Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bh lok. 219-lok. 220
  • “Babilone Monene” ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Babilone Monene” ezali nini?
  • Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Masolo mosusu
  • Babilone monene kokwea na ye mpe kobomama na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Kufa na Babilone: mawa mpo na  bamoko, esengo mpo na bamosusu
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mboka monene ebebisami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mangomba ya lokuta: Kolimwa na yango ya nsɔmɔ esakolami
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
Makambo mosusu
Biblia eteyaka mpenza nini?
bh lok. 219-lok. 220

APƐNDISI

“Babilone Monene” ezali nini?

MOKANDA ya Emoniseli ezali na maloba mosusu oyo esengeli te kozwa yango kaka ndenge ezali. (Emoniseli 1:1) Na ndakisa, mokanda yango elobeli mwasi moko oyo bakomi nkombo “Babilone Monene” na elongi na ye. Elobi ete mwasi yango afandi likoló ya “bibele ya bato mpe bikólo.” (Emoniseli 17:1, 5, 15) Lokola mwasi ata moko te ya solosolo akoki kosala likambo yango, Babilone Monene ezali nde mwasi ya elilingi. Mwasi yango ya ndumba azali elilingi ya nini?

Na Emoniseli 17:18, babengi ye mpe ‘engumba monene oyo ezali na bokonzi likoló ya bakonzi ya mabelé.’ Liloba “engumba” emonisi etuluku moko ya bato oyo bazali na kati ya ebongiseli moko. Lokola “engumba yango monene” ezali na bokonzi likoló ya “bakonzi ya mabelé,” yango emonisi ete mwasi oyo babengi Babilone Monene esengeli kozala ebongiseli moko oyo ezali na bokonzi monene na mokili mobimba. Ebongi ete ebengama lisangá ya mokili mobimba. Lisangá ya nini? Ya losambo to ya mangomba. Talá ndenge bavɛrsɛ mosusu ya mokanda ya Emoniseli esalisi biso tóyeba ete ezali bongo.

Lisangá ekoki kozala ya politiki, ya mombongo, to ya losambo. Mwasi oyo abengami Babilone Monene ezali lisangá ya politiki te, mpamba te Liloba ya Nzambe elobi ete “bakonzi ya mabelé,” elingi koloba bato ya politiki ya mokili oyo, “basalaki pite” elongo na ye. Pite ya mwasi yango elakisi nde boyokani oyo asali na bakonzi ya mokili oyo mpe emonisi polele ntina oyo babengi ye “mwasi ya ndumba monene.”​—Emoniseli 17:1, 2; Yakobo 4:4.

Babilone Monene ekoki te kozala lisangá ya mombongo, mpamba te ‘bakomelesa ya mabelé,’ elingi koloba bato ya mombongo, bakolela ntango mwasi yango akobomama. Kutu, Biblia elobi ete na ntango yango bakonzi ná bakomelesa bakotala Babilone Monene “na mosika.” (Emoniseli 18:3, 9, 10, 15-17) Yango wana, ebongi te tókanisa ete Babilone Monene ezali lisangá ya politiki to ya mombongo, kasi ezali nde lisangá ya losambo to ya mangomba.

Likambo mosusu oyo emonisi polele ete Babilone Monene ezali na boyokani nde na makambo ya losambo ezali na maloba oyo emonisi ete mwasi yango azali kobungisa bikólo nyonso nzela na ‘misala na ye ya bilimo mabe.’ (Emoniseli 18:23) Lokola misala nyonso ya bilimo mabe ezali ya losambo mpe euti na bademo, tosengeli kokamwa te soki Biblia ebengi Babilone Monene “esika ya kofanda ya bademo.” (Emoniseli 18:2; Deteronome 18:10-12) Biblia elobi lisusu ete lisangá yango ezali mpenza kotɛmɛla losambo ya solo, ezali konyokola “basakoli” mpe “basantu.” (Emoniseli 18:24) Babilone Monene eyini mpenza losambo ya solo; yango wana, ezali konyokola, ata mpe koboma “batatoli ya Yesu,” na ndenge ya nsɔmɔ. (Emoniseli 17:6) Na yango, ezali komonana polele ete mwasi yango oyo babengi Babilone Monene elakisi lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, mangomba nyonso oyo ezali kotɛmɛla Yehova Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto