Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 4 nk. 10-11
  • Asepelisaki tata na ye mpe Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Asepelisaki tata na ye mpe Yehova
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Nzambe alingaki ye, baninga na ye mpe balingaki ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe andimaka moto oyo azali sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Elaka ya Yefeta
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Elaka ya Yefeta
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 4 nk. 10-11
Yefeta azali kolekisa ntango na na mwana na ye ntango azalaki naino moke

LITEYA 4

Asepelisaki tata na ye mpe Yehova

Yefeta azali kobondela Yehova ntango basoda ya Yisraele bazali kobunda na banguna na bango

Elaka nini Yefeta asalaki epai ya Yehova?

Yefeta azali kozonga ndako nsima ya etumba, bayambani na mwana na ye ya mwasi

Atako ezalaki pɛtɛɛ te, mwana ya Yefeta asalaki makambo oyo tata na ye alakaki Yehova

Ozali komona mwana mwasi wana na elilingi?​— Tata na ye nkombo na ye Yefeta. Biblia eyebisi nkombo ya mwana mwasi yango te, kasi toyebi kaka ete asepelisaki tata na ye mpe Yehova. Tólobela naino mwana yango ná tata na ye Yefeta.

Yefeta azalaki moto malamu mpe alekisaki ntango mingi na koteya mwana na ye makambo ya Yehova. Azalaki makasi na mosala mpe mokambi ya malamu. Yango wana Bayisraele basɛngaki ye akamba bango mpo bákende kobunda na banguna na bango.

Yefeta abondelaki Nzambe asalisa bango bálonga etumba. Alakaki ete soki alongi etumba, ntango akozonga, akopesa Yehova moto ya liboso oyo akobima na ndako na ye mpo na kokutana na ye. Moto yango akofanda na tabernakle ya Nzambe mpe akosala kuna bomoi na ye mobimba. Tabernakle ezalaki esika oyo bato bazalaki kokende kosambela Nzambe na ntango wana. Yefeta alongaki etumba. Ntango azongaki, oyebi moto ya liboso oyo abimaki na ndako na ye?​—

Ɛɛ, mwana na ye ya mwasi. Yefeta azalaki kaka na mwana wana moko mpe sikoyo asengeli kotinda ye mosika. Likambo yango epesaki Yefeta mawa mingi. Kasi kobosana te, alakaki ete akosala yango. Na mbala moko, mwana yango alobaki ete: ‘Tata, lokola olakaki Yehova, osengeli kokokisa elaka na yo.’

Mwana mwasi ya Yefeta azali kosangisa mabaya mpo na tabernakle; baninga na ye bayei kotala ye

Baninga ya mwana ya Yefeta bazalaki kokende kotala ye mbula na mbula

Mwana ya Yefeta mpe ayokaki mawa na motema. Kuna, na tabernakle, akoki kobala te mpe kobota te. Kasi alingaki mpenza kokokisa elako ya tata na ye mpe kosepelisa Yehova. Na miso na ye, likambo yango ezalaki na ntina mingi koleka kobala mpe kobota bana. Yango wana, atikaki ndako na bango mpe akendeki kofanda na tabernakle bomoi na ye mobimba.

Okanisi ete likambo oyo asalaki esepelisaki tata na ye mpe Yehova?​— Ɛɛ, ezali bongo. Soki ozali kotosa Yehova mpe kolinga Ye, okoki kozala lokola mwana ya Yefeta. Yo mpe okosepelisa baboti na yo mpe okosepelisa Yehova mingi mpenza.

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Kolimbola Mibeko 6:4-6

  • Basambisi 11:30-40

  • 1 Bakorinti 7:37, 38

MITUNA:

  • Yefeta azalaki nani? Elaka nini asalaki?

  • Mpo na nini ezalaki mpasi mwana ya Yefeta asala makambo tata na ye alakaki?

  • Na miso ya mwana ya Yefeta, eloko nini ezalaki na ntina mingi koleka?

  • Ndenge nini okoki kolanda ndakisa ya mwana ya Yefeta?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto