Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fg liteya 15 mituna 1-4
  • Mpo na nini osengeli kokoba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kokoba?
  • Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
Makambo mosusu
Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
fg liteya 15 mituna 1-4

LITEYA 15

Mpo na nini osengeli kokoba?

1. Matomba nini okozwa soki okobi koyekola Biblia?

Basi mibale bazali koyekola Biblia na ntango ya bopemi na mosala

Na ntembe te, mateya ya libosoliboso oyo oyekoli na Biblia etindi yo olinga Yehova lisusu mingi. Osengeli kokoba kosala makasi mpo bolingo yango ekita te. (1 Petro 2:2) Elikya na yo ya bomoi ya seko etaleli ndenge oyo ozali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe mpo opusana penepene na ye.​—Tángá Yoane 17:3; Yuda 21.

Ntango boyebi na yo mpo na Nzambe ezali kobakisama, kondima na yo mpe ekokóma makasi. Kondima ekosalisa yo osepelisa Nzambe. (Baebre 11:1, 6) Ekotinda yo obongola motema mpe osala mbongwana monene na bomoi na yo.​—Tángá Misala 3:19.

2. Ndenge nini boyebi ya Nzambe oyo ozwi ekoki komemela basusu matomba?

Mwasi moko azali kobondela Nzambe

Okoki kokóma na boyokani malamu mpenza ná Yehova

Ata soki batindi yo te, yo moko okomona ete osengeli koyebisa basusu makambo oyo oyekoli, mpamba te moto nyonso asepelaka koyebisa nsango oyo ezali malamu. Ntango ozali kokoba koyekola Biblia, okoyeba ndenge ya kosalela yango mpo na kolobela kondima oyo ozali na yango epai ya Yehova mpe kosakola nsango malamu.​—Tángá Baroma 10:13-15.

Bato mingi babandaka liboso koyebisa nsango malamu epai ya baninga to bandeko na bango. Salá yango na mayele. Na esika ya koloba na bango ete lingomba na bango ezali ya lokuta, yebisá bango nde makambo oyo Nzambe alaki. Lisusu, kobosana te ete bato batyaka likebi mingi nde na bizaleli ya malamu oyo ozali komonisa kasi te na makambo oyo ozali koloba.​—Tángá 2 Timote 2:24, 25.

3. Boyokani ya ndenge nini okoki kozala na yango ná Nzambe?

Koyekola Liloba ya Nzambe ekosalisa yo oyeba makambo ya Nzambe mingi lisusu. Nsukansuka, okokóma na boyokani malamu mpenza ná Yehova. Okoki kutu kokóma moto ya libota na ye.​—Tángá 2 Bakorinti 6:18.

4. Ndenge nini okoki kokoba kokende liboso?

Okoki kokende liboso na makambo ya Nzambe soki okobi koyekola Liloba na ye. (Baebre 5:13, 14) Sɛngá Motatoli ya Yehova moko ayekola na yo Biblia na buku Makambo oyo Biblia eteyaka Ntango ozali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe, bomoi na yo ekokóma lisusu malamu koleka.​—Tángá Nzembo 1:1-3; 73:27, 28.

Batatoli ya Yehova bazali kotuna moto soki alingi koyekola Biblia

Nsango malamu euti epai ya Yehova, Nzambe ya esengo. Okoki kopusana penepene na ye soki ozali kopusana penepene na bato na ye. (Baebre 10:24, 25) Soki okobi kosala milende mpo na kosepelisa Yehova, na ntembe te, okozwa bomoi ya solosolo, elingi koloba bomoi ya seko. Kopusana penepene na Nzambe ezali mpenza likambo eleki malamu oyo okoki kosala!​—Tángá 1 Timote 1:11; 6:19.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 18 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto