MOKAPO 14
Zalá sembo na makambo nyonso
“Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”—BAEBRE 13:18.
1, 2. Mpo na nini Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka mpo na kozala sembo? Pesá ndakisa.
MWASI moko abimi na magazini moko elongo na mwana na ye ya moke. Mbala moko, mwana atɛlɛmi; amoni ete na lobɔkɔ na ye asimbi mwa eloko ya kosakanela oyo azwi na magazini. Abosanaki kozongisa yango na esika na yango to kosɛnga mama na ye asombela ye yango. Mwana abandi kolela makasi. Mama na ye akitisi ye motema; azongi na ye na magazini mpo azongisa eloko yango mpe asɛnga bolimbisi. Ntango mwana azali kosala yango, motema ya mama etondi na esengo. Mpo na nini?
2 Baboti basepelaka mingi soki bamoni ete bana na bango bazali koyeba ntina ya kozala sembo. Ezali mpe bongo mpo na Tata na biso ya likoló, “Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Yehova asepelaka ntango azali komona ete tozali kokola na elimo mpe tozali kosala makasi mpo tózala sembo. Lokola tolingaka kosepelisa ye mpe kotikala na kati ya bolingo na ye, biso mpe tokanisaka lokola ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Tótalela makambo minei oyo, ntango mosusu, ekoki kopesa biso kwɔkɔsɔ mpo na kozala sembo. Na nsima, tokotalela mapamboli oyo ezaleli yango ememaka.
KOMITALELA NA BOSEMBO
3-5. (a) Liloba ya Nzambe elobi nini mpo na kokebisa biso mpo tómikosa te? (b) Nini ekoki kosalisa biso tómitalela na bosembo?
3 Mokakatano ya liboso oyo biso bato tozalaka na yango ezali ya komitalela na bosembo. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezalaka mpasi te tómikosa. Na ndakisa, Yesu ayebisaki bakristo ya Laodikia ete bazalaki komikosa na ndenge bazalaki kokanisa ete bazali na bomɛngo; nzokande, na elimo, bazalaki ‘babola mpe bato bakufá miso mpe bolumbu’—bazalaki mpenza bato ya mpasi. (Emoniseli 3:17) Lokola bazalaki komikosa ndenge wana, bazalaki na likama monene.
4 Mbala mosusu oyebi mpe ete moyekoli Yakobo akebisaki bakristo na maloba oyo: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.” (Yakobo 1:26) Biso mpe tokomikosa soki tozali kokanisa ete Yehova akondima losambo na biso ata soki tozali kosalela lolemo na biso na ndenge ya mabe. Losambo na biso epai ya Yehova ekozala mpamba, tokosala mosala ya mpunda. Nini ekoki kosalisa biso mpo likambo yango ekómela biso te?
5 Na mokapo yango, Yakobo akokanisi mpe solo ya Liloba ya Nzambe na talatala. Apesi biso toli ete tótalatalaka na mobeko ya kokoka ya Nzambe mpe tóbongisaka bisika oyo esɛngi kobongisa. (Tángá Yakobo 1:23-25.) Biblia ekoki kosalisa biso tómitalela na bosembo mpo na koyeba bisika oyo tosengeli kobongisa. (Bileli 3:40; Hagai 1:5) Tokoki mpe kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye atala na motema na biso mpe asalisa biso tómona bisika oyo tozali na mbeba mpe tóbongisa yango. (Nzembo 139:23, 24) Kozala sembo te ezali bolɛmbu oyo ekosaka moto, mpe tosengeli kotalela yango ndenge oyo Tata na biso ya likoló atalelaka yango. Masese 3:32 elobi boye: “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” Yehova akoki kosalisa biso tótalela makambo ndenge oyo ye atalelaka yango mpe tómitalela ndenge oyo atalelaka biso. Tóbosana te ete Paulo alobaki boye: “Tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo.” Lelo oyo, tokoki te kokóma bato ya kokoka, kasi tosengeli kozala na mposa ya kozala sembo mpe koluka mpenza kokolisa ezaleli yango.
KOZALA SEMBO NA KATI YA LIBOTA
Kozala sembo esalisaka biso tóboya kosala makambo oyo tokoluka kobomba
6. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli te kobombelanaka makambo, mpe na bongo, bakomibatela na makama nini?
6 Bato oyo bazali na libota ya bakristo basengeli koyebana lokola bato ya sembo. Yango wana, mwasi ná mobali basengeli te kobombelanaka makambo; moto na moto asengeli kolobaka solo epai ya moninga. Mokristo oyo abalá asengeli soki moke te kosala makambo ya mbindo mpe oyo epesaka mpasi, na ndakisa kozala selesele ná moto oyo azali molongani na ye te, kosolola na moto mosusu na kobombana na nzela ya Internet, to kotala bililingi ya makambo ya nsɔni. Bakristo mosusu oyo babalá bakweaki na makambo mabe ya ndenge wana mpe bazalaki kobombela yango balongani na bango. Kosala bongo ezali kozanga bosembo. Tóyoka maloba oyo Mokonzi Davidi, moto ya sembo, alobaki: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.” (Nzembo 26:4) Soki obalá, kolinga ata mokolo moko te okóma kosala makambo oyo okoluka kobombela molongani na yo!
7, 8. Biblia elobeli bandakisa ya banani, oyo ekoki kosalisa bana báyeba ntina ya kozala sembo?
7 Ntango baboti bazali koteya bana na bango ntina ya kozala sembo, ezali malamu mingi básalelaka bandakisa oyo ezali na Biblia. Ntango bazali kolobela kozanga bosembo, bakoki kozwa ndakisa ya bato lokola Akana, oyo ayibaki mpe alukaki kobomba mabe na ye; Gehazi, oyo akosaki mpo bápesa ye mbongo; mpe Yudasi, oyo azalaki koyiba mpe akosaki mpo na kotɛka Yesu.—Yosua 6:17-19; 7:11-25; 2 Bakonzi 5:14-16, 20-27; Matai 26:14, 15; Yoane 12:6.
8 Ntango baboti bazali kolobela bosembo, bakoki kozwa ndakisa ya bato lokola Yakobo, oyo alendisaki bana na ye bázongisa mbongo oyo bamonaki na bisaka na bango, mpo akanisaki ete esengeli kozala ete moto moko abosanaki yango; Yefeta mpe mwana na ye ya mwasi, oyo andimaki kokokisa ndai ya tata na ye atako esɛngaki ye amipimela likambo ya ntina mingi; mpe Yesu, oyo amibombaki te liboso ya ebele ya bato oyo bayaki kokanga ye mpo akokisa makambo oyo basakoli balobaki mpe abatela baninga na ye. (Ebandeli 43:12; Basambisi 11:30-40; Yoane 18:3-11) Mwa bandakisa yango ekoki kosalisa baboti bámona makambo ya motuya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, oyo ekoki kosalisa bango báteya bana na bango kolinga bosembo mpe kopesa ezaleli yango motuya mingi.
9. Baboti basengeli koboya ezaleli nini soki balingi kopesa bana na bango ndakisa ya bosembo, mpe mpo na nini ndakisa yango ezali na ntina mingi?
9 Mateya yango emonisaka baboti ete bango moko bazali na mokumba moko monene. Ntoma Paulo atunaki boye: “Yo moto oteyaka moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo, moto osakolaka ete: ‘Koyiba te,’ oyibaka?” (Baroma 2:21) Baboti mosusu batyaka mobulu na mitó ya bana na bango na ndenge bateyaka bango bázala sembo, kasi bango moko basalaka makambo oyo ezangi sembo. Ntango bayibi mwa eloko moke to babuki lokuta na makambo mikemike, balukaka komilongisa na maloba lokola oyo: “Patrɔ ye moko ayebi ete bato bazwaka biloko yango” to “Ezalaki kaka mwa lokuta moke.” Nzokande, koyiba nyonso ezali kaka koyiba, ata soki moto azwi eloko ya moke to ya monene; mpe lokuta nyonso ezali kaka lokuta, ata soki moto akosi na likambo ya moke to ya monene.a (Tángá Luka 16:10.) Bana mike bayebaka ntango moto azali koloba makambo mosusu mpe azali kosala makambo mosusu; mpe likambo yango ebulunganisaka bango. (Baefese 6:4) Nzokande, soki baboti bazali kopesa bango ndakisa ya bosembo, ntango bakokola, bango mpe bakozala na etamboli oyo ezali kokumisa Yehova na kati ya mokili oyo ezangi sembo.—Masese 22:6.
KOZALA SEMBO NA KATI YA LISANGÁ
10. Makambo nini tosengeli kokeba na yango na oyo etali masolo ná bandeko na biso?
10 Kozala elongo na bandeko na biso bakristo epesaka biso mabaku mingi ya komonisa bosembo. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 12, tosengeli kokeba na ndenge oyo tozali kosalela lolemo na biso, mingimingi na masolo ná bandeko na biso bakristo. Mwa lisolo ya mpamba ekoki kobongwana na matɔngi, ata mpe na kokosela basusu makambo! Soki tozali kobɛtela bato lisolo oyo toyebi mpenza te soki ezali solo, ekoki mbala mosusu kozala ete tozali kopanza nsango ya lokuta; yango wana, eleki malamu tópekisaka mbɛbu na biso. (Masese 10:19) Longola yango, ata soki likambo oyo toyebi ezali solo, elakisi te ete tosengeli kaka koyebisa yango bato mosusu. Na ndakisa, ekoki kozala ete likambo yango etali biso te, to mpe ezali malamu te tólobela yango. (1 Batesaloniki 4:11) Bato mosusu balobaka na bonkonde te, kasi balukaka komilongisa ete bazali nde molangi-mpɛmbɛ; nzokande, maloba na biso esengeli ntango nyonso kozala ya malamu mpe ya boboto.—Tángá Bakolose 4:6.
11, 12. (a) Ndenge nini bato mosusu bamibendelaka mindɔndɔ ntango basali lisumu monene? (b) Wapi mwa makambo ya lokuta oyo Satana azali kondimisa bato na oyo etali masumu ya minene, mpe ndenge nini tosengeli koboya yango? (c) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali sembo na ebongiseli ya Yehova?
11 Ezali na ntina mingi tózala sembo epai ya bandeko oyo bazali kokamba lisangá. Bandeko mosusu, ntango basali lisumu monene, bamibendelaka mindɔndɔ na ndenge balukaka kobomba lisumu yango mpe kokosa bankulutu ntango bazali kotuna bango. Bato yango bakómaka na liso na nse ya lokasa; balukaka komonana ete bazali basaleli ya Yehova, nzokande, bamipesaka na masumu. Ezaleli wana ekómisaka bango bato ya lokuta mpenza. (Nzembo 12:2) Bandeko mosusu bayebisaka bankulutu kaka makambo mikemike mpe babombaka oyo ya minene. (Misala 5:1-11) Mbala mingi, bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana bandimaka makambo ya lokuta oyo Satana azali kondimisa bato.—Talá etanda “Lokuta ya Satana na oyo etali masumu minene.”
12 Ezali mpe na ntina tózala sembo na ebongiseli ya Yehova ntango basɛngi biso tóyanola na mituna na lokasa moko oyo tosengeli kotondisa. Na ndakisa, ntango tozali kopesa lapolo ya mosala ya kosakola, tosengeli kokoma makambo ya lokuta te. Ntango mpe tozali kotondisa lokasa moko mpo na mokumba moko boye, tosengeli te kokosa na oyo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto to makambo mosusu ya bomoi na biso.—Tángá Masese 6:16-19.
13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali sembo ntango tozali kosala mombongo ná ndeko moko?
13 Tosengeli mpe kozala bato ya sembo ntango tozali kosala mombongo ná bandeko. Bandeko mosusu bayokanaka ete básala mombongo elongo. Kasi, ebongi te básalaka makambo na bango ya mombongo ntango bazali na Ndako ya Bokonzi to na mosala ya kosakola. Ekoki mpe kozala ete ndeko moko azwi ndeko mosusu na mosala. Soki ndeko moko azwi bandeko na mosala, asengeli kosalela bango makambo na bosembo, asengeli kopesa bango lifuti na bango na ntango esengeli, na ndenge oyo bayokanaki, mpe na ndenge oyo mibeko ya Leta esɛngi. (1 Timote 5:18; Yakobo 5:1-4) Epai mosusu, soki ndeko na biso mokristo azwi biso na mosala, tosengeli kosalaka malamu mosala oyo tozali kozwela lifuti. (2 Batesaloniki 3:10) Tosengeli koluka te ete patrɔ na biso asalela biso makambo ndenge mosusu mpo azali ndeko ya elimo; na ndakisa apesaka biso konje to apesaka biso ndingisa ya kosala makambo oyo basali mosusu basalaka te.—Baefese 6:5-8.
14. Ntango bakristo bayokani básala mombongo elongo, ezali malamu básala likambo nini, mpe mpo na nini?
14 Ezali boni soki oyokani na ndeko moko ete bósala mombongo moko to olingi adefisa yo mbongo? Biblia eteyi etinda moko ya malamu mpenza: Bókomaka na mokanda makambo nyonso oyo boyokani! Na ndakisa, ntango Yirimia asombaki eteni moko ya mabele, basalaki mokanda oyo ezalaki na kopi mibale; batemwe mpe bazalaki, mpe babombaki mokanda yango na esika ya malamu. (Yirimia 32:9-12; talá mpe Ebandeli 23:16-20.) Ntango tolingi kosala mombongo ná ndeko moko, kokoma boyokani nyonso na mokanda, kotya basinyatili, mpe kozwa batemwe, elimboli te ete tozali kotyelana motema te. Kasi, esalisaka mpo na koboya mindɔndɔ to matata oyo ekoki kokabola biso. Bakristo oyo bazali kosala mombongo elongo basengeli kobosana te ete mombongo moko te esengeli kobebisa bomoko mpe kimya ya lisangá.b—1 Bakorinti 6:1-8.
KOZALA SEMBO NA MAKAMBO MOSUSU
15. Ndenge nini Yehova atalelaka kozanga bosembo na makambo ya mombongo, mpe ndenge nini bakristo basengeli kotalela yango?
15 Bosembo ya mokristo esengeli kosuka kaka na lisangá te. Paulo alobaki boye: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Mozalisi na biso asɛngaka ete tómonisa bosembo na mosala oyo tosalaka. Soki tozwi kaka mokanda ya Masese, tokomona ete mbala minei mobimba elobeli emekeli-kilo ya lokuta. (Masese 11:1; 16:11; 20:10, 23) Na ntango ya kala, bazalaki kosalela bimekeli mpo na koyeba kilo ya biloko oyo moto asombi mpe kilo ya mbongo oyo asengeli kopesa. Bakomelesa oyo bazalaki sembo te bazalaki kosalela lolenge mibale ya bimekeli mpo na kokosa bakiliya mpe koyiba bango.c Yehova ayini misala ya ndenge wana! Mpo na kotikala na kati ya bolingo na ye, tosengeli koboya lolenge nyonso ya kozanga sembo na makambo ya mombongo.
16, 17. Makambo nini ya kozanga sembo etondi na mokili lelo oyo, mpe bakristo ya solo basengeli kozala na ekateli nini?
16 Lokola Satana nde azali moyangeli ya mokili oyo, tokoki kokamwa te ete kozanga bosembo epalangani mpenza na mokili. Mokolo na mokolo tokoki komekama na kosala makambo oyo ezangi sembo. Bato mingi bakosaka bakelasi oyo batángá mpe misala oyo bayekolá ntango bazali kokoma mikanda mpo na koluka mosala. Bato mingi babukaka lokuta ntango bazali koluka mikanda mpo na kokende na mboka mopaya, mpo na kofuta mpako, mpo na kozwa asiranse, mpe na makambo mosusu ya ndenge wana. Bana-kelasi mingi babwakaka liso na kaye to epai ya baninga ntango bazali kosala ekzamɛ; to mpe ntango bapesi bango devuare, bakendaka na Internet mpo na kozwa makambo oyo bato mosusu bakomi mpe bakosaka ete bango nde bakomi yango. Bato mosusu bapesaka bakonzi ya Leta kanyaka to madesu ya bana mpo na kozwa eloko oyo bazali na yango mposa. Ezaleli ya ndenge wana ezali kokamwisa biso te mpamba te mokili etondi na “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . oyo balingaka makambo ya malamu te.”—2 Timote 3:1-5.
17 Bakristo ya solo baboyaka kosala makambo nyonso wana. Na bantango mosusu, kozala sembo ezalaka pɛtɛɛ te mpamba te, emonanaka lokola ete bato oyo bazali sembo te nde balongaka mpe bakendaka liboso na mokili oyo. (Nzembo 73:1-8) Nzokande, bakristo bakoki kozala na mikakatano ya mbongo mpo balingaka kozala sembo “na makambo nyonso.” Komipimela ndenge wana ezali mpenza na litomba? Ɛɛ! Na ndenge nini? Kozala sembo ezali na matomba nini?
MAPAMBOLI YA KOZALA SEMBO
18. Mpo na nini koyebana lokola moto ya sembo ezali na ntina mingi?
18 Moko na lokumu monene oyo moto akoki kozala na yango ezali ya koyebana lokola moto ya sembo, moto oyo basusu bakoki kotyela motema. (Talá etanda “Nazalaka sembo na makambo nyonso?”) Kutu, soki totali malamu, moto nyonso akoki komisalela lokumu ya ndenge wana! Yango etaleli te mayele, bozwi, kitoko, ekólo na biso, to makambo mosusu oyo tokoki kobongola te. Nzokande, bato mingi bazali kosala eloko te mpo bámisalela lokumu ya ndenge wana. Bato ya sembo bazali moke mpenza. (Mika 7:2) Bato mosusu bakoki kotyola yo mpo ozali sembo, kasi bamosusu bakosepela na yo, bakopesa yo limemya mpe bakotyela yo motema. Batatoli ya Yehova mingi bamoni ete kozala sembo ememeli bango matomba mingi. Bamosusu babatelaki mosala na bango na ntango bato oyo bazangi sembo balongolamaki na mosala; bamosusu mpe bazwaki mosala mpo patrɔ azalaki koluka kaka moto ya sembo.
19. Na ndenge nini kozala sembo ekoki kosalisa biso tózala na lisosoli ya malamu mpe na boyokani malamu ná Yehova?
19 Ata soki makambo ya ndenge wana ekómeli yo te, okomona ete bosembo ezali na matomba mosusu ya minene. Okozala na lisosoli oyo ezali kimya. Paulo akomaki boye: “Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo.” (Baebre 13:18) Lisusu, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo amonaka bosembo na yo, mpe alingaka bato oyo bazali na ezaleli yango. (Tángá Nzembo 15:1, 2; Masese 22:1.) Ya solo, kozala sembo ekosalisa yo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe mpe yango eleki mbano mosusu nyonso oyo tokoki kozwa. Tótalela sikoyo likambo mosusu oyo ezali na boyokani ná bosembo: ndenge oyo Yehova atalelaka mosala.
a Na kati ya lisangá, bankulutu bakoki kosambisa moto oyo azali na ezaleli ya kokosa to ya kobuba mpo na kosala basusu mabe.
b Mpo na koyeba ndenge ya kosala soki mombongo etamboli malamu te, talá Apɛndisi, lisolo “Ndenge ya kosilisa matata na makambo ya mombongo.”
c Batɛkisi bazalaki kosalela bakilo mosusu ntango bazali kosomba mpe bakilo mosusu mpo na kotɛka; bazalaki kopona oyo ekozala mpo na litomba na bango. Ntango mosusu mpe bazalaki kosalela emekeli oyo lobɔkɔ na yango moko eleki molai to ezali na kilo koleka mosusu mpo báyibaka kiliya nyonso.