Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 5 lok. 97-lok. 100 par. 4
  • Kopema na esika oyo ebongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopema na esika oyo ebongi
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Volime ya mongongo mpe poze
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kotánga malamu
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Batoli elendisaka
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 5 lok. 97-lok. 100 par. 4

LITEYA 5

Kopema na esika oyo ebongi

Osengeli kosala nini?

Ntango ozali kosala lisolo na yo, osengeli mpenza kotɛlɛma na bisika mosusu. Mbala mosusu, osengeli kopema to kokitisa mongongo mwa moke. Kopema ebongi mpenza soki ezali na ntina.

Yango ezali na ntina nini?

Ntango ozali koloba, ezali na ntina mingi ete oyeba kopema mpo bato bákangaka ntina ya maloba na yo. Soki ozali kopema, yango ekosala mpe ete makanisi ya ntina ya lisolo na yo emonana polele.

NTANGO ozali koloba, ezali na ntina mingi opema na esika oyo ebongi, ezala ntango ozali kosala lisukulu to ntango ozali kosolola na moto moko. Soki ozali kopema te, bato bakomona ete ozali kolobaloba makambo ezangi ntina na esika ete obimisa polele makanisi oyo bakokanga mpenza ntina na yango. Soki ozali kopema na esika oyo ebongi, yango ekosala ete lisolo na yo ebima polele. Okoki mpe kopema na esika oyo ekosala ete makanisi ya ntina ya lisolo na yo esimba mpenza mitema ya bato oyo bazali koyoka yo.

Ndenge nini okoki koyeba esika oyo osengeli kopema? Osengeli kopema mingi to mingi te?

Ntango bilembo esɛngi ete opema. Na nkota oyo bakomaka na mokanda, bilembo ya bopemi ezali na ntina mingi. Yango ekoki komonisa soki fraze esuki to soki ezali motuna. Na nkota mosusu, bilembo nde emonisaka polele maloba oyo euti na mokomi to na mokanda mosusu. Bilembo mosusu ya bopemi emonisaka ete ndambo ya fraze elandani na ndambo mosusu. Moto oyo azali kotánga mpo na ye moko akoki komona bilembo ya bopemi. Kasi ntango azali kotánga mpo na bato mosusu, mongongo na ye nde esengeli komonisa esika oyo elembo nyonso ya bopemi ezali na kati ya mokanda. (Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá Liteya 1, “Kotánga malamu.”) Soki ozali kopema te mpo na kotosa bilembo yango, ekoki kozala mpasi ete basusu bákanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga, to ekoki kutu kobongola ndimbola ya makambo oyo ekomami na mokanda.

Longola bilembo ya bopemi, lolenge makanisi elandani na kati ya fraze emonisaka mpe esika oyo osengeli kopema. Moto moko oyo abɛtaka miziki, mpe ayebani mingi alobaki boye: “Nabɛtaka banɔti ya miziki malamu te koleka bato mosusu oyo babɛtaka piano. Kasi na oyo etali kopema liboso to nsima na banɔti ya miziki, wana nde mosala na ngai.” Ezali mpe bongo ntango tozali koloba. Soki ozali kopema na ndenge esengeli ntango ozali koloba ekosala mpenza ete makambo oyo obongisaki malamu mpo na koloba ezala kitoko koleka mpe bato bákanga ntina na yango malamu koleka.

Ntango ozali komibongisa mpo na kotánga na miso ya bato mingi, mbala mosusu okomona malamu kotya mwa bilembo na mokanda oyo okotánga. Na esika oyo okopema mwa moke, okoki kotya elembo moko. Na esika oyo okopema mingi, okoki kotya bilembo mibale. Soki omoni ete fraze moko ezali makasi mpe ozali kopemapema na bisika oyo ebongi te, tyá mwa elembo na kreyɔ mpo na kokangisa esika moko maloba nyonso ya fraze yango. Na nsima, tángá fraze yango banda na ebandeli tii na nsuka. Bato mingi oyo bayebi mpenza koloba basalaka bongo.

Mbala mingi, kopema ntango ozali kosolola na bato ezalaka mpenza mpasi te, mpamba te oyebi makanisi oyo yo moko olingi kobimisa. Nzokande, soki ozali na momeseno ya kopemapema, ezala na esika oyo yango ebongi mpe na esika oyo ebongi te, maloba na yo ekosimba mpenza mitema te mpe ekozala polele te. Mpo na kosilisa mbeba yango mpe kobongisa lolenge na yo ya koloba, okoki kotala toli oyo ezali na Liteya 4, “Kokakatana na maloba te.”

Kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu. Ntango olingi koleka na likanisi mosusu ya ntina, osengeli kopema mpo na kotikela bato oyo bazali koyoka yo ntango ya kokanisa, ya komibongisa, ya koyeba ete olingi koleka na likanisi mosusu mpe komona polele likanisi yango oyo olingi koloba. Kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu ezali na ntina mingi, ndenge moko lokola otɛlɛmaka mwa moke liboso ya kokatisa balabala.

Balobi mosusu balekaka mbangumbangu na likanisi mosusu kozanga kopema, mpamba te balukaka kolobela makambo ebele ebele. Mpo na bato mosusu, yango emonisaka lolenge oyo bameseni koloba. Mbala mosusu bato nyonso oyo bafandi na bango balobaka mpe ndenge wana. Kasi yango esalaka ete mateya na bango esimba mitema ya bato te. Soki ozali na likambo moko ya ntina ya koloba, oyo olingi ete bato báyoka yango mpe bákanga yango na motó, zwá mpenza ntango ya kobongisa makanisi na yo mpo ebima polele. Yebá ete kopema ezali na ntina mingi soki olingi koloba mpe kobimisa makanisi polele.

Soki okosala lisukulu ya plan, osengeli kobongisa makanisi na yo mpo bisika oyo okopema liboso ya koleka na likanisi mosusu ya ntina emonana polele. Soki okotánga lisukulu ya maniskri, tyá elembo na esika oyo likanisi moko esuki mpe mosusu ya ntina ebandi.

Mbala mingi, kopema mpo na koleka na likanisi mosusu eumelaka mingi koleka kopema ntango bilembo esɛngi ete tópema, kasi esengeli koumela mingi mpenza te, mpamba te yango ekosala ete lisolo na yo eumela. Soki ozali kopema mingi, yango ekomonisa lokola ete omibongisaki malamu te mpe ozali kolukaluka makambo oyo osengeli koloba.

Kopema mpo na konyata likambo moko ya ntina. Mbala mingi kopema mpo na konyata likambo moko ya ntina ebendaka likebi, yango ezalaka liboso to nsima ya kobimisa likanisi moko to motuna moko oyo olobi yango makasi. Soki opemi bongo, yango ekotikela bato oyo bazali koyoka yo ntango ya kokanisa makambo oyo outi koloba, to ekotinda bango bázela na motema likoló makambo oyo olingi koloba. Ndenge wana nyonso ya kopema ekokani te. Yo moko okopona oyo wapi ebongi mpenza osalela. Kasi kobosana te ete okopema mpo na konyata likambo moko ya ntina kaka soki likanisi yango ezali mpenza na ntina mingi. Soki te, makanisi yango ekozala lisusu na ntina te.

Ntango Yesu atángaki Makomami liboso ya bato mingi na sinagoga ya Nazarete, apemaki mpenza malamu mpe na ntango oyo ebongi. Libosoliboso, atángaki na rulo ya mosakoli Yisaya mokumba oyo azwaki. Nzokande, liboso amonisa ndenge oyo makambo yango ekokisami, akangaki rulo, azongisaki yango epai ya mosaleli ya sinagoga mpe akendaki kofanda. Na nsima, lokola miso ya bato nyonso na sinagoga ezalaki kaka kotala ye, alobaki boye: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”​—Luka 4:16-21.

Kopema mpo na makɛlɛlɛ. Ntango ozali kosala lisolo na yo, soki makɛlɛlɛ ezali, osengeli kopema. Ntango ozali kosolola na moto moko na mosala ya kosakola, ekosɛnga mbala mosusu opema mwa moke soki motuka moko ezali koleka to soki mwana azali kolela. Na mayangani, soki makɛlɛlɛ ezali mpenza makasi te, okoki kotombola mongongo na yo mpe kokoba na lisolo. Kasi soki makɛlɛlɛ ezali makasi mpe ezali koumela, osengeli kopema, mpamba te ata bato oyo bazali koyoka yo mpe bakolanda yo te. Yango wana, yebá esika nini ebongi kopema mpo osalisa bato oyo bazali koyoka yo bázwa mpenza litomba na makambo malamu oyo olingi koyebisa bango.

Kopema mpo na kotika moto ayanola. Ata ntango ozali kosala lisolo oyo esɛngi mituna mpe biyano te, ezali na ntina mingi ete otikelaka bato oyo bazali koyoka ntango ya kopesa biyano na mituna na yo, na maloba te, kasi na mitema na bango. Soki otuni mituna oyo esɛngi na bato oyo bazali koyoka ete bákanisa, kasi opemi na ndenge esengeli te, mituna yango ekozala na ntina mpenza te.

Ya solo, ezali na ntina mingi ete opemaka kaka ntango ozali kosala lisolo liboso ya bato mingi te, kasi mpe ntango ozali kopesa bato mosusu litatoli. Emonani ete bato mosusu bapemaka te. Soki yo mpe ozali na mokakatano yango, salá makasi mpenza ete oyekola ezaleli oyo molobi nyonso asengeli kozala na yango. Okobongisa lolenge na yo ya kosolola na bato mosusu mpe mosala na yo ya kosakola ekobota mbuma malamu koleka. Kopema ezali ntango ya kofanda mwa moke nyɛɛ, yango wana balobaka ete kofanda nyɛɛ ekataka lolaka, ezali ntango ya konyata makanisi ya ntina mpe ebendaka likebi ya bato mpe epemisaka matoi na bango mpo báyoka malamu lisusu.

Kosolola elimboli ete bato mibale to bato mingi bazali koyebisana makanisi na bango. Basusu bakoyoka yo soki yo mpe ozali koyoka bango mpe ozali komonisa ete ozali kosepela na makambo oyo bazali koloba. Yango esɛngi ete opema ntango molai mpo na kotikela bango mpe ntango ya koloba.

Na mosala ya kosakola, litatoli na biso ekobota mpenza mbuma soki tozali kosala yango lokola lisolo. Nsima ya kopesana mbote, Batatoli mingi bamonaka ete ezali malamu báyebisa likambo oyo balingi koloba mpe na nsima, batunaka motuna moko. Bapemaka mpo na kotikela molobani na bango ntango ya kopesa eyano, mpe na nsima, bamonisaka ete bayoki makambo oyo moto yango alobi. Ntango bazali kosolola, bakoki kotikela moto yango ntango mingi ete apesa makansi na ye. Bayebi mbala mingi ete basalisaka moto malamu koleka soki bayebi mpenza makanisi na ye na likambo oyo bazali kosolola.​—Mas. 20:5.

Ya solo, moto nyonso te nde akopesa biyano ya malamu na mituna na yo. Kasi likambo yango elɛmbisaki Yesu te ete afanda nyɛɛ na boumeli ya mwa ntango molai mpo na kotikela ata banguna na ye ntango ya koloba. (Mko. 3:1-5) Soki otikeli moto ntango ya koloba, yango ekolendisa ye ete akanisa mpe, mbala mosusu, yango ekosala ete abimisa makambo oyo ezali na motema na ye. Moko ya ntina ya mosala na biso ya kosakola ezali ete tósimba mpenza mitema ya bato ntango tozali kolakisa bango makambo ya ntina mingi na kati ya Liloba ya Nzambe, oyo ekosɛnga bango bázwa bikateli.​—Ebe. 4:12.

Na mosala na biso ya kosakola, koyeba kopema na esika oyo ebongi ezali mpenza likambo oyo bayekolaka yango koyekola. Soki ozali mpenza kopema na esika oyo ebongi, makanisi ekobima polele koleka mpe ekotikala libela na bɔɔngɔ ya bato.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Tyá mpenza likebi na bilembo ya bopemi ntango ozali kotánga na mongongo makasi.

  • Tyá likebi ntango bandeko oyo bayebi mpenza koloba bazali koloba, mpe talá soki bazali kopema na bisika nini mpe na boumeli ya ntango boni.

  • Nsima ya koloba likambo moko oyo olingi mpenza ete basusu bákanga yango, pemá mwa moke mpo likambo yango esimba mpenza mitema na bango.

  • Ntango ozali kosolola na bato, sɛngáká bango bápesa makanisi na bango mpe yoká bango malamu ntango bazali koloba. Tiká bango básilisa koloba. Kokataka bango maloba te.

DEVUARE: Tángá Malako 9:1-13 na mongongo makasi; pemá na ndenge esengeli na bisika oyo bilembo esɛngi yango. Koumela mingi te na botángi na yo. Nsima ya komeka, sɛngá moto mosusu ayoka yo mpe apesa yo toli mpo na ndenge ozali kopema.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto