Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fg liteya 7 mituna 1-5
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
fg liteya 7 mituna 1-5

LITEYA 7

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

1. Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

1. Bokonzi ya Nzambe na likoló; 2. Yesu azali kobikisa moto ya maba

Nini esali ete Yesu azala Mokonzi oyo abongi?​—MARKO 1:40-42.

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Yango nde ekozwa esika ya baguvɛrnema mosusu nyonso mpe ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na likoló mpe awa na mabele. Nsango oyo etali Bokonzi ya Nzambe ezali nsango moko malamu. Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mposa oyo bato bazalaka na yango ya kozala na guvɛrnema ya malamu. Ekosala ete bato nyonso awa na mabele bázala na bomoko.​—Tángá Danyele 2:44; Matai 6:9, 10; 24:14.

Bokonzi nyonso ezalaka na mokonzi. Yehova aponi Mwana na ye Yesu Kristo azala Mokonzi ya Bokonzi na ye.​—Tángá Emoniseli 11:15.

Talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

2. Mpo na nini Yesu azali Mokonzi oyo abongi?

Mwana ya Nzambe azali Mokonzi oyo abongi mpamba te azali boboto, mpe akangamaka na oyo ezali malamu. (Matai 11:28-30) Mpe lisusu, azali na nguya mpenza ya kosalisa bato mpamba te akoyangela mabele atako ye afandi kuna na likoló. Nsima ya kosekwisama, Yesu amataki na likoló, mpe afandaki mpo na kozela na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova. (Baebre 10:12, 13) Nsukansuka, Nzambe apesaki ye nguya mpo abanda koyangela.​—Tángá Danyele 7:13, 14.

3. Banani bakoyangela elongo na Yesu?

Nzambe aponi etuluku moko ya bato oyo babengami “basantu” mpo na koyangela elongo na Yesu na likoló. (Danyele 7:27) Basantu ya liboso oyo baponamaki ezalaki bantoma ya sembo ya Yesu. Yehova akobaka kopona mibali mpe basi ya sembo tii na mikolo na biso mpo bázala basantu. Lokola Yesu, basantu yango basekwisamaka na nzoto ya elimo.​—Tángá Yoane 14:1-3; 1 Bakorinti 15:42-44.

Bato boni bakokende likoló? Yesu abengaki bango “etonga moke.” (Luka 12:32) Nsukansuka, bango nyonso bakozala bato 144 000. Bakoyangela mabele elongo na Yesu.​—Tángá Emoniseli 14:1.

4. Nini esalemaki ntango Yesu abandaki koyangela?

Boyekoli ya Biblia

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.a Likambo ya liboso oyo Yesu asalaki ntango akómaki mokonzi ezalaki kobwaka Satana ná bademo na ye awa na mabele. Satana akómaki na nkanda makasi mpe abandaki kobimisa mpasi na mabele mobimba. (Emoniseli 12:7-10, 12) Kobanda wana, mpasi ya bato ezali kaka kobakisama. Makambo lokola bitumba, nzala, maladi, mpe koningana ya mabele ezali na kati ya “elembo” oyo emonisi ete mosika te Bokonzi yango ekozwa makambo nyonso ya mabele na mabɔkɔ.​—Tángá Luka 21:7, 10, 11, 31.

5. Bokonzi ya Nzambe ezali kokokisa makambo nini?

Na nzela ya mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba, Bokonzi ya Nzambe esangisi ebele ya bato ya bikólo nyonso. Bamilio ya bato ya komikitisa bazali kondima boyangeli ya Yesu. Bokonzi ya Nzambe ekobatela bango ntango ekobebisa mokili oyo mabe. Yango wana, bato nyonso oyo balingi kozwa matomba na Bokonzi ya Nzambe basengeli koyekola kotosa Yesu.​—Tángá Emoniseli 7:9, 14, 16, 17.

Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela na paradiso awa na mabele

Na boumeli ya mbula 1 000, Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na bato. Mabele mobimba ekokóma paradiso. Nsukansuka, Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye. (1 Bakorinti 15:24-26) Oyebi moto moko oyo okolinga koyebisa nsango etali Bokonzi ya Nzambe?​—Tángá Nzembo 37:10, 11, 29.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 8 mpe 9 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka

a Mpo na koyeba malamumalamu ndenge bisakweli ya Biblia elobeli mobu 1914, talá nkasa 217-220 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto