Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kp nk. 16-19
  • Mokili ya sika ndenge Nzambe alaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili ya sika ndenge Nzambe alaki
  • Bókɛngɛlaka!
  • Masolo mosusu
  • Kozalisa biloko nyonso biloko ya sika—ndenge yango esakolamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
    Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika
  • Bozalisi ya sika!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Likoló ya sika mpe mabele ya sika ekopesa esengo makasi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
Makambo mosusu
Bókɛngɛlaka!
kp nk. 16-19

Mokili ya sika ndenge Nzambe alaki

BIBLIA, Liloba ya Nzambe oyo ekomami, epesi biso elikya na maloba oyo: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.”​—2 Petelo 3:13.

“Likoló ya sika” ezali nini? Biblia esalelaka mbala mosusu liloba likoló mpo na kolobela boyangeli. (Misala 7:49) “Likoló ya sika” ezali guvɛrnema ya sika oyo ekoyangela mabelé mobimba. Ebengami ya sika mpo ekozwa esika ya biyangeli oyo ezali lelo; ezali mpe likambo ya sika kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Ezali Bokonzi oyo Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na yango. (Matai 6:10) Ebengami mpe “bokonzi ya likoló” mpo Nzambe oyo azali Mobandisi na yango afandaka na likoló.​—Matai 7:21.

“Mabelé ya sika” ezali nini? Ezali te ete Nzambe akosala mabelé mosusu, mpo Biblia emonisi polele ete bato bakofanda awa na mabelé libela na libela. “Mabelé ya sika” ezali nde bato ya sika. Ekozala mabelé ya sika mpo bato mabe bakolongolama. (Masese 2:21, 22) Na nsima, bato nyonso bakokumisa mpe bakotosa Mozalisi mpe bakozala na bomoi oyo eyokani na masɛngami na ye. (Nzembo 22:27) Libaku ezali kopesama na bato ya bikólo nyonso báyekola masɛngami yango mpe báyokanisa bomoi na bango na masɛngami yango uta sikawa. Ozali kosala yango?

Na mokili ya sika ya Nzambe, moto nyonso akotosa boyangeli na ye. Bolingo mpo na Nzambe etindaka yo otosa ye? (1 Yoane 5:3) Na ndako na yo, na mosala to na eteyelo to mpe na lolenge osalelaka bomoi na yo, omonisaka ete otosaka ye?

Na mokili yango ya sika, bato bakosambela Nzambe ya solo na bomoko. Osambelaka Mozalisi ya likoló ná mabelé? Losambo na yo esalaka mpenza ete ozala na bomoko na basambeli mosusu ya lingomba na yo ya bikólo nyonso, ya mposo nyonso, mpe ya nkota nyonso?​—Nzembo 86:9, 10; Yisaya 2:2-4; Sefania 3:9, NW.

[Etanda na lokasa 17]

Nzambe oyo alaki makambo yango

Ye azali Mozalisi ya likoló oyo emonanaka mpe ya mabelé oyo. Ezali ye nde Yesu alobaki ete azali “Nzambe kaka moko ya solosolo.”​—Yoane 17:3.

Bato mingi bakumisaka banzambe oyo bango moko basali. Bamilio ya bato bafukamelaka bililingi. Bato mosusu bakumisaka bibongiseli oyo bato batye, mateya oyo etindaka bato bálukaka kozala na biloko mingi, to mpe bamposa na bango moko. Ata bato oyo balobaka ete basalelaka Biblia, bango nyonso te bakumisaka nkombo ya Nzambe oyo Biblia yango emonisaka ete azali “Nzambe ya solo.”​—Deteronome 4:35.

Mozalisi alobi boye: ‘Ngai nazali Yehova. Yango nkombo na ngai.’ (Yisaya 42:5, 8) Nkombo yango ekomami mbala koleka 7000 na Biblia na minɔkɔ oyo bakomaki Biblia na ebandeli. Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.”​—Matai 6:9.

Bizaleli nini Nzambe ya solo azalaka na yango? Ye moko amonisi ete azali ‘na mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo’ mpe azangaka te kopesa etumbu na bato oyo babukaka mibeko na ye na nko. (Exode 34:6, 7) Makambo oyo asalelaka bato banda kala emonisi ete azalaka mpenza na bizaleli wana.

Esengeli kosantisa nkombo yango mpe nkolo-nkombo yango. Lokola azali Mozalisi mpe Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ebongi mpenza tótosa ye mpe tósambela ye na motema mobimba. Otosaka ye mpe osambelaka ye na motema na yo mobimba?

[Etanda/Elilingi na lokasa 18]

Makambo nini ‘likoló ya sika mpe mabelé ya sika’ ekosala?

Mabelé ekokóma Paladiso Luka 23:43

Mokili oyo bato ya bikólo nyonso, Yoane 13:35;

ya mposo nyonso, ya nkota nyonso Emoniseli 7:9, 10

bakozala na bomoko mpe bakolingana

Kimya na mokili mobimba, libateli Nzembo 37:10, 11;

ya solosolo mpo na bato nyonso Mika 4:3, 4

Mosala ya malamu, biloko ya kolya Yisaya 25:6; 65:17, 21-23

ekozala mingi

Maladi, mawa, liwa ekosila Yisaya 25:8; Emoniseli 21:1, 4

Bato ya mokili mobimba Emoniseli 15:3, 4

bakosangana mpo na kosambela

Nzambe ya solo

[Etanda/Bililingi na lokasa 19]

Okozwela yango bolamu?

Nzambe akoki kobuka lokuta te!​—Tito 1:2.

Yehova alobi boye: ‘Liloba na ngai . . . ekozongela ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo oyo ngai natindaki yango.’​—Yisaya 55:11.

Yehova asilá kobanda kosala ‘likoló ya sika mpe mabelé ya sika.’ Guvɛrnema ya likoló esili kobanda koyangela. Moboko mpo na “mabelé ya sika” esili kotyama.

Nsima ya kolobela makambo malamu oyo ‘likoló ya sika mpe mabelé ya sika’ ekosala mpo na bato, mokanda ya Emoniseli elobi ete Nzambe ye moko, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, alobi boye: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” Abakisi ete: “Komá, mpamba te maloba oyo ezali sembo mpe solo.”​—Emoniseli 21:1, 5.

Motuna ya ntina oyo tosengeli komituna yango oyo: Mokomoko na biso azali kosala mbongwana oyo esengeli mpo ete abonga kozala na kati ya ‘mabelé ya sika’ yango oyo “likoló ya sika” ekoyangela?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto