APƐNDISI
Biloko mikemike oyo euti na makila mpe mayele mosusu na ntango ya lipaso
Biloko mikemike oyo euti na makila. Biloko yango ezwamaka na biloko minei ya minene oyo ezalaka na makila: globules rouges, globules blancs, plaquettes, mpe plasma. Na ndakisa, na kati ya globule rouge, tokokuta proteini oyo babengi hémoglobine. Ntango moto ya maladi asili mpenza makila to abungisi makila mingi, mbala mosusu minganga bapesaka ye nkisi oyo esalemi na hémoglobine oyo euti na makila ya bato to ya banyama.
Plasma, oyo eteni na yango monene ezali mai (90 %), ezalaka mpe na ebele ya ba hormones, mungwa, bavitamini, biloko mosusu ya mikemike, mpe sukali. Plasma ezalaka mpe na biloko oyo esalaka ete makila ekangama, ba anticorps oyo ebundisaka maladi, mpe baproteini lokola albumine. Soki moto moko azali na makila ya makasi te mpe mpo na yango akoki kozwa lolenge moko boye ya maladi, ntango mosusu minganga bapesaka ye ntonga ya gammaglobuline, oyo eutaka na plasma ya bato oyo makila na bango ezali makasi. Na kati ya ba globules blancs bakoki kozwa biloko mosusu ya mikemike (interférons mpe interleukines) oyo esalelamaka mpo na kosalisa maladi ndenge na ndenge, ata mpe mitindo mosusu ya kanser.
Bakristo bakoki nde kondima nkisi oyo esalemi na biloko mikemike oyo euti na makila? Biblia elobeli yango polele te; yango wana, moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye liboso ya Nzambe na kolanda lisosoli na ye. Bakristo mosusu baboyaka eloko nyonso oyo euti na makila, mpo bamonaka ete Mibeko ya Nzambe esɛngaki ete makila oyo euti na nzoto ‘esopama na mabele lokola mai.’ (Kolimbola Mibeko 12:22-24) Nzokande, bakristo mosusu, atako baboyaka bázongisa bango makila to biloko minene oyo euti na makila, bandimaka básalisa bango na nkisi oyo esalemi na biloko mikemike. Bakristo yango bamonaka ete biloko mikemike wana emonisaka lisusu te bomoi ya nyama to ya moto epai eutaki.
Ntango mokristo azali kozwa ekateli ya kondima to koboya biloko mikemike oyo euti na makila, asengeli komituna mituna oyo: Nazali koyeba ete soki naboyi biloko nyonso ya mikemike oyo euti na makila elimboli mpe ete nakoki kondima te bankisi oyo ezali na biloko mikemike oyo euti na makila, oyo bapesaka mpo na kobundisa bamaladi to kosala ete makila oyo ezali kobima mingi ekangama? Nakokoka kolimbola epai ya monganga ntina oyo nandimi to naboyi lolenge moko to lolenge mingi ya biloko mikemike oyo euti na makila?
Mayele mosusu na ntango ya lipaso. Yango ekoki kozala mayele oyo babengi hémodilution mpe mayele ya kozongisa na nzoto makila oyo ezali kobima. Na hémodilution, babendaka makila ya moto, na nsima bapesaka ye nkisi oyo esalaka ete nzoto esala lokola ezali na makila oyo ekoki, mpe na nsima, bazongisaka makila na ye na nzoto. Kozongisa makila oyo ezali kobima esɛngaka kozwa makila oyo ezali kobima na mpota to na mosisa, kolekisa yango na masini moko mpo na kopɛtola yango, mpe kozongisa yango na nzoto, nyonso wana kaka ntango bazali kosala moto lipaso. Lokola monganga na monganga akoki kozala na ndenge na ye ya kosalela mayele wana, mokristo asengeli koyeba soki monganga oyo akosalisa ye akosala ndenge nini.
Ntango mokristo azali kozwa ekateli ya kondima to koboya mayele wana, asengeli komituna boye: ‘Soki makila na ngai ekobimisama na nzoto mpe mbala mosusu bakobomba yango mwa moke, lisosoli na ngai ekotalela yango kaka lokola makila ya nzoto na ngai, oyo esɛngi te ‘kosopa yango na mabele lokola mai’? (Kolimbola Mibeko 12:23, 24) Lisosoli na ngai ekotungisama te soki, ntango bazali kosala ngai lipaso, babendi ngai makila, batye yango bankisi, mpe bazongisi yango na nzoto na ngai? Nayebi malamu ete koboya mayele nyonso oyo esɛngi kosalela makila na ngai elimboli ete nakondima te básala ekzamɛ ya makila, básala hémodialyse, to bálekisa makila na ngai na masini oyo ekosala mosala oyo motema mpe mimpululu esalaka?’
Mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli na ndenge oyo akondima básalela makila na ye ntango bakosala ye lipaso. Ezali mpe bongo mpo na ekzamɛ ya makila, to lisalisi ya monganga oyo esɛngaka kobenda mwa ndambo ya makila, kotya yango nkisi, mpe kozongisa yango na nzoto.