Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lv lok. 218-lok. 219 par. 1
  • Ndenge ya kolonga momeseno ya kosakana na binama ya kobotela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolonga momeseno ya kosakana na binama ya kobotela
  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kotika kosakana na binama ya kobotela
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Ndenge nini nakoki kotika momeseno oyo?
    Lamuká!—2007
  • Ndenge nini nakoki kobengana makanisi ya kosangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Ndenge oyo tosengeli kozala pɛto na miso ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
“Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
lv lok. 218-lok. 219 par. 1

APƐNDISI

Ndenge ya kolonga momeseno ya kosakana na binama ya kobotela

Momeseno ya kosakana na binama ya kobotela ebebisaka boyokani ya moto na Nzambe; etindaka moto aluka komisepelisa mpe ebebisaka makanisi.a Moto oyo azali na bolɛmbu yango akoki kobanda kotalela nzoto ya moto mosusu lokola eloko oyo esalemá kaka mpo na kokokisa mposa ya nzoto. Mpo na ye, kosangisa nzoto na moto ekokipe te soki alingani na moto yango, ezali kaka mpo na komisepelisa mpe kosilisa mposa ya nzoto. Nzokande, mposa yango mpe esilaka mpo na libela te. Na esika aboma binama ya nzoto “na likambo ya pite, mbindo, mposa [mabe] ya kosangisa nzoto,” moto oyo asakanaka na binama ya kobotela atumolaka nde bamposa yango.​—Bakolose 3:5.

Ntoma Paulo akomaki boye: “Bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Bakorinti 7:1) Soki ozali kobunda etumba mpo na kotosa maloba yango, kolɛmba nzoto te. Yehova ‘asepelaka kolimbisa’ mpe kosalisa. (Nzembo 86:5; Luka 11:9-13) Kutu, lokola motema na yo moko ezali koloba na yo ete likambo oyo osalaka ezali mabe, mpe ozali kosala milende mpo na kotika yango​—ata soki ozali kokwea mbala mosusu—​yango emonisi ete ozali na makanisi ya malamu. Kobosana mpe te ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:20) Nzambe amonaka kaka masumu na biso te; atalelaka moto na mobimba na ye. Lokola ayebi makambo na biso nyonso, na boboto mpenza ayokaka mabondeli na biso ntango tozali kosɛnga bolimbisi. Yango wana, bondeláká Nzambe ntango nyonso na komikitisa mpe na etingya, lokola mwana oyo azali kokima epai ya tata na ye ntango azali na mokakatano. Yehova akosalisa yo ozala na lisosoli ya pɛto. (Nzembo 51:1-12, 17; Yisaya 1:18) Nzokande, atako ozali kobondela Nzambe, kokanga mabɔkɔ te. Na ndakisa, boyá na motema moko kotala bafɔtɔ to bafilme ya makambo ya nsɔni mpe kimá baninga mabe.b

Soki ozali kokoka kaka te kolonga momeseno ya kosakana na binama ya kobotela, sololá na moboti na yo soki azali mokristo to na moninga moko oyo akɔmɛli na elimo.c​—Masese 1:8, 9; 1 Batesaloniki 5:14; Tito 2:3-5.

a Yango elimboli kosimbasimba binama ya kobotela tii na kobimisa mai ya mibali, mpe epai ya mwasi, tii na koyoka elɛngi makasi.

b Mpo ordinatɛrɛ ezala motambo te, mabota mingi batyaka yango na esika oyo ebombamá te. Longola yango, bato mosusu batyaka na ordinatɛrɛ programɛ oyo epekisaka moto amona makambo ya mabe. Kasi, ezali na programɛ moko te oyo ekoki kopekisa makambo nyonso ya mabe.

c Mpo na kozwa makanisi mosusu na ndenge ya kolonga momeseno ya kosakana na binama ya kobotela, talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini nakoki kotika momeseno oyo?” na Lamuká! ya Aprili–Yuni 2007, mpe buku Mituna oyo bilenge batunaka​—biyano oyo ebongi, Volimi 1, nkasa 205-211, to nkasa 178-182, na Lifalanse.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto