Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jl liteya 21
  • Betele ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Betele ezali nini?
  • Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Masolo mosusu
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
jl liteya 21

LITEYA 21

Betele ezali nini?

Batatoli mibale bazali kosala na Departema ya mayemi na Betele

Departema ya kosala mayemi na États-Unis

Motatoli ya Yehova azali kosala na esika banyataka mikanda na Betele ya Allemagne

Allemagne

Motatoli ya Yehova azala kosala esika basokolaka bilamba na Betele ya Kenya

Kenya

Bandeko bazali kotya biloko na bamesa esika bato balyaka na Betele ya Colombie

Colombie

Nkombo Betele euti na monɔkɔ ya Ebre mpe elimboli “Ndako ya Nzambe.” (Ebandeli 28:17, 19) Nkombo yango ebongi mpenza mpo na kolobela bandako oyo Batatoli ya Yehova babongisá na miliki mingi, epai mosala ya kosakola ezali kotambwisama mpe kobongisama. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basalaka na Biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na engumba New York, na États-Unis, mpe kuna bakambaka misala ya babiro ya filiale mosusu nyonso. Baoyo basalaka na bisika yango babengami bango nyonso libota ya Betele. Ndenge ezalaka na libota, bandeko ya libota ya Betele mpe bafandaka esika moko, basalaka esika moko, balyaka esika moko, mpe bayekolaka Biblia elongo na bomoko.​—Nzembo 133:1.

Esika moko ya ntina mingi epai bandeko ya libota yango bamonisaka elimo ya komipimela. Na Babetele nyonso, bandeko mibali mpe basi bamipesaka mpenza ntango nyonso mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe mpo na makambo etali Bokonzi ya Nzambe. (Matai 6:33) Bafutamaka te, kasi bapesaka bango esika ya kofanda, biloko ya kolya mpe mwa mbongo mpo na bamposa na bango ya mikemike. Moto nyonso na Betele azali na mosala oyo bapesá ye: ekoki kozala na biro, esika balambaka, to na esika balyaka. Basusu basalaka na esika ya konyata to kokangisa mikanda, basusu batyaka bopɛto, basukolaka bilamba, babongisaka bamasini ndenge na ndenge mpe bongo na bongo.

Esika oyo mosala esalemaka makasi mpo mosala ya kosakola ya Bokonzi ekende liboso. Ntina ya libosoliboso ya Betele ezali ete solo ya Biblia ekómela bato mingi mpenza. Na ndakisa, mwa buku oyo osimbi ezali kosalisa bato mingi báyeba solo. Ekomamaki na litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe etindamaki na nzela ya Internet na bankama ya baekipi ya babongoli na mokili mobimba, mpe enyatamaki na bamasini oyo ebimisaka mikanda ebele na ntango moke; na nsima, etindamaki na masangá koleka 110 000. Libota ya Betele epesaka mabɔkɔ na misala nyonso wana, mpe yango ezali kosala ete mosala ya kosakola nsango malamu, oyo esengeli kosalema na lombangu mpenza, ekokisama.​—Marko 13:10.

  • Banani basalaka na Betele, mpe nini ebongisami mpo na bango?

  • Mosala nini oyo esengeli kosalema na lombangu bandeko ya Betele mokomoko bapesaka mabɔkɔ?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto