Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-32 nk. 1-4
  • Nini epesaka esengo na libota?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini epesaka esengo na libota?
  • Nini epesaka esengo na libota?
  • Masolo mosusu
  • Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
    Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
    Bampasi ekosila mokolo mosusu?
  • Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
    Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
  • Otalelaka Biblia ndenge nini?
    Otalelaka Biblia ndenge nini?
Makambo mosusu
Nini epesaka esengo na libota?
T-32 nk. 1-4

Nini epesaka esengo na libota?

Okanisi ete ezali . . .

  • bolingo?

  • mbongo?

  • to eloko mosusu?

BIBLIA ELOBI ETE

“Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:28, Libongoli ya Mokili ya Sika.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Bokolingana mingi na kati ya libota.​—Baefese 5:28, 29.

Bokopesana limemya ya solosolo.​—Baefese 5:33.

Bokozala na likambo ya kobanga te.​—Marko 10:6-9.

Elilingi ya libota moko ya esengo: Mama mpe mwana ya mwasi, mwasi ná mobali, baboti elongo na mwana na bango ya mobali

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina mibale oyo:

  • Nzambe nde Moto asalaki libota. Biblia elobi ete “libota nyonso . . . ezwi nkombo” na yango epai ya Yehova Nzambe. (Baefese 3:14, 15) Na maloba mosusu, libota ezali mpo Yehova asalá yango. Mpo na nini koyeba likambo yango ezali na ntina mingi?

    Tózwa ndakisa: Soki osepeli mpenza na elubu moko oyo olei mpe olingi koyeba ndenge balambaka yango, okotuna nani? Okotuna kaka moto oyo alambaki yango.

    Ndenge moko mpe, mpo na koyeba makambo oyo esalaka ete libota ezala na esengo, tosengeli kotuna Yehova, Moto oyo asalaki libota.​—Ebandeli 2:18-24.

  • Nzambe atyelaka bino likebi. Ezali malamu ete mabota bálukaka toli ya Yehova, oyo apesi na Liloba na ye. Mpo na nini? “Mpo atyelaka bino likebi.” (1 Petro 5:6, 7) Yehova alingi mpenza ete bózala malamu​—mpe toli oyo apesi esalisaka mpenza!​—Masese 3:5, 6; Yisaya 48:17, 18.

KANISÁ NAINO

Mobali moko ná mwasi na ye oyo babalani sika bazali kozwa toli epai ya nkulutu moko; bazali kotánga Biblia elongo

Osengeli kosala nini mpo ozala mobali malamu, mwasi malamu, to moboti malamu?

Biblia epesi eyano na motuna yango na BAEFESE 5:1, 2 mpe na BAKOLOSE 3:18-21.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto