Mokapo ya yambo
Bomoko ya losambo na mikolo na biso—Elimboli nini?
1, 2. (a) Likambo nini ezali kosalema na mikolo na biso? (b) Elikya nini ya kitoko bato ya mitema sembo bazali na yango?
NA MOKILI mobimba, bato ebele bazali koyangana na esengo mpenza mpo na kosambela na bomoko. Losambo yango ezali kosangisa bamilio ya bato ya bikólo nyonso, ya mabota nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso. Mbula na mbula, ebele ya bato mosusu bazali mpe kobakisama. Biblia elobi ete bato yango bazali “batatoli” ya Yehova mpe ebengi bango “ebele ya bato.” Bazali kosalela Nzambe “mosala mosantu butu moi.” (Yisaya 43:10-12; Emoniseli 7:9-15) Mpo na nini bazali kosala yango? Mpamba te bayebi sikoyo ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo. Yango nde ezali kotinda bango báluka kotambwisa bomoi na bango na boyokani na banzela na ye ya sembo. Lisusu, makambo bayekoli emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mabe, bayekoli mpe ete etikali moke, Nzambe aboma mokili oyo mpe atya mokili moko ya sika, yango nde paladiso.—2 Timote 3:1-5, 13; 2 Petelo 3:10-13.
2 Liloba ya Nzambe elaki ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe ya solo bakosepela na kimya mingi.” (Nzembo 37:10, 11, NW) “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa, ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”—Emoniseli 21:4.
3. Ndenge nini bato bazali kosangisama na kati ya losambo se moko?
3 Bato oyo bazali kosangisama sikoyo na kati ya losambo ya solo, bango nde bakozala bato ya liboso oyo bakofanda na mokili yango ya sika. Bayekoli mokano ya Nzambe mpe bazali kosala makasi mpo na kotosa yango. Kutu Yesu amonisaki ntina ya kosala bongo ntango alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ntoma Yoane akomaki ete: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”—1 Yoane 2:17.
Bomoko ya losambo elimboli mpenza nini?
4. (a) Kosangisama ya bato ebele na kati ya losambo oyo ezali na bomoko na mikolo na biso elimboli mpenza nini? (b) Ndenge nini Biblia elobeli kosangisama yango?
4 Kosangisama ya bato ebele na kati ya losambo oyo ezali na bomoko na mikolo na biso elimboli mpenza nini? Yango ezali komonisa polele ete tokómi mpenza pene na nsuka ya mokili mabe oyo, mpe nsima na yango, mokili ya sika ya Nzambe ekobanda mbala moko. Tozali biso moko komona na miso ndenge bisakweli ya Biblia oyo elobelaki kosangisama yango ya bato mingi ezali kokokisama. Moko ya bisakweli yango elobi boye: “Na ntembe te, na mikolo ya nsuka [mikolo ya nsuka oyo tozali sikoyo] ngomba ya ndako ya Yehova [lingomba na ye ya solo oyo etombwami likoló] ekotyama makasi likoló ya bangomba nyonso [mangomba nyonso] . . . mpe bato bakokenda kotondana kuna. Ya solo, bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete: ‘Bóya mpe tóbuta na ngomba ya Yehova mpe na ndako ya Nzambe ya Yakobo, mpe akolakisa biso na banzela na ye mpe tolingi kotambola na banzela na ye.’”—Mika 4:1, 2, NW; Nzembo 37:34.
5, 6. (a) Nini emonisi ete bikólo ya mokili ezali mpenza koya epai ya Yehova? (b) Mituna nini tosengeli komituna?
5 Atako bikólo nyonso te nde ezali koya mokomoko na ndako ya Yehova na ndenge ya elimo mpo na losambo, nzokande bamilio ya bato oyo bauti na bikólo nyonso wana bazali koya. Ntango bazali koyekola mokano ya Yehova Nzambe oyo emonisi bolingo na ye mpe bomoto na ye malamu, mitema na bango ezali kotonda na esengo. Yango wana, bazali komikitisa mpo na koluka koyeba eloko nini mpenza Nzambe azali kosɛnga bango. Bazali kobondela ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Lakisá ngai ete nasala mokano na yo mpo ete yo ozali Nzambe na ngai.”—Nzembo 143:10.
6 Ozali komimona kati na ebele ya bato yango oyo Yehova azali kosangisa na mikolo na biso na kati ya losambo oyo ezali mpenza na bomoko? Lokola osili kozwa mateya oyo euti na Liloba na ye, makambo oyo ozali kosala ezali mpenza komonisa ete ondimaka ete Yehova nde azali Mopesi na yango? Okondima mpenza ‘kotambola na banzela na ye’?
Ndenge oyo bomoko ya losambo ezali kosalema
7. (a) Bomoko ya losambo ekokende kosuka tii wapi? (b) Mpo na nini esengeli kosala nokinoki mpo na kokóma mosambeli ya Yehova sikoyo, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bato mosusu básala mpe bongo?
7 Mokano ya Yehova ezali ete bikelamu na ye nyonso ya mayele básangana na kati ya losambo ya solo. Tozali mpenza kozela na motema likoló mokolo oyo bikelamu nyonso ya bomoi bakosambela Nzambe kaka moko ya solo! (Nzembo 103:19-22) Kasi liboso ete likambo yango esalema, Yehova asengeli naino kolongola bato nyonso oyo bazali koboya kosala mokano na ye ya boyengebene. Mpe lokola ayokelaka bato mawa, azali kokebisa bango báyeba makambo oyo akosala mpo moto nyonso, ezala esika nini azali, azwa ntango ya kotika bizaleli na ye ya mabe. (Yisaya 55:6, 7) Yango wana, mikolo oyo ‘bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bato ya mikili nyonso’ bazali koyoka ndenge bazali kobelela bango básala nokinoki, ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei, mpe na yango bósambela Oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe maziba ya mai.” (Emoniseli 14:6, 7) Osili kondima kosala oyo bazali kosɛnga? Soki ezali bongo, yo mpe ozali na libaku malamu ya kobenga bato mosusu oyo batikali mpo báyeba mpe básambela Nzambe ya solo.
8. Nsima ya koyekola mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli, tosengeli lisusu kozala na mposa makasi ya kosala nini mpo na kokende liboso?
8 Mposa ya Yehova ezali te ete bato oyo balobaka ete bandimelaka ye kasi batikaka te koluka matomba na bango moko básambela ye. Nzambe alingaka nde bato bákóma na “boyebi ya solosolo ya mokano na ye” mpe bámonisa yango na bomoi na bango. (Bakolose 1:9, 10) Yango wana, ntango bato ya botɔndi bazali koyekola mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli, basalaka nokinoki mpo na kokóma baklisto oyo bakɔmeli. Mposa na bango ezali ya koyeba Yehova lisusu malamumalamu, koyeba makambo mingi na kati ya Liloba na ye mpe kokanga ntina na yango malamumalamu, mpe kosalela yango lisusu malamumalamu na bomoi na bango. Basalaka makasi mpo na kozala na bizaleli oyo Tata na biso ya likoló azali na yango mpe kotalela makambo ndenge ye atalelaka yango. Yango ezali kotinda bango básala nyonso mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobikisa bato, mosala oyo ye azali kotambwisa na mabele mobimba na mikolo na biso. Yo mpe ozalaka na mposa ya kosala bongo?—Malako 13:10; Baebele 5:12–6:3.
9. Na ndenge nini bomoko ya solosolo ekoki kosalema lelo oyo?
9 Biblia emonisi ete bato oyo bazali kosalela Yehova basengeli kozala na bomoko. (Baefese 4:1-3) Bomoko yango esengeli komonana sikoyo, atako tozali na kati ya mokili oyo bato bakabwani mpe tozali naino kobundana na bizaleli na biso ya kozanga kokoka. Yesu abondelaki makasi ete bayekoli na ye bázala lokola moto moko, bázala na bomoko ya solosolo. Yango elingaki mpenza koloba nini? Ya liboso, elingaki komonisa ete bakozala na boyokani ya malamu na Yehova mpe Mwana na ye. Ya mibale, bakozala liboke moko. (Yoane 17:20, 21) Mpo na kokokisa likambo yango, Yehova azali kopesa basaleli na ye mateya na nzela ya lisangá ya boklisto, ebongiseli oyo ye azali kosalela.
Wapi makambo oyo esalaka ete bomoko ezala?
10. (a) Ezaleli nini tokolisaka soki tozali kosalela Biblia biso moko mpo na kokanisa mpe kopesa biyano na mituna oyo etali biso? (b) Ntango ozali kopesa biyano na mituna oyo batii na paragrafe oyo, lobelá makambo oyo ezali kosala ete baklisto bázala na bomoko.
10 Na nse ya paragrafe oyo tokolobela makambo nsambo ya ntina oyo epesaka nzela ete bomoko ya losambo ezala. Ntango ozali kopesa biyano na mituna oyo etali makambo yango nsambo, kanisá malamumalamu na nini likambo mokomoko etali boyokani na yo na Yehova mpe na baninga na yo baklisto. Soki okanisi makambo yango malamumalamu mpe otángi bavɛrsɛ oyo batii wana, yango ekosalisa yo okolisa bwanya oyo euti na Nzambe, ekokolisa makoki na yo ya kokanisa mpe bososoli na yo—makoki oyo biso nyonso tolukaka. (Masese 5:1, 2; Bafilipi 1:9-11) Talelá makambo yango mokomoko.
(1) Tondimi ete Yehova nde asengeli kotya mitinda na likambo oyo etali malamu na mabe. “Talelá Yehova na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
Mpo na nini tosengeli koluka toli mpe kondima ete Yehova atambwisa biso ntango tozali kozwa bikateli? (Nzembo 146:3-5; Yisaya 48:17)
(2) Liloba ya Nzambe etambwisaka biso. “Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe kosala mosala na kati na bino bandimi.”—1 Batesaloniki 2:13.
Likama nini ekoki kobima ntango tozali kosala makambo oyo “tokanisi” ete ezali kaka malamu? (Masese 14:12; Yilimia 10:23, 24; 17:9)
Soki toyebi mpenza te toli oyo Biblia ezali kopesa mpo na likambo moko boye, tosengeli kosala nini? (Masese 2:3-5; 2 Timote 3:16, 17)
(3) Biso nyonso tozwaka matomba ntango tolyaka na mesa kaka moko ya elimo. “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova].” (Yisaya 54:13) “Tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.”—Baebele 10:24, 25.
Baoyo balyaka malamumalamu bilei ya elimo oyo Yehova apesaka bazwaka matomba nini? (Yisaya 65:13, 14)
(4) Yesu Klisto nde azali Mokambi na biso, kasi moto te. “Kasi bino, bóbengama Labi te, mpo kaka moko nde azali moteyi na bino, nzokande bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo kaka moko nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló. Bóbengama mpe te ‘batambwisi,’ mpo motambwisi na bino azali kaka moko, Klisto.”—Matai 23:8-10.
Moko na biso asengeli kokanisa ete azali likoló ya basusu? (Baloma 3:23, 24; 12:3)
(5) Tozali kotalela Bokonzi ya Nzambe ete ezali elikya kaka moko mpo na bato. “Bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalama, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.’ Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko wana mosusu ekobakisamela bino.”—Matai 6:9, 10, 33.
Ndenge nini “koluka liboso bokonzi” esalisaka biso tóbatela bomoko na biso? (Mika 4:3; 1 Yoane 3:10-12)
(6) Elimo santu epesaka basambeli ya Yehova bizaleli oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoko ya baklisto. “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, malamu, kondima, boboto, komipekisa.”—Bagalatia 5:22, 23.
Tosengeli kosala nini mpo elimo ya Nzambe ebota mbuma na yango na kati na biso? (Misala 5:32)
Ndenge nini elimo ya Nzambe esalaka mpo na kobatela boyokani na biso na baninga na biso baklisto? (Yoane 13:35; 1 Yoane 4:8, 20, 21)
(7) Bato nyonso oyo basambelaka Nzambe ya solo basakolaka nsango malamu ya Bokonzi na ye. “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Nini esengeli kotinda biso tóbimaka mingi na mosala ya kosakola? (Matai 22:37-39; Baloma 10:10)
11. Ntango tozali kosalela mateya ya Biblia na bomoi na biso, yango esalaka biso nini?
11 Kosambela Yehova na bomoko ekómisaka biso pene na ye mpe esalisaka biso tósepela na baninga na biso bandimi. Nzembo 133:1 elobi ete: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakozalana na [bomoko, NW].” Koboya mokili na makambo na yango nyonso ya mabe, pite mpe mobulu mpe koyangana elongo na baoyo balingaka mpenza Yehova mpe batosaka mibeko na ye, ezali mpenza likambo ya esengo!
Tóboya makambo oyo ebimisaka bokabwani
12. Mpo na nini tosengeli koboya elimo ya lipanda?
12 Mpo tóbebisa bamosusu na kati na biso te, tosengeli koboya makambo oyo ebimisaka bokabwani. Moko ya makambo yango ezali elimo ya lipanda, koboya kotalela Nzambe mpe mibeko na ye. Yehova asalisaka biso tóboya elimo yango ndenge amonisaka mobandisi na yango, Satana Zabolo. (2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 12:9) Satana nde atindaki Adama na Eva bábwaka makambo oyo Nzambe alobaki mpe bázwa bikateli oyo eyokani te na mokano ya Nzambe. Yango ebimisaki mpasi mpo na bango mpe mpo na biso. (Genese 3:1-6, 17-19) Mokili oyo etondi na elimo ya lipanda, bato baboyaka kotalela Nzambe mpe mibeko na ye. Yango wana, tosengeli koboya ete elimo yango ekɔtela biso.
13. Nini ekomonisa ete tozali mpenza komibongisa mpo na kofanda na mokili ya sika ya boyengebene ya Nzambe?
13 Na ndakisa, kanisá elaka kitoko ya Yehova ya kolongola ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe kotya makoló ya sika mpe mabele ya sika oyo kati na yango “boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Yango esengeli mpenza kotinda biso tóbanda komibongisa banda sikoyo mpo na kozala na ntango wana oyo boyengebene ekotonda, boye te? Yango elimboli kotya likebi na toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te.” (1 Yoane 2:15) Yango wana, tóboya elimo ya mokili—ezaleli na yango ya lipanda, komibanzabanza kaka mpo na yo moko, pite mpe mobulu. Atako tozali na makanisi oyo euti na ezaleli ya kozanga kokoka mpe bamposa na yango, tosengeli ntango nyonso koyoka oyo Yehova azali koloba, tosengeli mpe kotosa ye na motema na biso mobimba. Bomoi na biso mobimba esengeli komonisa ete makanisi na biso mpe bamposa na biso ezali mpo na kosala mokano ya Nzambe.—Nzembo 40:8.
14. (a) Mpo na nini ezali na ntina mingi koyekola banzela ya Yehova sikawa mpe kolanda yango na bomoi na biso? (b) Bavɛrsɛ oyo ezali na paragrafe oyo ezali na ntina nini mpo na mokomoko na biso?
14 Wana ntango oyo Yehova aponi mpo na koboma mokili oyo mpe baoyo nyonso basepelaka na makambo na yango ekokóma, akoumela te. Akopusa ntango yango te, akobongola mpe mitinda na ye te mpo na koyokanisa yango na baoyo bazali naino kokangama na mokili mpe komeka koyekola mpe kosalela mokano ya Nzambe na mitema mibale. Oyo ezali mpenza ntango ya kozwa ekateli! (Luka 13:23, 24; 17:32; 21:34-36) Oyo nde likambo ya kolendisa ya komona ete ebele wana ya bato bazali koyekola mpenza banzela ya Yehova oyo ezali na ntina mingi, bazali koluka na mposa mpenza mateya oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Liloba na ye mpe na ebongiseli na ye, mpe bazali kotambola na bomoko na banzela na ye oyo ezali komema na mokili ya sika! Wana tozali koyekola makambo mingi oyo etali Yehova, tokolinga ye mpe mingi mpe tokosepela kosalela ye.
Bozongeli
• Mokano ya Yehova ezali nini mpo na losambo?
• Nsima ya koyekola mateya ya moboko ya Biblia, tosengeli lisusu koluka mpenza kosala nini?
• Mokomoko na biso akoki kosala nini mpo na kozala na bomoko elongo na basambeli mosusu ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 4]
‘Bato ya komikitisa bakozwa mabele mpe bakosepela na kimya’