likanisi wana moko to bomoi ya moto moko to mpe makambo ya mboka wana oyo ozali kotánga.

Salelá Concordance biblique. Concordance biblique ezali liste ya maloba oyo esalelami na kati ya Biblia. Yango ekoki kosalisa yo omona vɛrsɛ oyo elobeli likambo oyo ozali koluka. Ntango ozali kosalela yango, okoyekola makambo mingi lisusu. Okomona polele “ndakisa” ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 1:13) Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezalaka na liste moko ya maloba ya ntina, oyo babengi “Index ya maloba ya Biblia.” Mokanda Concordance complète ezali na maloba mingi koleka. Soki ezali na monɔkɔ oyo oyebi, ekoki kotinda yo na bavɛrsɛ nyonso esika okokuta liloba mokomoko ya ntina oyo ezali na kati ya Biblia.

Yekolá kolukaluka na mikanda mosusu

Etanda oyo ezali na lokasa 33 emonisi mikanda mosusu oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesi biso mpo tósalela ntango tozali kolukaluka. (Mat. 24:45-47) Mikanda yango mingi ezali na etanda ya makambo oyo ezali na kati, mpe mingi mosusu ezali na index na nsuka na yango mpo na kosalisa yo opona likambo oyo ozali koluka. Na nimero nyonso ya nsuka ya mbula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezalaka na index ya masolo nyonso oyo ebimaki na mbula wana.

Soki omeseni na makambo oyo ezalaka na mikanda wana mpo na koyekola Biblia, yango ekoki kosalisa yo omona nokinoki likambo oyo ozali koluka. Na ndakisa, soki olingi koyeba makambo mingi lisusu oyo etali esakweli moko to liteya moko to etamboli ya baklisto to mpe lolenge ya kosalela etinda moko ya Biblia, na ntembe te, okokuta yango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lamuká! elobelaka makambo oyo ezali kosalema na mokili, mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango, makambo ya mangomba, makambo ya siansi mpe bato ya mikili ndenge na ndenge. Mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo elimboli makambo nyonso oyo ezali na Baevanzile, na kolanda molɔngɔ ndenge oyo yango esalemaki. Mikanda lokola Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mpe bavolimi mibale ya mokanda Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso ezali kolimbola vɛrsɛ mokomoko ya mikanda mosusu ya Biblia. Na kati ya mokanda Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, okokuta ebele ya mituna oyo bato batunaka mpo na Biblia, mituna oyo tokutanaka na yango mingi na mosala ya kosakola. Mpo na koyeba mangomba mosusu malamu, mateya na bango mpe ndenge ebandaki, talá mokanda L’humanité à la recherche de Dieu. Makambo nyonso etali mosala ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso ezali na mokanda Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu. Mpo na koyeba ndenge tosalaki mosala ya kosakola na mokili mobimba, talá Annuaire des Témoins de Jéhovah oyo euti kobima. Mokanda Étude perspicace des Écritures ezali buku moko monene oyo ezali kolimbola maloba mingi ya Biblia, ezali mpe na bakalati. Mokanda yango ekosalisa yo mpenza soki ozali na mposa ya koyeba makambo etali bato, bisika, biloko, minɔkɔ mpe makambo mosusu oyo ezalaki kosalema na ntango ya kala, oyo Biblia elobeli.

“Index des publications de la Société Watch Tower.” Index yango ebimisami na minɔkɔ koleka 20 mpe ekotinda yo na mikanda na biso mingi. Ekabwani na biteni mibale: index ya masolo mpe index ya bavɛrsɛ. Soki olingi kosalela index ya masolo, luká liloba oyo ezali komonisa likambo oyo ozali koluka. Soki olingi kosalela index ya bavɛrsɛ, talá na liste ya bavɛrsɛ mpe luká vɛrsɛ oyo olingi kokanga ntina na yango malamu. Soki na bambula oyo etyami na Index, ezali na mikanda oyo ebimaki na monɔkɔ oyo oyebi mpe elobeli likambo oyo ozali koluka to vɛrsɛ oyo ozali koluka, okomona liste ya mikanda oyo osengeli kotalela. Salelá lokasa oyo ezali na ebandeli ya Index mpo na koyeba nkombo ya mikanda ndenge bakomi yango na mokuse na Index. (Na ndakisa, w99 1/3 15 elimboli Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1999, lokasa 15.) Mitó ya makambo minene, lokola “Ministère du champ, rapports” mpe “Biographie de Témoins de Jéhovah,” ekoki kosalisa yo ntango ozali kobongisa masolo mpo na kolendisa lisangá.

Lokola kolukaluka na mikanda ekoki komema yo na masolo mingi oyo ekosepelisa yo, kebá ete otika te likambo oyo ozali koluka. Tyá makanisi na yo nyonso na mokano na yo ya kolukaluka makambo oyo osengeli na yango mpo na lisolo oyo okosala. Soki Index etindi yo na mokanda moko, talá yango na lokasa oyo batindi yo mpe na nsima, salelá mitó ya likambo mike mpe bafraze ya ebandeli ya baparagrafe mpo elakisa yo makanisi oyo ozali koluka. Soki ozali koluka ndimbola ya vɛrsɛ moko ya Biblia, luká libosoliboso esika vɛrsɛ yango emonani na lokasa oyo batindi yo otala. Na nsima, talelá makanisi oyo ezali liboso ya maloba ya vɛrsɛ yango mpe oyo elandi yango.

Diskɛ CD-ROM “Watchtower Library.” Soki ozali na ordinatɛrɛ, okoki kosalela diskɛ CD-ROM Watchtower Library. Diskɛ yango ezali na mikanda na biso mingi. Programɛ yango ezali mpasi te mpo na kosalela mpe ekosalisa yo oluka liloba moko to maloba ebele to mpe vɛrsɛ moko na mokanda nyonso oyo ezali na kati ya diskɛ yango. Ata soki ezali na monɔkɔ ya mboka na bino te, kasi soki ezali na monɔkɔ moko oyo oyebi, mpe elobamaka mingi na mokili mobimba, ekoki kosalisa yo.

Bibliotɛkɛ ya mikanda ya Teokrasi

Na mokanda na ye ya mibale epemami oyo akomelaki Timote, Paulo asɛngaki elenge mobali yango ete amemela ye na Loma, “barulo, mingimingi mpenza oyo ya mposo ya nyama.” (2 Tim. 4:13) Paulo ayebaki ete makomi mosusu ezali na ntina mingi mpe azalaki kobomba yango. Yo mpe okoki kosala bongo. Obombaka banimero na yo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya Lamuká! mpe ya Mosala na biso ya Bokonzi ata soki botalelaki yango na makita ya lisangá? Soki ezali bongo, okoki kolukaluka na kati na yango mpe na kati ya mikanda mosusu oyo ozali na yango. Masangá mingi ebatelaka malamu mikanda oyo etali Teokrasi na bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi mpe ebakisaka mikanda mosusu. Yango ezali mpo na litomba ya lisangá mobimba, mpo básalela yango ntango bazali na Ndako ya Bokonzi.

Zalá na dosye na yo moko

Tyá mpenza likebi na makambo nyonso ya ntina oyo okoki kosalela ntango ozali koloba to koteya. Soki omoni likambo moko na zulunalo moko ya mokili to na mokanda moko to mpe ndakisa moko oyo okoki kosalela na mosala ya kosakola, katá eteni yango to salá fotokopi na yango. Komá mpe dati na yango, nkombo ya zulunalo yango mpe mbala mosusu nkombo ya moto oyo abimisaki yango to ya kompanyi oyo ebimisaki yango. Na makita ya lisangá, komá na mokuse makanisi mpe bandakisa oyo ekoki kosalisa yo olimbola malamu mpenza solo epai ya basusu. Osilá kokanisa ndakisa moko kitoko kasi ozwá naino libaku ya kosalela yango te? Komá yango mpe bombá yango na dosye moko. Soki oumelá bambula mingi banda okomisá nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, boye osalá masolo mingi. Na esika ya kobwaka banɔti ya masolo yango, bombáká yango. Okoki kosalela makambo wana oyo olukalukaki na mbala ya nsima.

Sololá na bato

Okoki koyeba makambo mingi epai ya basusu. Ntango Luka azalaki kokoma masolo ya Evanzile na ye, na ntembe te azwaki makambo mingi epai ya bato oyo bamonaki ndenge yango esalemaki. (Luka 1:1-4) Mbala mosusu ndeko moko moklisto akoki kolimbolela yo likambo oyo ozalaki kolukaluka. Baefese 4:8, 11-16 elobi ete Klisto asalelaka “makabo oyo ezali bato,” mpo na kosalisa biso tókola na “boyebi ya solosolo ya Mwana ya Nzambe.” Okoki kozwa makanisi malamu mpenza soki ozali kosolola na bato oyo baumeli na mosala ya Nzambe. Soki ozali kosolola na bato, yango ekoki kosalisa yo oyeba makanisi na bango mpe ekosalisa yo obongisa lisolo oyo ekosunga bango mpenza.

Talelá makanisi oyo ozwi

Nsima ya kokata loso na elanga, esengeli kotuta yango mpo na kolongola mposo na yango. Ezali mpe bongo mpo na makanisi oyo ozwi nsima ya kolukaluka na mikanda. Liboso ya kosalela yango, osengeli kokabola makanisi ya ntina na oyo ezali mpenza na ntina mingi te.

Soki okosalela makanisi yango na lisukulu, omituna boye: ‘Likanisi oyo nalingi kolobela ezali mpenza na ntina mpo na lisolo oyo nakosala? To, ata soki ezali likanisi moko malamu, ekolongola likebi ya bato na lisolo oyo nasengeli kosala?’ Soki olingi kolobela makambo oyo euti kosalema na mokili to makambo ya siansi to ya mosala ya minganga, luká koyeba soki ezali mpenza makanisi ya mikolo oyo, mpamba te yango ebongwanaka ntango nyonso. Kobosana mpe te ete makanisi mosusu oyo ebimaki na mikanda na biso ya kala ekoki kobongwana, yango wana, talelá mikanda oyo euti kobima sika mpe elobeli likambo yango.

Osengeli kokeba mpenza ntango olingi kozwa makanisi oyo euti na mikanda mosusu ya mokili. Kobosana te ete Liloba ya Nzambe ezali solo. (Yoa. 17:17) Yesu azali na mokumba ya ntina mingi mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Yango wana Bakolose 2:3 elobi boye: “Biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi ebombami malamumalamu na kati na ye.” Kobosana makambo oyo te ntango ozali kotalela makanisi oyo ozwi nsima ya kolukaluka. Mpo na makanisi oyo ozwi na mikanda mosusu ya mokili, omituna: ‘Na makambo oyo balekisi ndelo, to ezali na bilembeteli te, to mpe ezangi ntina? Bakomaki yango mpo na koluka matomba na bango moko to mpo na koluka mbongo? Bato mosusu ya mayele bandimi yango? Na koleka, makanisi yango eyokani na solo ya Biblia?’

Masese 2:1-5 elendisi biso tóluka ntango nyonso boyebi, mayele mpe bososoli ‘lokola tolukaka palata mpe biloko ya motuya bibombami.’ Yango esɛngi milende mingi kasi ekopesa mpe mbano mpenza. Kolukaluka na mikanda esɛngaka milende mpenza, kasi ekosalisa yo oyeba makanisi ya Nzambe na makambo mingi. Okobwaka makanisi oyo ezali solo te mpe okokangama mpenza na solo. Ekosala lisusu ete masolo na yo ezala na makanisi ya ntina mpe esimba mitema ya bato. Okozala na esengo mingi ntango ozali kosala masolo yango mpe bato mosusu bakosepela koyoka yo.

MIKANDA NINI OZALI NA YANGO MPO NA KOLUKALUKA?

  • Biblia Makomami Mosantu–Libongoli ya Mokili ya Sika

  • Concordance complète

  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!

  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami

  • Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu

  • Étude perspicace des Écritures

  • Index des publications de la Société Watch Tower

  • Diskɛ CD-ROM Watchtower Library

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto