Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 4 nk. 10-11
  • Bayokelaki Satana—Makambo nini emonani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bayokelaki Satana—Makambo nini emonani?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ezalaki ndenge nini na Paradiso?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Eteni 4
    Yoká Nzambe
  • Bato oyo bakufá bazali wapi?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 4 nk. 10-11

ETENI 4

Bayokelaki Satana​—Makambo nini emonani?

Adama ná Eva batosaki Nzambe te, yango wana bakufaki. Ebandeli 3:6, 23

Eva alyaki mbuma oyo epekisami mpe apesaki yango Adama

Eva ayokelaki nyoka mpe alyaki mbuma. Na nsima, apesaki yango Adama, ye mpe alyaki.

Adama ná Eva balongwe na Paradiso

Likambo oyo basalaki ezalaki mabe​—ezalaki lisumu. Nzambe abenganaki bango na Paradiso, esika oyo bazalaki kofanda.

Adama ná Eva banunaki mpe na nsima bakufaki

Bomoi ekómaki mpasi mpo na bango mpe bana na bango. Banunaki mpe bakufaki. Bakendeki te na mokili ya bilimo; bazalaki lisusu te.

Ndenge moko na putulu, bato oyo bakufá bazalaka lisusu na bomoi te. Ebandeli 3:19

Bato ya mimeseno ndenge na ndenge na bileko ndenge na ndenge

Tokufaka mpo biso nyonso tozali bana ya Adama ná Eva. Bakufi bakoki komona te, koyoka te to kosala likambo moko te.​—Mosakoli 9:5, 10.

Mwana mwasi akufi mpe bandeko ya libota na ye bazali kolela ye

Yehova akanaki te ete bato bákufaka. Mosika te, akozongisa na bomoi bato oyo bakufá. Soki bayokeli ye, bakozala na bomoi libela na libela.

  • Mpo na nini tokufaka?​—Baroma 5:12.

  • Liwa ekozala lisusu te.​—1 Bakorinti 15:26.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto