Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 12 nk. 26-27
  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Mafungola mibale mpo ete libala liumela
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Eteni 12
    Yoká Nzambe
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 12 nk. 26-27

ETENI 12

Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo?

Bolingo ezali na ntina mingi mpo mabota ezala na esengo. Baefese 5:33

Adama ná Eva na elanga ya Edene

Mobeko ya Nzambe elobi ete libala esengeli kosalema kati na mobali moko mpe mwasi moko.

Mobali azali kobatela mwasi na ye oyo azali na maladi;  mwasi azali kobongisela mobali na ye biloko ya kolya

Mobali ya bolingo asalelaka mwasi na ye makambo na boboto mpe amityaka na esika na ye.

Mwasi asengeli kosala na bomoko elongo na mobali na ye.

Tata azali kolendisa mwana na ye atya likebi na makita ya lisangá

Bana basengeli kotosaka baboti na bango.

Zaláká na boboto mpe sembo, kozala moto ya nko te mpe kozanga bosembo te. Bakolose 3:5, 8-10

Baboti bazali koteya mwana na bango makambo ya Biblia

Liloba ya Nzambe elobi ete mobali asengeli kolinga mwasi na ye lokola nzoto na ye moko mpe mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.

Mwasi ayoki motema mpasi ntango mobali na ye azali kotalatala mwasi mosusu

Kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te ezali mabe. Kobala basi to mibali ebele ezali mabe.

Libota moko ezali kotala ndenge moi ezali kokita

Liloba ya Nzambe eteyaka mabota ndenge bakoki kosala mpo na kozala na esengo.

  • Mibateláká pɛto na bizaleli.​—1 Bakorinti 6:18.

  • Lingáká, teyáká, mpe bateláká bana na yo.​—Kolimbola Mibeko 6:4-9.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto