Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lv mok. 13 nk. 144-159
  • Bafɛti oyo esepelisaka Nzambe te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafɛti oyo esepelisaka Nzambe te
  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NOELE: NKOMBO YA SIKA YA LOSAMBO YA NZAMBE-MOI
  • MAKANISI YA BIBLIA MPO NA MIKOLO YA MBOTAMA
  • PASIKA: FƐTI OYO EBOMBI LOSAMBO YA KOBOTA
  • HALLOWEEN EZALI FƐTI YA BOKRISTO TE
  • BATELÁ FƐTI YA LIBALA NA YO
  • KOTOMBOLA KƆPƆ YA MASANGA EZALI LOSAMBO?
  • “BINO BAOYO BOLINGAKA YEHOVA, BÓYINA OYO EZALI MABE”
  • KUMISÁ NZAMBE NA MALOBA MPE NA MISALA
  • Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Poná kosambela Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Kangamá na losambo ya solo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mokakatano ya sika ndenge mangomba ekómi mingi
    Batatoli ya Yehova mpe kelasi
Makambo mosusu
“Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
lv mok. 13 nk. 144-159
[Elilingi na lokasa 147]

MOKAPO 13

Bafɛti oyo esepelisaka Nzambe te

“Bókoba koluka koyeba mpenza malamu eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.”​—BAEFESE 5:10.

1. Yehova abendaka bato ya ndenge nini epai na ye, mpe mpo na nini bato yango basengeli kokɛngɛla na elimo?

YESU alobaki boye: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Ntango Yehova amoni bato ya ndenge wana, abendaka bango epai na ye mpe epai ya Mwana na ye, ndenge kaka asalaki mpo na yo. (Yoane 6:44) Yango ezali lokumu monene mpenza! Nzokande, bato oyo balingaka solo ya Biblia basengeli ‘kokoba koluka koyeba mpenza malamu eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo,’ mpamba te Satana azali mokosi monene.​—Baefese 5:10; Emoniseli 12:9.

2. Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo basangisaka losambo ya solo ná oyo ya lokuta?

2 Tókanisa likambo oyo esalemaki na Ngomba Sinai ntango Bayisraele basɛngaki Arona ete asalela bango nzambe. Arona andimaki mpe asalelaki bango mwana-ngɔmbɛ ya wolo, kasi alobaki ete ekeko yango ezalaki komonisa Yehova. Alobaki boye: “Lobi ekozala fɛti mpo na Yehova.” Yehova akangaki nde miso atako Bayisraele basangisaki losambo ya solo ná losambo ya lokuta? Te. Abomisaki bato soki nkóto misato (3 000) oyo basambelaki ekeko wana. (Kobima 32:1-6, 10, 28) Likambo yango eteyi biso nini? Soki tolingi kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli ‘kosimba eloko moko ya mbindo te,’ tosengeli mpe te kosangisa losambo ya solo ná eloko ya mbindo.​—Yisaya 52:11; Ezekiele 44:23; Bagalatia 5:9.

3, 4. Mpo na nini tosengeli mpenza kotya likebi na mitinda ya Biblia ntango tozali kotalela mimeseno mpe bafɛti ya mokili?

3 Nzokande, nsima ya liwa ya bantoma, oyo bazalaki kokanga nzela mpo lipɛngwi ekɔta na lisangá te, bakristo ya nkombo mpamba, oyo balingaki mpenza mateya ya solo te, bakómaki kondima mimeseno, bafɛti, mpe mikolo oyo bato ya bikólo mosusu bazalaki kokumisa, mpe bakɔtisaki yango na lingomba ya bokristo. (2 Batesaloniki 2:7, 10) Ntango tozali kotalela mwa ndambo ya bafɛti yango, okomona ete emonisaka nde elimo ya mokili, kasi elimo ya Nzambe te. Bafɛti mingi ya mokili ekokani na makambo oyo: Esepelisaka bamposa ya nzoto, elendisaka bindimeli ya lokuta mpe boyokani ná bilimo mabe​—oyo ezali makambo ya “Babilone Monene.”a (Emoniseli 18:2-4, 23) Lisusu, tóbosana te ete Yehova azalaki komona makambo ya mbindo oyo ezalaki kosalema na losambo ya bapakano oyo ebimisá mimeseno mingi oyo bato balandaka lelo oyo. Na ntembe te, amonaka yango mabe, ndenge kaka azalaki komona yango mabe na ntango ya kala. Omoni te ete esengeli biso tólanda makanisi na ye?​—2 Yoane 6, 7.

4 Biso bakristo ya solo toyebaka ete bafɛti mosusu esepelisaka Yehova te. Kasi, tosengeli kozwa ekateli makasi na mitema na biso mpo tósangana na yango te. Kotalela ntina oyo Yehova asepelaka na bafɛti yango te ekolendisa ekateli na biso ya koboya kosala likambo oyo ekoki kopekisa biso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

NOELE: NKOMBO YA SIKA YA LOSAMBO YA NZAMBE-MOI

5. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu abotamaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ te?

5 Biblia elobi ata na esika moko te ete bato basalaki fɛti mpo na mbotama ya Yesu. Kutu, dati mpenza oyo Yesu abotamaki eyebani te. Kasi, makambo mingi ezali kondimisa biso ete Yesu abotamaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ te, eleko oyo ezalaka malili makasi na mboka oyo abotamaki.b Na ndakisa, Luka akomaki ete ntango Yesu abotamaki, “babateli ya bampate bazalaki kofanda libándá” mpo na kokɛngɛla bitonga na bango. (Luka 2:8-11) Soki babateli ya bampate bazalaki na momeseno ya ‘kofanda libándá’ basanza nyonso, yango elingaki mpenza kobenda likebi na biso te. Nzokande, lokola na eleko wana malili ezalaka makasi na Beteleme mpe nɛjɛ ekitaka, babateli ya bampate bazalaki kokangela bitonga na bango na bandako mpo na kobatela yango mpe bango moko bazalaki ‘kofanda libándá’ te. Longola yango, Yozefe ná Maria bakendaki na Beteleme mpo Kaisala Augusto apesaki mitindo ete bato básalisa resansema. (Luka 2:1-7) Ezali mwa mpasi tókanisa ete Kaisala asɛngaki bato oyo bazalaki kosepela na boyangeli ya Roma te, básala mibembo tii na bamboka na bango na eleko ya malili makasi.

6, 7. (a) Mimeseno mingi oyo bato balandaka na Noele eutá wapi? (b) Bokeseni nini ezali na ndenge oyo bato bakabaka na eleko ya Noele mpe ndenge oyo bakristo bakabaka?

6 Fɛti ya Noele euti na Biblia te, kasi euti na bafɛti ya kalakala ya bapakano, na ndakisa fɛti oyo bazalaki kobenga Saturnales, oyo Baroma bazalaki kosala mpo na lokumu ya Saturne, nzambe ya mosala ya bilanga. Lisusu, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete na kolanda ndenge oyo bazalaki kotánga mikolo, basambeli ya nzambe Mithra bazalaki kokanisa mokolo ya 25 Desɛmbɛ lokola “mokolo ya mbotama ya moi oyo ekoki kolongama te.” “Noele ebandaki na eleko oyo losambo ya nzambe-moi ezalaki makasi na Roma,” bikeke soki misato nsima ya liwa ya Kristo.

Bolingo nde etindaka bakristo ya solo bákabela basusu

7 Ntango bapakano bazalaki kosala bafɛti yango, bazalaki kopesana bakado, kolya mpe komɛla​—makambo oyo bato basalaka na Noele tii lelo oyo. Kasi, ndenge mpe emonanaka lelo, ntango bapakano bazalaki kopesana bakado na bafɛti wana, bazalaki kosala yango te ndenge oyo 2 Bakorinti 9:7 ezali kolendisa; vɛrsɛ yango elobi boye: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” Bolingo nde etindaka bakristo ya solo bákabela basusu; bazelaka te mokolo moko boye mpo na kokaba; ntango bakabeli moto, balukaka te ete ye mpe akabela bango. (Luka 14:12-14; tángá Misala 20:35.) Lisusu, bazalaka na botɔndi mingi ndenge balongwá na boombo ya makambo ya loyenge ya Noele mpe ya banyongo oyo bato mingi bakɔtaka na eleko yango.​—Matai 11:28-30; Yoane 8:32.

8. Banganga-minzoto bamemelaki Yesu bakado mpo na mokolo ya mbotama na ye? Limbolá.

8 Kasi, bato mosusu bakoki koloba ete banganga-minzoto mpe bamemelaki Yesu bakado mpo na mokolo ya mbotama na ye, boye te? Te. Bakado na bango ezalaki kaka ndenge ya komonisa limemya epai ya moto ya lokumu, momeseno oyo bato mingi bazalaki na yango na ntango ya kala. (1 Bakonzi 10:1, 2, 10, 13; Matai 2:2, 11) Kutu, bakendaki kotala Yesu na mokolo oyo abotamaki te. Ntango banganga-minzoto bakómaki epai Yesu azalaki, bakutaki te mwana oyo auti kobotama sika, oyo balalisi na elyelo ya banyama; azalaki na basanza mingi mpe bakutaki ye na kati ya ndako.

NAKOKI KOSANGANA NA FƐTI OYO?

Etinda: “‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’”​—2 Bakorinti 6:17.

Mwa mituna oyo osengeli komituna mpo na fɛti to momeseno moko

  • Ezali na makambo oyo emonisi polele ete fɛti yango euti na mimeseno to mateya ya mangomba ya lokuta, to mpe na boyokani ná bilimo mabe?​—Yisaya 52:11; 1 Bakorinti 4:6; 2 Bakorinti 6:14-18; Emoniseli 18:4.

  • Epesaka lokumu oyo ebongi te na moto, na ebongiseli, to na elembo moko ya ekólo?​—Yirimia 17:5-7; Misala 10:25, 26; 1 Yoane 5:21.

  • Etombolaka mboka to ekólo moko likoló ya bamboka to bikólo mosusu?​—Misala 10:34, 35; 17:26.

  • Emonisaka “elimo ya mokili,” oyo eyokani te na elimo santu ya Nzambe?​—1 Bakorinti 2:12; Baefese 2:2.

  • Nakoki nde kobɛtisa bato mosusu libaku soki nasangani na yango?​—Baroma 14:21.

  • Soki naboyi kosangana na yango, ndenge nini nakoki, na limemya nyonso, kolimbwela bato mosusu bantina oyo nasali bongo?​—Baroma 12:1, 2; Bakolose 4:6.

Bavɛrsɛ oyo elandi ekosalisa yo ozwa biyano na mituna oyo okoki komituna mpo na bafɛti:

  • “[Bayisalaele oyo bazalaki sembo te] basanganaki na bikólo, mpe bayekolaki misala na bango.”​—Nzembo 106:35.

  • “Moto oyo azali sembo na likambo ya moke azali mpe sembo na likambo ya monene, mpe moto oyo azali moyengebene te na likambo ya moke azali mpe moyengebene te na likambo ya monene.”​—Luka 16:10.

  • “Bozali bato ya mokili te.”​—Yoane 15:19.

  • “Bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.”​—1 Bakorinti 10:21.

  • “Mpo ntango oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni, na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.”​—1 Petro 4:3.

MAKANISI YA BIBLIA MPO NA MIKOLO YA MBOTAMA

9. Likambo nini ezali komonana na bafɛti ya mbotama oyo Biblia elobeli?

9 Atako kobotama ya mwana ezalaka likambo ya esengo mingi, ata na esika moko te Biblia elobeli fɛti ya mbotama ya mosaleli moko ya Nzambe. (Nzembo 127:3) Tokoki nde koloba ete ezali kaka kobosana? Te, mpamba te Biblia elobeli fɛti ya mbotama ya bato mibale: Farao, mokonzi ya Ezipito mpe Erode Antipasi. (Tángá Ebandeli 40:20-22; Marko 6:21-29) Nzokande, Biblia emonisi ete bafɛti yango mibale ezalaki na makambo ya mabe mpenza, mingimingi oyo ya Erode, mpamba te na libaku yango, bakataki Yoane Mobatisi motó.

10, 11. Ndenge nini bakristo ya liboso bazalaki kotalela bafɛti ya mbotama, mpe mpo na nini?

10 Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Bakristo ya liboso bazalaki kotalela fɛti ya mbotama, ezala ya moto nini, lokola momeseno ya bapakano.” Na ndakisa, Bagrɛki ya kala bazalaki kokanisa ete moto mokomoko azalaki na elimo oyo ezalaki kobatela ye, elimo yango ezalaki wana ntango moto yango abotamaki mpe ezalaki kokɛngɛla ye bomoi na ye mobimba. Buku moko (The Lore of Birthdays) elobi ete elimo yango “ezalaki na boyokani moko boye na nzambe oyo mokolo ya mbotama na ye ekokani na mokolo ya mbotama ya moto wana.” Lisusu, banda kalakala, mikolo ya mbotama ezalaka na boyokani ná makambo ya kotala minzoto mpe horoscope.

MIKOLO “MOSANTU” MPE LOSAMBO YA SATANA

Tosengeli koyeba ete mokolo eleki ntina na losambo ya Satana ezali mokolo ya mbotama. Mpo na nini? Mpamba te bato oyo balandaka losambo yango balobaka ete moto nyonso azali nzambe soki asepeli komitalela lokola nzambe. Na yango, soki moto azali kosepela mokolo ya mbotama na ye, azali kosepela mokolo ya mbotama ya nzambe moko. Toyebi ete bato mingi batalelaka mokolo ya mbotama ndenge wana te. Atako bongo, buku moko (The Lore of Birthdays) elobi boye: “Bafɛti mosusu esepelisaka motema, kasi mokolo ya mbotama ekumisaka nde ya moto.”

Mikolo mosusu “mosantu” na losambo ya Satana ezali oyo babengaka Butu ya Walpurgis mpe Halloween. Diksionɛrɛ moko (Merriam-Webster’s Collegiate Dictionary) elobi ete Butu ya Walpurgis ezali “mokolo oyo ezali liboso ya mokolo ya yambo ya sanza ya mitano, oyo balobaka ete bandɔki bakendaka kokutana esika moko.”

11 Na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe bazalaki koboya kosala fɛti ya mbotama kaka te mpo euti na mimeseno ya bapakano mpe ezali na boyokani ná bilimo mabe; kasi mpe mpo eyokani te ná mitinda oyo bazalaki kolanda. Na ndenge nini? Bango bazalaki bato ya komikitisa, bazalaki te kotalela kobotama na bango lokola likambo monene oyo basengeli kokumisaka.c (Mika 6:8; Luka 9:48) Bango bazalaki nde kokumisa Yehova mpe kotɔnda ye mpo na likabo ya bomoi.d​—Nzembo 8:3, 4; 36:9; Emoniseli 4:11.

12. Na ndenge nini mokolo ya liwa na biso ekoki koleka mokolo ya kobotama na biso?

12 Nzambe abatelaka na makanisi na ye bato nyonso ya bosembo oyo bakufá, mpe elikya ezali ete akozongisa bango na bomoi. (Yobo 14:14, 15) Mosakoli 7:1 elobi boye: “Nkombo malamu eleki mafuta ya malamu, mpe mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama.” “Nkombo” na biso ezali lokumu oyo tomisalelaka na miso ya Nzambe na ndenge tosalelaka ye na bosembo. Kutu, ekaniseli kaka moko oyo Biblia esɛngi bakristo básalaka ezali ya mbotama te, kasi ya liwa ya Yesu, ye oyo “nkombo” malamu na ye ezali ndanga ya lobiko na biso.​—Baebre 1:3, 4; Luka 22:17-20.

PASIKA: FƐTI OYO EBOMBI LOSAMBO YA KOBOTA

13, 14. Mimeseno ya Pasika oyo bato balandaka eutá wapi?

13 Pasika, oyo emonisamaka lokola fɛti ya lisekwa ya Kristo, eutá nde na losambo ya lokuta. Kutu, nkombo na yango na Lingelesi (Easter) euti na nkombo Eostre, to Ostara, nzambe-mwasi ya kotana ya ntɔngɔ mpe ya eleko ya prɛnta epai ya Ba-Anglo-saxons. Ebandaki ndenge nini bákóma kosalela makei mpe lapin na fɛti ya Pasika? Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete makei “ezalaki elembo monene ya bomoi ya sika mpe lisekwa,” mpe banda kala, lapin esalelamaka lokola elembo ya kobota. Yango wana, Pasika ezali mpenzampenza nde molulu ya kobota oyo ekómá komonisama lokola fɛti ya lisekwa ya Kristo.e

14 Yehova akoki nde kondima ete básalela milulu ya kobota, oyo ezali milulu ya mbindo, mpo na kokanisa lisekwa ya Mwana na ye? Ata moke te! (2 Bakorinti 6:17, 18) Kutu, ata na esika moko te Biblia etindi bakristo to epesi bango nzela ete bákanisaka lisekwa ya Yesu. Yango wana, kokanisa lisekwa ya Yesu mpe kopesa yango nkombo ya nzambe moko ya bapakano, ndenge ezali na minɔkɔ mosusu, ezali mpenza kozanga bosembo.

HALLOWEEN EZALI FƐTI YA BOKRISTO TE

15. Fɛti ya Halloween eutá wapi, mpe nini ezali kobenda likebi mpo na dati oyo baponá mpo na kosala yango?

15 Fɛti ya Halloween oyo na boumeli na yango bato basalaka bililingi ya bandɔki mpe ya bilima, mayemi mpe biloko ndenge na ndenge ya nsɔmɔ, fɛti oyo esalemaka liboso ya “Mokolo ya Basantu nyonso,” eutá epai ya Ba-Celte oyo bazalaki kofanda na Angleterre mpe na Irlande. Na eleko oyo sanza emonanaka mobimba, pene ya mokolo ya 01/11, bazalaki kosala fɛti ya Samain, elingi koloba “Nsuka ya eleko ya molunge.” Bazalaki kokanisa ete na boumeli ya Samain, elamba oyo ekaboli mokili ya bato ná mokili ya bilimo ezalaki kolongwa mpe bilimo ya malamu mpe ya mabe ezalaki koyengayenga na mokili. Bazalaki kokanisa ete milimo ya bato oyo bakufá ezalaki kozonga na bandako na bango, mpe bandeko na bango bazalaki kotyela bango bilei mpe masanga na porte mpo na kokitisa bango nkanda. Yango wana lelo oyo, ntango bana mike balataka lokola bilima to bandɔki, mpe bakendaka ndako na ndako mpe babangisaka bankóló-ndako ete bakolakela bango mabe soki bapesi bango babɔmbɔ te, bayebaka te ete balandaka nde milulu ya Samain.

BATELÁ FƐTI YA LIBALA NA YO

16, 17. (a) Mpo na nini bakristo oyo balingi kobalana basengeli kotalela soki mimeseno ya mboka na bango eyokani na mitinda ya Biblia? (b) Na ntina etali mimeseno lokola kobwakela bato oyo babalani loso to biloko mosusu, likambo nini bakristo basengeli koyeba?

16 Etikali moke, “mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala ekoyokana lisusu te” na Babilone Monene. (Emoniseli 18:23) Mpo na nini? Moko na bantina ya likambo yango ezali misala na yango ya bilimo mabe, oyo ekoki kokɔtisa makambo ya mbindo na libala banda na mokolo ya liboso.​—Marko 10:6-9.

17 Mboka na mboka ezali na mimeseno na yango. Mimeseno mosusu oyo ekoki komonana mabe te, eutá nde na mimeseno ya Babilone oyo bato bazalaki kokanisa ete ezalaki komemela bato oyo babalani sika mpe bato oyo bayei na libala na bango ‘makila malamu.’ (Yisaya 65:11) Moko na mimeseno yango ezali kobwakela bato oyo babalani loso to biloko mosusu. Ekoki kozala ete momeseno wana eutá na makanisi oyo bato bazalaki na yango ete bilei ekitisaka nkanda ya bilimo mabe mpe epekisaka bango básala mabe epai ya mobali mpe mwasi oyo babalani. Longola yango, banda kala, bato bakanisaka ete loso ezali na nguya ya kosala ete moto abota, azala malamu, mpe azala na bomoi molai. Ezali polele ete baoyo nyonso balingi kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe basengeli koboya mimeseno wana ya mbindo.​—Tángá 2 Bakorinti 6:14-18.

18. Mitinda nini ya Biblia esengeli kotambwisa bato oyo balingi kobala mpe baoyo bakokende na fɛti yango?

18 Basaleli ya Yehova baboyaka mpe mimeseno ya mokili oyo ekoki kobebisa lokumu ya libala mpe bafɛti ya libala to mimeseno oyo ekoki kobɛtisa bato mosusu libaku. Na ndakisa, baboyaka koloba makambo oyo ezali lokola matumoli to masɛki mpo na kotyola bato oyo babalani to kolobela kosangisa nzoto na maloba ya elilingi. (Masese 26:18, 19; Luka 6:31; 10:27) Baboyaka mpe kosala bafɛti oyo ekokende nsango, oyo ezangi bokatikati, kasi ezali nde “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” (1 Yoane 2:16) Soki ozali kobongisa libala, kobosana soki moke te ete Yehova alingaka ete mokolo wana ezala mokolo oyo, soki okanisi yango oyokaka esengo, kasi mawa te.f

KOTOMBOLA KƆPƆ YA MASANGA EZALI LOSAMBO?

19, 20. Buku moko elobi nini mpo na ebandeli ya momeseno ya kotombola kɔpɔ ya masanga, mpe mpo na nini momeseno yango ebongi te mpo na bakristo?

19 Likambo moko oyo bato mingi basalaka na fɛti ya libala to na bafɛti mosusu ezali kotombola kɔpɔ ya masanga mpo na kotombela moto mokako swaa. Buku moko (International Handbook on Alcohol and Culture, ebimeli ya 1995) elobi boye: “Ekoki mpenza kozala ete kotombola kɔpɔ . . . eutá na milulu ya kala ya kopesa mbeka ya masanga epai ya banzambe . . . mpo na kosɛnga bango bákokisa mposa moko, oyo ezalaki kolobama na maloba mokuse lokola ‘bomoi molai!’ to ‘zalá nzoto kolɔngɔnɔ!’”

20 Ya solo, bato mingi bakanisaka te ete kotombola kɔpɔ ezali losambo to mpe biyambayamba. Kasi, kotombola kɔpɔ ya masanga ekoki kotalelama lokola elembo mpo na kosɛnga lipamboli epai ya “likoló” to nguya moko oyo eleki makasi, na ndenge oyo eyokani te na oyo Biblia esɛngi.​—Yoane 14:6; 16:23.g

“BINO BAOYO BOLINGAKA YEHOVA, BÓYINA OYO EZALI MABE”

21. Ata soki esalemi na makambo ya losambo te, bafɛti nini bakristo basengeli koboya, mpe mpo na nini?

21 Lokola bizaleli ya bato ezali se kobeba na mokili oyo​—likambo oyo, mbala mosusu mangomba ya Babilone Monene ezali kolendisa—​na mikili mosusu, bato bazali kobongisa badefile oyo babengaka carnaval, epai balakisaka bato bazali kobina mabina ya nsɔni, mpe oyo mbala mosusu ekumisaka kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Ebongi mpenza ete bato oyo balingaka Yehova bákende na defile ya ndenge wana to bátala yango? Soki basali bongo, bakomonisa mpenza ete bayinaka oyo ezali mabe? (Nzembo 1:1, 2; 97:10) Eleki malamu bámekola mokomi ya nzembo oyo abondelaki boye: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina”!​—Nzembo 119:37.

22. Ntango nini mokristo akoki kotalela lisosoli na ye mpo na kozwa ekateli ya kosangana na fɛti to te?

22 Na mikolo oyo bato ya mokili basalaka bafɛti na bango, ebongi mpenza ete bakristo bákeba na etamboli na bango mpo emonana te lokola nde bazali kosangana na bafɛti yango. Paulo akomaki boye: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Bakorinti 10:31; talá etanda “Ndenge ya kozwa bikateli ya malamu.”) Nzokande, soki momeseno to fɛti moko ezali na makambo ya losambo te, ezali ya politiki te, ezali kokumisa ekólo te, mpe ezali kobuka etinda moko te ya Biblia, mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli na ye ya kosangana na yango to te. Kasi, asengeli mpe kotalela ndenge oyo bato mosusu bakomona yango mpo abɛtisa bango libaku te.

KUMISÁ NZAMBE NA MALOBA MPE NA MISALA

23, 24. Ndenge nini tokoki kopesa litatoli mpo na mitinda ya sembo ya Yehova?

23 Bato mingi batalelaka mikolo ya bafɛti ya mokili lokola mabaku ya kokutana na bandeko mpe baninga. Yango wana, soki moto moko alobi ete ndenge na biso ya kotalela bafɛti yango, oyo eyokani na mitinda ya Biblia, emonisaka bolingo te mpe emonisaka makambo makasi, tokoki kolimbwela ye na boboto nyonso ete Batatoli ya Yehova basepelaka kokutana na bandeko mpe baninga. (Masese 11:25; Mosakoli 3:12, 13; 2 Bakorinti 9:7) Tosepelaka kokutana na bandeko mpe baninga na biso ata na mikolo nini na kati ya mbula, kasi lokola tolingaka Nzambe mpe mibeko na ye ya sembo, tolingaka te ete mimeseno oyo ekumisaka Nzambe te ebebisa bantango wana ya esengo.​—Talá etanda “Losambo ya solo epesaka esengo ya solosolo.”

LOSAMBO YA SOLO EPESAKA ESENGO YA SOLOSOLO

Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingaka ete basambeli na ye bázala na esengo. (1 Timote 1:11) Likambo yango emonisami na bavɛrsɛ oyo elandi:

  • “Ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.”​—Masese 15:15.

  • “Nayei koyeba ete eloko oyo eleki malamu mpo na bango ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na boumeli ya bomoi; mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”​—Mosakoli 3:12, 13.

  • “Mokabi apesi toli mpo na makambo ya bokabi; mpe akotɛlɛma mpo na makambo ya bokabi.”​—Yisaya 32:8.

  • “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai [Yesu] nakopemisa bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”​—Matai 11:28, 30.

  • “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:32.

  • “Moto na moto [apesa] ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 9:7.

  • “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, . . . boboto, bolamu.”​—Bagalatia 5:22.

  • “Mbuma ya pole esalemi na ndenge nyonso ya bolamu mpe boyengebene mpe solo.”​—Baefese 5:9.

24 Batatoli mosusu bazwaki mabaku ya kolimbola makambo epai ya bato oyo batunaka mituna na bosembo na lisalisi ya mokapo 16 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?h Kasi, tosengeli kobosana te ete mokano na biso ezali ya kosalisa bato báyeba mateya ya solo, kasi te ya kolonga bango na ntembe. Yango wana, zaláká na limemya, na boboto, mpe tiká ‘liloba na yo ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.’​—Bakolose 4:6.

25, 26. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma na kondima mpe na bolingo makasi mpo na Yehova?

25 Biso basaleli ya Yehova tozali bato oyo toteyami malamu. Toyebi ntina oyo tondimaka mpe tosalaka makambo mosusu mpe toboyaka makambo mosusu. (Baebre 5:14) Yango wana, baboti, bóteyaka bana bino báyeba kotalela mitinda ya Biblia. Na ndenge yango, bokolendisa kondima na bango, bokosalisa bango báyeba kosalela Biblia mpo na kopesa biyano ntango batuni bango mituna mpo na bindimeli na bango, mpe bokosalisa bango bámona ete Yehova alingaka bango.​—Yisaya 48:17, 18; 1 Petro 3:15.

26 Bato nyonso oyo basambelaka Nzambe “na elimo mpe na solo” baboyaka bafɛti oyo eyokani te na mitinda ya Biblia; kasi basalaka mpe makasi bázala sembo na makambo nyonso. (Yoane 4:23) Lelo oyo, bato mingi bazali kokanisa ete kozala sembo efutaka te. Kasi, ndenge tokomona yango na mokapo oyo elandi, banzela ya Nzambe elekaka ntango nyonso malamu.

a Talá etanda “Nakoki kosangana na fɛti oyo?” Okomona bankombo ya mikolo mpe bafɛti mingi oyo ebengamaka “mosantu” na Index des publications Watch Tower, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Na kotalela badati ya Biblia mpe masolo mosusu ya kala, ekoki mpenza kozala ete Yesu abotamaki na mobu 2 L.T.B., na sanza ya Etanimi na manaka ya Bayuda, oyo ekokani na Setɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ na manaka na biso.​—Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, lokasa 21, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

c Talá etanda “Mikolo ‘mosantu’ mpe losambo ya Satana.”

d Kondimana ya Mibeko esɛngaki ete mwasi, nsima ya kobota, amema likabo mpo na lisumu epai ya Nzambe. (Balevi 12:1-8) Likambo yango ezalaki komonisa polele ete bato balekisaka lisumu epai ya bana na bango; ezalaki mpe kosalisa Bayisraele bátalela mbotama ya mwana na ndenge oyo ebongi mpe ezalaki kopekisa bango bálanda mimeseno ya bapakano mpo na mokolo ya mbotama.​—Nzembo 51:5.

e Eostre (to Eastre) azalaki mpe nzambe-mwasi ya makambo ya kobota. Buku moko (The Dictionary of Mythology) elobi ete “azalaki na lapin moko na kati ya sanza oyo elingaki makei, mpe na bisika mosusu bazalaki koyema ye azali na motó ya lapin.”

f Talá masolo misato oyo elobelaki libala mpe bafɛti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2006, nkasa 18-31.

g Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2007, nkasa 30-31.

h Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

NDENGE YA KOZWA BIKATELI YA MALAMU

Na bantango mosusu, tokutanaka na makambo oyo emekaka bolingo na biso epai ya Yehova mpe bososoli na biso ya mitinda ya Biblia. Na ndakisa, moto moko oyo azali Motatoli te akoki kosɛnga molongani na ye oyo azali Motatoli ete bákende kolya epai ya bandeko na ye mokolo ya fɛti moko ya mokili. Na kolanda lisosoli na bango, bakristo mosusu bandimaka, kasi bamosusu baboyaka. Soki mokristo moko andimi kokende, makambo oyo akosala esengeli komonisa polele ete azali kosangana na fɛti yango te, kasi akei kaka kokutana na bandeko na bango mpo bálya esika moko.

Ekozala malamu mokristo oyo akoki kokutana na likambo ya ndenge wana asolola liboso na molongani na ye mpe amonisa ye na limemya nyonso mokakatano oyo akozala na yango soki bandeko na bango babandi kosala makambo oyo esalemaka na fɛti yango, kasi ye aboyi kosala yango. Molongani oyo azali mokristo te akoki koloba ete bákende kotala bandeko na bango mokolo mosusu.​—1 Petro 3:15.

Kasi, ezali boni soki nsima ya koyoka makanisi ya mwasi na ye oyo azali Motatoli, mobali oyo azali Motatoli te atingami kaka ete bákende? Mwasi akoki koloba ete lokola mobali azali mokonzi ya libota, azali mpe na mokumba ya koleisa libota. (Bakolose 3:18) Mpe mokolo yango, bilei ekozala na ndako ya bandeko na bango. Mbala mosusu kutu akoki kozwa libaku ya kopesa litatoli epai ya bandeko yango. Bilei ekómaka mbindo te kaka mpo ezali kolyama mokolo ya fɛti ya mokili. (1 Bakorinti 8:8) Mokristo akoki kotalela yango lokola bilei nyonso mpe akoboya kaka kosangana na makambo lokola kotombelana fɛti malamu, koyemba, kotombola bakɔpɔ ya masanga, mpe bongo na bongo.

Likambo mosusu oyo asengeli kotalela ezali ndenge oyo bato mosusu bakokanisa soki ye akei kolya epai ya bandeko na ye na mokolo ya fɛti yango. Mwasi oyo azali mokristo asengeli kobosana te ete bato mosusu oyo bakoyoka ete akendaki epai ya bandeko na ye ya mosuni na mokolo ya fɛti wana bakoki kobɛta libaku.​—1 Bakorinti 8:9; 10:23, 24.

Longola yango, ekoki nde kokóma ete bandeko yango bátya ye mbamba mpo asala makambo oyo lisosoli na ye ezali kopekisa ye? Moto mosusu akoki kobendama na kosala likambo oyo motema na ye elingi te kaka mpo na koboya makɛlɛlɛ to matɔngi! Yango wana, ezali na ntina mingi mokristo azwa ntango ya kokanisa liboso, atalela makambo wana nyonso, ata mpe lisosoli na ye.​—Misala 24:16.

Nakoki mpenza kondima biloko oyo bapesaka na Noele?

Na eleko ya Noele, patrɔ akoki kopesa bato na ye ya mosala biloko to kobakisa mwa mbongo na lifuti na bango. Mokristo asengeli nde koboya yango? Akoki kondima yango. Patrɔ azalaka ntango mosusu ata na makanisi te ete moto ya mosala oyo azwi biloko akosala fɛti ya Noele. Ekoki kozala ete patrɔ azali kaka kopesa bato na ye ya mosala mwa likabo mpo misala ya kompanyi etambolaki malamu. Akoki mpe kopesa bango likabo mpo na komonisa botɔndi na ye mpo na mosala oyo basalaki na boumeli ya mbula mobimba mpe kolendisa bango bákoba kosala malamu. Patrɔ akoki kopesa likabo epai ya bato nyonso ya mosala, bázala Bayuda, Bamizilma, to bato ya mangomba mosusu, ezala basalaka fɛti ya Noele to te. Na yango, Motatoli ya Yehova aboyaka te kozwa likabo kaka mpo epesami na eleko moko boye to ebengami na nkombo moko boye.

Ata soki likabo epesami na mokolo ya fɛti moko ya lingomba, yango elingi koloba te ete moto oyo azwi yango andimaka fɛti yango to asalaka yango. Moninga ya mosala to ndeko ya libota akoki koloba na Motatoli ete, “Nayebi ete osanganaka na fɛti oyo te, kasi nasepeli kaka kopesa yo mwa kado oyo.” Soki lisosoli na ye ekotungisama te, mokristo akoki kondima kado yango mpe kopesa moto oyo apesi yango matɔndi, kozanga ete atalela yango ete ezali kado mpo na fɛti. (Misala 23:1) Mbala mosusu, mokolo oyo mokristo akomona malamu, akoki kolimbwela moto yango bindimeli na ye.

Kasi, ezali boni soki moto oyo azali kopesa kado azali na mposa ya komonisa na nko ete mokristo azali na kondima makasi te mpe akokoka te koboya eloko oyo alingi kopesa ye? Na ntango wana, ebongi mpenza aboya kozwa yango. Tosengeli komonisa ete tokangami kaka na Yehova Nzambe.​—Matai 4:8-10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto