Loyembo 95
‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’
Ya Papye
1. Mosal’a Nzambe tólinga;
Kosakol’eza’ elɛngi.
Tósomba ntango ya kosakola,
Mpo mpos’eza’ naino mingi.
(MONDIMO)
Nzambe alobi: ‘Meká, moná—
Malamu ya Yehova.’
Koyeba Nzambe eza’ bomoi,
Salelá ye mosala.
2. Mosala ya ntango nyonso,
Epesaka mapamboli.
Nzamb’akokisi mposa na biso,
Tósepela n’oyo tozwi.
(MONDIMO)
Nzambe alobi: ‘Meká, moná—
Malamu ya Yehova.’
Koyeba Nzambe eza’ bomoi,
Salelá ye mosala.
(Talá mpe Mrk. 14:8; Luka 21:2; 1 Tim. 1:12; 6:6.)