Loyembo 25
Elembo oyo bayebaka bayekoli ya solo
Ya Papye
1. Toza’ na mobeko’a kotosa
Ndenge Kristo alakisá.
Eza’ mobeko ya mokonzi;
Boye nde Krist’alingaki.
Yango nde bolingo ya Kristo;
Amikabá mbeka solo.
Ye atikelá biso ndakisa;
Ye nde tozali kolanda.
2. Bolingo’a sol’esilaka te
Esalisi bato’ebele.
Nyongo na biso nde bolingo,
Tósalisa na bolingo.
Na lisangá nde tokokuta
Nde baninga ya motema.
Tókangama makasi na bango;
Tólanda nzel’a bolingo.
(Talá mpe Rom. 13:8; 1 Ko. 13:8; Yak. 2:8; 1 Yoa. 4:10, 11.)