Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rk eteni 8 nk. 20-21
  • Masiya amonani

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masiya amonani
  • Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Masolo mosusu
  • Bazalaki kozela Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Anzelu akei epai ya Maria
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Ndenge oyo mbotama ya Yesu ezali komema kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
rk eteni 8 nk. 20-21

ETENI 8

Masiya amonani

MBULA koleka 500 nsima ya esakweli ya Danyele, Gabriele, anzelu ya Nzambe abimelaki Maria, elenge mwasi moko oyo ayebaki naino mibali te, oyo azalaki moto ya libota ya Mokonzi Davidi. Gabriele alobaki na ye boye: “Mbote, moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi, Yehova azali na yo.” (Luka 1:28) Kasi, Maria abangaki. Mbote oyo Gabriele apesaki ye elimbolaki nini?

Anzelu Gabriele abimeli Maria

Gabriele ayebisaki Maria ete akobota Masiya

Gabriele alimbolaki boye: “Maria, kobanga te mpo Nzambe amoniseli yo boboto; mpe talá! okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu. . . . Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe . . . bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:30-33) Ezalaki mpenza nsango malamu! Maria asengelaki kobota Masiya, “momboto” oyo bazalaki kozela banda kala!

Na mbula oyo elandaki, Yesu abotamaki na Beteleme. Na butu yango, anzelu moko ayebisaki bato oyo bazalaki kobatela bampate boye: “Talá! nazali kosakwela bino nsango malamu ya esengo moko monene . . . mpo lelo, na engumba ya Davidi, baboteli bino Mobikisi, oyo azali Kristo Nkolo.” (Luka 2:10, 11) Na nsima, libota ya Yesu ekendaki kofanda na Nazarete; kuna nde esika Yesu akolaki.

Na mobu 29 T.B., mobu oyo Masiya asengelaki komonana, Yesu abandaki kosalela Nzambe, akómaki mosakoli na ye, ntango azalaki na mbula “soki ntuku misato.” (Luka 3:23) Bato mingi bayaki kososola ete Nzambe nde atindaki ye. Balobaki boye: “Mosakoli monene abimi na kati na biso.” (Luka 7:16, 17) Kasi makambo nini Yesu ateyaki?

Yesu ateyaki bato kolinga Nzambe mpe kosambela ye: Alobaki boye: “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko, mpe osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Marko 12:29, 30) Alobaki mpe boye: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”​—Luka 4:8.

Yesu alendisaki bato bálinganaka: Alobaki ete: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Marko 12:31) Alobaki mpe ete: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo; ya solo, wana nde likambo ya ntina oyo Mibeko mpe Basakoli bateyi.”​—Matai 7:12.

Yesu azalaki koyebisa basusu nsango ya Bokonzi na molende: Alobaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe . . . , mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi?

Makomami eteyaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló oyo ekoyangela mabele. Yesu Masiya nde Mokonzi oyo Nzambe aponi mpo na koyangela na Bokonzi yango. Na emonaneli moko, mosakoli Danyele amonaki Nzambe kuna na likoló azali kopesa Masiya “boyangeli, lokumu ná bokonzi.” (Danyele 7:14) Bokonzi yango ekotya Paradiso na mabele mobimba mpe ekopesa basaleli ya Nzambe likabo ya bomoi ya seko. Wana ezali mpenza nsango oyo eleki malamu!

Okopesa eyano nini?

  • Anzelu Gabriele ayebisaki Maria nini?

  • Esakweli nini ekokisamaki na mobu 29 T.B.?

  • Yesu ateyaki makambo nini?

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe makambo nini ekosala?

Yesu azali koteya ebele ya bato

Yesu Masiya azali nani?

“Masiya” to “Kristo” elimboli ‘Moto oyo atyami mafuta na elimo,’ elingi koloba, oyo Nzambe atye na esika moko ya lokumu. Nzambe moto akelá Yesu Masiya. Na nzela ya likamwisi moko monene, Nzambe asalaki ete Maria abota Yesu kozanga ete asangana ná mobali.

Mpo na nini bato ebele bandimelaki Yesu? Mwa ndambo ya bantina oyo etindaki bango bándimela ye yango oyo:

  • Azalaki koteya kaka makambo oyo ezalaki na Makomami Mosantu.

  • Mateya na ye mpe ndakisa na ye ezalaki kobenda bato oyo balingaka solo mpe bosembo.

  • Asalaki makamwisi mingi na lisalisi ya nguya ya Nzambe.

  • Akokisaki bisakweli mingi oyo ezalaki na Makomami Mosantu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto