Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-33 nk. 1-4
  • Nani mpenza azali koyangela mokili?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani mpenza azali koyangela mokili?
  • Nani mpenza azali koyangela mokili?
  • Masolo mosusu
  • Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
    Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
    Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
    Bampasi ekosila mokolo mosusu?
Makambo mosusu
Nani mpenza azali koyangela mokili?
T-33 nk. 1-4

Nani mpenza azali koyangela mokili?

Okanisi ete ezali . . .

  • Nzambe?

  • bato?

  • to nani mosusu?

BIBLIA ELOBI ETE

“Mokili mobimba ezali na maboko ya Monguna.”​—1 Yoane 5:19.

“Mwana ya Nzambe ayaki awa . . . bobele po na koboma misala ya zabolo.”​—1 Yoane 3:8, Bible na lingala ya lelo oyo.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Okoyeba ntina ya makambo oyo ezali koleka na mokili.​—Emoniseli 12:12.

Okomona ntina mpenza ya kondima ete mokili oyo ekobonga.​—1 Yoane 2:17.

Satana azali na bokonzi likoló ya bato, makambo ya politiki, basoda mpe mangomba ya mokili

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina misato oyo:

  • Boyangeli ya Satana ekobebisama. Yehova akani kosukisa boyangeli ya Satana na mokili oyo. Alaki ete ‘akobebisa’ Zabolo nyɛɛ, mpe akolongola mabe nyonso oyo Satana abimisá.​—Baebre 2:14, Libongoli ya Mokili ya Sika.

  • Nzambe aponi Yesu Kristo ayangela mokili. Yesu akeseni mosika mpenza na mokonzi ya mokili oyo, mokonzi moko ya motema mabe mpe alukaka kaka bolamu na ye moko. Yoká elaka Nzambe apesi mpo na ntango oyo Yesu akozala mokonzi: “Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa . . . Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:13, 14.

  • Nzambe akosaka te. Biblia elobi polele ete: “Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te.” (Baebre 6:18) Soki Yehova alaki kosala likambo moko boye, ezali lokola nde esili kosalema, mpo ekosalema kaka. (Yisaya 55:10, 11) “Mokonzi ya mokili oyo akobwakama libándá.”​—Yoane 12:31.

KANISÁ NAINO

Libota moko ya esengo babimi kozwa mopɛpɛ

Mokili ekokóma ndenge nini soki moto oyo azali koyangela yango sikoyo alongwe?

Biblia epesi eyano na motuna yango na NZEMBO 37:10, 11 mpe na EMONISELI 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto