“Ngonga ya kosambisa” eyei
EMONISELI, mokanda ya nsuka ya Biblia, eyebisi biso ete anzelu moko azali kopumbwa na katikati ya likoló mpe azali na “nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo.” Azali koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei.” (Emoniseli 14:6, 7) ‘Ngonga yango ya kosambisa’ ezali ntango oyo Nzambe akoyebisa bitumbu na ye mpe akopesa yango. “Ngonga” ezali mwa ntango moko mokuse. Kopesama ya bitumbu ekoya kosukisa “mikolo ya nsuka,” oyo tozali sikoyo kobika kati na yango.—2 Timote 3:1.
“Ngonga ya kosambisa” ekozala nsango ya malamu mpo na bato oyo balingaka boyengebene. Na ntango yango, Nzambe akobɔndisa basaleli na ye oyo banyokwami na bato ya mokili oyo, oyo balingi mobulu mpe bazangi bolingo.
Sikoyo, liboso ete “ngonga ya kosambisa” esuka na kobomama ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, tolendisami na ‘kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo.’ Osalaka yango? Yango elimboli te koloba kaka ete, “Nandimelaka Nzambe.” (Matai 7:21-23; Yakobo 2:19, 20) Kobanga Nzambe na ndenge ebongi esengeli kotinda biso tópesa ye limemya mingi. Esengeli kotinda biso tóyina mabe. (Masese 8:13) Esengeli kosalisa biso tólinga malamu mpe tóyina mabe. (Amosa 5:14, 15) Soki tozali kopesa Nzambe nkembo, tokoyoka ye na limemya mpenza. Tokomipesa mobimba te na makambo mosusu kino tózanga ntango ya kotángaka Liloba na ye Biblia mbala na mbala. Tokotyela ye ntango nyonso motema na biso mobimba. (Nzembo 62:8; Masese 3:5, 6) Bato oyo bazali kopesa ye nkembo bayebaka ete lokola azali Mozalisi ya likoló ná mabelé, azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba; batosaka ye mpe balingaka ye mpo azali na lotomo ya koyangela bango. Soki tomoni ete tosengeli kotyela makambo yango likebi mingi koleka, ekozala malamu tózela te mpo na kosala yango.
Ntango yango ya kopesa etumbu oyo anzelu alobelaki eyebani mpe na nkombo ‘mokolo ya Yehova.’ “Mokolo” ya ndenge wana ekómelaki Yelusaleme ya kala na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpo bafandi na yango bayokaki te makebisi oyo Yehova apesaki bango na nzela ya basakoli na ye. Lokola bazalaki koboya kondima ete mokolo ya Yehova ekómi pene, batyaki lisusu bomoi na bango na likama koleka. Yehova akebisaki bango boye: “Ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza.” (Sefania 1:14) ‘Mokolo [mosusu] ya Yehova’ eyelaki Babilone ya kala na mobu 539 L.T.B. (Yisaya 13:1, 6) Bato ya Babilone batyaki likebi te na makebisi oyo basakoli ya Yehova bapesaki, mpamba te batyaki motema na bango mobimba na bifelo ya makasi oyo ezingaki engumba na bango mpe na banzambe na bango. Kasi na butu moko kaka Babilone monene wana ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede ná Baperse.
Likambo nini ezali kozela biso lelo oyo? ‘Mokolo mosusu ya Yehova,’ oyo ekozala monene mpenza. (2 Petelo 3:11-14) Nzambe asili koyebisa etumbu oyo akateli “Babilone Monene.” Anzelu moko alobi boye na Emoniseli 14:8: “Babilone Monene akwei.” Likambo yango esilá kosalema. Akokanga basambeli ya Yehova lisusu te. Etamboli na ye ya mbindo mpe ezaleli ya komikɔtisa na bitumba emonisami mpenza polele. Sikoyo, kobomama na ye ya libelalibela ekómi pene. Yango wana, Biblia ezali kolendisa bato na bisika nyonso oyo bazali ete: “Bóbima na kati na ye [Babilone Monene] . . . soki bolingi te kosangana ná ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye. Mpo masumu na ye etondani mingi tii na likoló, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na ye ezangá bosembo.”—Emoniseli 18:4, 5.
Babilone Monene ezali nini? Ezali lisangá ya mangomba nyonso oyo makambo na yango ekokani na oyo ya Babilone ya kala. (Emoniseli, mokapo 17, 18) Tótalela mwa makambo oyo esali ete Babilone Monene ekokana na Babilone ya kala:
• Banganga-nzambe ya Babilone ya kala bamikɔtisaki mingi na makambo ya politiki ya ekólo na bango. Lelo mpe mangomba mingi ezali kosala bongo.
• Banganga-nzambe ya Babilone bazalaki mbala mingi kotinda ekólo na bango na bitumba. Na mikolo na biso mpe, mangomba ezwaka mbala mingi esika ya liboso mpo na kopambola basoda na ntango bikólo ezali kobunda bitumba.
• Mateya mpe mimeseno oyo ezalaki na Babilone ya kala esalaki ete pite ná ekobo eleka mingi na mboka yango. Lokola bakonzi ya mangomba ya mikolo na biso bazali kotya pembeni mitinda ya Biblia oyo etali bizaleli malamu, yango wana bango moko ná bandimi na bango bazali kosala pite ná ekobo mingi. Likambo mosusu oyo ezali kobenda likebi ezali ete lokola Babilone Monene azali kosala kindumba na mokili mpe na bibongiseli na yango ya politiki, mokanda ya Emoniseli emonisi ye lokola mwasi ya ndumba.
• Biblia elobi mpe ete Babilone Monene afandi “na bomɛngo ya biloko kitoko ya lofundo.” Na Babilone ya kala, bitando mingi ya mabelé ezalaki ya batempelo, mpe banganga-nzambe bayebanaki mingi na makambo ya mombongo. Longola bisika ya losambo, lelo oyo Babilone Monene azali mpe na makambo mingi ya mombongo oyo asalaka mpe azali na biloko ebele. Mateya mpe bafɛti na ye ezali kopesa ye ná bato mosusu ya mombongo bozwi mingi.
• Na Babilone ya kala, bazalaki kosalela mingi bililingi, maji, mpe bonganga-nkisi ndenge kaka ezali na bisika mingi lelo. Bazalaki kokanisa ete soki moto akufi, azalaki kokóma na bomoi ya lolenge mosusu. Babilone etondaki na batempelo mpe bandako-nzambe ya mike oyo batongaki yango mpo na banzambe na bango, kasi bazalaki kotɛmɛla basambeli ya Yehova. Bindimeli mpe mimeseno ya ndenge wana ezali mpe komonana lelo na Babilone Monene.
Na ntango ya kala, Yehova asalelaki bikólo oyo ezalaki makasi na politiki mpe oyo ezalaki na basoda ya makasi mpo na kopesa etumbu na bato oyo bazalaki ntango nyonso koboya kotosa ye mpe koboya kosala mokano na ye. Yango wana, Baasulia babebisaki Samalia na mobu 740 L.T.B. Bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. mpe Baloma babebisaki yango na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.). Bamede ná Baperse babɔtɔlaki mpe Babilone na mobu 539 L.T.B. Mpo na mikolo na biso, Biblia esakolaki ete biyangeli ya politiki, oyo emonisami na nyama mabe, ekobalukela ‘mwasi ya ndumba’ mpe ekotika ye bolumbu, akomonana mpenza ndenge azalaka. Bakoboma ye nyɛɛ.—Emoniseli 17:16.
Baguvɛrnema ya mokili ekosala mpenza likambo ya boye? Biblia emonisi ete ‘Nzambe akotya likanisi yango na mitema na bango.’ (Emoniseli 17:17) Ekozala likambo ya pwasa, ya mpasi, ekoyebana liboso te mpe ekosalema mbala moko.
Osengeli kosala nini? Omituna boye: ‘Nazali kotingama kaka na lingomba oyo ezali na mateya mpe mimeseno oyo emonisi ete yango mpe ezali na kati ya Babilone Monene?’ Ata soki ozali mondimi ya lingomba yango te, okoki komituna boye: ‘Natiki nzela ete elimo ya Babilone Monene ekɔtela ngai makasi?’ Elimo ya ndenge nini? Elimo oyo ezali kotinda bato na kondima etamboli ya mbindo, kolinga mingi biloko ya mokili mpe bisengo na esika ya kolinga Nzambe, to mpe na koboya kotosa Liloba ya Yehova (ata na makambo oyo ezali komonana mike). Kanisá malamumalamu liboso ya koyanola na motuna wana.
Mpo Yehova andima biso, tosengeli komonisa, ezala na misala to na bamposa na biso ya motema, ete tozali mpenza na kati ya Babilone Monene te. Tólekisa ntango te. Nsuka ekoya pwasa, yango Biblia eyebisi biso na maloba oyo: “Babilone engumba monene akobwakama na mbala moko, mpe akomonana lisusu ata mokolo moko te.”—Emoniseli 18:21.
Kasi esuki wana te. Likambo mosusu oyo etali “ngonga [yango] ya kosambisa,” ezali ete Yehova akosambisa biyangeli nyonso ya politiki, bayangeli na yango, mpe baoyo nyonso bazali koboya kotosa boyangeli na ye oyo emonisami na Bokonzi na ye ya likoló oyo apesi Yesu Klisto, boyangeli oyo ezali na lotomo ya koyangela. (Emoniseli 13:1, 2; 19:19-21) Emonaneli ya Danyele 2:20-45, oyo ezali mpe esakweli, emonisi biyangeli ya politiki oyo ekoyangela mokili kobanda na ntango ya Babilone ya kala tii na mikolo na biso lokola elilingi moko ya monene oyo basali na wolo, palata, kwivre, ebende, mpe mabelé. Mpo na mikolo na biso, esakweli yango elobaki ete: “Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te.” Mpe mpo na likambo oyo Bokonzi yango ekosala na boumeli ya “ngonga ya kosambisa” ya Yehova, Biblia elobi boye: “Ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [bato basali], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Biblia ekebisi basambeli ya solo ete bálingaka te “biloko oyo ezali na kati ya mokili,” yango nde bomoi oyo mokili oyo, oyo ekabwani na Nzambe ya solo, ezali kotinda bato bázala na yango. (1 Yoane 2:15-17) Bikateli oyo ozwaka mpe makambo oyo osalaka emonisaka ete ozali mpenza kosimba Bokonzi ya Nzambe? Otyaka mpenza yango na esika ya liboso na bomoi na yo?—Matai 6:33; Yoane 17:16, 17.
[Etanda na lokasa 14]
Nsuka ekoya ntango nini?
“Na ngonga oyo bozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.”—Matai 24:44.
“Bókɛngɛlaka, mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”—Matai 25:13.
“Ekoumela mingi te.”—Habakuku 2:3.
[Etanda na lokasa 14]
Bomoi na yo elingaki kozala ndenge mosusu soki oyebaki?
Soki oyebaki mpenza ete Nzambe akopesa etumbu nsima ya mwa bambula te, likambo yango elingaki kobongola lolenge oyo ozali kosalela bomoi na yo? Soki mpo na yo, nsuka ya ebongiseli oyo eumeli mingi, boye otiki yango elɛmbisa yo na mosala oyo ozali kosalela Yehova?—Baebele 10:36-38.
Lokola toyebi mpenzampenza ntango yango te, yango ezali kopesa biso libaku ya komonisa ete tozali kosalela Nzambe na makanisi ya pɛto. Baoyo bayebi Yehova bayebi malamu ete kobimisa makasi ntango makambo ekómi na nsuka ekosala Nzambe eloko moko te, ye amonaka oyo ezali na kati ya motema.—Yilimia 17:10; Baebele 4:13.
Bato oyo balingaka Yehova solosolo batyaka ye ntango nyonso na esika ya liboso na bomoi na bango. Lokola bato nyonso, baklisto ya solo basalaka ntango mosusu mosala ya mosuni. Kasi, mokano na bango ezalaka te ya kokóma bazwi, balukaka nde kozwa mwa biloko ya kobikela oyo ekoki mpo na bango mpe mwa ndambo mosusu mpo na kokabela bato mosusu. (Baefese 4:28; 1 Timote 6:7-12) Longola yango, baminanolaka na ndenge ya malamu mpe bazwaka mopɛpɛ, kasi basalaka yango nde mpo na kozwa lisusu makasi; basalaka yango te kaka mpo na kolanda makambo oyo bato mosusu bazali kosala. (Malako 6:31; Baloma 12:2) Lokola Yesu Klisto, basepelaka mingi kosala mokano ya Nzambe.—Nzembo 37:4; 40:8.
Baklisto ya solo balingaka kozala na bomoi mpe kosalela Yehova mpo na libela. Elikya yango ezali na ntina mingi atako ntango oyo basengeli kozela mpo na kozwa mapamboli mosusu ekoki komonana ete ezali koumela mwa mingi na miso ya basusu.
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
Ntembe oyo etali bokonzi
Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na mpasi, esengeli tóyeba ntembe oyo etali bokonzi.
Lokola Yehova azali Mozalisi, azali na lotomo ya koyangela mabelé ná bato nyonso oyo bafandi na mabelé. Nzokande, Biblia emonisi ete na ebandeli ya lisolo ya bato, batyelaki bokonzi ya Yehova ntembe. Satana Zabolo alobaki ete Yehova atyaki mibeko ya makasimakasi mpe akosaki baboti na biso ya liboso na ntina na likambo oyo esengelaki kokómela bango soki baboyi kotosa mobeko na ye mpe basali makambo na ndenge na bango moko; mpe alobaki ete bakozala malamu koleka soki bamiyangeli bango moko.—Genese mokapo 2, 3.
Soki Nzambe abomaki batomboki wana mbala moko, yango ekokaki komonisa nguya na ye, kasi ekokaki kosilisa te na lolenge ya malamu ntembe oyo ebimaki. Na esika ya koboma batomboki wana mbala moko, Yehova atikeli baanzelu ná bato nyonso nzela bámona makambo oyo ezaleli ya botomboki ekobimisa. Atako ekateli wana esali ete bampasi ezala, kasi esali mpe ete biso tóbotama.
Longola yango, Yehova amipimelaki mingi mpamba te na bolingo na ye azwaki bibongiseli mpo bato oyo bakotosa ye mpe bakomonisa kondima na mbeka ya lisiko oyo Mwana na ye apesaki básikolama na lisumu ná mikakatano oyo yango ebimisi mpe bázala na bomoi na Paladiso. Mpo na basusu, ekosɛnga ntango mosusu asekwisa bango mpo bázwa matomba yango.
Ntango oyo Nzambe atiki mpo na kosilisa ntembe oyo babɛtelaki bokonzi na ye epesi basaleli na ye libaku ya komonisa ete bazali na likoki ya komonisa botɔndi na bolingo oyo Nzambe amonisi mpe kobatela bosembo na bango epai na Yehova na makambo nyonso. Kosilisa ntembe oyo etali bokonzi ya Nzambe ná ntembe mosusu oyo ebimaki nzela moko na yango, oyo etali bosembo ya bato, ezali na ntina mingi mpo ete mibeko etosama na molɔ́ngɔ́ mobimba. Soki te, kimya ya solo ekoki kozala ata moke te.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bantembe yango mpe makambo mosusu oyo etali yango elobelami na mozindo mpenza na buku Approchez-vous de Jéhovah, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi]
Biyangeli nyonso ya politiki ekosuka