Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 9 nk. 20-21
  • Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Yehova atindi Yirimia asakola
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 9 nk. 20-21

LITEYA 9

Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova

Yirimia azali kati na ebele ya bato ya nkanda

Mpo na nini bato bazali kosilikela Yirimia?

Bazali kobimisa Yirimia na libulu moko mozindo ya pɔtɔpɔtɔ

Yehova abikisaki Yirimia

Bato mosusu basɛkaka biso mpe bamosusu basilikelaka biso ntango tozali koyebisa bango makambo ya Yehova. Yango ekoki kolongola biso mposa ya kolobela makambo ya Nzambe. Yo mpe osí oyoká ndenge wana?​— Biblia elobeli elenge mobali moko oyo alingaki Yehova mingi, kasi alingaki mpenza kotika kolobela ye. Nkombo ya elenge yango Yirimia. Tólobela ye naino.

Ntango Yirimia azalaki elenge, Yehova atindaki ye ayebisa bato bátika kosala makambo ya mabe. Mokumba yango ezalaki mpasi mingi mpo na Yirimia, mpe azalaki kobanga. Ayebisaki Yehova ete: ‘Nayebi makambo nakoloba te. Nazali naino mwana moke.’ Kasi Yehova alobaki na ye: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’

Na yango, Yirimia abandaki koyebisa bato ete soki batiki makambo ya mabe te, bakozwa etumbu. Okanisi ete bato basalaki ndenge Yirimia alobaki?​— Te, basalaki bongo te. Bato mosusu bazalaki kosɛka ye, bato mosusu basilikelaki ye makasi. Bato mosusu kutu balingaki koboma ye! Mpo na yo, Yirimia ayokaki ndenge nini?​— Abangaki mpe alobaki: ‘Nakolobela lisusu makambo ya Yehova te.’ Kasi atikaki mpenza kolobela yango?​— Te, atikaki te. Lokola alingaki Yehova mingi, akokaki te kotika kolobela makambo na ye. Mpe lokola Yirimia atikaki te, Yehova abatelaki ye.

Na ndakisa, mokolo moko bato mabe babwakaki Yirimia na libulu ya pɔtɔpɔtɔ. Azalaki na mai ya komɛla te, biloko ya kolya mpe te. Bato yango bakanaki kotika Yirimia kuna mpo akufa. Kasi, Yehova abikisaki ye!

Ndakisa ya Yirimia ekoki koteya yo nini?​— Atako mikolo mosusu Yirimia abangaki, atikaki te kolobela makambo ya Yehova. Yo mpe ntango ozali kolobela makambo ya Yehova, bato bakoki kosɛka yo to kosilikela yo. Okoki koyoka nsɔni to mpe kobanga. Kasi, kotika te kolobela makambo ya Yehova. Akosalisa yo, kaka ndenge asalisaki Yirimia.

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Yirimia 1:4-8; 20:7-9; 26:8-19, 24; 38:6-13

MITUNA:

  • Yehova ayebisaki Yirimia asala nini?

  • Mpo na nini Yirimia alingaki kotika kolobela makambo ya Yehova?

  • Ndenge nini Yehova asalisaki Yirimia?

  • Ndakisa ya Yirimia ekoki koteya yo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto